Ozali na elimo oyo ekufaka te?
NTOMA Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene.” (2 Timote 3:16, NW ) Biblia ezali mpenza mokanda ya mateya ya solo oyo euti na Yehova, Nzambe ya solo.—Nzembo 83:18.
Lokola Yehova nde akelá biloko nyonso, mpe biso bato, ayebi malamu makambo nini mpenza elekaka ntango tokufaka. (Baebele 3:4; Emoniseli 4:11) Na kati ya Biblia, Liloba na ye oyo epemami, apesi biyano ya solosolo mpe ya malamu na mituna oyo tomitunaka mpo na oyo esalemaka nsima ya liwa.
Elimo ezali nini?
Maloba ya Biblia oyo ebongolami na “elimo” elimboli mpenzampenza “mpema.” Kasi maloba yango elimboli kaka kopema ya mpamba te. Na ndakisa, Yakobo, moko na bato oyo bakomaki Biblia, alobaki ete: “Nzoto oyo ezangi mpema [“elimo,” NW] esili kokufa.” (Yakobo 2:26) Elingi koloba ete elimo ezali eloko oyo esalaka ete nzoto ezala na bomoi.
Nguya yango oyo epesaka bomoi ekoki kozala kaka mpema to mopɛpɛ ya mpamba te oyo ezali kotambola na kati ya mimpululu (poumons). Tolobi bongo mpamba te ata soki moto atiki kopema, baselile ya nzoto ezalaka naino na bomoi na boumeli ya mwa ntango; buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete ezalaka “baminiti mingi.” Yango wana, na mwa ntango wana, bakoki kosala makasi mpe kozongisa moto na bomoi. Kasi, soki baselile nyonso ya nzoto ekufi, bakoki lisusu kosala eloko moko te. Ata soki batii moto mopɛpɛ nyonso oyo ezali na mokili, selile ata moko te ekozonga lisusu na bomoi. Na bongo, elimo ezali nguya oyo emonanaka te oyo epesaka bomoi, mɔ́tɔ ya bomoi oyo epesaka baselile mpe nzoto mobimba ya moto bomoi. Kopema nde ebatelaka nguya yango.—Yobo 34:14, 15.
Elimo yango ezalaka kaka na nzoto ya bato? Biblia ezali kosalisa biso na kozwa eyano ya malamu na motuna yango. Salomo, mokonzi ya mayele , alobaki ete bato na banyama “bazali na [elimo, NW] moko,” mpe atunaki motuna oyo: “Nani ayebi soko [elimo, NW] ya moto ekokenda likoló mpe [elimo, NW] ya nyama ekokita na mabele?” (Mosakoli 3:19-21) Tomoni ete ezala bato to banyama bazali na elimo. Ndenge nini?
Tokoki kokokanisa elimo, to nguya oyo epesaka bomoi na kura na kati ya masini moko. Masini ndenge na ndenge ekoki kosala misala oyo basalelá yango soki kura ezali, atako emonanaka na miso te. Na ndakisa, lituka ya kura ekoki kopesa mɔ́tɔ, ordinatɛrɛ ekoki kosala misala ndenge na ndenge, mpe televizyo ekoki kolakisa bililingi mpe kobimisa maloba. Atako bongo, ata mokolo moko te kura ekokóma masini yango. Kura ekotikala kaka nguya. Ndenge moko mpe, nguya ya bomoi ezwaka te motindo ya bikelamu oyo yango ezali kopesa bomoi. Ezali na bomoto te mpe na makanisi te. Bato na banyama bazali “na [elimo, NW] moko.” (Mosakoli 3:19) Na yango, ntango moto akufi, koloba ete elimo na ye ekómaka ekelamu ya elimo mpe ekendaka na mokili mosusu, ezali lokuta.
Kasi soki ezali bongo, moto akómaka ndenge nini soki akufi? Mpe elimo ekómaka nini ntango moto akufi?
“Okozonga na mabele”
Ntango Adama, moto ya liboso, abukaki mobeko ya Nzambe na nko, Nzambe alobaki na ye boye: “Na milunge ya elongi na yo okolya kwanga, kino ntango okozonga na mabele, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu.” (Genese 3:19) Adama azalaki wapi liboso Yehova akela ye na mputulu? Epai moko te! Azalaki te. Ntango Yehova Nzambe alobaki ete Adama ‘akozonga na mputulu,’ elingi koloba ete Adama asengelaki kokufa mpe kolimwa na mabele. Adama alingaki kokende na mokili ya elimo te. Ntango akufaki, Adama azalaki lisusu te, se ndenge azalaki te liboso bákela ye. Etumbu na ye ezalaki liwa, elingi koloba kozanga bomoi, kasi ezalaki kokende na mokili mosusu te.—Baloma 6:23.
Tokoloba boni mpo na bato mosusu oyo bakufá? Mosakoli 9:5, 10 elimboli polele ndenge oyo bato bakómaka soki bakufi; vɛrsɛ yango elobi boye: “Bato oyo bakufá bayebi eloko moko te . . . Ezali na mosala te, mwango te, boyebi te to mayele, na kati ya lilita.” (Moffatt) Na bongo, kokufa elimboli kozanga bomoi. Mokomi ya nzembo akomaki ete soki moto akufi, “[elimo, NW] na ye ekobima, mpe akozonga na mputulu na ye; mpe bobele mokolo wana, makanisi na ye makosila.”—Nzembo 146:4, NW.
Tomoni polele ete bato oyo bakufá bazalaka lisusu na bomoi te. Bakoki koyeba likambo moko te. Bakoki komona yo te, koyoka yo te, to koloba na yo te. Bakoki mpe kosalisa yo te to mpe kosala yo mabe moko te. Ezali na ntina te obanga bato oyo bakufá. Kasi, mpo na nini balobi ete elimo “ekobima” ntango moto akufi?
Elimo “ekozonga epai ya Nzambe”
Biblia elobi ete ntango moto akufi, “[elimo, NW] ekozonga epai na Nzambe oyo apesaki yango.” (Mosakoli 12:7) Yango elingi nde koloba ete elimo elongwaka mpenza awa na mabele mpe ebutaka tii epai ya Nzambe? Soki moke te! Lolenge oyo Biblia esalelaka liloba “ekozonga” esɛngi kaka te kolongwa esika moko mpe kokende na esika mosusu. Na ndakisa, Nzambe ayebisaki na Bayisaelele oyo bazalaki sembo te ete: “[Bózonga] epai na ngai mpe ngai [nakozonga] epai na bino! [Yehova] na bibele alobi bongo.” (Malaki 3:7) ‘Kozonga’ epai ya Yehova mpo na Bayisalaele elimbolaki kotika kosala makambo ya mabe mpe kolanda lisusu nzela ya sembo ya Nzambe. Mpe mpo na Yehova, ‘kozonga’ epai ya Bayisalaele elimbolaki kotyela lisusu libota na ye likebi. Ezala mpo na Bayisalaele to mpo na Yehova, ‘kozonga’ ezalaki na makanisi, kasi te kolongwa esika moko mpe kokende na esika mosusu.
Ndenge moko mpe, na ntango moto akufi, soki balobi ete elimo ‘ezongi’ epai ya Nzambe, elimboli te ete elongwe awa na mabele mpe ebuti na likoló epai ya Nzambe. Soki nguya ya bomoi ebimi na nzoto ya moto, kaka Nzambe nde akoki kozongisa yango. Yango wana, soki balobi ete ‘elimo ezongaka epai ya Nzambe,’ elimboli ete kaka Nzambe nde akoki kozongisa moto yango na bomoi.
Na ndakisa, tótala oyo Makomami elobi mpo na liwa ya Yesu Klisto. Luka, moto oyo akomaki Evanzile moko, akomaki boye: “Yesu agangaki na mongongo makasi ete, Tata nazali kotika [elimo, NW] na ngai na mabɔkɔ na yo. Esilaki ye koloba bongo, akufaki.” (Luka 23:46) Ntango elimo ya Yesu ebimaki, ebutaki na likoló te. Yesu asekwaki nsima ya mikolo misato, mpe abutaki na likoló nsima ya mikolo 40. (Misala 1:3, 9) Nzokande, ntango akufaki, Yesu atikaki elimo na ye na mabɔkɔ ya tata na ye na kondima mpenza ete Yehova akoki kozongisa ye na bomoi.
Nzambe azali na makoki ya kozongisa moto na bomoi. (Nzembo 104:30) Likambo yango ezali kopesa biso elikya monene mpenza!
Elikya ya solosolo
Biblia elobi ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na [malita ya kokanisama, NW] bakoyoka mongongo ya [Yesu], mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Yesu Klisto alobaki ete bato nyonso oyo bazali na makanisi ya Yehova bakosekwa to bakozonga na bomoi. Na kati ya bato yango ekozala na baoyo basalelaki ye na bosembo ntango bazalaki na bomoi. Kasi, ekozala mpe na bamilio ya bato oyo bakufá kasi ntango bazalaki na bomoi bazwaki libaku ya komonisa te ete balingaki kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe. Ekoki kozala ete bayebaki te makambo oyo Yehova azali kosɛnga to mpe bazwaki ntango ya kobongwana te. Bato ya ndenge wana mpe Nzambe azali kobatela bango na makanisi na ye mpe akosekwisa bango, mpamba te Biblia elobi ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.”—Misala 24:15.
Lelo oyo, mabele etondi na koyinana, bitumba, mobulu, kobomana, mopɛpɛ ezali kobeba mpe bamaladi ezali ebele. Soki bato oyo bakufá basekwi na mabele ya boye, esengo oyo bakozala na yango ekozala ya mwa ntango mokuse. Kasi, Mozalisi alaki ete etikali moke abebisa mokili oyo Satana Zabolo azali koyangela. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44; 1 Yoane 5:19) Nsima na yango, bato ya sembo, baoyo Biblia ebengi bango “mabele ya sika” nde bakofanda na mokili.—2 Petelo 3:13.
Na ntango wana, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Ata nsɔmɔ ya liwa ekozala lisusu te, mpamba te Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Oyo nde makambo kitoko ezali kozela bato oyo bazali na “malita ya kokanisama”!
Ntango Yehova akolongola makambo nyonso ya mabe na mokili, akoboma bato ya sembo nzela moko na bato ya mabe te. (Nzembo 37:10, 11; 145:20) “Ebele monene” ya bato ya “mabota nyonso, ya mikili nyonso, ya bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso” bakobika na “bolɔzi monene,” (NW) oyo ekobebisa mokili oyo ya mabe. (Emoniseli 7:9-14) Elingi koloba ete bato oyo bakosekwa bakokuta ebele ya bato oyo bakoyamba bango.
Ozali na mposa ya komona bandeko na yo ya bolingo oyo bakufá? Olingi kozala na bomoi na Paladiso awa na mabele? Boye esengeli oyekola mikano ya Nzambe mpe oyeba yango malamumalamu. (Yoane 17:3) Yehova alingi ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe báyeba solo malamumalamu.”—1 Timote 2:3, 4, NW.
[Elilingi na lokasa 4]
“Ozali mputulu mpe okozonga na mputulu”
[Elilingi na lokasa 5]
Tokoki kokokanisa elimo na kura
[Elilingi na lokasa 7]
Lisekwa ekopesa bato esengo ya solosolo