Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/8 nk. 12-17
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoko na kondima mpe na boyebi
  • Monisá “mbuma ya elimo”
  • Tókende liboso mpo na nkembo ya Nzambe
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tika ete kokola na yo emonana polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Bilenge—Bómonisa bokoli na bino polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tiká ete bokóli na yo emonana!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/8 nk. 12-17

Monisá polele ete ozali kokende liboso

“Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali [kokende] liboso.”​—1 TIMOTE 4:15.

1. Ndenge nini okoki koyeba soki mbuma ekɔmeli mpe bakoki kolya yango?

KANISÁ naino mbuma oyo olingaka mingi; ekoki kozala etabe, savoka, manga to mbuma mosusu. Na ntembe te okoki koyeba ntango mbuma yango ekɔmeli mpe ekoki kolyama. Soki olumbuti nsolo na yango, otali langi na yango mpe ofini yango na misapi, okoki koyeba ete ekozala elɛngi na monɔkɔ. Ntango okati mwa ndambo na yango mpe otii yango na monɔkɔ, mbala mosusu okoki koloba: Uhmm, ezali elɛngi! Ezali sukali! Okoyoka mpenza esengo soki olei yango.

2. Ndenge nini kokɔmela emonanaka, mpe moto oyo akɔmeli akómaka na boyokani ya ndenge nini elongo na bazalani na ye?

2 Mwa likambo wana ya esengo ekokani na makambo mosusu ya bomoi. Na ndakisa, ndenge kaka emonanaka mpo na mbuma oyo ekɔmeli, ezali na makambo mingi oyo emonisaka ete moto oyo akɔmeli na elimo. Toyebaka ete moto akɔmeli ntango azali komonisa bososoli, mayele, bwanya, mpe bongo na bongo. (Yobo 32:7-9) Ezali mpenza esengo ya kozala moninga ya bato oyo bazali na bizaleli yango na makanisi mpe misala na bango mpe kosala na bango.​—Masese 13:20.

3. Makambo oyo Yesu alobaki mpo na bato ya ntango na ye ezali komonisa nini na likambo etali kokɔmela?

3 Nzokande, moto mosusu akoki kozala ete akoli na nzoto, kasi maloba mpe misala na ye ekoki komonisa ete akɔmeli naino te na makanisi mpe na elimo. Na ndakisa, Yesu alobaki mpo na bato ya motó makasi ya ntango na ye ete: “Yoane ayaki, azalaki kolya te mpe komela te, kasi balobi ete: ‘Azali na demo’; mwana ya moto ayei, azali kolya mpe azali komela, kasi bato balobi ete: ‘Talá! Moto ya lokoso mpe alingá komela masanga.’” Bato yango, atako bazalaki mikóló na nzoto, Yesu alobaki ete bazalaki kosala makambo lokola “bana mike,” bakɔmelaki te. Yango wana, abakisaki ete: “Nde mayele emonani sembo na misala na yango.”​—Matai 11:16-19, NW.

4. Kokende liboso mpe kokɔmela emonanaka na makambo nini?

4 Maloba ya Yesu ezali komonisa biso ete ezali na misala mpe na mbuma oyo moto azali kobota nde tokoki komona soki moto yango azali na mayele ya solosolo, mayele yango nde elakisaka ete moto akɔmeli. Mpo na yango, yoká toli oyo ntoma Paulo apesaki Timote. Nsima ya kotánga makambo oyo Timote asengelaki koluka, Paulo alobaki boye: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali [kokende] liboso.” (1 Timote 4:15) Ya solo, bato mosusu ‘bamonaka polele,’ to basosolaka ete moklisto azali kokende liboso. Epai ya moklisto, kokɔmela ezalaka lokola mwinda oyo ezali kongɛnga, ezali likambo oyo ebombamaka na kati te. (Matai 5:14-16) Yango wana, tokotalela makambo mibale oyo, na nzela na yango, tokoki komonisa ete tozali kokende liboso mpe tozali kokɔmela: (1) kokola na boyebi, bososoli mpe mayele; (2) komonisa mbuma ya elimo.

Bomoko na kondima mpe na boyebi

5. Kokɔmela elimboli nini?

5 Kokɔmela elimboli kokola tii na nsuka, kokóma mokóló to mpe kotɛla. Lokola tolobaki yango liboso, mbuma ekɔmelaka to etɛlaka ntango ekómi na nsuka ya kokola na yango mpe ntango emonani ete langi, nsolo, mpe elɛngi na yango ekómi na ndenge oyo bato bakosepela kolya yango. Yango wana, kokɔmela elimboli mpe kobonga mpenza, kokóma mobimba to mpe kokoka.​—Yisaya 18:5; Matai 5:45-48; Yakobo 1:4.

6, 7. (a) Nini emonisi ete Yehova asepelaka ete basaleli na ye nyonso bákɔmela na elimo? (b) Kokɔmela na elimo ekendaka nzela moko na likambo nini?

6 Yehova Nzambe alingaka mpenza komona basaleli na ye nyonso bákola mpe bakɔmela na elimo. Yango wana abongisi makambo ya malamu mpenza na kati ya lisangá. Ntoma Paulo akomelaki bakilsto ya Efese boye: “Ye mpe asili kopesa makabo ete bamosusu bázala bantoma, bamosusu basakoli, bamosusu bapalanganisi ya Nsango Malamu, bamosusu babateli mpe balakisi, mpo na kobongisa Babulami, mpo na mosala ya kosungaka, mpo na kotongaka nzoto ya Klisto, kino ekokóma biso nyonso na bomoko na kondima mpe na boyebi [ya solosolo, NW] ya Mwana ya Nzambe, na mobali mobimba, na epimelo ya monene ya litondi ya Klisto, ete tózala bana mike lisusu te baoyo bakoninganaka mpe bakotɛngatɛngaka epai na epai na mipɛpɛ nyonso ya mateya mpe na mayele ya bato, na bozimbisi na bango na nzela ya mikano mabe.”​—Baefese 4:11-14.

7 Na bavɛrsɛ yango, Paulo alobaki ete bantina mosusu oyo Nzambe abongisaki makambo nyonso wana na kati ya lisangá ezali mpo bato nyonso ‘bákóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya solosolo,’ bákóma “mobali mobimba,” mpe bázala ‘na epimelo ya monene ya litondi ya Klisto.’ Ezali kaka na ndenge wana nde tokobatelama mpo tótɛngatɛnga te na makanisi mpe mateya ya lokuta, lokola bana mike. Na bongo, tomoni ete kokɔmela ekendaka nzela moko na kokóma na “bomoko na kondima mpe na boyebi ya solo ya Mwana ya Nzambe.” Toli ya Paulo ezali na mwa makambo oyo tosengeli kotalela malamumalamu.

8. Kokóma na “bomoko” na kondima mpe na boyebi ya solosolo ezali kosɛnga makambo nini?

8 Ya liboso, lokola esengeli ete tózala na “bomoko,” moklisto oyo akɔmeli asengeli kozala na bomoko mpe na boyokani mpenza na baninga na ye bandimi na oyo etali kondima mpe boyebi. Akolinga te kopesa to kolongisa makanisi na ye to mpe koteya makanisi oyo ekeseni na oyo etali bososoli ya Biblia. Kasi, akotya motema na mateya ya solo na ndenge oyo Yehova Nzambe azali komonisa yango na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Soki tozali ntango nyonso kolya bilei ya elimo oyo bazali kopesa biso “na ntango oyo ebongi” na lisalisi ya mikanda oyo lisangá ezali kobimisa, na makita mpe mayangani, tokoki kolikya kobatela “bomoko” na kondima mpe boyebi na baninga na biso baklisto.​—Matai 24:45.

9. Limbolá liloba “kondima” na ndenge oyo Paulo asalelaki yango na mokanda na ye epai ya Baefese.

9 Ya mibale, liloba “kondima” elimboli te elikya oyo moklisto mokomoko azali na yango, kasi ezali nde makambo nyonso oyo tondimaka, “monene mpe molai mpe bosanda mpe bozindo” na yango. (Baefese 3:18; 4:5; Bakolose 1:23; 2:7) Kutu, ndenge nini moklisto akoki kozala na bomoko na baninga na ye bandimi soki andimaka kaka mwa ndambo ya mateya ya “kondima”? Elingi koloba ete tosengeli kosuka te na koyeba mateya ya ebandeli to koyeba mateya ya solo likolólikoló to mpe koyeba kaka ndambo na yango. Tosengeli nde kolandaka bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kozwa na nzela ya lisangá na ye mpo na kotimola Liloba na ye na bozindo. Tosengeli kosala makasi tóyeba mokano ya Nzambe malamumalamu mpe na bozindo. Yango esɛngi mpe ete tózwaka ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye asalisa mpe atambwisa biso, koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, kosakola ntango nyonso Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.​—Masese 2:1-5.

10. Maloba “kino ekokóma biso nyonso” oyo ezali na Baefese 4:14 elimboli nini?

10 Ya misato, Paulo akomaki “kino ekokóma biso nyonso” liboso alobela mikano misato oyo touti kotánga. Mokanda moko oyo ezali kolimbola Biblia elobi ete maloba “biso nyonso” elimboli “nyonso te, mokomoko, na kokabwana, kasi mobimba.” Na maloba mosusu, mokomoko na biso asengeli kosala molende oyo ekoki mpo na kokóma moklisto oyo akɔmeli esika moko na bandeko nyonso. Mokanda moko (The Interpreter’s Bible) elobi boye: “Moto akoki kokɔmela na elimo na esika na ye moko te, ndenge moko eteni moko ya nzoto ekoki kokɔmela te longola se soki nzoto mobimba ezali kokola.” Paulo ayebisaki baklisto ya Efese ete basengelaki kosala makasi mpo básosola kondima mobimba “elongo na Babulami nyonso.”​—Baefese 3:18a.

11. (a) Kokola na elimo esɛngi makambo nini? (b) Tozali na mposa ya nini mpo na kokende liboso?

11 Maloba ya Paulo ezali komonisa polele ete kokola na elimo elimboli kaka te kotondisa bɔɔngɔ na boyebi mpe koyekola makambo ya makasi. Moklisto oyo akɔmeli azali te oyo akamwisaka bato na mayele na ye. Kutu, Biblia elobi ete: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.” (Masese 4:18) Tomoni, ezali nde “nzela ekongɛnga lisusu mpe lisusu,” kasi ezali moto te. Soki tozali kolɛmba te kosala molende mpo na kolanda bingɛngiseli ya Liloba ya Nzambe oyo Yehova azali se kopesa basaleli na ye, tokokola na elimo. Na esika oyo kolanda elimboli kokende liboso, mpe ezali likambo oyo biso nyonso tokoki kosala yango.​—Nzembo 97:11; 119:105.

Monisá “mbuma ya elimo”

12. Mpo na nini ezali na ntina tólona mbuma ya elimo ntango tozali kokola na elimo?

12 Atako kobatela “bomoko kati na kondima mpe na boyebi ya solosolo” ezali na ntina, ezali mpe na ntina tómonisa mbuma ya elimo ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso. Mpo na nini? Mpamba te, lokola tomonaki yango, kokɔmela ebombamaka na kati te, kasi ezali na makambo oyo emonisaka yango polele, makambo oyo ekoki kopesa bato mosusu litomba mpe ekoki kotonga kondima na bango. Kasi, kokola na biso na elimo esengeli kozala kaka te koluka ete bato bámona biso na bizaleli ya malamu to kotombola mapeka. Nzokande, ntango tozali kolanda nzela oyo elimo ya Nzambe ezali kolakisa biso mpe tozali kokola na elimo, makanisi mpe misala na biso ekobongwana mpe ekokóma malamu. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bókoba kotambola na elimo mpe bokokokisa ata mposa moko ya nzoto te.”​—Bagalatia 5:16, NW.

13. Mbongwana nini emonisaka polele ete moto azali kokende liboso?

13 Na nsima, Paulo atángaki “misala ya nzoto,” oyo ezali mingi mpe “emonani polele.” Liboso ete moto amona ntina ya masɛngami ya Nzambe, na bomoi na ye alandaka banzela ya mokili mpe bomoi na ye ekoki kozala na makambo mosusu oyo Paulo atángaki: “Ekobo, makambo ya bosɔtɔ, pite, kosambela bikeko, ndoki, nkaka, kowelana, zuwa, nkanda, kolulela, kokabwana, koponapona, koboma bato, kolangwa masanga, bilambo ya lokoso mpe makambo ya motindo yango.” (Bagalatia 5:19-21) Kasi ntango moto azali kokola na elimo, mokemoke alongaka “misala ya nzoto” mpe alonaka “mbuma ya elimo.” Mbongwana yango oyo emonanaka na miso emonisaka polele ete moto azali kokende liboso mpe azali kokɔmela.​—Bagalatia 5:22.

14. Limbolá maloba oyo mibale: “misala ya nzoto” mpe “mbuma ya elimo.”

14 Tótalela malamu maloba yango mibale: “misala ya nzoto” mpe “mbuma ya elimo.” “Misala” ezali mbuma ya makambo oyo moto azali kosala. Na maloba mosusu, makambo oyo Paulo atángaki lokola misala ya nzoto eutaka na makambo oyo moto azali kosepela kosala to na oyo nzoto na ye ezangi kokoka ezali kotinda ye. (Baloma 1:24, 28; 7:21-25) Nzokande, “mbuma ya elimo” elimboli ete bizaleli oyo atángaki, eutaka te na makasi oyo moto azali kosala mpo na kobongola bomoto na ye, kasi ezali mosala ya elimo ya Nzambe epai ya moto. Lokola kaka nzete ekobota mbuma soki bazali kobatela yango malamu, ndenge moko mpe moto akobota mbuma ya elimo soki eloko moko te ezali kopekisa elimo santu esala mosala na yango na bomoi na ye.​—Nzembo 1:1-3.

15. Mpo na nini kolona “mbuma ya elimo” na lolenge na yango nyonso ezali na ntina?

15 Likambo mosusu ebongi tótalela ezali liloba “mbuma” oyo Paulo asaleli mpo na kolobela bizaleli malamu nyonso oyo atángaki. Ezali te ete elimo ebotaka mbuma ndenge na ndenge, bongo biso tópona oyo tolingaka. Bizaleli nyonso oyo Paulo atángaki: bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa, ezali na ntina ndenge moko mpe soki esangani nde epesaka bomoto ya sika ya moklisto. (Baefese 4:24; Bakolose 3:10) Yango wana, atako tokoki komona ete tozali na bizaleli yango mosusu na kati ya bomoi na biso na kotalela bomoto na biso mpe makambo oyo tolingaka, ezali na ntina tókolisa bizaleli nyonso oyo Paulo atángaki. Soki tozali kosala bongo, tokoki komonisa malamu mpenza bomoto ya Klisto na kati ya bomoi na biso.​—1 Petelo 2:12, 21.

16. Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali kosala makasi ete tókóma baklisto oyo bakɔmeli, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

16 Liteya monene oyo tokoki kozwa na maloba ya Paulo ezali ete ntango tozali kosala makasi tókóma baklisto oyo bakɔmeli, mokano na biso esengeli kozala te ya kokóma bato oyo bayebi makambo mingi to kosala makasi ete bato bámona biso na bizaleli ya malamu. Mokano na biso esengeli kozala ya kotika eloko moko te epekisa elimo ya Nzambe na kosala mosala na yango na bomoi na biso. Soki makanisi mpe misala na biso ezali mpenza kolanda litambwisi ya elimo ya Nzambe, tokokóma mpe bato oyo bakɔmeli mpenza na elimo. Ndenge nini tokoki kokokisa mokano yango? Tosengeli kofungolela elimo ya Nzambe motema na biso mpe makanisi na biso. Yango ezali kosɛnga na biso tóyanganaka mpe tópesaka biyano na makita ya lisangá. Tosengeli mpe koyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe mpe komanyolaka likoló na yango; kolanda mitinda na yango na ndenge na biso ya kofanda na bato mpe mpo na kozwa bikateli. Na ndenge yango, ekomonana polele ete tozali kokende liboso.

Tókende liboso mpo na nkembo ya Nzambe

17. Boyokani nini ezali kati na kokende liboso mpe kokumisa Tata na biso ya likoló?

17 Soki tozali komonisa ete tozali kokende liboso, yango ekopesa libosoliboso lokumu epai na biso moko te, kasi epai ya Yehova, Tata na biso ya likoló, oyo azali kosalisa biso tókɔmela na elimo. Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bino bokolakisa ‘te bozali bayekoli na ngai.” (Yoane 15:8, Boyokani ya Sika) Bayekoli bapesaki Yehova lokumu mpo na mbuma ya elimo oyo babotaki mpe na mbuma ya Bokonzi ya mosala na bango.​—Misala 11: 4, 18; 13:48.

18. (a) Mosala nini ya kobuka mbuma na esengo ezali kosalema lelo oyo? (b) Mosala yango ya kobuka mbuma ezali kopesa mokumba nini?

18 Lelo oyo, Yehova azali kopambola basaleli na ye wana bazali kobuka mbuma ya elimo na mokili mobimba. Na mikolo oyo euti koleka, mbula na mbula bato ya sika soki 300 000 bamipesaki na Yehova mpe bamonisaki yango na batisimo ya mai. Yango ezali kosepelisa biso mpe na ntembe te ezali mpe kosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Kasi, mpo esengo ya Yehova mpe nkembo oyo azali kozwa eumela, bato yango nyonso ya sika basengeli ‘kokoba kotambola na bomoko elongo na [Klisto], bápikama mpe bálendisama kati na ye mpe bátɛngatɛnga te kati na kondima.’ (Bakolose 2:6, 7, NW ) Likambo yango ezali kopesa basaleli ya Nzambe mikumba mibale. Ya liboso, soki ozali moto oyo azwi batisimo sika, okondima kosala makasi mpo ete “bato nyonso bámona ete ozali kokende liboso”? Ya mibale, soki osali mwa bambula na kati ya solo, okondima mokumba ya kosala mpo na bolamu ya elimo ya bandeko ya sika? Emonani polele ete ezala bato ya kala to bato ya sika, biso nyonso tosengeli kokɔmela.​—Bafilipi 3:16; Baebele 6:1.

19. Libaku malamu mpe mapamboli nini okozwa soki ozali komonisa polele ete ozali kokende liboso?

19 Bato nyonso oyo bazali kosala makasi mpo na komonisa polele ete bazali kokende liboso bakozwa mapamboli. Kanisá lisusu maloba ya kolendisa oyo Paulo ayebisaki Timote nsima ya kopesa ye toli ya kokende liboso: “Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16) Soki ozali kosala makasi mpo na komonisa ete ozali kokende liboso, yo mpe okoki kosepela na libaku malamu ya kokumisa nkombo ya Nzambe mpe ye akopambola yo.

Ozali koyeba lisusu?

• Na makambo nini kokɔmela na elimo ekoki komonana polele?

• Lolenge nini ya boyebi mpe ya bososoli emonisaka kokɔmela?

• Ndenge nini kobota “mbuma ya elimo” emonisaka ete moto azali kokende liboso?

• Mokumba nini tosengeli kondima ntango tozali kokende liboso mpo na kokoma bato oyo bakɔmeli?

[Elilingi na lokasa 13]

Kotela to kokɔmela emonanaka polele

[Elilingi na lokasa 15]

Tokolaka na elimo ntango tozali kolanda solo oyo Nzambe amonisi biso

[Elilingi na lokasa 17]

Libondeli esalisaka biso na kolona “mbuma ya elimo” na bomoi na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto