Ndenge ya kozala na bolenge ya malamu
BASƐNGAKI bato ya mboka moko ya Mpoto bápona eloko oyo balingi na kati ya makambo oyo misato: kozala kitoko, kozala na mbongo mingi, to kozala elenge. Bato mingi baponaki kozala elenge. Ya solo, banda na bana mike tii na mibange, bango nyonso basepelaka na ntango oyo moto abandaka bolenge na ye tii kokóma na mbula 20 to mwa moke koleka; bamonaka yango ntango moko ya kitoko mingi na bomoi ya moto. Mpe moto nyonso alingaka ete bilenge bázala malamu na bambula na bango wana, oyo moto alongwaka na bomwana mpo na kokóma mokóló. Kasi bakosala nini mpo bázala malamu?
Biblia ekoki nde kosalisa bango? Ɛɛ, wana kutu ntembe ezali te. Tiká tótalela sikoyo makambo mibale oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa na yango mingimingi bilenge.
Koyeba kofanda na bato
Mokanda Jugend 2000 ezali lapolo ya ankɛtɛ moko monene oyo esalamaki epai ya bilenge koleka 5 000 na Allemagne mpo na koyeba bizaleli na bango, makambo oyo balingaka mpe etamboli na bango. Na ankɛtɛ yango, bamonaki ete ntango bilenge bazali kosepelisa nzoto na makambo lokola miziki, masano to mpe kozwa kaka mopɛpɛ, bazalaka mingimingi na bato mosusu pembeni. Tokoki kutu koloba ete, na bato nyonso, bilenge nde balingaka mingi kozala na baninga. Yango wana, koyeba kofanda na bato ezali mpenza moko ya makambo oyo ekoki kosalisa yo ozala na bolenge ya malamu.
Kasi koyeba kofanda na bato ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kutu, bilenge mingi ya basi mpe ya mibali balobaka ete soki bafandi na bato, mbala mingi matata ezangaka te. Kasi, na likambo yango, Biblia ekoki kosalisa bango. Liloba ya Nzambe ezali na toli ya malamu oyo ezali kolakisa bilenge ndenge ya koyokana malamu na bato. Biblia elobi nini na likambo yango?
Na oyo etali koyeba kofanda malamu na bato, makambo ya ntina mingi oyo esɛngami ezali ebele, kasi moko na yango ezali oyo babengi Etinda oyo eleki Malamu, etinda yango elobi boye: “Mánso bolingi bato básála bínó, bósála bangó se bôngo.” Soki opesaka bato kilo, lokumu mpe ozalaka na boboto epai na bango, yango ekotinda bango mpe básalela yo bongo. Matata to nkanda ekoki kozala, kasi soki ozali na boboto, ekoki kosilisa yango. Soki bato nyonso bayebi ete ozwaka bango na kilo, okozanga te kokɔta na makanisi na bango mpe bakosepela na yo. Ezalaka esengo mingi soki bato bazali kosepela na yo, boye te?—Matai 7:12, Liloba lya Nzambe.
Biblia elobi na yo “linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.” Osengeli komilinga yo moko, elingi koloba ete osengeli koluka bolamu na yo mpe komizwa na kilo na ndenge oyo ekoki, kolekisa ndelo te. Likambo wana ekoki kosalisa yo; mpo na nini? Mpo, soki omimonaka lokola ozali na ntina moko te, okokóma mbala mosusu na ezaleli ya kotɔngatɔnga bamosusu, mpe okoyeba kofanda na bato te. Nzokande, soki opesaka nzoto na yo kilo na ndenge oyo ekoki, ekosalisa yo ozwa baninga oyo okolingana na bango mingi.—Matai 22:39, Boyokani ya Sika pe Banzembo.
Ntango bokómi baninga, ekosɛnga na bino nyonso mibale bósala makasi mpo boninga na bino ekemba. Osengeli kosepelaka kozwa ntango mpo na kotala mpe kosolola na baninga na yo, mpamba te: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” Kolimbisa mpe ezali ndenge ya kokaba, mpo yango esɛngi koboya kolandela mabunga ya mikemike mpe koboya koluka baninga básalaka makambo lokola bato ya kokoka. Biblia elobi na biso ete: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” ‘Salaká nyonso oyo okoki po ozala na boboto ná bato nyonso.’ Kasi, osalaka nini soki moninga ayebisi yo likambo moko ya mabe oyo amonaka epai na yo? Biblia epesi toli oyo: ‘Koyoka nkanda noki te,’ mpo “soko moninga wa motema abeti yo, alingi nde kobongisa yo.” Nzokande, okoki mpe kolanda makanisi, elobeli mpe bizaleli ya baninga na yo, boye te? Yango wana, Biblia elobi na yo okeba: “Baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” Kasi, “ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele.”—Misala 20:35; Bafilipi 4:5, NW; Baroma 12:17, 18, Boyokani ya Sika pe Banzembo; Mosakoli 7:9; Masese 13:20; Masese 27:6, Liloba lya Nzambe; 1 Korinto 15:33, Boyokani ya Sika.
Marco alobi likambo oyo bilenge mingi ya mibali mpe ya basi bandimaka, ete: “Mateya ya Biblia esalisaka mpenza mpo na koyeba kofanda na bato. Bato mosusu oyo nayebi bamibanzabanzaka mpo na baninga te mpe bamonaka kaka bolamu na bango moko. Nzokande Biblia eteyi biso ete tómibanzabanzaka mingi mpo na baninga, kasi mpo na biso moko te. Nabanzi ezali ata na likanisi moko te ya malamu koleka oyo wana soki olingi kofanda malamu na bato.”
Makambo oyo bilenge lokola Marco bazali koyekola na Biblia ezali kosalisa bango, ezala ntango bazali naino bilenge to na mikolo oyo ekoya nsima. Mpe na likambo etali mikolo oyo ezali koya, Biblia ezali kopesa toli mosusu oyo ekoki mpenza kosalisa bilenge.
Komitungisa mpo na mikolo oyo ezali koya
Bilenge mingi bamitunaka mituna ebele. Kutu, na kati ya bato nyonso, mbala mosusu bilenge nde balukaka mingi koyeba makambo oyo ezali kosalama mpe ntina na yango. Biblia mpe ezali komonisa ntina oyo makambo ya mokili ezali kotambola boye mpe nini ekosalama na mikolo oyo ezali koya; ezali na mokanda mosusu te oyo ekokani na Biblia na likambo yango. Wana mpenza nde eloko oyo bilenge balukaka koyeba. Mpo na nini tolobi bongo?
Atako balobaka mingi ete bilenge batalaka kaka makambo ya lelo, nzokande, mwa baankɛtɛ oyo esalemaki emonisi bongo te. Baankɛtɛ yango emonisi nde ete bilenge balandelaka makambo oyo ezali koleka, mpe na nsima makanisi na bango ekendaka mosika mpo na koyeba ndenge nini bomoi ekozala na mikolo oyo ezali koya. Likambo yango ezali mpenza ya solo mpamba te, na kati ya bilenge minei, misato kati na bango bakanisaka “mingi” to “mingi koleka” mpo na mikolo oyo ezali koya. Atako, mbala mingi, bilenge bamonaka kaka ete bakobonga, mingi na bango bazali mpe komitungisa ntango bazali kokanisa bomoi na mikolo oyo ezali koya.
Bazali komitungisa mpo na nini? Mpo mikakatano ezali kokómela bilenge mingi ya mikolo oyo na likambo etali kobomana, mobulu mpe komɛla bangi. Bilenge bazali mpe komitungisa mpo bayebi te ndenge nini bakoki kozwa mosala ya libela, awa misala ekómá ya kowela. Bazali koyoka lokola nde bazali na ngambo mpamba te na kelasi, basengeli koluka kozwa bilembo mingi mpe na mosala, basengeli kosala malamu koleka baninga. Elenge moko ya mbula 17 amilelaki boye: “Na mokili oyo, mwana ya moninga mawa te. Moto na moto na ndenge na ye. Mpo bándima yo, salá naino bámona; likambo yango epesaka ngai nkanda mpenza.” Elenge mosusu ya mbula 22 amilelaki ete: “Baoyo basalaka koleka baninga nde bazali kobonga mpe kokóma na biloko mingi. Kasi bamosusu oyo batikali, oyo bazali kokoka kosala lokola bango te mpo na ntina moko boye, bazali kotikala kaka nsima.” Mpo na nini bomoi ekómi ya kowelana boye? Bomoi yango ekotikala kaka boye libela?
Eyano ya solosolo yango oyo
Ntango bilenge bazali komilela to komitungisa na ndenge mokili ezali kotambola, bazali nde kondima makambo oyo Biblia elobá. Liloba ya Nzambe emonisi ete mokili ya lelo epai balobi “mwana ya moninga mawa te” ezali elembo ya mikolo ya nsuka. Na mokanda oyo atindelaki elenge Timote, ntoma Paulo alobelaki makambo oyo tozali komona na mikolo na biso ete: “Ntango ya mpasi ekoya.” Paulo alobaki ete ekozala ntango ya mpasi mpo, ndenge akomaki yango na nsima, bato bakozala “bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato ya lolendo, . . . bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, . . . bato ya yauli.” Omoni te ete ezali mpenza bizaleli oyo tozali komona epai ya bato mingi mikolo oyo?—2 Timote 3:1-3.
Biblia elobi ete bantango yango ya mpasi esengeli komonana “na mikolo ya nsuka,” liboso ete makambo ya bato ebongwana na ndenge ya solosolo. Mbongwana yango ekotalela moto nyonso: elenge to mokóló. Mbongwana ya ndenge nini wana? Etikali moke, guvɛrnɛma moko ya likoló ebanda kotambwisa makambo nyonso ya bato, mpe bato oyo bakoyangelama na yango bakozwa ‘kimya mingi’ bipai nyonso. “Bayengebene bako[zwa] mokili mpe bakofanda wana libela.” Komilela mpe komitungisa ekokóma makambo ya kala.—Nzembo 37:11, 29.
Kaka Biblia nde ekoki koyebisa biso makambo oyo ekosalama na mikolo oyo ezali koya, mpe ekoki kokosa te. Ntango elenge ayebi makambo oyo ekobima na mwa bambula oyo ekoya, akomibongisa libela mpe akobangabanga lisusu te, akoyeba ndenge ya kotambwisa bomoi na ye. Akonyokwama lisusu mingi te na makanisi mpe akomitungisa lisusu mingi te. Na ndenge wana nde Biblia ezali mpenza kokokisa mposa oyo bilenge bazalaka na yango: kokanga ntina ya makambo oyo ezali koleka mpe koyeba makambo oyo ekosalama na mikolo oyo ezali koya.
Ndenge ya kozala na bolenge ya malamu
Mpo na kozala na bolenge ya malamu ezali kosɛnga nini? Kotánga bakelasi milaimilai? Kozala na biloko mingi ya mokili? Kozala na baninga ebele? Bato mingi bakanisaka bongo. Nzokande, na ebandeli ya bolenge tii na mbula 20 to mwa moke koleka, yango nde ntango oyo moto asengeli komibongisa mpo na mikolo oyo ezali koya. Na maloba mosusu, soki ozali na bolenge ya malamu, bomoi na yo na mikolo ezali koya ekoki mpe komonana soki ekozala ndenge nini.
Lokola touti komona yango, Biblia ekoki kosalisa elenge ayeba ndenge ya kozala na bolenge ya malamu. Bilenge mingi kutu bamoni bosolo ya likambo yango na bomoi na bango. Yango wana, batángaka Liloba ya Nzambe mikolo nyonso mpe bazali kosalela makambo oyo bazali koyekola. (Talá lisolo oyo elobi “Toli ya elenge moko oyo asalelaka Yehova,” na lokasa 6.) Ya solo, Biblia ezali mpenza mokanda oyo ebongi na bilenge lelo oyo, mpo ekoki kosalisa bango ‘bázala bato oyo bakoki mpenza, oyo bazali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’—2 Timote 3:16, 17, NW.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Koyeba kofanda na bato ezali mpenza moko ya makambo oyo ekoki kosalisa yo ozala na bolenge ya malamu
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Na kati ya bato nyonso, mbala mosusu bilenge nde balukaka mingi koyeba makambo oyo ezali kosalema mpe ntina na yango
[Etanda na lokasa 6]
Toli ya elenge moko oyo asalelaka Yehova
Alexander azali na mbula 19. Abɔkwami na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe asepelaka mingi kotosa na motema na ye mobimba makambo oyo lingomba na ye eteyaka. Kasi ezalaki na ntango moko oyo azalaki kotosa yango mpenza te. Alexander ye moko alobi boye:
“Nasalaki mbula nsambo mobimba lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Ntango nyonso wana, nazalaki kosambela kaka mpo nasambela, motema na ngai ezalaki kuna mpenza te. Nakanisi ete eloko ezalaki kozanga ngai ezalaki nde mpiko ya kofanda mpe ya komitalela malamumalamu.”
Kasi Alexander atikaki ezaleli yango. Abakisi boye:
“Baboti na ngai na baninga na ngai ya lisangá bazalaki kolɛmba te kolendisa ngai natángaka Biblia mikolo nyonso mpo nayeba Yehova malamumalamu. Nsukansuka, nalobaki nameka naino. Nazalaki lisusu kotala televizyo mingi te mpe nazwaki mokano ya kotángaka Biblia mikolo nyonso na ntɔngɔntɔngɔ. Nayaki koyeba valɛrɛ ya Biblia. Namonaki ndenge oyo ekoki kosalisa moto lokola ngai. Nayebaki ete Yehova alingi ete ngai nayeba ye, mpo koyeba ye eleki makambo nyonso. Ntango nakómaki kolandela mpenza makambo yango, boyokani na ngai na ye ebandaki kobonga, mpe boninga na ngai na bandeko na kati ya lisangá ekómaki lisusu makasi. Biblia ekómisi ngai mpenza moto mosusu! Toli nakopesa elenge mokomoko oyo azali kosalela Yehova yango oyo: tángáká Biblia mokolo na mokolo.”
Na mokili mobimba, bilenge mingi bazali Batatoli ya Yehova. Yo mpe ozali moko na bango? Olingi omona bolamu ya kotánga Biblia mikolo nyonso? Landá ndakisa ya Alexander. Tiká mwa misala mosusu oyo ezali na ntina mingi te mpe zwá mokano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Okozanga te kozwa bolamu soki osali bongo.