Lisolo ya bomoi
Pole ya elimo ezali kongɛnga na Moyen-orient
YA NAJIB SALEM
Na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.), pole ya Liloba ya Nzambe eutaki na Moyen-Orient mpe engɛngaki tii na bamboka ya mosika na mokili mobimba. Na ekeke ya 20, pole yango engɛngaki lisusu na eteni wana ya mokili . Tiká nayebisa bino ndenge nini yango esalemaki.
NABOTAMAKI na 1913 na engumba Amioun, na nɔrdi ya Liban. Ezalaki na mbula wana nde mwa kimya oyo ezalaki na mokili elongwaki mpamba te na mbula oyo elandaki, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Ntango etumba esilaki na 1918, nkita ya Liban—mboka oyo bazalaki kobenga na ntango wana ete liyaka ya Moyen-Orient—mpe makambo ya politiki ebebaki.
Na 1920, ntango misala ya posita ezongaki na Liban, bato bazalaki kozwa mikanda oyo ezalaki kouta epai ya bandeko na bango oyo bazalaki kofanda na bamboka ya bapaya. Na kati ya bato yango ezalaki na banɔkɔ na ngai Abdullah Ghantous mpe George Ghantous. Bazalaki kotindela tata na bango Habib Ghantous, mikanda. Bazalaki koteya ye Bokonzi ya Nzambe, ye azalaki nkɔkɔ na ngai. (Matai 24:14) Bato bazalaki kosɛka nkɔkɔ na ngai kaka mpo azalaki koyebisa baninga oyo bazalaki kofanda na ye engumba moko makambo oyo bana na ye bazalaki kokomela ye. Bato ya engumba bapanzaki nsango ete bana na ye bazali koyebisa tata na bango ete atɛka mabele na ye, asomba mpunda mpe akende kosakolaka.
Pole ebandi kopalangana
Na mbula oyo elandaki, 1921, Michel Aboud, oyo azalaki kofanda na New York, na États-Unis, azongaki na engumba Tripoli, na Liban. Akomaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova. Atako bandeko mpe baninga mingi ya Ndeko Aboud baboyaki nsango ya Biblia, bato mibale oyo bayebanaki malamu bandimaki yango, moko azalaki profɛsɛrɛ, nkombo na ye Ibrahim Atiyeh, mpe mosusu monganga ya mino, Hanna Shammas. Monganga Shammas apesaki ndako mpe lopitalo na ye mpo makita esalemaka kuna.
Ngai nazalaki naino elenge ntango Ndeko Aboud na Ndeko Shammas bayaki na Amioun, mboka oyo nazalaki kofanda. Makambo oyo bateyaki ntango bayaki na mboka na biso esimbaki mpenza motema na ngai mpe nabandaki kobima na Ndeko Aboud na mosala ya kosakola. Na boumeli ya mbula 40 biso mibale tozalaki kobima mingi elongo, tii ntango Ndeko Aboud akufaki na 1963.
Kobanda 1922 tii 1925, pole ya mateya ya solo ya Biblia epalanganaki na bamboka mingi na nɔrdi ya Liban. Bato soki 20 to 30 bazalaki koyangana na bandako ya bato, na ndakisa na ndako na biso, na Amioun mpo na koyekola Biblia. Bakonzi ya lingomba batindaki bana mike bábɛtaka manzanza mpe bágangaka mpo bábebisa makita na biso, yango wana mbala mosusu tozalaki kokende koyangana na kati ya zamba ya banzete oyo babengaka pin.
Ntango nazalaki elenge, molende na ngai na mosala ya kosakola mpe ya koyangana na makita ya boklisto esalaki ete bákóma kobenga ngai Timote. Mokambi ya eteyelo alobaki na ngai natika kokende na “makita wana,” ndenge azalaki kobenga yango. Lokola nayokelaki ye te, balongolaki ngai na eteyelo.
Topesaki litatoli na bamboka oyo Biblia elobeli
Nsima ya kozwa batisimo na 1933, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basaleli ya ntango nyonso. Atako na ntango wana tozalaki moke, tosakolaki na bamboka mingi ya mikemike na nɔrdi ya Liban, mpe lisusu tokómaki tii na engumba Beyrouth mpe na bakartye na yango ya pembenipembeni mpe tii na sudi ya Liban. Na ntango wana, tozalaki kosala mibembo na makolo to na mpunda, ndenge Yesu Klisto na bayekoli na ye ya ekeke ya liboso bazalaki kosala.
Na 1936, Yousef Rahhal, Motatoli moko oyo azalaki moto ya Liban oyo aumelaki bambula mingi na États-Unis azongaki mpo na mwa ntango moke na Liban. Ayaki na masini ya kokolisa lolaka mpe bafono mibale. Totyaki biloko yango na motuka Ford moko ya 1931 mpe tosalaki mibembo na Liban mpe na Syrie, tomemaki nsango ya Bokonzi na bamboka ya mosika. Bato bakokaki koyoka mongongo oyo ezalaki kobima na ekoliseli lolaka ata soki bazali na ntaka ya kilomɛtrɛ 10. Bato bazalaki komata likoló ya bandako na bango mpo na koyoka oyo bazalaki kobenga mingongo euti na likoló. Baoyo bazalaki na bilanga bazalaki kotika mosala na bango mpe bazalaki kopusana penepene mpo na koyoka.
Moko ya mibembo ya nsuka elongo na Yousef Rahhal ezalaki na engumba Aleppo, na Syrie, na eleko ya malili na mobu 1937. Liboso azonga na États-Unis, tokendeki mpe na Palestine. Kuna, tokendeki na engumba Haïfa mpe na Jérusalem, mpe na bamboka mikemike. Moko ya bato oyo tokutanaki na bango ezalaki Ibrahim Shehadi, oyo nayebanaki na ye liboso kaka na nzela ya kokomelana mikanda. Ibrahim akolaki na boyebi ya Biblia yango wana, ntango oyo tozalaki wana, abandaki kobima na biso na mosala ya kosakola ndako na ndako.—Misala 20:20.
Nazalaki mpe na mposa ya kokutana na Profɛsɛrɛ Khalil Kobrossi, Mokatolike moko ya molende oyo azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na nzela ya kokomelana mikanda. Ndenge nini azwaki adresi ya Batatoli na Liban? Ezalaki na magazini moko na Haïfa, motɛki na magazini akangelaki Khalil biloko oyo asombaki na lokasa oyo akataki na kati ya mokanda moko ya Batatoli ya Yehova. Adresi na biso ezalaki na lokasa yango. Tosololaki malamu ntango tokutanaki, mpe na nsima, na 1939, azwaki batisimo na Tripoli.
Na 1937, Petros Lagakos na mwasi na ye bayaki na Tripoli. Na mwa bambula oyo elandaki, biso misato totambolaki Liban mobimba mpe Syrie, tozalaki komemela bato nsango malamu na bandako na bango. Ntango Ndeko Lagakos akufaki na 1943, Batatoli basilaki komema pole ya elimo na bingumba mpe bamboka mingi ya Liban, ya Syrie mpe ya Palestine. Na nsima, bato 30 na kati na biso tozalaki kozwa mituka to bisi kobanda na ngonga ya 3:00 ya ntɔngɔ mpo na kokende na bamboka ya mosika.
Na bambula ya1940, Ibrahim Atiyeh abandaki kobongola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Arabe. Soki asilisi kobongola, ngai nazalaki kosala bakopi minei na mabɔkɔ mpe nazalaki kotindela yango Batatoli oyo bazalaki na Palestine, na Syrie, mpe na Egypte. Na mikolo wana, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mosala na biso ya kosakola ebundisamaki makasi, kasi tozalaki kaka kokutana na bato nyonso oyo balingaka solo na Moyen-Orient. Nasalaki bakarte ya bingumba mpe ya bamboka ya pembenipembeni na yango, mpe tozwaki mokano ya kokende kosakwela bango nsango malamu.
Na 1944, ntango wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino kongala, nabalaki Evelyn, mwana ya Michel Aboud, moninga na ngai oyo tozali kosala na ye elongo lokola babongisi-nzela. Na nsima tobotaki na ye bana misato, mwasi moko, mibali mibale.
Nasali elongo na bamisionɛrɛ
Mwa moke na nsima ya etumba, bamisonɛrɛ ya liboso oyo babimaki na Eteyelo ya Gileadi bayaki na Liban. Yango esalaki ete lisangá ya liboso ebotama na Liban, mpe naponamaki lokola mosaleli ya etuluku. Na nsima, na 1947, Nathan Knorr na sekrɛtɛrɛ na ye, Milton Henschel, bayaki na Liban mpe balendisaki bandeko. Mwa moke na nsima, bamisionɛrɛ mosusu bayaki, mpe basalisaki biso mingi mpo na kosala mosala na biso malamu mpe kotambwisa makita ya lisangá.
Na moko ya mibembo oyo tosalaki na mboka ya mosika ya Syrie, episkɔpɔ ya mboka yango atɛlɛmɛlaki biso. Afundaki biso ete tozali kokabola oyo ye azalaki kobenga mikanda oyo ezali kokumisa ekólo ya Bayuda. Likambo ya kokamwa, liboso ya 1948 bakonzi ya mangomba bazalaki kobenga biso “Bakoministe.” Na mobembo yango, bakangaki biso mpe batunaki biso mituna na boumeli ya ngonga mibale mobimba, na boumeli na yango litatoli moko malamu epesamaki.
Na nsuka, zuzi oyo asambisaki biso alobaki boye: “Atako nasilikeli mandɛfu [nkombo oyo azalaki kobenga na yango episkɔpɔ] oyo afundi bino, nasengeli kotonda ye mpo apesi ngai libaku ya kokutana na bino mpe nayeba mateya na bino.” Mpe na nsima asɛngaki bolimbisi mpo na ndenge totungisamaki.
Mbula zomi na nsima, ntango tozalaki kokende na Beyrouth na bisi, nabandaki kosolola na moto oyo afandaki pene na ngai, azalaki ingénieur ya makambo ya bilanga. Nsima ya mwa miniti oyo ayokaki bindimeli na biso, alobaki ete asilá koyoka makambo wana epai ya moninga na ye moko na Syrie. Moninga yango ezalaki nani? Ezalaki nde zuzi oyo asambisaki biso!
Na boumeli ya bambula ya 1950, nakendaki kotala Batatoli ya Iraq mpe nabimaki na bango na mosala ya kosakola ndako na ndako. Nasalaki mpe mibembo mingi na Jordanie mpe na Cisjordanie. Na 1951, nazalaki moko na Batatoli minei oyo bakendaki na Bethléem. Tosalaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo kuna. Na ntɔngɔ ya mokolo yango baoyo nyonso bayaki na Ekaniseli yango bakendaki na bisi na Ebale Jourdain, epai bato 22 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Soki kaka bato batɛmɛli biso na mboka yango, tozalaki koloba ete: “Toyei koyebisa bino ete mwana ya mboka na bino akokóma Mokonzi ya mabele mobimba! Mpo na nini bozali kosilika? Kutu bosengeli nde kosepela!”
Tosakolaki na kati ya mikakatano
Mingimingi, bato ya Moyen-Orient bazalaka na boboto, bato ya komikitisa mpe bayebi koyamba bapaya. Bato mingi basepelaka koyoka nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, eloko moko te ekoki kokitisa motema koleka likambo ya koyeba ete elaka wana ya Biblia ekokokisama: “Nzambe ye mpenza akozala na [bato na ye] elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Namonaki ete bato mingi oyo batɛmɛlaka mosala na biso bayebaka mpenza mosala na biso malamu te mpe bayebi te nsango oyo tozali komema. Bakonzi ya mangomba ya boklisto basali nyonso mpo na komonisa ete tozali bato mabe! Yango wana, ntango bitumba ebandaki na Liban na 1975 mpe eumelaki koleka mbula 15, Batatoli bakutanaki na mikakatano mingi.
Na eleko moko boye, nazalaki koyekola Biblia na libota moko oyo bazalaki na molende mpo na kokende ndako-nzambe. Lokola bazalaki kokola malamu na boyekoli ya mateya ya solo ya Biblia, bakonzi ya mangomba bayokaki nkanda. Yango wana, mokolo moko na butu, lingomba moko ya mboka wana etindaki bandimi na yango ete bábebisa butiki ya libota wana mpe bazikisaki biloko ya koteka oyo ezalaki nyonso na motuya dolare 10 000. Kaka na butu yango, bayaki komema ngai na makasi. Kasi, nasololaki na mokonzi na bango, nayebisaki ye ete soki bazali mpenza baklisto basengeli te kosala lokola basenzi. Ntango ayokaki bongo, alobaki ete motuka etɛlɛma mpe ayebisaki ngai nakita.
Mokolo mosusu, basoda minei bamemaki ngai mosika na makasi. Nsima ya kobangisa ngai, mokonzi na bango oyo alobaki ete akobɛta ngai masasi, abongolaki makanisi mbala moko mpe batikaki ngai. Bato mibale kati na bango bazali sikoyo na bolɔkɔ mpo ete babomaki bato mpe bayibaki, mpe mibale mosusu babomamaki.
Mabaku mosusu ya kotatola
Nabandaki mbala mingi kozwa libaku ya kotambola na bamboka ebele. Mokolo mosusu, ntango nazalaki na kati ya mpɛpɔ mpo na kokende na États-Unis, nafandaki pembeni ya Charles Malek, ye azalaká ministre ya makambo etali boyokani na bamboka mosusu. Ayokaki ngai na likebi mpenza, azalaki kolanda malamumalamu vɛrsɛ mokomoko oyo nazalaki kotángela ye na kati ya Biblia. Na nsuka, alobaki ete atángaki kelasi na Tripoli mpe Ibrahim Atiyeh azalaki molakisi na ye, moto oyo bokilo na ngai ateyaki solo ya Biblia! Monsieur Malek alobaki ete Ibrahim ateyaki ye ete amemyaka Biblia.
Na boumeli ya mobembo mosusu na mpɛpɔ, nafandaki pembeni ya ambasadɛrɛ ya Palestine na ONU. Nazwaki libaku ya koyebisa ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsima akutanisaki ngai na libota ya leki na ye ya mobali na New York, mpe nazalaki mbala mingi kokende kotala bango. Nazalaki mpe na ndeko na ngai moko oyo azalaki kosala na ndako ya ONU na New York. Ntango nakendeki kotala ye na biro, toumelaki ngonga misato, na boumeli na yango natatwelaki ye nsango ya Bokonzi ya Nzambe.
Sikoyo nakómi na mbula 88 mpe nazali kaka kokokisa na molende mikumba na lisangá. Mwasi na ngai Evelyn azali tii sikoyo kosalela Yehova esika moko na ngai. Mwana na biso abalaki Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mpe azali kosala sikoyo lokola nkulutu na lisangá moko na Beyrouth. Mwana na bango ya mwasi azali mpe Motatoli. Mwana na biso ya nsuka mpe mwasi na ye bazali Batatoli, mpe mwana na bango ya mwasi azali mpe na kati ya solo. Mpo na mwana na biso ya liboso ya mobali, tokɔtisaki mateya ya boklisto na motema na ye, mpe nazali elikya ete ata ndele, akoyamba solo.
Na 1933, naponamaki lokola mobongisi-nzela—moto ya liboso ya kokóma mobongisi-nzela na Moyen-Orient. Namoni likambo mosusu te ya malamu oyo eleki kosalela Yehova na bomoi na ngai na ndenge nasali mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya bambula 68 nyonso oyo euti koleka. Mpe nazali na ekateli makasi ya kokoba kotambola na pole ya elimo oyo azali kopesa.
[Elilingi na lokasa 23]
Najib na 1935
[Elilingi na lokasa 24]
Na motuka ya bikoliseli lolaka na bangomba ya Liban na 1940
[Bililingi na lokasa 25]
Banda na likoló na lobɔkɔ ya mwasi: Najib, Evelyn, mwana na bango ya mwasi, Ndeko Aboud mpe mwana ya Najib ya liboso, na 1952
Na nse (na molɔngɔ ya liboso): Bandeko Shammas, Knorr, Aboud mpe Henschel na ndako ya Najib, na Tripoli, na 1952
[Elilingi na lokasa 26]
Najib na mwasi na ye, Evelyn