Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/9 nk. 15-20
  • Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liloba ya Nzambe ezali likabo ya motuya monene
  • Botɔndi na biso mpo na likabo ya elimo santu
  • Bolingo oyo baklisto balakisanaka ezali likabo oyo tosengeli kopesa motuya mingi
  • “Makabo na motindo na mibali”
  • Likabo ya mosala ya kosakola
  • Kozala na libota ya esengo ezali likabo malamu
  • Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Tózala na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ozali na elimo ya kokaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bolamu ya seko bozali kozela baoyo bazali kopesa engebene mokano ya nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/9 nk. 15-20

Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi

“Mapamboli ya [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”​—MASESE 10:22.

1, 2. Mpo na nini kozwa bolamu esɛngi kaka kozala na bozwi ya mokili te?

LELO oyo, bato mingi bazali kotya likambo ya koluka bozwi ya mokili na esika ya liboso na kati ya bomoi na bango. Kasi, biloko ya mokili epesaka bango mpenza esengo? Na zulunalo moko (The Australian Women’s Weekly) bakómaki maloba oyo: “Nayebi eleko moko te oyo bato bamibanzabanzaki mpo na bomoi na bango lokola lelo.” Mpe babakisaki ete: “Ezali likambo ya kokamwa. Bazali koloba na biso ete nkita ya Australie ezali malamu mpenza, ete bomoi ekómi malamu koleka. . . . Atako bongo, na mboka mobimba, bato bazali na elikya te. Mibali mpe basi bazali komona ete eloko moko ezali kozanga na bomoi na bango, kasi bazali koyeba eloko yango te.” Makomami elobi mpenza solo ete bolamu, ata mpe bomoi, etalelaka te biloko oyo tozali na yango!​—Mosakoli 5:10; Luka 12:15.

2 Biblia elobi ete mapamboli ya Nzambe nde epesaka moto bolamu oyo eleki bolamu nyonso. Mpo na yango, Masese 10:22 elobi ete: “Mapamboli ya [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” Mbala mingi, lokoso ya konduka biloko ya mokili oyo nde ememaka mpasi. Yango wana, ntoma Paulo akebisaki ete: “Baoyo bazali na mposa ya kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na [motambo, NW ], mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ. Zambi mposa ya mosolo ezali ntina ya mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.”​—1 Timote 6:9, 10.

3. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bakutanaka na bampasi?

3 Nzokande, mapamboli oyo esangani na mpasi te ezwaka bato nyonso oyo ‘bakobaka koyoka mongongo ya Yehova.’ (Deteronome 28:2, NW) Kasi, bato mosusu bakoki kotuna ete, ‘soki mapamboli ya Yehova esanganaka na mpasi te, mpo na nini basaleli mingi ya Nzambe banyokwamaka?’ Biblia elobi ete Nzambe azali kotika nzela tómona mpasi, kasi bampasi yango eutaka epai ya Satana na mokili na ye oyo mabe, bakisa mpe nzoto na biso ya kozanga kokoka. (Genese 6:5; Deteronome 32:4, 5; Yoane 15:19; Yakobo 1:14, 15) Yehova, ye apesaka “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Yango wana, mapamboli na ye epesaka mpasi te. Sikoyo, tótalela mwa ndambo ya makabo malamu ya Nzambe.

Liloba ya Nzambe ezali likabo ya motuya monene

4. Basaleli ya Yehova bazali na lipamboli mpe likabo nini ya motuya monene na “ntango ya nsuka” oyo?

4 Danyele asakolaki ete na “ntango ya nsuka” “boyebi ekofuluka.” Kasi, na nsima, alobaki boye: “Ata moto mabe moko te akokanga ntina; nde bato ya mayele bakokanga ntina.” (Danyele 12:4, 10, NW) Kanisá naino! Liloba ya Nzambe, mingimingi bisakweli na ye, elobami na bwanya oyo bato mabe bakoki kokanga ntina na yango te, kasi basaleli ya Yehova bazali kokanga ntina na yango. Na libondeli moko oyo asalaki, Mwana ya Nzambe alobaki ete: “Tata, Nkolo ya lola, mpe ya nse, nasanzoli yo ete obombi makambo oyo na bato ya [bwanya, NW] mpe na bato ya kokanisa, mpe omonisi yango na bana mike.” (Luka 10:21) Kozala na mokanda oyo ezali Liloba ya Nzambe, ezali likabo ya motuya monene, mpe kozala kati na baoyo Yehova apesi bango bososoli ya elimo ezali mpenza lipamboli!​—1 Bakolinti 1:21, 27, 28, NW; 2:14, 15.

5. Bwanya ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kozwa yango?

5 Tokoki kozwa bososoli ya elimo te soki tozangi “bwanya oyo euti na likoló.” (Yakobo 3:17, NW ) Bwanya ezali makoki ya kosalela boyebi mpe bososoli mpo na kosilisa mikakatano, kokima to kopɛngola makama, kokokisa mikano, to kopesa toli ya malamu. Ndenge nini tozwaka bwanya ya Nzambe? Masese 2:6 elobi boye: “[Yehova] akopesaka [bwanya, NW ], boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye.” Ya solo, Yehova akopesa biso bwanya soki tozali kosɛnga ye yango ntango nyonso na mabondeli, se ndenge apesaki Mokonzi Salomo “motema ya [bwanya, NW ] mpe ya bososoli.” (1 Mikonzi 3:11, 12; Yakobo 1:5-8, NW ) Mpo na kozwa bwanya, tosengeli mpe kokoba koyoka Yehova na nzela ya koyekola ntango nyonso Liloba na ye mpe kosalela yango.

6. Mpo na nini kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe na bomoi na biso ezali likambo ya bwanya?

6 Mibeko mpe mitinda ya Biblia emonisaka mpenzampenza bwanya ya Nzambe. Ememelaka biso matomba na makambo nyonso: na nzoto, na makanisi, na mayoki mpe na elimo. Yango wana, maloba oyo mokomi ya nzembo ayembaki ebongi mpenza ete: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli ya [Yehova] izali alima, ikosepelisa motema. Malako na [Yehova] izali pɛto, ikomonisa miso polele. Nsɔmɔ ya kobanga [Yehova] ezali pɛto, ekoumela seko. Kosamba ya [Yehova] ezali solo, yango nyonso na boyengebene. Mposa na yango eleki mposa ya wolo, ata ya wolo mingi malamu.”​—Nzembo 19:7-10; 119:72.

7. Moto oyo azali kotyola mitinda ya sembo ya Nzambe asukaka wapi?

7 Nzokande, baoyo bazali kotyola mitinda ya sembo ya Nzambe, esengo mpe bonsomi oyo balukaka, bazwaka yango te. Nsukansuka, bango moko bamonaka ete Nzambe basɛkaka ye te, mpamba te moto akobuka kaka oyo aloni. (Bagalatia 6:7) Ebele ya bato oyo batyolaki mitinda ya Biblia bazali kobuka mbuma mabe, na ndakisa komema zemi ya balabala, bazali kozwa bamaladi ya mabe, to bazali kokóma baombo ya komɛla biloko oyo ezali kobebisa bango nzoto. Soki batiki nzela wana te, nsukansuka bakokufa to mpe Nzambe akoboma bango.​—Matai 7:13, 14.

8. Mpo na nini bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bazali na esengo?

8 Nzokande, mapamboli mingi ezali kozwa baoyo balingi Liloba ya Nzambe mpe bazali kosalela yango mpe ekolanda kozwa bango na mikolo ezali koya. Bazali mpenza komona ete mibeko ya Nzambe esikoli bango, bazali na esengo ya solosolo, mpe bazali kozela na mposa mpenza ntango oyo bakolongwa na boombo ya masumu mpe mbuma na yango oyo ebomaka. (Baloma 8:20, 21; Yakobo 1:25) Elikya yango ezali kaka ndɔtɔ te mpamba te ndanga na yango ezali likabo oyo emonisi bolingo ya Nzambe mpo na bato koleka likabo mosusu nyonso: mbeka oyo Yesu Klisto, Mwana na ye mobotami-bobele-moko, apesaki mpo na kosomba bato. (Matai 20:28; Yoane 3:16; Baloma 6:23) Likabo wana oyo ekokani na mosusu te endimisi ete bolingo ya Nzambe mpo na bato ezali monene mpe ezali ndanga ete baoyo bazali kokoba koyoka Yehova bakozwa mapamboli libela na libela.​—Baloma 8:32.

Botɔndi na biso mpo na likabo ya elimo santu

9, 10. Ndenge nini likabo ya elimo santu ya Yehova esalisaka biso? Pesá ndakisa.

9 Elimo santu ya Nzambe ezali mpe likabo mosusu oyo esengeli kotinda biso tópesa ye botɔndi. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo alendisaki ebele ya bato oyo bazalaki na Yelusaleme ete: “Bongolá mitema, mpe batisamá mokomoko na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya [elimo santu, NW ].” (Misala 2:38) Lelo oyo, Yehova azali kopesa elimo santu epai ya basaleli na ye oyo bazali kosɛnga yango mpe balingi kosala mokano na ye. (Luka 11:9-13) Na ntango ya kala, elimo santu ya Nzambe​—to nguya na ye oyo esalaka mosala, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba​—epesaki makasi na mibali mpe basi ya kondima, bakisa mpe baklisto ya liboso. (Zekalia 4:6; Misala 4:31) Ekoki mpe kopesa biso makasi, atako tokoki kokutana na mikakatano to mpasi makasi mpo tozali basaleli ya Yehova.​—Yoele 2:28, 29.

10 Tókamata ndakisa ya Laurel; maladi ya bukabuka ebebisaki ye nzoto mpe alekisaki mbula 37 ya bomoi na ye na kati ya masini moko oyo ekómaki kosala mosala ya mimpululu na ye.a Atako azalaki na mpasi makasi ndenge wana, asalelaki Nzambe na molende tii liwa na ye. Na bambula nyonso wana, mapamboli ya Yehova ezwaki Laurel. Na ndakisa, asalisaki bato 17 bázwa boyebi ya solosolo ya Biblia, atako azalaki kolekisa mokolo mobimba na kati ya masini yango! Bomoi na ye ezali kozongisa maloba ya ntoma Paulo na makanisi na biso ete: “Wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.” (2 Bakolinti 12:10) Ya solo, ata soki mosala na biso ya kosakola nsango malamu ezali kobota mbuma mingi, ezali na mayele mpe makasi na biso moko te, kasi na lisalisi ya elimo santu oyo Nzambe apesaka baoyo bayokaka mongongo na ye.​—Yisaya 40:29-31.

11. Elimo ya Nzambe ebotaka bizaleli nini epai na baoyo bazali kolata “bomoto ya sika”?

11 Soki tozali koyoka Nzambe mpe kotosa ye, elimo na ye ekopesa biso bizaleli lokola bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23, NW ) “Mbuma ya elimo” yango ezali na kati ya “bomoto ya sika” oyo baklisto balataka na esika ya bizaleli ya yauli mpe ya bonyama oyo bazalaki na yango. (Baefese 4:20-24; Yisaya 11:6-9) Mbuma oyo eleki ntina ezali bolingo, “ekanganeli ekoki mpenza.”​—Bakolose 3:14.

Bolingo oyo baklisto balakisanaka ezali likabo oyo tosengeli kopesa motuya mingi

12. Ndenge nini Tabita mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bamonisaki bolingo?

12 Likabo mosusu oyo Yehova apesi biso ezali bolingo oyo baklisto balakisanaka. Topesaka likabo yango motuya mingi mpe ebongi mpenza ezala bongo. Atako tomonisaka bolingo yango mpo na litomba te, kasi ezalaka mpenza makasi na boye ete ezali kosangisa bandimi koleka kutu bondeko ya makila. (Yoane 15:12, 13; 1 Petelo 1:22) Tótalela ndakisa ya Tabita, mwasi moklisto moko ya boboto oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso. “Azalaki moto ya misala malamu mpe makabo ya mawa mingi,” mingimingi epai ya basi oyo bakufelá mibali na kati ya lisangá. (Misala 9:36) Ekoki kozala ete basi yango bazalaki na bandeko na bango ya mosuni, kasi Tabita asepelaki kosala oyo akokaki mpo na kosalisa mpe kolendisa bango. (1 Yoane 3:18) Tabita apesaki mpenza ndakisa malamu! Bolingo oyo ezali kati na bandeko etindaki Pilisika na Akula ‘bákɔtisa nkingo na bango na mpasi’ mpo na Paulo. Bolingo etindaki Epafala, Luka, Onesifolo mpe bamosusu básalisa ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma. (Baloma 16:3, 4; 2 Timote 1:16; 4:11; Filemona 23, 24) Ya solo, lelo oyo, baklisto ya ndenge wana ‘balinganaka’; yango ezali likabo ya Nzambe oyo ezali komonisa ete bazali bayekoli ya solo ya Yesu.​—Yoane 13:34, 35.

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete topesaka motuya mpe tozali na botɔndi mingi mpo na bondeko na biso na lisangá ya boklisto?

13 Opesaka motuya na bolingo oyo emonanaka na kati ya lisangá ya boklisto? Ozalaka na botɔndi mpo na bondeko na biso ya elimo na mokili mobimba? Nyonso wana mpe ezali makabo ya Yehova oyo ekómisaka biso bazwi. Ndenge nini tokoki komonisa ete topesaka yango motuya? Soki tozali kosalela Nzambe mosala mosantu, soki tozali koyangana na makita, mpe soki tozali komonisa bolingo mpe mbuma mosusu ya elimo ya Nzambe.​—Bafilipi 1:9; Baebele 10:24, 25.

“Makabo na motindo na mibali”

14. Makambo nini esɛngami na moklisto mpo azwa mokumba ya nkulutu to mosaleli ya misala?

14 Mibali baklisto oyo bazali na mposa ya mokumba ya nkulutu to mosaleli ya misala mpo na kosalela bandeko na bango bazali na mokano ya malamu. (1 Timote 3:​1, 8) Mpo na kozwa mikumba yango, ndeko mobali asengeli kozala moto ya elimo, moto oyo amipesi na koyekola Makomami mpe asengeli kozala na molende na mosala ya kosakola. (Misala 18:24; 1 Timote 4:15; 2 Timote 4:5) Asengeli kozala na komikitisa, na bopɔlɔ mpe na motema molai, mpamba te mapamboli ya Nzambe ezwaka bato ya lolendo te, bato ya lofundo te to mpe bato oyo balingi bokonzi te. (Masese 11:2; Baebele 6:15; 3 Yoane 9, 10) Soki azali na mwasi, ndeko mobali yango asengeli kozala mokonzi ya libota oyo azali na bolingo, oyo ayebi kotambwisa ndako na ye malamu. (1 Timote 3:4, 5, 12) Lokola apesaka motuya mingi na bozwi ya elimo, moto ya ndenge wana akozwa mapamboli ya Yehova.​—Matai 6:19-21.

15, 16. Banani oyo bamonisaka ete bazali “makabo na motindo na mibali”? Pesá bandakisa.

15 Ntango bankulutu na kati ya lisangá bazali na molende na mosala ya kosakola, ya kobatela bampate mpe ya koteya, ezali bantina oyo esengeli kotinda biso na kopesa motuya na “makabo na motindo ya mibali.” (Baefese 4:8, 11, NW ) Ntango mosusu bandeko oyo bankulutu bazali kosalisa na bolingo nyonso bakopesa bango matɔndi te, kasi Yehova azali komona nyonso oyo bankulutu ya sembo bazali kosala. Akobosana te bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye na ndenge bazali kosalela bato na ye.​—1 Timote 5:17; Baebele 6:10.

16 Tótalela ndakisa ya nkulutu moko ya molende oyo akendaki kotala elenge mwasi moko moklisto oyo etikalaki moke básala ye lipaso na bɔɔngɔ. Moninga moko ya libota yango akomaki na nsima ete: “[Nkulutu yango] atondaki na boboto, ayebaki kobɔndisa mpe kosunga. Asɛngaki nzela abondela Yehova na biso elongo. Ntango azalaki kobondela, mongongo ya tata ya mwana yango [azali Motatoli ya Yehova te] eyokanaki ete azali kolela, mpe moto nyonso na shambre ya lopitalo atangisaki mai ya miso. Libondeli ya nkulutu wana ezalaki mpenza na boboto, mpe Yehova amonisaki mpenza bolingo ndenge atindaki nkulutu yango na ntango wana!” Motatoli mosusu oyo azalaki maladi na lopitalo alobaki ndenge ayokaki ntango bankulutu bakendaki kotala ye: “Ntango bayaki na mbeto na ngai na kati ya paviyo oyo basalisaka bato oyo bazali mpenza maladi makasi, namiyokaki ete nyonso oyo ekokaki koyela ngai kobanda na ngonga wana, nakokaki koyikela yango mpiko. Nazwaki makasi mpe nakómaki na kimya na makanisi na ngai.” Nani oyo akoki kosomba bolingo mpe komibanzabanza ya ndenge wana na mbongo? Azali te! Ezali likabo ya Nzambe, apesaka yango na nzela ya lisangá ya boklisto.​—Yisaya 32:1, 2.

Likabo ya mosala ya kosakola

17, 18. (a) Yehova apesi basaleli na ye nyonso libaku malamu ya kosala mosala nini? (b) Lisalisi nini Yehova abongiseli biso mpo tósala mosala na biso malamu?

17 Ezali na likabo te oyo bakoki kopesa bato oyo eleki likabo ya kosalela Yehova, Oyo-Aleki-Likoló. (Yisaya 43:10; 2 Bakolinti 4:7; 1 Petelo 2:9) Atako bongo, libaku malamu ya kosakola ezali mpo na moto nyonso: elenge to mokóló, mwasi to mobali, oyo azali na mposa ya solosolo ya kosalela Nzambe. Osalelaka likabo yango ya motuya monene? Bato mosusu babangaka kosakola mpo bamonaka ete babongi te; kasi, tóbosana te ete Yehova apesaka elimo santu na baoyo bazali kosalela ye, mpe yango epesaka biso makoki nyonso oyo tokoki kozanga.​—Yilimia 1:6-8; 20:11.

18 Yehova apesi basaleli na ye​—bato ya komikitisa​—mosala ya kosakola Bokonzi, kasi apesi yango te epai ya bato ya lofundo mpe oyo bamityelaka motema. (1 Bakolinti 1:20, 26-29) Bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ bandimaka bolɛmbu na bango mpe ntango bazali kosakola, batyelaka lisalisi ya Nzambe motema. Bazalaka mpe na botɔndi mpo na lisalisi ya elimo oyo azali kopesa na nzela ya “kapita ya sembo.”​—Luka 12:42-44; Masese 22:4.

Kozala na libota ya esengo ezali likabo malamu

19. Makambo nini esalisaka mpo na kolonga etumba ya kobɔkɔla bana?

19 Libala mpe kozala na libota ya esengo ezali makabo ya Nzambe. (Luta 1:9; Baefese 3:14, 15) Bana mpe bazali “libula oyo euti na Yehova” mpe bapesaka esengo epai ya baboti na bango oyo balongaka koteya bango bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. (Nzembo 127:3, NW ) Soki ozali moboti, teyáká bana na yo na boyokani na Liloba ya Yehova; na bongo, okomonisa ete ozali kokoba koyoka mongongo na ye. Baoyo bazali kosala bongo bazali na elikya ete Yehova akosunga bango mpe akopambola bango mingi.​—Masese 3:5, 6; 22:6; Baefese 6:1-4.

20. Nini ekoki kosalisa baboti oyo bana na bango batiki losambo ya solo?

20 Baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kosala milende ya solosolo, kasi ekoki kozala na bana na bango mosusu oyo bakoki kotika losambo ya solo ntango bakoli. (Genese 26:34, 35) Likambo yango ekoki kotungisa makanisi ya baboti. (Masese 17:21, 25) Kasi, na esika ya kolongola elikya nyonso, bakoki kobɔndisama soki bakanisi lisese ya mwana ya kilikili oyo Yesu alobaki. Atako mwana yango atikaki ndako mpe alandaki bomoi ya motó mpasi, nsukansuka azongaki na ndako ya tata, mpe ye ayambaki ye na esengo mpe na bolingo. (Luka 15:11-32) Ata soki likambo nini esalemi, baboti oyo bazali sembo bakoki kozala na elikya ete Yehova amityaka na esika na bango, amibanzabanzaka mpo na bango mpe asungaka bango ntango nyonso.​—Nzembo 145:14.

21. Tosengeli koyoka nani, mpe mpo na nini?

21 Yango wana, tiká ete mokomoko na biso ayeba makambo oyo ezali mpenza na ntina na bomoi na biso. Tomipesi na koluka biloko ya mokili na lokoso nyonso, biloko oyo ekoki komemela biso mpe mabota na biso mpasi? To tozali nde koluka ‘makabo malamu mpe makabo mabongi’ oyo mautaka epai ya “Tata ya moi”? (Yakobo 1:17) Satana, ‘tata ya lokuta’ alingi ete biso tóboma nzoto mpo na bozwi ya mokili mpe tózanga esengo mpe bomoi. (Yoane 8:44; Luka 12:15) Kasi, Yehova azali komibanzabanza mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana, tókoba koyoka Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo mpe ‘tómisepelisa’ na ye ntango nyonso. (Nzembo 37:4) Soki tolandi nzela wana, makabo ya Yehova oyo ezali na motuya monene mpe ebele ya mapamboli na ye ekokómisa biso bazwi; mpe mpasi ekobakisama likoló na yango te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya 22 Yanuali 1993, nkasa 18-21 (ebimeli ya Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

• Epai wapi moto akoki kozwa bolamu oyo eleki bolamu nyonso?

• Tángá mwa makabo oyo Yehova apesi na basaleli na ye.

• Mpo na nini mosala ya kosakola ezali likabo?

• Baboti bakoki kosala nini mpo bázwa mapamboli ya Yehova ntango bazali kobɔkɔla bana na bango?

[Elilingi na lokasa 16]

Ozalaka na botɔndi mpo na likabo ya mokanda oyo ezali Liloba ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 17]

Atako azalaki na mikakatano makasi, Laurel Nisbet asalelaki Nzambe na molende

[Bililingi na lokasa 18]

Lokola Tabita, baklisto ya mikolo na biso bayebani mpo na misala na bango ya bolingo

[Elilingi na lokasa 19]

Bankulutu bamibanzabanzaka na bolingo nyonso mpo na bandeko na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto