Nini ekoki kosala ete mokili ekóma na esengo?
Zulunalo Time elobaki ete: “Moto kaka moko oyo aleki bato nyonso kino lelo ezali Yesu moto ya Nasaleti.” Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato mingi ya motema sembo basukaki kaka te na komona ete azalaki moto aleki monene, kasi bamonaki mpe ndenge azalaki komibanzabanza mpo na bamosusu. Yango wana tokoki kokamwa te ete balingaki kotya ye mokonzi. (Yoane 6:10, 14, 15) Nzokande, ndenge tolobaki yango na lisolo ya liboso, Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki.
YESU aboyaki kokɔta na politiki mpo na bantina oyo misato: Ndenge oyo Tata na ye atalelaka boyangeli ya bato; Yesu ayebaki ete ezali na bikelamu ya nguya oyo ezali kopekisa ata bakonzi ya boboto ete básala malamu; mpe mokano oyo Nzambe azali na yango ya kotya bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba. Ntango tokotalela makambo wana misato malamumalamu, tokomona mpo na nini bato balongi te kokómisa mokili oyo esika ya malamu mpo na kofanda. Tokomona mpe ndenge oyo likambo yango ekokokisama.
Bato bakoki komiyangela bango moko?
Ntango Nzambe akelaki bato, ayebisaki bango báyangela banyama. (Genese 1:26) Kasi Nzambe ye moko nde moto azalaki koyangela bango. Mobali mpe mwasi ya liboso basengelaki komonisa ya solo ete batosaka Nzambe, basengelaki te kolya mbuma ya “nzete ya koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:7) Adama na Eva basalelaki bonsomi oyo bazalaki na yango na ndenge ya mabe mpe batosaki Nzambe te. Tokoki koloba ete lokola balyaki mbuma oyo epekisamaki, ezalaki moyibi; kasi mpe lisusu baboyaki mpenza ete Nzambe ayangela bango. Maloba na nse ya lokasa ya Bible de Jérusalem na Genese 2:17 elobi ete Adama na Eva babɛtaki ntolo ete “bango moko bakoyeba kopona mabe na malamu; na ndenge yango, baboyaki kondima ete bazali bikelamu . . . Lisumu ya liboso ezalaki nde koboya boyangeli ya Nzambe.”
Lokola ezalaki likambo moko monene, Nzambe atikelaki Adama na Eva mpe bana na bango nzela bápona bomoi oyo balingi, elingi koloba bábanda mpe komityela mibeko bango moko. (Nzembo 147:19, 20; Baloma 2:14) Ezali mpenza na ntango wana nde moto abandaki komiyangela. Alongi? Na kotalela ebele ya bambula oyo esili koleka, tokoki koloba ete alongi te! Mosakoli 8:9 elobi ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Ndenge oyo boyangeli ya moto elongi te endimisi biso ete maloba oyo ya Yilimia 10:23 ezali mpenza solo, ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” Makambo oyo esili koleka na mokili emonisi ete bato bakoki kolonga komitambwisa bango moko te kozanga Mozalisi na bango.
Yesu andimaki ete ezali mpenza bongo. Aboyaki mpenza komitambwisa kozanga Nzambe. Alobaki ete: “Ntango nyonso, ngai nakosalaka makambo makosepelisa [Nzambe].” (Yoane 4:34; 8:28, 29) Yango wana, lokola Nzambe apesaki ye nzela te ya kondima bokonzi oyo bato bapesaki ye, aboyaki yango na motema moko. Kasi yango elingi koloba te ete aboyaki kosalisa mozalani na ye. Nzokande, asalaki nyonso oyo akokaki kosala mpo na kosalisa bato bázala mpenza na esengo na ntango wana mpe na mikolo ekoya. Apesaki kutu bomoi na ye mpo na bato. (Matai 5:3-11; 7:24-27; Yoane 3:16) Kasi Yesu ayebaki ete lokola “likambo na likambo ezali na ntango na yango,” ezali mpe na ntango oyo Nzambe akoyangela bato nyonso. (Mosakoli 3:1, NW; Matai 24:14, 21, 36-39) Tóbosana te ete na Edene, baboti na biso ya liboso balandaki ekelamu moko ya elimo oyo azalaki na mayele mabe mpe alobaki na nzela ya nyoka oyo ezalaki komonana. Yango ememi biso na ntina ya mibale oyo Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki.
Nani azali koyangela mokili oyo?
Biblia eyebisi biso ete, Satana asɛngaki Yesu asambela ye bongo akopesa ye “bikonzi nyonso na mokili mpe nkembo na yango.” (Matai 4:8-10) Zabolo akokaki kopesa Yesu bokonzi ya mokili mobimba—kasi na ndenge oyo ye moko Zabolo alingaki kosala yango. Yesu akweaki na komekama wana te. Ezalaki mpenza komekama? Satana akokaki mpenza kokabela Yesu eloko monene boye? Ezali mpenza bongo, mpamba te Yesu ye moko abengaki Zabolo “mokolo ya mokili,” mpe ntoma Paulo abengaki ye “nzambe ya mokili oyo.”—Yoane 14:30; 2 Bakolinti 4:4; Baefese 6:12.
Yesu ayebaki ete Zabolo, na kati na motema na ye, alingaka bato te. Alobaki ete Satana azali “mobomi ya bato” mpe “mobuki ya [lokuta] mpe tata na yango.” (Yoane 8:44) Tozali komona polele ete mokili oyo “ezali kolala kati na [nguya]” ya oyo mabe ekoki kozala na esengo ya solosolo te. (1 Yoane 5:19) Kasi Zabolo akozala na bokonzi wana seko na seko te. Lelo oyo, Yesu azali ekelamu moko ya nguya mpenza; etikali moke akolongola Satana mpe akosilisa nyɛɛ nguya na ye nyonso.—Baebele 2:14; Emoniseli 20:1-3.
Satana ye moko ayebi ete mikolo na ye ya koyangela mokili ezali kosila nokinoki. Yango wana, azali kosala makasi nyonso mpo na kobebisa bato malamumalamu, ndenge asalaki liboso ete Mpela oyo esalemaki na ntango ya Noa eya. (Genese 6:1-5; Yuda 6) Emoniseli 12:12 elobi ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene, mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” Bisakweli ya Biblia mpe makambo oyo ezali koleka na mokili emonisi ete “elaka mokuse” yango etikali moke esila. (2 Timote 3:1-5) Lobiko ekómi pene.
Bokonzi oyo ekopesa bolamu
Ntina ya misato oyo Yesu akɔtaki te na makambo ya politiki ezali ete na elaka oyo etyamaki mpo na mikolo ekoya, Nzambe akotya guvɛrnɛma ya likoló mpo na koyangela mabele. Biblia ebengaka guvɛrnɛma yango Bokonzi ya Nzambe, mpe yango ezalaki motó ya likambo ya mateya ya Yesu. (Luka 4:42; Emoniseli 11:15) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi yango eya mpo, kaka na ntango wana nde ‘mokano ya Nzambe ekosalema na nse lokola na Likoló!’ (Matai 6:9, 10) Okoki mbala mosusu komituna ete: ‘Soki Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba, bongo baguvɛrnɛma ya bato ekosuka wapi?’
Eyano ezali na Danyele 2:44: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe “ekobuka” bikonzi ya mokili? Mpamba te bikonzi yango ezali kolanda elimo mabe ya kotyola Nzambe na kolinga komitambwisa bango moko, elimo oyo Satana abandisaki na elanga ya Edene. Baoyo bazali kolanda elimo wana bazali kosala mpo na bolamu ya bato te, kasi bazali kotɛmɛla Mozalisi. (Nzembo 2:6-12; Emoniseli 16:14, 16) Yango wana, tosengeli komituna: ‘Tozali na ngámbo ya boyangeli ya Nzambe to banguna na yango?’
Okopona boyangeli ya nani?
Mpo na kosalisa bato bázwa ekateli oyo ebongi mpenza na oyo etali boyangeli, Yesu atindaki bayekoli na ye básakola “nsango malamu ya bokonzi . . . na mokili mobimba” liboso ete nsuka ya ebongiseli oyo eya. (Matai 24:14) Lelo oyo, banani oyo bayebani na mokili mobimba ete basakolaka Bokonzi ya Nzambe? Ezali Batatoli ya Yehova. Banda kala, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaka na maloba oyo na ezipeli na yango: “Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.” Lelo oyo, Batatoli bazali milio motoba na mikili koleka 230, bazali kosalisa bato bázwa boyebi ya solo ya Bokonzi yango.a
Mapamboli mpo na bato oyo bokonzi ekoyangela
Yesu azalaki ntango nyonso kosala oyo Nzambe alingi. Yango wana, na esika ya kolanda nzela na ye moko mpe koluka kobongisa mokili oyo na nzela ya politiki, Yesu asalaki mosala makasi mpo ete matomba ya Bokonzi ya Nzambe ekende liboso, nzela kaka moko oyo ekosilisa bampasi ya mokili. Lokola azalaki sembo, Nzambe apesaki ye kiti ya bokonzi ya nkembo na likoló mpo azala Mokonzi na Bokonzi yango. Talá libonza kitoko Yesu azwaki mpo na bosembo na ye!—Danyele 7:13, 14.
Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kolanda ndakisa ya Yesu, bazali kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso mpe, lokola bazali kotosa mokano ya Nzambe, bango mpe bakozwa libonza kitoko: libaku malamu ya kozala bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. (Matai 6:33) Na boyangeli ya Nzambe oyo etondi na bolingo, bato yango bakokóma bato ya kokoka, mpe bakozala na bomoi ya seko. (Emoniseli 21:3, 4) Mokanda ya liboso ya Yoane 2:17 elobi boye: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.” Lokola Satana na bato na ye bakozala lisusu awa te, mabele mobimba ekokóma Paladiso, bokabwani ya bikólo ekozala kuna te, makambo mabe oyo tozali komona na makambo ya mombongo ekozala lisusu te, losambo ya lokuta mpe ekozala lisusu te. Kofanda kuna libela na libela ekozala mpenza esengo monene!—Nzembo 37:29; 72:16.
Ya solo, Bokonzi ya Nzambe nde ezali sɛkɛlɛ mpo esengo ya solosolo ezala na mokili, yango wana nsango oyo etali bokonzi yango ebongi mpenza kobengama nsango malamu. Soki naino oyoka nsango yango te, mbala ya nsima soki omoni Motatoli ya Yehova ayei epai na yo, ekozala malamu oyamba nsango malamu oyo amemeli yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te mpe batombokelaka baguvɛrnɛma te, ata na mikili oyo bapekisi mosala na bango to bazali konyokola bango, nyonso wana mpo ete bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. (Tite 3:1) Kasi bazali nde kopesa baguvɛrnɛma lisungi oyo ebongi mpenza, lisungi ya elimo, kozanga kokɔta na politiki, ndenge oyo Yesu na bayekoli na ye ya ekeke ya liboso basalaki yango. Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato ya motema sembo na bamboka ndenge na ndenge ete bálanda mitinda malamu ya Biblia, na ndakisa bolingo na kati ya libota, kolongobana, bizaleli malamu mpe kosala mosala malamu. Libosoliboso mpenza, basalaka makasi báteya bato ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia mpe kotya motema na Bokonzi ya Nzambe mpo yango nde elikya ya solosolo mpo na bato.
[Bililingi na lokasa 5]
Makambo oyo ezali koleka na mokili banda kala, emonisi ete bato bakoki te komiyangela malamu kozanga lisungi ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 5]
Lokola Satana azali koyangela “mokili” oyo, yango wana apesaki Yesu “bikonzi nyonso ya mokili”
[Bililingi na lokasa 7]
Yesu ateyaki ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, mokili ekokóma esika malamu mpenza ya kofanda