Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/10 nk. 12-16
  • Nani akokabola biso na bolingo ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani akokabola biso na bolingo ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kangamá na bolingo ya Nzambe
  • Makambo ekoki kobongwana, kasi bolingo ya Nzambe ebongwanaka te
  • Lingá boboto ya Nzambe mpo na libela
  • Tata alingi bino
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Kotika te ete bolingo na yo ekita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/10 nk. 12-16

Nani akokabola biso na bolingo ya Nzambe?

“Biso tokolingaka mpo ete ye alingaki biso liboso.”​—1 YOANE 4:19.

1, 2. (a) Mpo na nini tolingaka koyeba ete balingaka biso? (b) Tozali libosoliboso na mposa ya bolingo ya nani?

KOYEBA ete balingaka yo, ezali na ntina nini mpo na yo? Kobanda bazali naino bana mike tii ntango bakómi mikóló, bato bamiyokaka malamu soki bazali kolinga bango. Omonaka ndenge oyo bebe azalaka na mabɔkɔ ya mama na ye? Ezala makambo nini ezali koleka zingazinga, mbala mingi, ntango bebe azali kotala elongi ya mama na ye oyo azali kosɛkisa ye, abangaka eloko te, azalaka na kimya na mabɔkɔ ya mama na ye oyo alingi ye. Ozali koyeba lisusu ndenge oyo ozalaki ntango ozalaki na bambula ya bolenge, bambula oyo ntango mosusu ezalaka na mikakatano mingi? (1 Batesaloniki 2:7) Ntango mosusu ozalaki koyeba te soki olingi mpenza nini to mpe ozalaki koyeba te soki ozali komiyoka mpenza ndenge nini; kasi, koyeba ete tata na yo na mama na yo balingaka yo, ezalaki na ntina mingi mpo na yo! Ozalaki na esengo na koyeba ete okoki koyebisa bango ata mokakatano nini to mpe kotuna bango ata motuna nini! Ya solo, soki ezali na makambo oyo tozalaka na yango mpenza mposa na bomoi na biso mobimba, moko na yango ezali ete bálinga biso. Bolingo ya ndenge wana emonisaka biso ete tozali na ntina.

2 Mwana akolaka malamu mpe azalaka na makanisi malamu soki baboti na ye balingaka ye. Kasi, mpo tózala malamu na elimo mpe na makanisi, likambo oyo eleki ntina ezali ya koyeba ete Yehova, Tata na biso ya likoló, alingaka biso. Bato mosusu oyo batángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli babɔkwamaki na mabɔkɔ ya baboti oyo bazalaki mpenza kobatela bango te. Soki ezalaki bongo mpo na yo, kolɛmba nzoto te. Ata soki baboti na yo bazalaki kolinga yo te to soki bazalaki kolinga yo mingi te, bolingo ya sembo ya Nzambe ekoki kozipa mpota wana.

3. Ndenge nini Yehova amonisaki basaleli na ye ete alingaki bango?

3 Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete mama akoki “kobosana” mwana na ye oyo azali komɛlisa mabɛlɛ, kasi ye akoki kobosana bato na ye te. (Yisaya 49:15) Davidi mpe alobaki na elikya mpenza ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Makanisi yango ezali mpenza kolendisa! Ata soki bomoi na yo ezali ndenge nini, soki ozali moto oyo amipesi na Yehova Nzambe, osengeli kobosanaka te ete awa na mokili, ezali na moto ata moko te oyo alingaka yo koleka Nzambe!

Kangamá na bolingo ya Nzambe

4. Ndenge nini Nzambe andimisaki baklisto ya ekeke ya liboso ete alingaki bango?

4 Ntango nini oyebaki bolingo ya Yehova mpo na mbala ya liboso? Ekoki kozala ete okutanaki na makambo oyo ekokani na oyo baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na yango. Na mokapo ya 5 ya mokanda oyo Paulo akomelaki Baloma, asalelaki maloba kitoko mpo na komonisa ndenge oyo bato ya masumu, oyo liboso bayebaki Nzambe te, bayaki koyeba bolingo ya Yehova. Na vɛrsɛ ya 5, tozali kotánga boye: “Bolingo ya Nzambe esopani kati na mitema na biso mpo na [elimo santu, NW] oyo ye apesi biso.” Bongo na vɛrsɛ ya 8, Paulo abakisi ete: “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.”

5. Nini esalisaki yo oyeba monene ya bolingo ya Nzambe mpe ozala na botɔndi mpo na yango?

5 Ndenge moko mpe, ntango bateyaki yo mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe mpe okómaki na kondima, elimo santu ya Yehova ekómaki kosala mosala na motema na yo. Okómaki kososola bonene ya likambo oyo Yehova asalaki ndenge atindaki Mwana na ye ya bolingo aya kokufa mpo na yo mpe okómaki na botɔndi mpo na yango. Na ndenge yango, Yehova asalisaki yo oyeba bolingo oyo azali na yango mpo na bato. Ntango ososolaki ete, atako obotamaki na masumu mpe oyebaki Nzambe te, Yehova apesaki bato libaku ya kobengama bato ya sembo mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko, likambo yango esimbaki motema na yo, boye te? Okómaki na bolingo mpo na Yehova na motema na yo, boye te?​—Baloma 5:10.

6. Mpo na nini tokoki ntango mosusu komiyoka lokola nde tozali mosika na Yehova?

6 Lokola bolingo ya Tata na yo ya likoló ebendaki yo mpe obongolaki bomoi na yo mpo na kosala makambo oyo alingaka, na nsima, omipesaki na Nzambe. Sikoyo, kimya ezali kati na yo na Nzambe. Kasi, ekómelaka yo ntango mosusu omiyoka lokola nde ozali mosika na Yehova? Likambo yango ekoki kokómela ata nani kati na biso. Kasi, tóbosanaka te ete Nzambe abongwanaka te. Bolingo na ye ezali lokola moi oyo etikaka te kotinda molunge awa na mabele mpe kongɛngisa yango; ezali bolingo ya libela mpe ekitaka te. (Malaki 3:6; Yakobo 1:17) Nzokande, biso tokoki kobongwana, ata mpo na mwa ntango. Ntango mabele ezali kobaluka, ndambo na yango mosusu ekómaka na molili; ndenge moko mpe, soki topesi Nzambe mokɔngɔ ata mwa moke, boyokani na biso na ye ekokóma mwa mpiɔ. Tokoki kosala nini mpo na kobongisa likambo yango?

7. Ndenge nini komituna mituna mpo na komitalela ekoki kosalisa biso tótikala kati na bolingo ya Nzambe?

7 Soki tomoni ete tobandi lokola kotika bolingo ya Nzambe, tosengeli komituna mituna oyo: ‘Nakómi nde kotalela bolingo ya Nzambe bongobongo? Nabandi nde mokemoke kopesa Nzambe ya bomoi mpe ya bolingo mokɔngɔ? Kondima na ngai ekómi kolɛmba na lolenge moko to mosusu? Nazali nde kotya makanisi na ngai na “makambo ya nzoto,” na esika natya yango na “makambo ya elimo”?’ (Baloma 8:5-8; Baebele 3:12) Soki tomikaboli na Yehova, tokoki kosala nyonso mpo na kobongisa, kopusana penepene na ye mpe kozongisa boyokani malamu kati na biso na ye. Yakobo apesi biso toli oyo: “Bópusana penepene ya Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8, NW) Landá maloba ya Yuda ete: “Balingami, bómilendisa na kondima na bino, oyo ya bulɛɛ mpenza, kobondeláká kati na [elimo santu, NW]; bómibatela kati na bolingo ya Nzambe.”​—Yuda 20, 21.

Makambo ekoki kobongwana, kasi bolingo ya Nzambe ebongwanaka te

8. Makambo nini ekoki kobongwana na mbalakaka na kati ya bomoi na biso?

8 Na mokili oyo, makambo mingi ekoki kobongola bomoi na biso. Mokonzi Salomo alobaki ete “ntango mpe makambo ekanami te ekómelaka [biso] nyonso.” (Mosakoli 9:11, NW) Bomoi na biso mobimba ekoki kobongwana na mokolo moko. Lelo oyo tokoki kozala nzoto kolɔngɔnɔ, lobi tokómi na maladi makasi. Lelo oyo tokoki kozala na mosala ya malamu, lobi tokómi basɔmɛlɛ. Moninga to ndeko na biso moko akoki kokufa liwa ya mbalakaka. Na ekólo mosusu, baklisto bakoki kozala na kimya mpo na mwa ntango, mpe mbala moko babandi konyokola bango. Ekoki kozala ete bakoseli biso makambo; mpo na yango, bakoki konyokola biso mpo na makambo oyo toyebi te. Ya solo, makambo mingi ekoki kobongwana na bomoi.​—Yakobo 4:13-15.

9. Mpo na nini ekozala malamu tótalela mwa bavɛrsɛ ya Baloma mokapo 8?

9 Soki mpasi ekómeli biso, tokoki komiyoka lokola nde basundoli biso, mbala mosusu kutu tokoki kobanda kokanisa ete bolingo ya Nzambe ekiti. Lokola makambo yango ekoki kokómela biso nyonso, ezali malamu tótalela malamumalamu maloba ya kobɔndisa oyo ntoma Paulo akomaki na Baloma mokapo 8. Akomelaki yango baklisto oyo bazalaki bapakolami na elimo. Kasi, makanisi na yango ebongi mpe mpo na bampate mosusu, baoyo batángami basembwi lokola baninga ya Nzambe, na ndakisa ya Abalayama, moto oyo azalaki na bomoi bambula ebele mpenza liboso Yesu aya awa na mabele.​—Baloma 4:20-22; Yakobo 2:21-23.

10, 11. (a) Makambo nini banguna balobaka ntango mosusu mpo na basaleli ya Nzambe? (b) Mpo na nini baklisto bamitungisaka mingi na makambo yango te?

10 Tángá Baloma 8:31-34. Paulo atuni boye: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?” Satana na bato mabe ya mokili na ye bazali kotɛmɛla biso. Banguna bakoki kokosela biso makambo, bakoki ata kofunda biso na batribinale. Bafundaki baklisto mosusu ete balingaka bana na bango te mpo baboyaki ete minganga básalisa bango na ndenge oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe to baboyaki ete bana na bango básangana na bafɛti ya bapakano. (Misala 15:28, 29; 2 Bakolinti 6:14-16) Bakoselaki baklisto mosusu ya sembo makambo ete bazali kotya mobulu na mboka mpo baboyaki kosimba mindoki mpo na koboma bazalani na bango na etumba to mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. (Yoane 17:16) Banguna mosusu bapanzaki nsango ya lokuta na baradio, na televizyo mpe na mikanda, to mpe bakoselaki Batatoli ya Yehova makambo ete bazali mwa lingomba oyo esalaka makambo mabe na kobombana mpe ezali likama mpo na mboka.

11 Kasi, tóbosana te ete na ntango ya bantoma, bato balobaki ete: “Mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” (Misala 28:22) Makambo ya lokuta oyo bazali koloba mpo na biso ezali na ntina te. Nzambe nde azali koloba ete baklisto ya solo bazali sembo, ntango azali komona ndenge oyo bazali komonisa kondima na mbeka ya Klisto. Ekobanda boni Yehova atika kolinga bato oyo bazali kosambela ye nsima ya kopesa bango likabo oyo eleki motuya: Mwana na ye moko ya bolingo? (1 Yoane 4:10) Lokola Klisto asekwaki mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, azali kolobela, to tóloba mpenza, kokɔtela baklisto. Nani oyo akoki, na bosembo mpenza, kokweisa maloba ya Klisto ntango azali kolobela bayekoli na ye to nani akoki kokweisa Nzambe oyo azali kondima bato na ye ya sembo? Ata moto moko te!​—Yisaya 50:8, 9; Baebele 4:15, 16.

12, 13. (a) Makambo nini ekoki te kokabola biso na bolingo ya Nzambe? (b) Zabolo azali konyokola biso na mokano nini? (c) Mpo na nini baklisto bazali kolonga?

12 Tángá Baloma 8:35-37. Longolá biso moko, ezali mpenza na moto moko to na eloko moko oyo ekoki kokabola biso na bolingo ya Yehova mpe ya Mwana na ye Yesu Klisto? Satana akoki kosalela bato na ye awa na mabele mpo na kolukela baklisto mindɔndɔ. Na bambula mingi oyo eleki, bandeko na biso baklisto mingi banyokwamaki makasi na bikólo ebele. Lelo oyo, na bisika mosusu, mokolo na mokolo bandeko na biso bazali konyokwama na mpasi ya kozanga mbongo. Bamosusu bazali kokufa nzala to bazali kozanga bilamba ya kolata. Mokano ya Zabolo ezali nini ntango azali kobimisa bampasi wana nyonso? Mokano na ye ezali ya kolɛmbisa bato mpo bátika losambo ya solo ya Yehova. Satana azali koluka biso tókanisa ete Nzambe alingi biso lisusu te. Kasi, ezali mpenza solo ete Nzambe alingi biso lisusu te?

13 Lokola Paulo, oyo azongelaki maloba ya Nzembo 44:22, biso toyekoli Liloba ya Nzambe. Toyebi ete makambo wana ezali koyela biso “bampate” ya Nzambe mpo na nkombo na ye. Makambo yango etaleli mpe kosantisama ya nkombo ya Nzambe mpe kolongisama na bokonzi na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba. Nzambe atiki nzela na bampasi mpo na kokata makambo wana ya ntina mingi, kasi ezali te mpo alingi biso lisusu te. Ata soki mpasi ezali makasi ndenge nini, tozali na elikya ete bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na basaleli na ye nyonso, ata mpo na mokomoko kati na biso, ebongwani te. Likambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango, oyo tokoki komona lokola ekweisi biso na nse, ekokóma bolongi mpo na biso soki totikali sembo. Elikya oyo tozali na yango ete Nzambe akoki te kotika kolinga biso ezali kolendisa mpe kosunga biso.

14. Nini endimisaki Paulo bolingo ya Nzambe atako baklisto bazalaki kokutana na bampasi?

14 Tángá Baloma 8:38, 39. Nini endimisaki Paulo ete ezali na eloko moko te oyo ekoki kokabola baklisto na bolingo ya Nzambe? Na ntembe te makambo oyo ye moko akutanaki na yango na mosala ya kosakola elendisaki elikya na ye ete bampasi ekoki te kobongola bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. (2 Bakolinti 11:23-27; Bafilipi 4:13) Lisusu, Paulo ayebaki mokano ya seko ya Yehova mpe makambo oyo asalá mpo na basaleli na Ye. Liwa ekoki nde kolonga bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na bato oyo basalelaki ye na bosembo? Eloko te! Nzambe akobosana ata moke te bato ya sembo oyo bazali kokufa, akosekwisa bango na ntango oyo ebongi.​—Luka 20:37, 38; 1 Bakolinti 15:22-26.

15, 16. Tángá mwa makambo mosusu oyo ekoki ata mokolo moko te kotinda Nzambe ete atika kolinga basaleli na ye ya sembo.

15 Ata soki tokutani na mokakatano nini na bomoi na biso, ezala likama to maladi oyo ekomema biso na liwa, ezala mikakatano ya mbongo, eloko moko te ekoki kolongola bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na basaleli na ye. Ata baanzelu ya nguya, lokola anzelu oyo azangaki botosi mpe akómaki Satana, bakoki te kosala ete Yehova atika kolinga basaleli na ye oyo bamipesi na ye. (Yobo 2:3) Leta akoki kopekisa basaleli ya Nzambe ete básakola lisusu te, bakoki kotya bango na bolɔkɔ, bakoki konyokola bango to kobengana bango na mboka. (1 Bakolinti 4:13) Ntango biyangeli ya mokili ezali koyina biso ndenge wana mpo na ntina moko te, ekoki kotinda bato báboya biso, kasi ezali mpo na yango te nde Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba akosundola biso.

16 Biso baklisto tosengeli kobanga te makambo oyo Paulo abengaki ete “makambo ya ntango oyo,” elingi koloba ezalela mpe bomoi na mokili oyo; ata mpe “makambo makoya nsima” makoki te kobebisa bolingo ya Nzambe mpo na bato na ye. Ata soki banguya ya likoló to ya mabele ebundisi biso, bolingo ya sembo ya Nzambe ezali wana mpo na kosunga biso. Ndenge Paulo alobaki yango, ata “molai, ata bozindo” eloko moko te ekoki kokanga bolingo ya Nzambe. Ya solo, eloko moko te oyo ezali lokola kolɛmbisa biso, to eloko oyo tozali komona lokola ete eleki biso na makasi, ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe; ekelamu moko mpe te ekoki kobebisa boyokani oyo Mozalisi azali na yango na basaleli na ye ya sembo. Bolingo ya Nzambe esukaka te; ezali bolingo ya seko.​—1 Bakolinti 13:8.

Lingá boboto ya Nzambe mpo na libela

17. (a) Mpo na nini kozala na bolingo ya Nzambe “ezali koleka bomoi”? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka boboto ya Nzambe?

17 Bolingo ya Nzambe ezali na ntina nini na miso na yo? Oyokaka lokola Davidi, oyo akomaki ete: “Zambi boboto na yo ezali koleka bomoi, bibebu na ngai ikosanzola yo. Boye nakopambola yo na ntango ya bomoi; nakotombola mabɔkɔ na ngai likoló mpo na nkombo na yo”? (Nzembo 63:3, 4) Mokili ezali ata na eloko moko oyo eleki bolingo ya Nzambe mpe boninga na ye ya sembo? Na ndakisa, tokoki nde koloba ete kozala na mosala oyo efutaka malamu eleki kimya ya makanisi mpe bolamu ya kozala moninga ya Nzambe? (Luka 12:15) Baklisto mosusu bakutanaki na mokakatano monene: basengelaki kopona kati na kotika Yehova to kokufa. Likambo wana ekómelaki Batatoli ya Yehova mingi na bakaa oyo Banazi bazalaki kotya bato ya bolɔkɔ na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Longola kaka mwa bato moke, bandeko na biso baponaki kotikala kati na bolingo ya Nzambe, bandimaki ata kokufa. Baoyo bazali sembo kati na bolingo ya Nzambe bakoki kozala na elikya ete akopesa bango bomoi ya seko, eloko oyo mokili ekoki kopesa bango te. (Malako 8:34-36) Kasi, ekosuka kaka te na kozala na bomoi mpo na libela.

18. Mpo na nini bomoi ya seko ekozala malamu mpenza?

18 Atako moto akoki te kozala na bomoi ya seko soki euti epai ya Yehova te, kanisá ndenge oyo moto akozala soki atikali na bomoi ntango molai mpenza kozanga Mozalisi. Bomoi yango ekozala na ntina te. Na mikolo oyo ya nsuka, Yehova apesi basaleli na ye mosala moko ya ntina. Yango wana, tokoki kozala na elikya ete ntango Yehova, Mokonzi Monene oyo akokisaka mikano na ye, akopesa bomoi ya seko, bomoi ekotonda na makambo kitoko oyo tokoyekola mpe tokosala. (Mosakoli 3:11) Ata soki toyekoli makambo ebele ndenge nini na boumeli ya bankóto na bankóto ya bambula, tokoyeba “bozwi mpe boyebi mpe bososoli ya Nzambe” na mobimba na yango te.​—Baloma 11:33.

Tata alingi bino

19. Yesu alobaki nini na maloba na ye ya nsuka liboso akabwana na bayekoli na ye?

19 Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye 11 oyo batikalaki sembo, Yesu alobaki na bango makambo mingi mpo na kolendisa bango mpo na makambo oyo basengelaki kokutana na yango. Bango nyonso batikaki Yesu te na kati ya bampasi na ye, mpe bango moko bamonaki ndenge oyo alingaki bango. (Luka 22:28, 30; Yoane 1:16; 13:1) Na nsima, Yesu alobaki na bango ete: “Tata ye moko alingi bino.” (Yoane 16:27) Maloba wana esalisaki bayekoli na kososola ndenge oyo Tata na bango ya likoló alingaki bango!

20. Ozali na ekateli ya kosala nini, mpe okoki kotya elikya na eloko nini?

20 Bato mingi lelo oyo babandá kosalela Yehova banda bambula ebele. Na ntembe te, liboso ebongiseli oyo mabe ebomama, tokokutana na mikakatano mingi lisusu. Kotika te ete minyoko to bampasi wana emema yo na kokakatana mpo na kondima ete Nzambe alingaka yo mpenza. Tokolɛmba te kozongela koloba likambo oyo: Yehova alingaka yo. (Yakobo 5:11) Tiká ete mokomoko na biso asala mosala na ye mpe abatela mibeko ya Nzambe na bosembo. (Yoane 15:8-10) Tólekisa libaku moko te ya kokumisa nkombo na ye. Tosengeli kolendisa ekateli na biso ya kokoba kopusana penepene ya Yehova na nzela ya mabondeli mpe na nzela ya koyekola Liloba ya Nzambe. Ata soki tokokutana na makambo nini na mikolo ezali koya, soki tokosala nyonso mpo na kokumisa Yehova, tokozala ntango nyonso na kimya, na elikya makasi na bolingo na ye oyo ekoki kosila te.​—2 Petelo 3:14.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na kobatela elimo mpe makanisi na biso, tozali libosoliboso na mposa ya bolingo ya nani?

• Makambo nini ekoki te kopekisa Yehova alinga biso?

• Mpo na nini kozala na bolingo ya Yehova “ezali koleka bomoi”?

[Bililingi na lokasa 13]

Soki toyoki ete tokabwani na bolingo ya Nzambe, tokoki kosala makasi ete tóbongisa likambo yango

[Elilingi na lokasa 15]

Paulo asosolaki ntina oyo bazalaki konyokola ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto