Lisolo ya bomoi
Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
YA RUSSELL KURZEN
Nabotamaki na mokolo ya 22 Sɛtɛmbɛ 1907, mbula nsambo liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda. Libota na biso ezalaki mpenza na bozwi oyo eleki mpenza ntina. Ntango bokoyoka mwa moke lisolo na biso, nakanisi bokondima yango.
NKƆKƆ na ngai ya mwasi Kurzen, mama ya tata, azalaki koluka solo na ntina ya Nzambe ntango azalaki naino mwana moke. Liboso akóma na bambula ya bolenge, akɔtaki na mangomba ndenge na ndenge na esika akolaki na engumba kitoko ya Spiez, na ekólo Suisse. Na mobu 1887, mwa bambula nsima ya libala na ye, libota na bango elandaki ebele ya bato mosusu ya mboka na bango oyo bakendaki kofanda na États-Unis, na mboka moko pembeni ya mai.
Na nsima, libota na bango efandaki na etúká ya Ohio, esika oyo, soki na 1900, nkɔkɔ ya mwasi azwaki eloko ya motuya oyo azalaki koluka. Azwaki yango na kati ya buku Le temps est proche (Ntango ekómi pene) na lokota ya Allemand, buku oyo Charles Taze Russell akomaki. Nokinoki asosolaki ete makambo oyo atángaki na buku yango ezali kongɛngisa solo ya Biblia. Atako ayebaki kotánga Lingelesi malamu te, asalaki abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Lingelesi. Na bongo, ayekolaki mateya ya solo ya Biblia, mpe na ndenge yango, ayekolaki Lingelesi. Nkɔkɔ ya mobali amipesaki te na makambo ya elimo lokola mwasi na ye.
Na kati ya bana 11 oyo nkɔkɔ Kurzen abotaki, bana mibale ya mibali, John na Adolph, basepelaki na eloko ya motuya ya elimo oyo mama na bango azwaki. John nde tata na ngai; ye azwaki batisimo na 1904 na engumba Saint Louis, na etúká ya Missouri, na liyangani ya Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Lokola Bayekoli ya Biblia mingi bazalaki mpenza bazwi te, babongisaki ete liyangani yango esalema na boumeli ya mikolo oyo fware moko monene oyo babengi “exposition universelle,” esengelaki kosalema na engumba Saint Louis, mpo bandeko bákoka kosala mobembo na bingbunduka, mpamba te tike na yango ekitaki. Nsima, na 1907, tata-leki na ngai Adolph azwaki batisimo na liyangani moko ya etúká na engumba Niagara Falls, na etúká ya New York. Tata na tata-leki na ngai bazalaki kosakola na molende mpenza makambo oyo bayekolaki na Biblia, mpe nsukansuka, bango nyonso mibale bakómaki babongisi-nzela.
Na ndenge yango, ntango ngai nabotamaki na 1907, libota na biso esilaki kokóma na bozwi mingi ya elimo. (Masese 10:22) Nazalaki naino mwana moke mpenza na 1908, ntango baboti na ngai, John na Ida, bamemaki ngai na liyangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo “Liboso, mpo na elonga,” na engumba Put-in-Bay, na etúká ya Ohio. Joseph Rutherford, oyo na ntango wana azalaki mokɛngɛli-motamboli, moto akambaki liyangani yango. Mwa bapɔsɔ liboso, azalaki na engumba Dalton, na etúká ya Ohio, ayaki na ndako na biso mpe asalaki masukulu mpo na Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki wana.
Ngai moko nabosaná makambo yango, kasi nayebaka liyangani oyo tosalaki na engumba Mountain Lake Park, na etúká ya Maryland, na 1911. Na liyangani yango, ngai na leki na ngai ya mwasi Esther, tokutanaki na Ndeko Charles Taze Russell, oyo azalaki kokamba mosala ya Bayekoli ya Biblia, oyo etali kosakola na mokili mobimba.
Na mokolo ya 28 Yuni 1914, mokolo oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, ntango babomaki Archiduc Ferdinand na mwasi na ye, na engumba Sarajevo, libota na biso mobimba ezalaki na liyangani moko ya kimya mpenza na engumba Columbus, na etúká ya Ohio. Banda ntango wana tii lelo, nazalaka na libaku malamu ya kokende na mayangani mingi ya libota ya Yehova. Mayangani mosusu ezalaki kaka na bato soki nkama moko. Mosusu ezalaki mayangani ya minene oyo esalemaki na mabándá mosusu ya masano oyo eleki monene na mokili.
Ndako na biso ezalaki na esika ya malamu
Banda soki 1908 tii 1918, ndako na biso na engumba Dalton—oyo ezalaki na katikati ya engumba Pittsburgh na etúká ya Pennsylvanie mpe engumba Cleveland na etúká ya Ohio—ezalaki esika ya makita mpo na mwa lisangá ya Bayekoli ya Biblia. Ndako yango ekómaki esika oyo tozalaki koyamba bandeko mingi oyo bazalaki koya kosala masukulu. Bazalaki kokangisa bampunda na bango mpe makalo na bango na nsima ya ndako na biso ya kobomba biloko, mpe bazalaki kobɛtela bandeko oyo bayanganaki wana masolo ya kosepelisa mpe masolo mosusu ya elimo. Ezalaki mpenza bantango ya kolendisa!
Tata azalaki molakisi, kasi azalaki kotya makanisi na ye mingimingi na mosala ya koteya oyo eleki misala nyonso, elingi koloba mosala ya kosakola. Azalaki kosala makasi mpo na koteya libota na ye makambo ya Yehova, mpe mpokwa nyonso tozalaki kosala libondeli na libota. Na prɛnta ya 1919, Tata atɛkaki mpunda mpe likalo na biso na dolare 175, mpe asombaki mwa motuka mpo esalisaka ye na kokende kotala bato mingi koleka na mosala ya kosakola. Na 1919 mpe na 1922, mwa motuka yango ememaki libota na biso mobimba, ntango tokendaki na liyangani moko ya monene mingi ya Bayekoli ya Biblia, na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio.
Libota na biso mobimba—Ngai, Mama, Tata, Esther mpe leki na ngai ya mobali John—biso nyonso tozalaki kobima na mosala ya kosakola. Nabosanaka te mbala ya liboso oyo moto moko atunaki ngai motuna ya Biblia. Nazalaki soki na mbula nsambo. Mobali yango atunaki boye: “Mwana, Armagedon ezali nini?” Tata asalisaki ngai moke, mpe napesaki ye eyano ya Biblia.
Nabandi mosala ya ntango nyonso
Na 1931, libota na biso mobimba ekendaki na liyangani ya Columbus, na etúká ya Ohio, epai tozalaki na esengo ya kondima nkombo ya sika: Batatoli ya Yehova. Liyangani yango esimbaki mpenza motema ya John, mpe azwaki ekateli ete ngai na ye tókóma babongisi-nzela.a Tosalaki yango, ezala mpe Tata, Mama mpe Esther. Tozalaki mpenza na eloko ya motuya—libota mobimba esanganaki na mosala ya esengo, oyo etali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe! Natikaka te kozongisela Yehova matɔndi mpo na lipamboli wana. Tozalaki na esengo mingi, kasi bisengo mosusu ezalaki kozela biso.
Na sanza ya Febwali 1934, nabandaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova (babengaka yango Betele) na Brooklyn, na etúká ya New York. Nsima ya mwa bapɔsɔ, babengaki mpe John asala kuna. Tozalaki kolala eteni ya ndako moko tii ntango abalaki mwasi na ye, Jessie, na 1953.
Ntango ngai na John tokɔtaki na Betele, baboti na biso bakendaki kosala lokola babongisi-nzela na bamboka mingi, mpe Esther na mobali na ye George Read bakendaki elongo na bango. Baboti na biso bakobaki kosala lokola babongisi-nzela tii ntango bomoi na bango awa na mabele esukaki na 1963. Esther na mobali na ye babotaki bana mpe babɔkɔlaki bango malamu. Nazali na esengo ya kozala na bana ebele ya mibali mpe ya basi, bana ya ndeko na ngai, oyo nalingaka bango mingi.
Mosala mpe baninga na Betele
Lokola John ayebaki misala ya tekiniki, azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko mosusu na Betele, na misala lokola ya kosala bafono. Batatoli ya Yehova mingi basalelaki bafono yango na mosala na bango ya ndako na ndako. John apesaki mpe mabɔkɔ mpo na kosala bamasini ya kokangisa mpe kokoma bankombo na bazulunalo oyo basengelaki kotindela bato oyo basalaki abonema.
Nabandaki mosala na ngai na Betele na esika oyo bakangisaka babuku. Bilenge mosusu oyo bazalaki kosala na departema ya konyata mikanda na ntango wana bazali kaka kosalela Yehova na Betele na bosembo nyonso tii lelo. Kati na bango ezali na Ndeko Carey Barber mpe Ndeko Robert Hatzfeld. Ezali mpe na bamosusu oyo nakanisaka mingi, kasi basilá kokufa, lokola Nathan Knorr, Karl Klein, Lyman Swingle, Klaus Jensen, Grant Suiter, George Gangas, Orin Hibbard, John Sioras, Robert Payne, Charles Fekel, Benno Burczyk mpe John Perry. Baumelaki na mosala bambula ebele kozanga ete bákanisa “komata mpɛtɛ.” Kasi, mingi kati na baklisto yango ya sembo mpe bapakolami na elimo bayaki kozwa mikumba minene ntango ebongiseli ekolaki. Bamosusu kutu basalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.
Kosala elongo na bandeko wana oyo bamipesaki mpenza eteyaki ngai likambo moko ya ntina mingi. Bato oyo basalaka mosala ya mosuni, bafutaka bango mbongo mpo na mosala na bango ya makasi. Wana ezali lifuti na bango. Kasi kosala na Betele epesaka mapamboli mingi ya elimo, mpe ezali kaka mibali mpe basi ya elimo nde bakoki kokanga ntina ya mbano yango.—1 Bakolinti 2:6-16.
Ndeko Nathan Knorr, oyo akɔtaki na Betele na 1923, ntango azalaki na mbula 18, akómaki mokambi ya departema ya konyata mikanda na bambula ya 1930. Azalaki kotambola na ndako ya konyata mikanda mikolo nyonso mpe azalaki kopesa ndeko mokomoko mbote. Baoyo bazalaki bato ya sika na Betele bazalaki kosepela mingi na ndenge oyo azalaki komibanzabanza mpo na moto mokomoko. Na 1936 tozwaki masini ya sika ya konyata mikanda, oyo eutaki na Allemagne, mpe bandeko mosusu bilenge basalaki mosala makasi mpo na kokangisa masini yango. Na bongo, Ndeko Knorr alataki salopɛti mpe asalaki elongo na bango na boumeli ya sanza mobimba tii basilisaki kokangisa masini yango.
Ndeko Knorr azalaki mosali ya molende mpe mingi kati na biso tozalaki kokokana na ye te. Kasi azalaki mpe kosepela kominanola mpe kozwa mopɛpɛ. Ata na ntango oyo akómaki kokamba mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na sanza ya Yanuali 1942, azalaki mbala mingi kobɛta baseball elongo na bandeko mosusu ya libota ya Betele mpe bayekoli ya Gileadi, eteyelo mpo na kobongisa bamisionɛrɛ, na esika moko ya masano pene na engumba South Lansing, na etúká ya New York.
Na sanza ya Aprili 1950, libota ya Betele ekómaki kofanda na ndako ya sika ya bitaze libwa oyo ezalaki na balabala Columbia Heights, nimero 124, na Brooklyn, na engumba New York. Libota mobimba ya Betele ekómaki kolya na ndako moko. Na boumeli ya mbula misato oyo bazalaki kotonga ndako yango, tokokaki te kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ esika moko. Ezalaki esengo mingi na ntango oyo tozongelaki kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ esika moko! Ndeko Knorr asɛngaki ngai nafandaka pembeni na ye na mesa oyo mokambi ya likita yango afandaka, mpo nayebisaka ye bankombo ya bandeko oyo bakɔti sika na Betele. Na boumeli ya mbula 50, nazalaki kofanda kaka na esika wana na ntango ya kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ, na ntango ya komɛla tii. Na nsima, na mokolo ya 4 Augusto 2000, balongolaki ndako ya kolya na esika yango mpe batindaki ngai na ndako ya kolya oyo babongisaki, na otele ya sika oyo basombaki, oyo kala bazalaki kobenga yango Towers Hotel.
Na bambula ya 1950, nasalaki na departema ya konyata mikanda mpo na mwa ntango, na masini moko babengi linotype, mpo na kobongisa milɔngɔ ya makomi oyo ezalaki kosalisa biso na kosala ba plaques. Mosala wana ezalaki kosepelisa ngai te; kasi, lokola William Peterson, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya bamasini, azalaki na boboto mingi epai na ngai, nazalaki kosepela mingi kosala kuna. Nsima, na 1960, bazalaki na mposa ya basali ya bolingo malamu mpo na kopakola langi na bandako ya sika oyo ezali na balabala Columbia Heights, nimero 107. Nazalaki na esengo ya kopesa mabɔkɔ mpo na kobongisa bandako wana ya sika mpo na libota ya Betele oyo ezalaki se kokola.
Mwa moke nsima ya kosilisa kopakola langi na ndako oyo ezali na balabala Columbia Heights, bapesaki ngai mokumba ya esengo, oyo etali koyamba bapaya oyo bayaka na Betele. Mbula 40 oyo nasali lokola moyambi bapaya ezalaki malamu mingi koleka bambula mosusu oyo nalekisaki na bisika mosusu na Betele. Ezala bapaya oyo bazalaki koya kotala Betele to bandeko ya sika oyo bazalaki kokɔta na Betele, nazalaki na esengo ya komona ete milende oyo tozalaki kosala mpo na mosala ya Bokonzi ezalaki kobota mbuma malamu.
Bayekoli ya solosolo ya Biblia
Libota na biso ya Betele ezali na bozwi mingi ya elimo mpo bandeko oyo bazali na libota yango balingaka Biblia. Ntango nayaki sika na Betele, natunaki Ndeko mwasi Emma Hamilton, oyo azalaki kosala mosala ya kotánga masolo oyo ekomami liboso etyama na mikanda, soki mbala boni atánga Biblia. Alobaki ete: “Mbala ntuku misato na mitano; mpe kobanda wana, nayebi lisusu te mbala boni natánga yango.” Anton Koerber, moklisto mosusu ya molende oyo mpe aumelaki mingi na Betele, alobaki boye: “Kotika ata moke te ete Biblia ezala mosika na yo.”
Nsima ya liwa ya Ndeko Russell na 1916, Ndeko Joseph Rutherford azwaki mokumba oyo Ndeko Russell azalaki na yango, ya kotambwisa misala ya la Société. Ndeko Rutherford azalaki molobi monene mpe azalaki koloba na miso ya bato lokola mobali mpenza; lokola azalaki avoka, ayebaki malamu ndenge ya kolimbola bindimeli ya Batatoli ya Yehova liboso ya Esambiselo Monene ya États-Unis. Nsima ya liwa ya Ndeko Rutherford na 1942, Ndeko Knorr azwaki esika na ye mpe asalaki milende mingi mpo na kokolisa makoki na ye ya koloba na miso ya bato. Lokola ndako na ye ya kolala ezalaki pene na oyo ya ngai, nazalaki mbala mingi koyoka ndenge azalaki kozongela masukulu na ye mbala na mbala. Nsukansuka, lokola azalaki kosala milende ya ndenge wana, akómaki molobi moko ya malamu na miso ya bato.
Na sanza ya Febwali 1942, Ndeko Knorr abimisaki likanisi ya kosala programɛ moko ya eteyelo mpo na kosalisa bandeko nyonso ya Betele na kokolisa makoki na bango ya koteya mpe ya koloba. Eteyelo yango ezalaki kolakisa ndenge ya koluka makanisi na kati ya Biblia mpe ndenge ya kokolisa makoki ya koloba na miso ya bato. Na ebandeli, mokomoko na biso azalaki kozwa mokumba ya kobongisa lisolo moko ya mokuse oyo ezalaki kolobela moto moko oyo Biblia elobeli. Lisolo na ngai ya liboso elobelaki Mose. Na 1943, eteyelo mosusu ya ndenge yango ebandaki kosalema na masangá ya Batatoli ya Yehova, mpe eteyelo yango ezali kokoba tii lelo. Na Betele, moto akoki koyeba Biblia malamu mpe kokóma na mayele mingi ya koteya.
Na sanza ya Febwali 1943, kelasi ya mbala ya liboso ya Gileadi, eteyelo mpo na kobongisa bamisionɛrɛ, ebandaki. Lelo oyo, bana-kelasi ya mbala ya 111 ya Gileadi bauti kozwa badiplome na bango! Kobanda bafungolá yango eleki sikoyo mbula 58, eteyelo yango esili kobongisa bato koleka 7 000 mpo bázala bamisionɛrɛ na mokili mobimba. Na 1943, ntango eteyelo yango ebandaki, Batatoli ya Yehova balekaki moke motango ya 100 000 na mokili mobimba. Lelo oyo, bazali bato koleka milio 6 oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe!
Nazali na botɔndi mpo na libula na ngai ya elimo
Liboso ete eteyelo ya Gileadi esalema, batindaki biso, bandeko misato ya Betele, tótambolaka mpo na kotala masangá na États-Unis. Tozalaki kolekisa mokolo moko, mwa mikolo, to mpe pɔsɔ mobimba, mpo na kolendisa masangá wana na elimo. Liboso bazalaki kobenga biso basaleli ya bandeko, ebengeli oyo nsima ekómaki mosaleli ya zongazonga, to mokɛngɛli ya zongazonga. Kasi eumelaki te, ntango Eteyelo ya Gileadi esalemaki, basɛngaki ngai nazonga mpo na kozala molakisi na Gileadi. Nazalaki molakisi banda kelasi ya mbala ya 2 tii na kelasi ya mbala ya 5; na nsima nakitanaki molakisi moko mpe napesaki lisusu mateya na kelasi ya mbala ya 14. Ndenge nazalaki kozongela elongo na bana-kelasi makambo ya ntina oyo elekaki na lisolo ya ebongiseli ya Yehova na mikolo na biso—masolo oyo mingi na yango nakokaki kobɛta yango ngai moko mpo nazalaki ntango ezalaki koleka—esalisaki ngai na kokanga ntina ya libula na ngai ya elimo.
Libaku malamu mosusu oyo nakutanaki na yango na boumeli ya bambula, ezali ya kokende na mayangani ya mikili mingi ya libota ya Yehova. Na 1963, nasalaki mibembo na mikili mingi, elongo na bandeko mosusu koleka 500 oyo batindamaki mpo na mayangani “Nsango malamu ya seko.” Mayangani mosusu ya minene oyo nakendaki ezali oyo esalemaki na engumba Varsovie, na ekólo Pologne, na 1989; na engumba Berlin, na ekólo Allemagne, na 1990; mpe na engumba Moscou, na ekólo Russie, na 1993. Na liyangani mokomoko, nazwaki libaku ya kokutana na bandeko na biso mibali mpe basi oyo bayikaki mpiko bambula ebele na minyoko ya boyangeli ya Banazi, na boyangeli ya Bakoministe to na nyonso mibale. Bandeko yango bazalaki mpenza bandakisa oyo ezali kolendisa kondima!
Bomoi na ngai na mosala ya Yehova etondaki mpenza na makambo ya malamu! Tii lelo, nazali se kozwa mapamboli mosusu ya elimo. Na bokeseni na bozwi ya mosuni, ntango tozali kokabola biloko yango ya motuya elongo na basusu, bozwi na biso ezali kobakisama. Ntango mosusu nayokaka bandeko mosusu bazali koloba ete elingaki kozala malamu soki babokwamaki na libota ya Batatoli ya Yehova te. Balobaka bongo mpo bakanisaka ete balingaki kolinga mateya ya Biblia mingi koleka soki bámekaka naino bomoi oyo ezali na libándá ya ebongiseli ya Nzambe.
Yango ekamwisaka ngai mingi ntango nayokaka bilenge mingi bazali koloba makambo ya ndenge wana, mpamba te bakanisaka ete ezali malamu te ndenge babɔkwamaki mbala moko na boyebi ya banzela ya Yehova. Kasi, kanisá naino mimeseno nyonso ya mabe mpe makanisi nyonso ya mbindo oyo bato basengeli kotika, ntango bayebi solo ya Biblia wana basili kokóma mikóló. Nazalaka ntango nyonso na botɔndi ndenge baboti na ngai babɔkɔlaki biso misato na nzela ya boyengebene. John asalelaki Yehova na bosembo tii liwa na ye, na sanza ya Yuli 1980, mpe Esther azali Motatoli ya sembo tii lelo.
Nazalaka na esengo ya koloba te soki nazongisi makanisi nsima mpe nakanisi boninga ya malamu oyo nasalaki na bandeko mibali mpe basi baklisto ya sembo. Sikoyo nasali mbula koleka 67 na Betele. Atako nabalá te, nazali na bana mibali mpe bana basi mingi ya elimo, ezala mpe bankɔkɔ ya elimo. Mpe nasepelaka mingi ntango nakanisaka bandeko nyonso ya libota na biso ya elimo na mokili mobimba, oyo nakutani naino na bango te; mokomoko azali mpenza na motuya mingi. Maloba oyo ezali mpenza ya solo, ete: “Lipamboli ya Yehova epesaka bozwi”!—Masese 10:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nazwaki batisimo mokolo ya 8 Marsi 1932. Elingi koloba nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela liboso ete nazwa batisimo.
[Bililingi na lokasa 20]
Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Tata amemi leki na ngai John, Esther, ngai na mama
[Bililingi na lokasa 23]
Nazali koteya na eteyelo ya Gileadi, na 1945
Na likoló, na lobɔkɔ ya mobali: Balakisi ya Eteyelo ya Gileadi: Eduardo Keller, Fred Franz, ngai na Albert Schroeder
[Elilingi na lokasa 24]
Nazali kokanisa bomoi na ngai ya malamu mpenza na mosala ya Yehova