Basukute—Bato ya kala mpe ya kokamwa oyo lisolo na bango eyebani malamu te
BATO ya ekólo moko oyo bafandaka esika moko te, bayaki na bampunda na bango na banzela ya mabele, basakosi na bango etondi na biloko oyo bautaki kobɔtɔla na bitumba. Kobanda soki na mobu 700 tii na mobu 300 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato yango ya kokamwa bayangelaki bamboka mwa mingi ya Mpoto mpe ya Azia, oyo ezalaka mpenza na bazamba mingi te. Na nsima bato yango balimwaki, kasi lisolo na bango ebungá te. Ata na kati ya Biblia balobeli mpe bango. Bato yango ezalaki nde Basukute (Les Scythes).
Na boumeli ya bankama ya bambula, bikólo oyo bafandaka esika moko te, bakisa mpe bampunda oyo ezangi bankolo na yango, bazalaki kotambolatambola na bisika ya mwa bazamba oyo ebandi na Bangomba ya Carpate, na ɛsti ya Mpoto, tii na esika oyo ekómi lelo sudi-ɛsti ya Russie. Na ekeke ya mwambe L.T.B., etumba oyo Hsüan, mokonzi ya Ba-Chinois, abimisaki etindaki bato bákende na ngámbo ya wɛsti. Lokola Basukute bazalaki mpe kokende na wɛsti, bakutanaki na Ba-Cimmériens, oyo bazalaki koyangela mikili ya Caucase mpe bamboka ya ngámbo ya nɔrdi ya Mer Noire; babundisaki bato ya ekólo yango mpe babenganaki bango.
Lokola Basukute bazalaki koluka bozwi, nsima ya kobɔtɔla Ninive, engumba-mokonzi ya Asulia, bapunzaki mpenza engumba yango. Na nsima, basalaki boyokani elongo na Baasulia mpo na kobundisa ekólo ya Bamede na ekólo ya Babilone, mpe bikólo mosusu. Bitumba na bango ekómaki tii na nɔrdi ya Ezipito. Lokola na nsima engumba Bete-sana oyo ezalaki na nɔrdi-ɛsti ya Yisalaele ekómaki kobengama Sukutopoli, emonisi ete ezalaki ntango mosusu na eleko moko boye oyo Basukute babɔtɔlaki mpe engumba yango.—1 Samwele 31:11, 12.
Nsukansuka, Basukute bayaki kofanda na bisika oyo ezalaka na zamba mingi te, bisika oyo Roumanie, Moldavie, Ukraine, mpe sudi ya Russie ezali lelo. Kuna bakómaki na bozwi, bazalaki kosala lokola bakomisyonɛrɛ kati na Bagrɛki mpe baloni-mbuma ya bamboka oyo ezali lelo Ukraine mpe sudi ya Russie. Basukute bazalaki kosombitinya mbuma, mafuta ya nzoi, nsuki ya nyama oyo basalaka na yango bilamba, na biloko oyo ezalaki kouta epai ya Bagrɛki, biloko lokola vinyo, bilamba, bibundeli, mpe biloko ya mosala ya mabɔkɔ. Yango wana bandukaki ebele ya bozwi.
Bayebaki mpenza kotambola na mpunda
Ndenge bato oyo bafandaka na esobe basalelaka kamela, lolenge moko mpe Basukute, bilombe ya bitumba oyo bazalaki kofanda na bisika oyo ezalaka na zamba mingi mpenza te, bazalaki kosalela mpunda. Basukute bayebaki mpenza kotambola na mpunda mpe bazalaki kati na bato ya liboso ya kosalela mwa loposo ya nyama oyo batyaka na mokɔngɔ ya mpunda lokola efandelo; bango mpe bazalaki kati na bato ya liboso ya kosalela eloko ya kotya makolo ntango olingi komata na mpunda to ntango ozali kotambola na yango. Bazalaki kolya mosuni ya mpunda mpe bazalaki komɛla miliki na yango. Bazalaki mpe kotumba mpunda lokola mbeka. Soki Mosukute moko oyo azalaki elombe ya bitumba akufi, bazalaki koboma mpunda na ye mpe bazalaki kokunda yango na lokumu nyonso, bakisa mpe bilamba nyonso oyo balatisaka yango.
Hérodote, moto ya mayele ya masolo ya kala, alobelaki Basukute mpe amonisaki ete bazalaki bato oyo bazwaki mimeseno ya mabe mpenza; na ndakisa, bazalaki kosalela mikuwa ya mitó ya bato lokola bakɔpɔ ya komɛla na yango mai to masanga. Ntango bazalaki kobunda na banguna na bango, bazalaki koboma bango mpe kokatakata bango na mipanga, na bipasola, na makonga mpe na mbanzi.
Bankunda oyo batondisi yango na biloko mpo eumela seko
Basukute bazalaki kosalela bondɔki to maji, bazalaki na lingomba moko oyo esalelaka maji (shamanisme) mpe bazalaki kosambela mɔ́tɔ mpe nzambe-mama moko. (Deteronome 18:10-12) Bazalaki kokanisa ete nkunda ezali esika oyo bakufi bafandaka. Bazalaki kopesa mbeka ya baombo mpe banyama mpo ete nkolo na bango oyo akufi asalelaka bango. Bazalaki kokanisa ete na liwa ya bankumu, biloko na bango ya motuya mpe bato na bango ya mosala bazalaki kokende na bango elongo na “mokili ya sika.” Ntango bakundolaki nkunda ya mokonzi moko, bakutaki mibali mitano oyo bazalaki baombo, batalisi makolo epai ya nkolo na bango mpo na komonisa ete basili komibongisa mpo na kotɛlɛma mpe kozongela mikumba na bango.
Bazalaki kokunda bakonzi na makabo ebele-ebele, mpe na boumeli ya ntango ya matánga, Basukute bazalaki kotangisa makila na bango mpe kokata nsuki. Hérodote akomaki ete: “Bazalaki kokata matoi na bango mwa moke, bazalaki kokokola mitó na bango, bazalaki komikatakata na mabɔkɔ, kozokisazokisa bilongi mpe bazolo na bango, mpe bazalaki kotɔbɔla lobɔkɔ na bango ya mwasi na mbanzi.” Nzokande, Mibeko oyo Nzambe apesaki na Bayisalaele oyo bazalaki na bomoi na eleko wana elobaki ete: “Bokokata nzoto na bino mpo na bakufi te.”—Levitike 19:28.
Basukute batikaki nsima na bango ebele ya malita oyo babengi kurgan. Biloko mingi ya kokembisa oyo bakutaki na kati ya malita yango ezalaki komonisa makambo oyo Basukute bazalaki kosala mokolo na mokolo. Na mobu 1715, mokonzi ya Russie, Tsar Pierre le Grand, abandaki mosala ya kozwa biloko yango nyonso mpe kotya yango esika moko, mpe lelo oyo tokoki komona biloko yango ya kitoko na kati ya ba musée ya Russie mpe ya Ukraine. Biloko yango ezalaki na mayemi ya bampunda, mpongo, ndɛkɛ oyo babengi faucon, nyau, nkoi, mboloko, na bikelamu ya masapo oyo babengi oiseau-griffon to mpe lion-griffon (bikelamu yango ezalaka lokola nyama moko boye, oyo ekoki kozala na mapapu to te, kasi ezali na motó ya nyama mosusu).
Basukute mpe Biblia
Na ndenge ya polele mpenza, Biblia elobeli Basukute mbala moko. Na Bakolose 3:11, totángi boye: “Wana [Bagrɛki, NW] bazali te soko Bayuda te, bakatami ngenga te soko bazangi kokatama ngenga te, basɛnzi te soko Basukute te, baombo te soko bansomi te, kasi Klisto azali nyonso kati na nyonso.” Ntango ntoma moklisto Paulo akomaki maloba wana, liloba ya Grɛki oyo babongoli yango na “Basukute” ezalaki mpenza kolobela ekólo moko boye te, kasi ezalaki nde kolobela bato oyo bazalaki nsuka mpenza ya basɛnzi. Paulo alingaki nde komonisa polelepolele ete na nguya ya elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo esalaka mosala, ata bato ya ndenge wana bazalaki na likoki ya kolata bomoto oyo eyokani na mokano ya Nzambe.—Bakolose 3:9, 10.
Bato mosusu ya arkeoloji bakanisaka mpenza ete nkombo Asekenaza oyo ezali na Yilimia 51:27, yango wana kaka Ashguzai, nkombo oyo Baasulia bazalaki kosalela mpo na kobenga Basukute. Bitanda oyo ezali na makomi ya cunéiforme elobeli kondimana moko oyo Basukute basalaki na Ba-Mannai mpo na kotombokela bokonzi ya Asulia na ekeke ya nsambo L.T.B. Liboso ete Yilimia abanda kosakola, Basukute bazalaki koleka na mokili ya Yuda mpo na kokende mpe kozonga na Ezipito; bazalaki kosala eloko ata moko te ya mabe. Yango wana, mingi kati na baoyo bayokaki Yilimia azali kosakola ete bato bakouta na nɔrdi mpo na kobundisa Yuda, bakokaki kotyela esakweli na ye ntembe.—Yilimia 1:13-15.
Balimboli mosusu ya Biblia bakanisi ete Yilimia 50:42 ezalaki nde kolobela Basukute; vɛrsɛ yango elobi boye: “Bakamati litimbo mpe makonga, bazali na makasi, bakoyoka nsɔmɔ te; mongongo na bango ekonguluma lokola mai-na-monana, batamboli likoló na [mpunda], moto na moto na molɔngɔ lokola moto mpo na etumba, bakotɛmɛla yo, ɛ mwana mwasi ya [Babilone].” Kasi vɛrsɛ oyo elobeli libosoliboso Bamede na Baperse, oyo balongaki Babilone na mobu 539 L.T.B.
Bato mosusu balobi ete “mokili ya Magogo” oyo balobeli na Ezekiele mokapo 38 mpe 39 elobelaka nde bituluka ya Basukute. Nzokande, “mokili ya Magogo” ezali na ndimbola ya elilingi. Emonani mpenza ete mokili yango elimboli nde zingazinga ya mabele, epai Satana na baanzelu na ye babwakamaki nsima ya etumba oyo elekaki na likoló.—Emoniseli 12:7-17.
Basukute bazalaki mpe kati ya bikólo oyo ekokisaki esakweli ya Nahumu mpo na oyo etali kokwea ya Ninive. (Nahumu 1:1, 14) Bakaladi, Basukute, mpe Bamede bapunzaki Ninive na mobu 632 L.T.B., na ndenge wana nde basukisaki bokonzi ya Asulia.
Balimwe na ndenge ya kokamwa
Basukute balimwá, kasi mpo na nini? Moto moko ya arkeoloji oyo ayebani mingi na Ukraine alobaki ete: “Mpo na koloba solo, toyebi te soki likambo nini esalemaki.” Bato mosusu ya mayele na masolo ya kala bakanisaka ete lokola Basukute bamipesaki mingi na koluka bozwi, bazalaki lisusu makasi mpenza te; yango wana Ba-Sarmate, etuluka moko ya sika ya bato ya Azia oyo bafandaka esika moko te, basilisaki Basukute na ekeke ya liboso mpe ya mibale L.T.B.”
Bato mosusu ya mayele na masolo ya kala bakanisaka ete matata oyo ebimaki kati ya Basukute bango moko, yango nde esilisaki bango. Nzokande, bato mosusu ya mayele balobaka ete ezali na mwa ndambo ya Basukute oyo bazali tii lelo kati na ekólo oyo babengaka Ba–Ossetien oyo bafandaka na mikili ya Caucase. Ata soki bazali to basilá, bato wana ya kokamwa batiká nsango—yango esalaki ete nkombo Mosukute elimbola motema mabe.
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
◻ Engumba ya kala
• Engumba ya mikolo oyo
Ebale Danube
SUKUTEA ← NZELA YA MOBEMBO
• Kiev
Ebale Dniepr
Ebale Dniestr
Mer Noire
OSSETIEA
Bangomba ya Caucase
Mer Caspienne
ASULIA ← BANZELA YA BITUMBA
◻ Ninive
Ebale Tigre
MEDE ← BANZELA YA BITUMBA
MESOPOTAMIA
BOKONZI YA ← BANZELA YA BITUMBA
BABILONE
◻ Babylon
Ebale Pelata
BOKONZI YA BAPERSE
◻ Susa
Golfe Persique
PALESTINE
• Bete-sana (Sukutopoli)
EZIPITO ← BANZELA YA BITUMBA
Ebale Nil
Mai Monene ya Méditerranée
GRÈCE
[Bililingi na lokasa 25]
Basukute balingaki bitumba mingi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya The State Hermitage Museum, St. Petersburg
[Bililingi na lokasa 26]
Basukute bazalaki kosombitinya biloko na bango na biloko ya mosala ya mabɔkɔ ya Bagrɛki mpe bakómaki na bozwi mingi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Ukraine Historic Treasures Museum, Kiev