Bangá Yehova mpe batelá mibeko na ye
“Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde nyonso oyo esɛngisami na moto.”—MOSAKOLI 12:13, NW.
1, 2. (a) Ndenge nini kobanga ekoki kobatela biso? (b) Mpo na nini baboti ya mayele basalaka makasi ya koteya bana na bango kobanga?
LÉONARD DE VINCI alobaki ete: “Mpiko ezalaka likama mpo na bomoi, nzokande kobanga ebatelaka bomoi.” Moto oyo azali na mpiko oyo eleki ndelo abangaka likama te; nzokande soki moto azali na kobanga, yango ekobanda ntango nyonso koyebisa ye ete asengeli kokeba. Na ndakisa, soki tokómi penepene ya lobwaku moko mozindo mpe tomoni epai oyo tokosuka soki tokwei, mingi kati na biso tozongaka nsima. Ndenge moko mpe, soki tozali kobanga Nzambe, yango ekosalisa biso tózala na boyokani malamu elongo na ye, ndenge toyekolaki yango na lisolo eleki; kasi kobanga Nzambe ebatelaka biso mpe na makama.
2 Kasi, esɛngeli ete báyebisa biso makama oyo biloko mingi oyo tosalelaka na moi ya lelo ebimisa mpo tókóma kobanga yango. Na ndakisa, lokola bana mike bayebaka te ete kura to mpe mituka oyo ezali kotambola na nzela ezali makama, ezali mpasi te mpo bázwa makama yango.a Baboti ya mayele bateyaka bana na bango bázala na kobanga, bakebisaka bango ntango nyonso na makama oyo ezali esika oyo bafandi. Baboti bayebaka ete soki bana na bango bazali na kobanga ya ndenge wana, ekoki kobikisa bomoi na bango.
3. Mpo na nini mpe ndenge nini Yehova akebisaka biso na makama ya elimo?
3 Yehova azali lokola baboti ya ndenge wana; amibanzabanzaka mpo na bolamu na biso. Lokola azali Tata ya bolingo, asalelaka Liloba na ye mpe ebongiseli na ye mpo na koteya biso mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17) Ntango ateyaka biso, Nzambe akebisaka biso “lisusu mpe lisusu” na makama ya elimo mpo tóbangaka yango. (2 Ntango 36:15; 2 Petelo 3:1) Banda na ntango ya kala, bato bakokaki kokima makama mingi ya elimo mpe bampasi mosusu ‘soki babongisaki motema na bango mpo na kobanga Nzambe mpe kobatela mibeko na ye.’ (Deteronome 5:29) Na “ntango ya mpasi” oyo tozali, ndenge nini tokoki kobongisa mitema na biso mpo na kobanga Nzambe mpe kokima makama ya elimo?—2 Timote 3:1.
Tókima mabe
4. (a) Baklisto basengeli kolona ezaleli ya koyina nini? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka masumu? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
4 Biblia elobi ete “kobanga Yehova elimboli koyina mabe.” (Masese 8:13, NW) Diksionɛrɛ moko ya maloba ya Biblia elimboli koyina yango lokola “mabe oyo moto ayokaka na motema na ye ntango azali liboso ya makambo oyo eboyami, oyo eyinami, oyo etyolami mpe oyo moto alingaka te kopusana penepene na yango to kozala na boyokani na yango.” Elingi koloba ete kobanga Nzambe elimboli mpe koyina na motema moko makambo nyonso oyo ezali mabe na miso ya Yehova to koyoka mpii liboso na yango.b (Nzembo 97:10) Kobanga Nzambe etindaka biso na kokima mabe, ndenge kaka tobangaka ntango tokómi penepene ya lobwaku moko mpe makanisi na biso eyebisaka biso ete tosengeli kozonga nsima. Biblia elobi ete: “Moto akokima mabe na nzela ya kobanga Yehova.”—Masese 16:6, NW.
5. (a) Ndenge nini tokoki kolendisa ezaleli ya kobanga Nzambe mpe koyina oyo ezali mabe? (b) Lisolo ya ekólo Yisalaele ezali koteya biso nini na likambo yango?
5 Tokoki kosala molende mpo na ezaleli yango ya kobanga makambo ya mabe mpe koyina yango soki tozali kokanisa mbuma mabe oyo lisumu ebotaka. Biblia elobi na biso ete tokobuka oyo tozali kolona: soki tozali kolona na nzoto, tokobuka na nzoto; soki tozali kolona na elimo, tokobuka na elimo. (Bagalatia 6:7, 8) Yango wana, Yehova amonisaki polele mbuma mabe oyo moto abukaka soki aboyi kotosa mibeko na ye mpe soki atiki losambo ya solo. Yisalaele ezalaki mwa ekólo moke mpe ezalaki makasi mpenza te; soki Nzambe abatelaki bango te, mbɛlɛ bakokaki kotɛlɛma te liboso ya bikólo mosusu ya mabe mpe oyo ezalaki makasi mingi oyo ezalaki zingazinga na yango. (Deteronome 28:15, 45-48) Yisalaele esukaki mabe mpo bazangaki botosi, mpe makambo yango nyonso ekomamaki na Biblia “mpo na kokebisa” biso mpo tózwela yango liteya mpe tólona ezaleli ya kobanga Nzambe.—1 Bakolinti 10:11, NW.
6. Bandakisa nini oyo euti na Biblia tokoki kotalela mpo na koyekola kobanga Nzambe? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
6 Longola makambo oyo ekómelaki libota ya Yisalaele, Biblia ezali na masolo ya bato mosusu oyo bakómaki na zuwa, bato oyo basalaki pite to ekobo, bato oyo bakómaki na lokoso, mpe bato oyo bakómaki na lolendo.c Bamosusu basalelaki Yehova bambula ebele, kasi na eleko moko na bomoi na bango, ezaleli ya kobanga Nzambe ekitaki na mitema na bango, mpe babukaki mbuma mabe. Soki tokanisi bandakisa ya ndenge wana oyo ezali na Biblia, yango ekoki kobakisela biso makasi na ekateli na biso ya kokwea te na mabunga ya ndenge wana. Ekozala mpenza mawa soki tozeli ete tózwa naino likama bongo na nsima tólanda toli ya Nzambe! Bato mingi bamikosaka, bakanisaka ete moto azwaka liteya malamu soki akutani na makambo ya mpasi, mingimingi nsima ya kosala nyonso oyo motema na ye esepelaki.—Nzembo 19:7.
7. Nani oyo Yehova ayambaka ye na hema na ye ya elilingi?
7 Ntina mosusu oyo ezali mpenza kotinda biso na kolona ezaleli ya kobanga Nzambe ezali mposa na biso ya kobatela boyokani na biso na ye. Tobangaka koyokisa Yehova mawa mpamba te boninga oyo tozali na yango elongo na ye ezali na motuya mingi na miso na biso. Moto oyo “akotambolaka sembo mpe [akolandaka] boyengebene” ye wana nde Nzambe atalelaka ye lokola moninga na ye mpe ayambaka ye na hema na ye ya elilingi. (Nzembo 15:1, 2) Soki tozali kopesa motuya na boyokani na biso na Mozalisi, tokolinga kotambola na bosembo na miso na ye.
8. Bayisalaele ya ntango ya Malaki basalaki makambo nini oyo emonisaki ete batalelaki boninga na bango na Nzambe lokola eloko ya mpamba?
8 Nzokande, Bayisalaele mosusu na eleko ya Malaki batalelaki boninga na bango na Nzambe lokola eloko ya mpamba. Na esika bábanga Yehova mpe bákumisa ye, bazalaki kopesa ye mbeka ya banyama oyo ezalaki na maladi mpe oyo ebukaná makolo. Ndenge oyo bazalaki kotalela libala emonisaki mpe ete bazalaki kobanga Nzambe te. Lokola bazalaki na mposa ya kobala basi mosusu ya bilenge, babomaki mabala na basi na bango oyo babalaki ntango bazalaki bilenge mpo na makambo ya mpambampamba. Malaki alobaki na bango ete Yehova ayini “koboma libala” mpe ete bango moko bamikabolaki na Nzambe mpo na kozanga bosembo na bango. Nzambe akokaki te kondima bambeka na bango mpamba te, na maloba ya elilingi, etumbelo na ye etondaki na mpisoli ya mawa ya basi oyo bango basundolaki. Lokola baboyaki kotosa mibeko ya Nzambe na nko, Yehova atunaki motuna oyo: “Wapi kobanga oyo bozali kobanga ngai?”—Malaki 1:6-8, NW; 2:13-16, NW.
9, 10. Ndenge nini tokoki komonisa ete kozala baninga ya Yehova ezali na ntina mingi na miso na biso?
9 Lelo oyo mpe, Yehova azali komona mpasi ya basi mingi to mpe mibali mingi oyo balongani na bango bazali kosala ekobo; azali mpe komona mpasi ya bana oyo baboti na bango bazali koluka bolamu na bango moko. Makambo yango epesaka ye mawa. Moto oyo azali mpenza moninga ya Nzambe atalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango mpe asalaka makasi ete abatela libala na ye, aboya makanisi ya bato ya mokili oyo bazali komona libala lokola eloko mpamba mpe ‘akimaka pite.’—1 Bakolinti 6:18.
10 Soki na kati ya libala mpe na makambo mosusu ya bomoi, tozali koyina nyonso oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe soki mitema na biso ezali mpenza kosepela na boninga na biso na Yehova, ye akolinga biso mpe akosepela na biso. Ntoma Petelo alobaki na kokakatana ata moke te ete: “Ya solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Makomami ezali komonisa biso bandakisa mingi ya bato oyo baponaki kosala oyo ezali sembo ntango bakutanaki na komekama ndenge na ndenge; nyonso wana mpo bazalaki kobanga Nzambe.
Bato misato oyo babangaki Nzambe
11. Ntango nini balobaki ete Abalayama azali moto oyo ‘abangaka Nzambe’?
11 Biblia elobeli moto moko oyo azalaki moninga ya Yehova, ezali Abalayama. (Yisaya 41:8) Ezaleli ya kobanga Nzambe oyo Abalayama azalaki na yango emekamaki ntango Nzambe asɛngaki ye akaba Yisaka, mwana na ye kaka moko, lokola mbeka; nzokande Nzambe alobaki ete bankɔkɔ ya Abalayama, oyo Yisaka akobotela ye, bakokóma ekólo moko monene. (Genese 12:2, 3; 17:19) “Moninga ya Yehova” alingaki kolonga komekama makasi ndenge wana? (Yakobo 2:23, NW) Ntango kaka Abalayama atombolaki mbeli mpo na koboma Yisaka, anzelu ya Yehova alobaki: “Tyá lobɔkɔ na yo na mwana te mpe salá likambo na ye te, mpo ete sikawa nayebi ete obangi Nzambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo na likinda.”—Genese 22:10-12.
12. Nini elendisaki Abalayama na kobanga Nzambe, mpe ndenge nini tokoki komonisa elimo ya ndenge wana?
12 Atako liboso ya likambo yango, Abalayama amonisaki ete abangaka Yehova, mokolo wana amonisaki yango na ndenge oyo moto te akoki kotyela yango ntembe. Ndenge andimaki kokaba Yisaka lokola mbeka emonisaki kaka te ete azalaki na botosi mpe na limemya. Emonisaki mpe ete Abalayama azalaki na elikya makasi ete Tata na ye ya likoló akokokisa elaka na Ye, ata soki mpo na yango ekosɛnga ete asekwisa Yisaka. Ndenge Paulo akomaki yango, Abalayama “andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.” (Baloma 4:16-21) Biso mpe tokondima kosala mokano ya Nzambe ata soki yango esɛngi biso makambo oyo ezali mpenza mpasi? Tozali mpenza na elikya ete soki tozali na botosi ndenge wana, tokozwela yango matomba na nsima, lokola toyebi ete Yehova “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye”? (Baebele 11:6) Yango wana nde kobanga Nzambe na ndenge ya solosolo.—Nzembo 115:11.
13. Mpo na nini tolobi ete Yosefe alobaki solo ntango alobaki mpo na ye moko ete azalaki moto oyo ‘abangaka Nzambe’?
13 Tólobela ndakisa mosusu ya moto oyo amonisaki na misala na ye ete azalaki kobanga Nzambe; nkombo na ye Yosefe. Ntango Yosefe azalaki moombo na ndako ya Potifala, mokolo na mokolo bazalaki komeka ye na kosala ekobo. Ekoki mpenza kozala ete Yosefe azalaki na ndenge mosusu ya kosala te mpo na koboya kokutana na mwasi ya nkolo na ye oyo azalaki koluka ye ntango nyonso mpo básangisa na ye nzoto. Na nsuka, ntango mwasi yango “asimbaki elamba na ye,” Yosefe “atikaki elamba na ye na lobɔkɔ na ye mpe abimaki na ndako.” Ndenge nini Yosefe azwaki makasi ya kokima mbala moko mabe? Na ntembe te, ezali mpenzampenza mpo azalaki kobanga Nzambe, alingaki te kosala “mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe.” (Genese 39:7-12) Yosefe alobaki solo ntango ete azalaki moto oyo ‘abangaka Nzambe.’—Genese 42:18.
14. Ndenge nini motema mawa ya Yosefe ezali komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe na ndenge ya solosolo?
14 Bambula mingi na nsima, Yosefe akutanaki lisusu na bandeko na ye oyo bayokelaki ye mawa te mpe batɛkisaki ye na boombo. Akokaki mpenza kozongisela bango mabe oyo basalaki ye na ntango oyo bazalaki mpenza na mposa ya bilei. Kasi, ye oyo anyokolaka bato azali moto oyo abangaka Nzambe te. (Levitike 25:43) Yango wana, ntango Yosefe amonaki ete bandeko na ye babongolaki mpenza motema, alimbisaki bango. Na ndakisa ya Yosefe, ezaleli ya kobanga Nzambe ekosalisa biso ete tózongisa malamu epai na ye oyo asali biso mabe, mpe ezaleli yango ekobatela biso mpo tókwea na komekama te.—Genese 45:1-11; Nzembo 130:3, 4; Baloma 12:17-21.
15. Mpo na nini etamboli ya Yobo esepelisaki motema ya Yehova?
15 Moto mosusu oyo azalaki mpenza kobanga Nzambe ezali Yobo. Yehova alobaki na Zabolo ete: “Okanisi na motema na yo likambo ya moombo na ngai, Yobo? Mpo ete mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu [mingi] mpe na sembo, oyo [abangaka, NW] Nzambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:8) Bizaleli malamu ya Yobo ezalaki kosepelisa motema ya Tata na ye ya likoló na boumeli ya bambula ebele. Yobo azalaki kobanga Nzambe mpamba te ayebaki ete yango nde ezalaki sembo mpe yango nde nzela eleki malamu. Yobo alobaki ete: “[Kobanga Yehova, NW], yango ezali mayele, kolongwa na mabe, yango ezali bososoli.” (Yobo 28:28) Yobo azalaki na mwasi na ye, azalaki kolula bilenge basi mosusu te; na motema na ye, azalaki mpe kolona makanisi ya kosala ekobo te. Atako azalaki moto ya bozwi, aboyaki kotya motema na ye na bozwi mpe aboyaki losambo nyonso ya bikeko.—Yobo 31:1, 9-11, 24-28.
16. (a) Ndenge nini Yobo amonisaki boboto? (b) Ndenge nini Yobo amonisaki ete azalaki kolimbisa?
16 Nzokande, kobanga Nzambe elimboli kaka te koboya kosala mabe, kasi elimboli mpe kosala oyo ezali malamu. Yango wana, Yobo azalaki kosalisa bato bakufá miso, batɛngumi mpe babola. (Levitike 19:14; Yobo 29:15, 16) Yobo asosolaki ete “Ye oyo akoboya koyokela moninga na ye mawa, akotika mpe kobanga Ye oyo azali na Nguya Nyonso.” (Yobo 6:14, NW) Koboya kosalela baninga boboto ekoki mpe kozala koboya kolimbisa to kobomba nkanda na motema. Ndenge Nzambe atindaki ye, Yobo abondelaki mpo na baninga na ye misato, baoyo bapesaki ye mawa mingi. (Yobo 42:7-10) Bongo biso, tokoki mpe komonisa elimo ya ndenge wana, elingi koloba kolimbisa ndeko na biso oyo asali biso mabe? Soki tobondeli na bosembo mpenza mpo na moto oyo asali biso mabe, yango ekoki kosalisa biso tóbosana nkanda. Mapamboli oyo Yobo azwaki lokola azalaki na ezaleli ya kobanga Nzambe ezali komonisa biso mwa moke ‘malamu mingi mpenza oyo Yehova abombeli bango bakobangaka ye.’—Nzembo 31:19; Yakobo 5:11.
Bokeseni kati na kobanga Nzambe mpe kobanga moto
17. Kobanga bato ekoki kosala biso nini, kasi mpo na nini moto oyo azali kobanga bato azali komona mosika te?
17 Kobanga Nzambe ekoki kotinda biso na kosala oyo ezali malamu, nzokande, kobanga moto ekoki kozala likama mpo na kondima na biso. Yango wana, ntango alendisaki bantoma ete bázala basakoli ya molende ya nsango malamu, Yesu alobaki na bango boye: “Bóbanga bango te baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te. Bóbanga nde ye oyo azali na nguya kobebisa na molimo mpe na nzoto kati na Gɛɛna.” (Matai 10:28) Yesu alobaki ete ye oyo azali kobanga bato azali komona mosika te, mpamba te bato bakoki te kolongola biso elikya ya bomoi na mikolo ezali koya. Longola yango, tobangaka Nzambe mpo toyebi ete azali na nguya ya kokamwa oyo, ata soki basangisi nguya ya bikólo nyonso, ekokoka ata moke te kotɛlɛma liboso ya nguya na ye. (Yisaya 40:15) Na ndakisa ya Abalayama, tozali na elikya mpenza ete Yehova azali na nguya ya kosekwisa basaleli na Ye ya sembo. (Emoniseli 2:10) Yango wana, tozali koloba na elikya nyonso ete: “Soko Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?”—Baloma 8:31.
18. Ndenge nini Yehova apesaka mbano epai ya baoyo babangaka ye?
18 Ata soki ndeko moko ya libota to mwana moko ya mobulu na kelasi nde azali kotɛmɛla biso, tokomona ete “elikya ezalaka makasi ntango moto azali kotyela Yehova motema.” (Masese 14:26, NW) Tokoki kobondela Nzambe apesa biso makasi mpo toyebi ete akoyoka biso. (Nzembo 145:19) Yehova abosanaka te bato oyo babangaka ye. Na nzela ya mosakoli Malaki, alobi na biso ete: “Bongo, baoyo [babangaki Yehova, NW] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda ya kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.”—Malaki 3:16.
19. Kobanga nini ekosuka, kasi kobanga nini oyo ekotikala libela?
19 Etikali moke bato nyonso awa na mabele bakosambela Yehova mpe kobanga bato ekozala lisusu te. (Yisaya 11:9) Kobanga nzala, maladi, mobulu mpe bitumba ekosila. Kasi, bato bakolanda kobanga Nzambe libela na libela; basaleli na ye ya sembo na likoló mpe awa na mabele bakolanda komemya ye, kotosa ye mpe kokumisa ye. (Emoniseli 15:4, NW) Liboso makambo wana eya, tólanda toli ya Salomo oyo epemamaki na elimo ete: “Tiká te ete motema na yo eyokela bato mabe elulela, kasi zalá na [kobanga Yehova, NW] mokolo mobimba. Zambi nsuka ekozala solo mpe elikya na yo ekokatana te.”—Masese 23:17, 18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikóló mosusu babangaka lisusu te makama oyo mosala oyo bameseni kosala ekoki komemela bango. Batunaki moto moko ya mosala ya mabɔkɔ mpo na nini mbala mingi basali ya mabaya bakatanaka misapi, alobaki ete: “Mpamba te babangaka lisusu te bambeli oyo ebalukaka mbangumbangu na masini ya mabaya oyo esalaka na kura.”
b Yehova ye moko ayokaka mpii ndenge yango. Na ndakisa, Baefese 4:29 (NW) ebengi maloba ya nsɔni ete “liloba ya kopɔla.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ya kopɔla” esalelamaka mpo na mbuma, mbisi to mosuni oyo ebebi. Liloba yango ezali komonisa mpenza ete maloba ya mabe to ya nsɔni esengeli kopesa biso mposa ya kosanza. Ndenge moko mpe, Makomami elobi na bisika mingi ete bikeko ezali “mbindo.” (Deteronome 29:17; Ezekiele 6:9) Ndenge oyo toyokaka mabe liboso ya bosɔtɔ to nyei, ekoki kosalisa biso tókanga ntina malamu ndenge oyo Nzambe ayokaka mpii mpo na losambo nyonso ya bikeko.
c Na ndakisa, talelá lisolo ya Kaina (Genese 4:3-12); Davidi (2 Samwele 11:2–12:14); Gehazi (2 Mikonzi 5:20-27) mpe Uziya (2 Ntango 26:16-21).
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini toyekolaka koyina mabe?
• Na mikolo ya Malaki, ndenge nini Bayisalaele mosusu batalelaki boninga na bango na Yehova lokola eloko mpamba?
• Na oyo etali kobanga Nzambe, ndakisa ya Abalayama, Yosefe mpe Yobo ekoki koteya biso nini?
• Kobanga oyo wapi ekotikala libela na libela mpe mpo na nini?
[Elilingi na lokasa 19]
Baboti ya mayele bateyaka bana na bango kobanga oyo ebongi
[Elilingi na lokasa 20]
Ndenge kaka kobanga esalisaka biso tókima likama, kobanga Nzambe esalisaka biso tókima mabe
[Elilingi na lokasa 23]
Yobo azalaki kobanga Nzambe ata ntango baninga na ye misato ya lokuta batyanaki na ye ntembe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na libongoli ya Biblia ebengami Vulgate latine, 1795