Yehova azali ndakisa eleki monene ya kozala motema malamu
“Bótonda [Yehova] na bibele zambi [Yehova] azali malamu.”—YILIMIA 33:11.
1. Mpo na nini toyokaka mposa ya kokumisa Nzambe mpo na motema malamu na ye?
YEHOVA NZAMBE azali malamu na ndenge ya kokoka mpenza. Mosakoli Zekalia alobaki ete: “[Motema malamu, NW] na ye ezali monene boni!” (Zekalia 9:17) Nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na kobongisa mabele mpo biso tózala na bomoi ya malamu ezali komonisa motema malamu na ye. (Genese 1:31) Ata mokolo moko te tokoyeba makambo nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na kokela molɔ́ngɔ́. (Mosakoli 3:11; 8:17) Kasi, mwa moke oyo toyebi epesaka biso mposa ya kokumisa Nzambe mpo na motema malamu na ye.
2. Ndenge nini okoki kolimbola motema malamu?
2 Kozala na motema malamu elimboli kozala na bizaleli ya malamu mpenza to bizaleli oyo ebongi. Kasi, yango elimboli kaka te kozanga bizaleli mabe. Motema malamu ezali na kati ya mbuma ya elimo, ezali ezaleli oyo moto amonisaka na misala ya malamu. (Bagalatia 5:22, 23, NW) Tomonisaka motema malamu ntango tozali kosalela bato mosusu makambo ya malamu mpe oyo ekozala mpo na litomba na bango. Na mokili oyo, makambo oyo bato mosusu bazali kotalela ete ezali malamu, ekoki komonana mabe na esika mosusu. Nzokande ezali na lolenge moko ya kotalela motema malamu oyo tosengeli komonisa mpo tózala na kimya mpe na esengo. Nani oyo abongi mpenza komonisa biso lolenge yango?
3. Mokapo ya Genese 2:16, 17 emonisi nini mpo na lolenge oyo ebongi ya kotalela motema malamu?
3 Nzambe nde ayebisaka lolenge oyo ebongi ya komonisa motema malamu. Na ebandeli, Yehova nde apesaki moto ya liboso mobeko ete: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Mozalisi nde asengeli koteya bato malamu na mabe.
Yehova amoniseli biso motema malamu oyo tobongaki na yango te
4. Nzambe asali nini mpo na bato banda Adama asalaki lisumu?
4 Ntango Adama asalaki lisumu mpe aboyaki kondima ete Nzambe nde asengeli kolakisa ye makambo oyo ezali malamu, bato babungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe ya kokoka. (Genese 3:1-6) Kasi, liboso ete Adama abota bana na ye mpe atikela bango lisumu na liwa, Nzambe asakolaki ete Mombóto moko ya kokoka akoya. Yehova alobaki na Satana Zabolo, “nyoka ya kalakala” ete: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Emoniseli 12:9; Genese 3:15, NW) Mokano ya Yehova ezalaki ete abikisa bato ya masumu. Yehova amoniselaki bato motema malamu oyo babongaki na yango te; abongisaki makambo wana mpo na lobiko ya bato nyonso oyo bakomonisa na misala na bango ete bandimi mbeka oyo Mwana na ye ya bolingo apesaki mpo na kosikola bato.—Matai 20:28; Baloma 5:8, 12.
5. Atako tobotamaka na mposa ya kosala mabe oyo eutá na bankɔkɔ na biso ya liboso, mpo na nini tokoki komonisaka motema malamu ata mwa moke ?
5 Toyebi malamu ete lokola Adama asalaki lisumu, tobotamaka na mposa ya mabe na mitema na biso. (Genese 8:21) Kasi, Yehova asalisaka biso tómonisaka motema molamu ata mwa moke. Soki tokangami na makambo oyo toyekoli na kati ya makomi mosantu, ‘ekopesa biso mayele mpo na kobika,’ ‘ekopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na mosala nyonso ya malamu’ mpe ekosalisa biso na kosala oyo ezali malamu na miso na ye. (2 Timote 3:14-17, NW) Kasi, mpo makambo oyo Makomami ezali koteya biso ememela biso litomba mpe tómonisa motema malamu, tosengeli kokanisa lokola mokomi ya nzembo; ye ayembaki ete: “Yo [Yehova] ozali malamu, mpe okosalaka malamu; teyá ngai mibeko na yo.”—Nzembo 119:68.
Motema malamu ya Yehova ekumisami
6. Ntango Mokonzi Davidi asɛngaki ete bámema sanduku ya kondimana na Yelusaleme, Balevi bayembaki nzembo oyo ezalaki na maloba nini?
6 Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, andimaki ete Nzambe azali malamu mpe alukaki toli na Ye. Alobaki ete: “[Yehova] azali malamu mpe na boyengebene, bongo akoteyaka bato ya masumu kati na nzela.” (Nzembo 25:8) Na kati ya malako oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki na Mibeko Zomi, mibeko ya ntina oyo ekomamaki likoló ya mabanga mibale mpe babombaki yango na kati ya kɛsi moko mosantu oyo bazalaki kobenga sanduku ya kondimana. Ntango Davidi asɛngaki bámema Sanduku yango na Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yisalaele, Balevi bayembaki nzembo moko oyo elobaki boye: “Bótɔnda [Yehova], mpo ete azali malamu, zambi boboto na ye ekoumela seko.” (1 Ntango 16:34, 37-41) Tokanisi mpenza ete ezalaki esengo na koyoka maloba ya ndenge wana na minɔkɔ ya Balevi oyo bazalaki bayembi!
7. Likambo nini esalemaki ntango bamemaki Sanduku na Esika-Eleki-Bosantu mpe nsima ya libondeli ya Salomo ya bofungoli tempelo?
7 Bazongelaki mingi lisusu masanzoli yango ntango basalaki fɛti ya kofungola tempelo oyo Salomo, mwana ya Davidi, atongisaki. Batyaki sanduku ya kondimana na Esika-Eleki-Bosantu na kati ya tempelo oyo batongaki; na nsima, Balevi bayembelaki Yehova ete, “zambi ye azali malamu; boboto na ye ekoumela seko.” Mokolo yango, likambo moko ya kokamwa esalemaki: lipata moko ezipaki tempelo mobimba; likambo oyo emonisaki ete nkembo ya Yehova ezalaki wana. (2 Ntango 5:13, 14) Salomo asalaki libondeli ya bofungoli tempelo, bongo na nsima, “mɔ́tɔ ekitaki longwa na likoló mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe mbeka mosusu.” Ntango bamonaki likambo yango, “bana ya Yisalaele . . . bagumbamaki na mabele na nzela, bakumisaki mpe basanzolaki [Yehova] ete, Mpo ete ye azali malamu, boboto na ye ekoumela seko.” (2 Ntango 7:1-3) Nsima ya fɛti wana oyo eumelaki mikolo 14, Bayisalaele bazongaki na bandako na bango “na esengo na mitema mpo na malamu mamonisaki [Yehova] epai ya Davidi mpe epai ya Salomo mpe epai ya libota na ye Yisalaele.”—2 Ntango 7:10.
8, 9. (a) Atako Bayisalaele bakumisaki Yehova ete azali malamu, na nsima bakómaki kosala makambo nini? (b) Yilimia asakolaki likambo nini mpo na Yelusaleme, mpe ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?
8 Kasi, na nsima Bayisalaele batikaki kosala makambo oyo bayembaki na nzembo mpo na kokumisa Nzambe. Na nsima, bato ya Yuda ‘bakumisaki [Yehova kaka, NW] na bibebu na bango.’ (Yisaya 29:13) Na esika ya kosala makambo oyo Nzambe atalelaka ete ezali malamu, bakómaki kosala makambo ya mabe. Basalaki mabe nini? Bakómaki kosambela bikeko, kosala pite mpe ekobo, konyokola babola mpe kosala masumu mosusu ya minene! Yango wana, na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), banguna bayaki kobebisa Yelusaleme mpe bamemaki bato ya Yuda na boombo na Babilone.
9 Na ndenge yango, Nzambe apesaki bato na ye etumbu. Kasi, na nzela ya mosakoli Yilimia, Nzambe ayebisaki ete na kati ya Yelusaleme bakotika te koyoka mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bótɔnda [Yehova] na bibele zambi [Yehova] azali malamu, boboto na ye ekoumela seko.” (Yilimia 33:10, 11) Esalemaki mpe ndenge yango. Mboka na bango etikalaki mpamba mbula 70; bongo na nsima, na mobu 537 L.T.B., ndambo ya Bayuda oyo batikalaki bazongaki na Yelusaleme. (Yilimia 25:11; Danyele 9:1, 2) Batongaki lisusu etumbelo na Ngomba Molia, esika mpenza oyo tempelo ezalaki mpe babandaki kopesa Nzambe bambeka. Na mbula ya mibale banda kozonga na bango, batongaki miboko ya tempelo. Bazalaki na esengo mpenza na ntango yango! Ezela akomaki boye: “Wana basali batongaki miboko ya Tempelo ya [Yehova], batyaki banganga na bilamba na bango mpe na mindule, mpe Balevi bana ya Asafa na bilonza ete básanzola [Yehova] lokola na lilako ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele. Bayembanaki mpo na kosanzola mpe kotɔnda [Yehova] ete, Zambi azali malamu mpo ete boboto na ye ekoumela seko epai na Yisalaele.”—Ezela 3:1-11.
10. Maloba nini ya ntina mingi ezali na ebandeli mpe na nsuka ya Nzembo 118?
10 Na bisika mingi na mokanda ya nzembo, tokoki kokuta maloba ya ndenge wana oyo ezali kokumisa Yehova mpo na motema malamu na ye. Moko na yango ezali Nzembo 118, oyo bato ya ndako mokomoko ya Yisalaele bazalaki koyemba na nsuka ya Elambo ya Elekeli. Nzembo yango ebandi mpe esuki na maloba oyo: “Ɛ bópesa matɔndi na bino epai ya [Yehova] mpo ete azali malamu; zambi boboto na ye ekoumelaka lobiko na lobiko.” (Nzembo 118:1, 29) Ekoki kozala ete na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye na mobu 33 na ntango na biso (T.B.), Yesu Klisto na bantoma na ye basukisaki kosanzola Nzambe na maloba wana.—Matai 26:30.
“Nabondeli yo, monisá ngai nkembo na yo”
11, 12. Ntango nini Mose amonaki mwa moke nkembo ya Nzambe mpe ayokaki maloba nini?
11 Boyokani oyo ezali kati na motema malamu ya Yehova mpe boboto na ye emonisamaki mpo na mbala ya liboso na ntango ya Ezela te, kasi bankama ya bambula liboso na yango. Ntango Bayisalaele basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo na kati ya esobe mpe babomaki bato nyonso oyo basalaki mabe, mwa moke na nsima Mose asɛngaki Yehova likambo oyo: “Nabondeli yo, monisá ngai nkembo na yo.” Lokola Yehova ayebaki ete soki Mose amoni elongi na Ye akoki kotikala na bomoi te, alobaki boye: “Ngai, nakolekisa motema malamu na ngai nyonso liboso ya elongi na yo.”—Exode 33:13-20, NW.
12 Mokolo oyo elandaki, Yehova alekisaki motema malamu na ye liboso ya elongi ya Mose na Ngomba Sinai. Mokolo yango, Mose amonaki mwa moke nkembo ya Nzambe mpe ayokaki maloba oyo: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe [kobuka mobeko, NW] mpe lisumu, kasi [akoki kozangisa te kopesa etumbu, akopesa bana na bankɔkɔ etumbu mpo na mabe ya batata, NW] kino libota ya misato mpe libota ya minei.” (Exode 34:6, 7) Maloba yango emonisi ete motema malamu ya Yehova ezali na boyokani na boboto na ye mpe bizaleli na ye mosusu. Soki totaleli maloba yango malamumalamu, ekosalisa biso na komonisa motema malamu. Tótalela naino ezaleli oyo bazongeli mbala mibale na maloba yango kitoko oyo ezali komonisa motema malamu ya Nzambe.
“Nzambe . . . aleki na boboto”
13. Na kati ya maloba oyo ezali komonisa motema malamu ya Nzambe, ezaleli nini ezongelami mbala mibale mpe mpo na nini ebongi bongo?
13 “Yehova azali Nzambe . . . [oyo] aleki na boboto . . . Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto.” Liloba ya Liebele oyo babongoli na Lingala na “boboto” elimboli mpe “bolingo ya sembo.” Kaka ezaleli wana nde ezongelami mbala mibale na kati ya maloba oyo Nzambe alobaki na Mose. Ebongi mpenza bongo, mpamba te ezaleli ya libosoliboso ya Yehova ezali bolingo! (1 Yoane 4:8) Ezaleli yango emonisami malamumalamu na kati ya maloba ya kosanzola Yehova oyo eyebani mingi, oyo elobi ete “mpo ete azali malamu; zambi boboto na ye ekoumelaka lobiko na lobiko.”
14. Banani oyo mpenza bamonaka motema malamu mpe boboto ya Nzambe?
14 Motema malamu ya Yehova emonanaka mpe na ndenge oyo “aleki na boboto.” Yango emonanaka mingimingi na ndenge oyo abatelaka basaleli na ye oyo bamipesi mpe bazali sembo. (1 Petelo 5:6, 7) Batatoli ya Yehova bamonaka mpenza ete ‘abatelaka boboto’ epai na baoyo balingaka ye mpe basalelaka ye. (Exode 20:6) Yehova atikaki komonisa boboto, to bolingo na ye ya sembo epai ya Yisalaele mpamba te baboyaki Mwana na ye. Kasi, motema malamu ya Nzambe mpe bolingo na ye ya sembo epai ya baklisto ya sembo oyo bazali na bikólo nyonso ekoumela libela na libela.—Yoane 3:36.
Yehova azali na mawa mpe na ngɔlu
15. (a) Maloba oyo Mose ayokaki na Ngomba Sinai ebandaki ndenge nini? (b) Motema mawa esɛngi makambo nini?
15 Maloba oyo Mose ayokaki na Ngomba Sinai ebandaki boye: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu.” Liloba ya Liebele oyo babongoli na “mawa” ekoki kolimbola “misɔpɔ” mpe euti mpenza na liloba oyo na Lingala elimboli “libumu.” Na bongo, mawa ezali ezaleli oyo eutaka mpenza na kati ya moto. Kasi mawa oyo balobeli awa esuki kaka te na koyoka motema mpasi ntango moninga azali na mpasi. Mawa yango esengeli kotinda biso na kosala eloko moko mpo na kokitisa mpasi ya basusu. Na ndakisa, baklisto oyo bazali bankulutu ya bolingo bamonaka ete basengeli koyokela bandeko na bango mawa, basengeli ‘kosepela koyokela bango mawa’ na ntango esengeli.—Baloma 12:8; Yakobo 2:13; Yuda 22, 23.
16. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali na ngɔlu?
16 Motema malamu ya Nzambe emonanaka mpe na ngɔlu na ye. Moto oyo azali na ngɔlu “ayebaka mpenza komitya na esika ya basusu” mpe azalaka na ‘boboto mingimingi epai ya bato oyo ye aleki bango.’ Na ndenge oyo atalelaka basaleli na ye ya sembo, Yehova azali kopesa ndakisa ya ngɔlu oyo eleki monene. Na ndakisa, Nzambe atindaki anzelu mpo na kolendisa mosakoli Danyele ntango akómaki mobange; atindaki mpe anzelu mpo na koyebisa elenge mwasi Malia ntango azalaki naino ngɔndɔ ete azwi libaku malamu ya kobota Yesu. (Danyele 10:19; Luka 1:26-38) Na ntembe te, biso basaleli ya Yehova tosepelaka na ndenge oyo azali koloba na biso na boboto nyonso na kati ya Biblia. Tokumisaka ye na ndenge oyo amonisaka motema malamu na ye mpe tolukaka komonisa bazalani na biso boboto mpe komitya na esika na bango. Ntango bato oyo babongi na elimo bazali kosembola ndeko moko na “elimo ya bopɔlɔ,” basalaka makasi bázala na boboto mpe bámonisa ngɔlu.—Bagalatia 6:1.
Nzambe oyo ayokaka nkanda noki te
17. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi ete Yehova ‘ayokaka nkanda noki te’?
17 “Nzambe . . . [oyo] akoyoka nkanda noki te.” Maloba yango ezali komonisa ndenge mosusu oyo Yehova amonisaka motema malamu na ye. Yehova ayikelaka mabunga na biso mpiko mpe atikelaka biso ntango mpo tólonga bolɛmbu na biso mpe tókola na elimo. (Baebele 5:12–6:3; Yakobo 5:14, 15) Motema molai ya Nzambe ezali mpe mpo na litomba ya baoyo bakómi naino basambeli na ye te. Bazali naino na ntango ya kondima nsango ya Bokonzi mpe kobongwana. (Baloma 2:4) Kasi, atako Yehova azali na motema molai, motema malamu na ye esɛngaka ntango mosusu ete alakisa nkanda na ye, ndenge asalaki ntango Bayisalaele basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo na Ngomba Sinai. Etikali moke, Nzambe akolakisa nkanda na ye makasi koleka ndenge asalaki yango liboso ntango akoboma mokili mabe oyo Satana azali kotambwisa.—Ezekiele 38:19, 21-23.
18. Na likambo etali solo, ndenge nini Yehova akeseni na bakonzi ya bato?
18 “[Yehova] azali Nzambe . . . [oyo] aleki na . . . solo.” Yehova azali te lokola bakonzi ya bato, baoyo bayebi kaka kolaka makambo mineneminene kasi bakokisaka yango te! Nzokande, bato oyo basambelaka Yehova bakoki kotya motema na bango na likambo mokomoko oyo ezali na Liloba na ye oyo epemami na elimo. Lokola Nzambe aleki na solo, tokoki kotya motema na biso na makambo nyonso oyo alaki. Tata na biso ya likoló ayokaka mpenza mabondeli na biso oyo tosɛngaka ye apesa biso solo ya elimo mpe azali mpenza kosopela biso yango; nyonso wana mpo azali na motema malamu.—Nzembo 43:3; 65:2.
19. Likambo nini ya monene Yehova asali mpo na komonisa motema malamu na ye epai ya bato ya masumu oyo bazali kobongola mitema?
19 “[Yehova] azali Nzambe . . . akolimbisa mabe mpe [kobuka mobeko, “NW”] mpe lisumu.” Yehova andimaka kolimbisa bato ya masumu soki babongoli motema mpo azali na motema malamu. Tozali mpenza na botɔndi na ndenge oyo Tata na biso ya likoló azwaki ebongiseli ya kolimbisa masumu na biso na lisalisi ya mbeka ya Yesu. (1 Yoane 2:1, 2) Tozali na esengo ete bato nyonso oyo bazali komonisa kondima na bango na lisiko na nzela ya misala bakoki kokóma baninga ya Yehova, mpe bakoki kozwa elikya ya kozala na bomoi ezangi nsuka na mokili ya sika oyo alaki. Nyonso wana ezali bantina minene ya kokumisa Yehova mpo na motema malamu na ye epai ya bato!—2 Petelo 3:13.
20. Nini ezali kondimisa biso ete Nzambe andimaka mabe te?
20 “[Yehova] akoki kozangisa te kopesa etumbu.” Yango mpe ezali ntina mosusu oyo tosengeli kosanzola Yehova mpo na motema malamu na ye. Mpo na nini? Mpamba te ndenge moko ya ntina mingi oyo amonisaka motema malamu na ye ezali ete andimaka mabe te, ata ya ndenge nini. Lisusu, “na ntango ya komonana ya Nkolo Yesu wana ekobima ye na Likoló esika moko na baanzelu na ye ya nguya,” akofutisa “baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu” mabe na bango. Bato yango “bakozwa lifuti ya kobeba ya seko.” (2 Batesaloniki 1:6-9) Basambeli ya Yehova bakobika mpe bakozwa bomoi ya libela, kozanga ete baoyo bazali “bayini ya malamu” bátungisa bango.—2 Timote 3:1-3.
Tólanda ndakisa ya motema malamu ya Yehova
21. Mpo na nini tosengeli komonisa motema malamu?
21 Tozali mpenza na makambo mingi oyo ezali kotinda biso na kokumisa Yehova mpe kotɔnda ye mpo na motema malamu na ye. Biso basaleli na ye tosengeli mpenza kosala makasi mpo na komonisa ezaleli yango, boye te? Ezali boye mpamba te ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bózala bato oyo bazali kolanda ndakisa ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.” (Baefese 5:1, NW) Tata na biso ya likoló amonisaka ntango nyonso motema malamu; biso mpe tosengeli kosala ndenge yango.
22. Tokotalela makambo nini na lisolo oyo elandi?
22 Soki tomipesi na Yehova na motema na biso mobimba, na ntembe te mposa na biso mpenza ezali ete tólanda ndakisa na ye mpo na komonisa motema malamu. Lokola tozali bana ya Adama, moto ya masumu, ezalaka mpenza etumba mpo tósala oyo ezali malamu. Kasi, na lisolo oyo elandi, tokomona mpo na nini tokoki kolonga na komonisa motema malamu. Lisusu, tokotalela makambo ndenge na ndenge oyo, kati na yango tokoki mpe tosengeli kosala lokola Yehova, ndakisa eleki monene ya kozala motema malamu.
Okopesa eyano nini?
• Motema malamu ezali nini?
• Maloba nini oyo ezali na Makomami ezali komonisa motema malamu ya Nzambe?
• Tángá mwa balolenge oyo Yehova amonisaka motema malamu na ye.
• Mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya motema malamu ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 12]
Yehova apesaki libota na ye ya kala etumbu mpo batikaki kosala makambo oyo balobaki na masanzoli na bango
[Elilingi na lokasa 12]
Bayuda ya sembo oyo batikalaki bazongaki na Yelusaleme
[Elilingi na lokasa 13]
Mose ayokaki maloba kitoko oyo emonisaki motema malamu ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 15]
Motema malamu ya Yehova emonanaka na ndenge oyo azali koloba na biso na kati ya Biblia