Motuya nini opesaka na mateya ya solo?
“Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—YOANE 8:32.2
1. Bokeseni nini ezali na ndenge oyo Pilata asalelaki liloba solo na ndenge oyo Yesu asalelaki yango?
“SOLO ezali eloko nini?” Ekoki mpenza kozala ete ntango Pilata atunaki motuna oyo, azalaki kolobela solo na makambo nyonso. Nzokande, Yesu autaki koloba ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37, 38) Yesu azalaki kolobela likambo mosusu, Pilata mpe azalaki kolobela likambo mosusu; Yesu azalaki nde kolobela solo ya Nzambe.
Ndenge oyo mokili etalelaka solo
2. Maloba nini Yesu alobaki oyo ezali komonisa motuya ya solo?
2 Paulo alobaki ete: “Bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Tokoki mpe koloba ndenge moko mpo na likambo etali solo. Bato mingi, ata soki balakisi bango solo ya Biblia, balandaka yango te. Kasi, solo yango ezali na motuya mingi! Yesu alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:32.
3. Tosengeli koyoka likebisi nini mpo bákosa biso te na mateya ya lokuta?
3 Ntoma Paulo alobaki ete moto akoki koyeba solo te na nzela ya mateya ya filozofi to mpe na nzela bonkɔkɔ. (Bakolose 2:8) Kutu, mateya yango ekosaka bato. Paulo akebisaki baklisto ya Efese ete soki bandimi mateya yango, bakozala lokola bana mike na elimo, baoyo “bakoninganaka . . . na mipɛpɛ nyonso ya mateya mpe na [mayele mabe, NW] ya bato, na bozimbisi na bango na nzela ya mikano mabe.” (Baefese 4:14) Lelo oyo, bato oyo baboyi solo ya Biblia nde bazali kopalanganisa “mayele mabe ya bato.” Mosala na bango kobalola makambo: bazali komonisa solo lokola lokuta mpe lokuta nde bazali komonisa yango lokola solo. Yango wana, lokola bazali kosalela mayele mabe mpo na kobomba solo, tosengeli komipesa mpenza na koyekola Makomami mpo tóyeba solo yango.
Baklisto mpe mokili
4. Nani oyo akoki kozwa solo, mpe baoyo bazali kozwa yango basengeli kosala nini?
4 Yesu abondelaki Yehova mpo na bato oyo bakómaki bayekoli na ye ete: “Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Bato yango basengelaki kobulisama, to kotyama pembeni, mpo na kosalela Yehova mpe kosakola nkombo mpe Bokonzi na ye. (Matai 6:9, 10; 24:14) Atako bato nyonso bayebi solo ya Yehova te, moto nyonso oyo azali koluka yango, azala moto ya ekólo nini, ya loposo nini to ya mimeseno nini, akoki kozwa yango lokola likabo. Ntoma Petelo alobaki ete: “Namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
5. Mbala mingi, mpo na nini banyokolaka baklisto?
5 Baklisto bateyaka bato mosusu solo ya Biblia, kasi na bisika mosusu bayambaka bango te. Yesu alobaki ete: “Bakobimisa bino mpo na minyoko mpe bakoboma bino; mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Na mobu 1817, mokonzi moko ya lingomba na Irlande, nkombo na ye John Cotter, akomaki mpo na vɛrsɛ yango ete: “Na esika ete milende ya [baklisto] mpo na kobongola bomoi ya bato na nzela ya mosala na bango ya kosakola esepelisa bato, ekotinda bango nde báyina mpe bányokola bayekoli mpo bakomonisa mabe na bango.” Banyokoli yango baboyaka ‘koyamba bolingo ya solo mpo na lobiko na bango.’ Yango wana, “Nzambe azali kotindela bango nguya ya kopɛngwisa mpo na kondimisa bango lokuta, ete bango nyonso bákweisama baoyo bandimi makambo ya solo te kasi basepeli kati na mabe.”—2 Batesaloniki 2:10-12.
6. Bamposa nini moklisto asengeli kolona te?
6 Ntoma Yoane apesaki baklisto oyo bafandi na mokili oyo toli ete: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. . . . Makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe ya nzoto mpe mposa mabe ya miso mpe nzombo ya bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili.” (1 Yoane 2:15, 16) Ntango alobi “makambo nyonso,” Yoane alongoli eloko moko te. Yango wana, tosengeli kolona mposa ya eloko moko te ya mokili oyo ekoki kopɛngwisa biso na solo. Soki tolandi toli ya Yoane, yango ekobongola mpenza bomoi na biso. Ndenge nini?
7. Koyeba solo epesaka bato ya mitema sembo mposa ya kosala nini?
7 Na mobu 2001, sanza na sanza Batatoli ya Yehova batalaki bato pene na milio mitano na bandako na bango mpo na koyekola na bango Biblia; na ndenge yango, bateyaki bato masɛngami ya Nzambe. Yango wana, bato 263 431 bazwaki batisimo. Pole ya solo ekómaki na motuya mingi mpo na bayekoli yango ya sika; baboyaki baninga ya mabe, baboyaki makambo ya mbindo mpe oyo ezali kotyola Nzambe oyo epalangani na mokili oyo. Banda bazwaki batisimo, bazali kolanda kotosa makambo oyo Yehova azali kosɛnga baklisto nyonso. (Baefese 5:5) Yo mpe opesaka motuya ndenge yango na mateya ya solo?
Yehova azali kobatela biso
8. Ndenge nini Yehova azali kotalela komipesa na biso, mpe mpo na nini ‘koluka liboso bokonzi’ ezali likambo ya mayele?
8 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yehova azali kondima biso ntango tomipesi na ye; ezali lokola nde azali komikitisa mpo na kobenda biso epai na ye. Na ndenge yango, azali koteya biso tótika komityela mikano mpe bamposa ya mpambampamba mpo tólanda oyo ezali na ntina. (Nzembo 113:6-8) Lisusu, Yehova azali kondima ete tózala baninga na ye, mpe alaki ete akobatela biso soki ‘tozali koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.’ Soki tosali bongo mpe tobateli elimo na biso, alaki biso ete: “Biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.”—Matai 6:33.
9. Nani azali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe ndenge nini Yehova azali kosalela “moombo” yango mpo na kobatela biso?
9 Yesu Klisto aponaki bantoma 12 mpe abandaki na bango lisangá ya baklisto bapakolami na elimo oyo ebengamaki “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Emoniseli 21:9, 14) Na nsima, babengaki yango “[lisangá, NW] ya Nzambe ya bomoi, likonzí mpe etɛlɛmiselo ya makambo ya solo.” (1 Timote 3:15) Yesu abengaki baoyo bazali na lisangá yango “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe “kapita ya sembo mpe ya mayele.” Yesu alobaki ete moombo yango ya sembo akozala na mokumba ya kopesa baklisto “bilei na bango na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:3, 45-47; Luka 12:42, NW) Soki tozali na bilei te, tokoki kokufa. Ndenge moko mpe, soki tozali kolya bilei ya elimo te, tokolɛmba na elimo mpe na nsima tokokufa. Yango wana, lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali, yango mpe ezali komonisa ete Yehova azali kobatela biso. Tózalaka na botɔndi mingi mpo na bilei kitoko ya elimo oyo tozali kozwa na nzela ya “moombo” yango.—Matai 5:3, NW.
10. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyanganaka ntango nyonso na makita?
10 Kolya bilei ya elimo esɛngaka ete moto ayekolaka ye moko. Esɛngaka mpe kozala elongo na baklisto mosusu mpe koyangana na makita. Okoki koyeba mpenzampenza bilei nini olyaki eleki sanza motoba, to oyo olyaki eleki pɔsɔ motoba? Tokanisi ete te. Kasi, ata soki olyaki bilei nini, ezalaki bilei oyo nzoto na yo ezalaki na mposa na yango mpo ezala malamu. Ekoki mpe kozala ete kobanda wana, olyaki lisusu bilei yango mikolo mosusu. Ezali mpe bongo mpo na bilei ya elimo oyo tolyaka na makita. Ekoki kozala ete toyebi lisusu mpenza te likambo mokomoko oyo toyokaki na makita. Ekoki mpe kozala ete toyokaki makambo ndenge moko na makita mosusu. Kasi, ezali kaka bilei ya elimo, ezali na ntina mpo na bokolɔngɔnɔ ya elimo na biso. Makita na biso epesaka biso kaka bilei malamu ya elimo na ntango ebongi.
11. Mikumba nini tozalaka na yango ntango tozali koyangana na makita ya lisangá?
11 Ntango tozali koyangana na makita, tozalaka mpe na mokumba mosusu oyo tosengeli kokokisaka kuna. Biblia ezali kopesa baklisto toli ete ‘bálendisanaka,’ na kati ya lisangá, bápesanaka mposa ya komonisa “bolingo mpe misala ya malamu.” Soki tozali kobongisa makita nyonso, tozali koyangana na makita yango, mpe tozali kopesa biyano, yango ekolendisa kondima na biso moko mpe ekolendisa basusu. (Baebele 10:23-25, NW) Bato mosusu bazali lokola bana mike oyo baponaponaka bilei; mpo na yango, ekoki kosɛnga ete bálendisaka bango ntango nyonso mpo bálya bilei ya elimo. (Baefese 4:13) Kolendisa bato ya ndenge wana mpo bákóma baklisto oyo bakɔmeli, emonisaka bolingo; ntoma Paulo alobaki na ntina na bango ete: “Bilei ya makasi ezali mpo na bato oyo bakɔmeli, mpo na baoyo, na nzela ya komimesenisa, balakisi bososoli na bango mpo na kokesenisa malamu na mabe.”—Baebele 5:14, NW.
Tóbatelaka elimo na biso
12. Mpo tótikala na nzela ya solo, ezali libosoliboso mokumba ya nani? Limbolá.
12 Molongani na biso, to baboti na biso, bakoki kolendisa biso na kati ya losambo ya solo. Bankulutu mpe bakoki kobatela biso lokola tozali na kati ya etonga oyo bazali kokɛngɛla. (Misala 20:28) Kasi, mpo tótikala na nzela ya solo, ezali libosoliboso mokumba na biso moko. Esengeli kozala bongo ezala na ntango ya malamu to na ntango ya mpasi. Tótala likambo moko oyo esalemaki.
13, 14. Lokola ndakisa ya mwana-mpate emonisi yango, ndenge nini tokoki kozwa lisalisi ya elimo oyo tosengeli na yango?
13 Na ekólo Écosse, bana ya mpate bazalaki kolya matiti na esobe moko; na nsima, mwana ya mpate moko akendaki mwa mosika na ngámbo mosusu ya mwa ngomba mpe akweaki na nse kasi azwaki likama te. Nzokande akómaki kobanga, kasi akokaki kobuta te mpo azonga. Akómaki kolela mêêê, mêêê, mêêê. Mama na ye ayokaki, ye mpe abandaki kolela mêêê, mêêê, tii ntango mobateli ya mpate ayokaki mpe akendaki kobimisa mwana ya mpate yango.
14 Tótala sikoyo malamu ndenge oyo makambo elandanaki. Mpo báya kobikisa yango, mpate elelaki, mama na yango mpe elelaki, mpe mobateli ya mpate, ntango ayokaki, akendaki mbangu mpe abikisaki yango. Soki mwa mwana ya nyama na mama na yango ekoki komona likama mpe mbala moko koluka lisalisi, biso mpe tosengeli kosala bongo ntango tobɛti libaku na elimo to ntango makama ya mokili ya Satana ebimeli biso na mbalakaka, boye te? (Yakobo 5:14, 15; 1 Petelo 5:8) Tosengeli mpenza koluka yango, mingimingi soki toyebi makambo mingi te mpo tozali bilenge, to mpo toumeli naino te na solo.
Kolanda toli ya Nzambe epesaka bolamu
15. Mwasi moko ayokaki ndenge nini ntango abandaki koyangana na makita ya lisangá?
15 Sikoyo, tótalela ntina ya koyeba Biblia mpe kimya ya makanisi oyo yango ememelaka bato oyo bazali kosalela Nzambe ya solo. Mwasi moko ya mbula 70 oyo azalaki mondimi ya Lingomba ya Angleterre banda abotamá, andimaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Mwa moke na nsima, ayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe azalaki koloba “Amen” soki basali libondeli na Ndako ya Bokonzi. Na esengo mpenza alobaki ete: “Nazali komona ete na esika Nzambe azala mosika na biso bato mpamba, nazali komona ete bino bozali koya na ye kati na biso lokola moninga ya motema. Ezali mbala na ngai ya liboso namona likambo ya boye.” Na ntembe te, mwasi yango asepelaki mpe akobosana ata mokolo moko te ndenge oyo mateya ya solo esimbaki motema na ye ntango ayokaki yango mpo na mbala ya liboso. Biso mpe tóbosana te motuya oyo solo ezalaki na yango na miso na biso ntango tondimaki yango.
16. (a) Nini ekoki kosalema soki kozwa mbongo ekómi mokano na biso ya liboso? (b) Ndenge nini tokoki kozwa bolamu ya solosolo?
16 Bato mingi bakanisaka ete soki bázala na mbongo mingi, nde balingaki kozala malamu koleka. Nzokande, soki kozwa mbongo ekómi mokano na biso ya liboso na bomoi, tokoki kozwa “mpasi mingi na makanisi.” (1 Timote 6:10, Phillips) Tókanisa ebele ya bato oyo basombaka batike ya tombolá, babebisaka mbongo na masano ya mbongo, to baoyo batalelaka naino makama te soki bayoki ete mombongo moko ekopesa bango benefisi mingi, to baoyo bakanisaka kokóma bato ya mbongo. Bato moke kaka nde bakómaka na mbongo mingi oyo bakanisaka kozwa. Lisusu, ata baoyo bazwaka yango, mbala mingi bamonaka ete bomɛngo yango ya nokinoki ememelaka bango bolamu te. Nzokande, moto azwaka bolamu ya solosolo soki azali kosala mokano ya Yehova, kosala elongo na lisangá ya boklisto oyo elimo santu ya Yehova ezali kotambwisa yango mpe baanzelu na ye bazali kosunga yango. (Nzembo 1:1-3; 84:4, 5; 89:15) Soki tosali yango, tokoki kozwa mapamboli mingi oyo tokanisaki ata te. Omonaka mpenza ete solo ezali na motuya mingi mpo ememela yo mapamboli motindo wana na bomoi na yo?
17. Lokola Petelo afandaki epai ya Simona, moto oyo azalaki kobongisa mposo ya nyama, yango ezali komonisa biso ete Petelo azalaki moto ya ndenge nini?
17 Tótalela likambo moko oyo ntoma Petelo akutanaki na yango. Na mobu 36 ya ntango na biso (T.B.) asalaki mobembo na mokili ya Salono. Alekisaki mwa mikolo na Luda, mpe kuna abikisaki Enea, moto oyo nzoto na ye eninganaka lisusu te; na nsima, akendaki na Yafo, mboka oyo ezalaki na libongo na mai monene. Kuna, asekwisaki Doloka. Misala 9:43 (Boyokani ya Sika) elobi na biso boye: “Atikalaki mikolo mingi na Yope na ndako ya moto moko azalaki kobongisa bamposo ya nyama, nkombo na ye Simoni.” Mwa likambo oyo bayebisi biso awa ezali komonisa biso ete Petelo azalaki kokanisela bato mabe te ntango azalaki kosakola epai ya bato ya mboka wana. Na ndenge nini? Frederic Farrar, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, akomaki boye: “Moto moko te oyo azalaki kolanda mpenza Mibeko [ya Mose] oyo ekomami te akokaki kondima kofanda na ndako ya moto oyo asalaka mosala ya kobongisa mposo ya nyama. Mosala wana ezalaki kosɛnga mikolo nyonso kosimbasimba mposo mpe banyama ndenge na ndenge ekufá, mpe biloko oyo yango ezali kosɛnga, nyonso wana ezalaki kokómisa moto mbindo na miso ya bato oyo bazalaki kolandela mibeko, bakokaki ata kopusana pene na ye te.” Ata soki esika ya mosala ya Simona ezalaki mosika na “ndako na ye [oyo ezalaki] penepene na ebale,” Simona azalaki kosala mosala oyo Farrar alobi ete ‘bazalaki kotyola yango mpe na bongo, moto nyonso oyo azalaki kosala yango azalaki na lokumu te.’—Misala 10:6, Boyokani ya Sika.
18, 19. (a) Mpo na nini emonaneli oyo Petelo amonaki ebulunganisaki ye? (b) Petelo azwaki lipamboli nini oyo akanisaki te?
18 Petelo azalaki kokanisela basusu mabe te, andimaki kofanda epai ya Simona, mpe ntango azalaki kuna nde Nzambe ayebisaki Petelo asala likambo oyo akanisaki ata moke te. Amonaki emonaneli moko mpe ayokaki balobaki na ye alya banyama oyo ezalaki mbindo na kotalela mibeko ya Bayuda. Petelo alobaki ete ‘eloko ya mbindo ekɔti na monɔkɔ na ye mbala moko te.’ Kasi balobaki na ye mbala misato ete: “Mpo na biloko bipɛtoli Nzambe, otánga yango biloko ya mpamba te!” ‘Petelo azalaki kokakatana soko emonaneli emoni ye ezalaki na ntina nini.’—Misala 10:5-17; 11:7-10.
19 Petelo ayebaki te ete mokolo oyo eleki, na Kaisalia, mboka oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 longwa na esika oyo azalaki, Koloneli, moto moko oyo azalaki Moyuda te, amonaki mpe emonaneli. Anzelu ya Yehova ayebisaki Koloneli ete atinda basaleli na ye koluka Petelo na ndako ya Simona, moto oyo azalaki kobongisa bamposo ya nyama. Koloneli atindaki basali na ye na ndako ya Simona, mpe bazongaki elongo na Petelo tii na Kaisalia. Kuna, ateyaki Koloneli na bandeko na ye na baninga na ye. Na nsuka, bakómaki bandimi ya liboso oyo bazalaki Bayuda te oyo bazwaki elimo santu lokola bato bakozwa Bokonzi. Atako mibali bakatamaki ngenga te, bato nyonso oyo bayokaki maloba ya Petelo bazwaki batisimo. Yango ezalaki ebandeli mpo ete bato ya bikólo mosusu, oyo Bayuda bazalaki komona bango mbindo, bákɔta na lisangá ya boklisto. (Misala 10:1-48; 11:18) Yango ezalaki libaku malamu ya kokamwa mpo na Petelo. Nyonso wana mpo solo ezalaki na motuya epai na ye mpe esalaki ete alanda nzela oyo Yehova alakisaki mpe asala makambo na kondima!
20. Ndenge nini Nzambe asungaka biso soki totii solo na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso?
20 Paulo alendisi biso ete: “Awa tozali koloba solo, tókola na bolingo na makambo nyonso kati na ye oyo azali mokonzi, Klisto.” (Baefese 4:15, NW) Soki totii solo na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso mpe totiki ete Yehova atambwisa makolo na biso na lisalisi ya elimo santu na ye, yango ekopesa biso bolamu oyo ekokani na mosusu te lelo oyo. Tóbosana mpe te lisungi ya baanzelu basantu na mosala na biso ya kosakola. (Emoniseli 14:6, 7; 22:6) Tozali mpenza na libaku malamu ya kozala na lisungi motindo yango na mosala oyo Yehova apesi biso! Soki totikali sembo, yango ekotinda biso tókumisa Yehova, Nzambe ya solo, libela na libela. Ekoki nde kozala na eloko eleki oyo wana na motuya?—Yoane 17:3.
Toyekoli makambo nini
• Mpo na nini bato mingi bandimaka solo te?
• Ndenge nini baklisto basengeli kotalela makambo ya mokili ya Satana?
• Ndenge nini tosengeli kotalelaka makita, mpe mpo na nini?
• Tozali na mokumba nini mpo na kobatela elimo na biso?
[Karte/Bililingi na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MAI MONENE
Kaisalia
SALONO
Yafo
Luda
Yelusaleme
[Elilingi]
Petelo alandaki nzela oyo Nzambe alakisaki mpe azwaki mapamboli oyo akanisaki te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 13]
Yesu atatolaki mpo na solo
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola bilei ya mosuni, bilei ya elimo ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso