Nzambe ayambaka bato ya mabota nyonso
NTANGO John asalaki mobembo ya liboso na mboka Mali, Mamadou na libota na ye bayambaki ye na esengo, yango esimbaki motema na ye. Ntango John afandaki na nse mpo na kolya na saani moko na bango, azalaki komituna lolenge nini akoki kokabela libota yango likabo moko oyo eleki motuya—nsango malamu ya bokonzi, oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe. Atako ayebaki Lifalanse, lokota oyo elobamaka mpe na Mali, John azalaki komituna ndenge nini akosolola na libota oyo ezali mpenza na lingomba mosusu mpe ezali na lolenge mosusu ya kotalela makambo.
John akanisaki lisolo ya Biblia oyo elobeli Babele. Na mboka yango, Nzambe abulunganisaki minɔkɔ ya batomboki. (Genese 11:1-9) Yango wana bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, mpe bazali na mangomba ndenge na ndenge mpe lolenge ndenge na ndenge ya kotalela makambo, bapalanganaki mpe bakendaki kofanda na bisika ndenge na ndenge na mokili. Lelo oyo, lokola bato bakómá kosala mibembo mpe kotika bamboka mpo na kokende kofanda na bingumba mosusu, mingi bakutanaka na mokakatano lokola oyo John akutanaki na yango, ata mpe na bisika oyo bafandaka: Ndenge nini bakoki koteya bato ya bikólo ndenge na ndenge elikya oyo euti na Biblia?
Ndakisa moko ya kala
Lokola basakoli mosusu bazalaki kosala yango, Yona asakolaki libosoliboso epai ya Bayisalaele. Asakolaki na ntango oyo mabota zomi ya bokonzi ya Yisalaele bakómaki kosala polele makambo ya mabe na miso ya Nzambe. (2 Mikonzi 14:23-25) Kanisá naino ndenge Yona amiyokaki ntango azwaki mokumba monene ya kotika mboka na ye mpe kokende na Asulia mpo na kosakola epai ya bato ya Ninive, oyo bazalaki na mangomba mpe na mimeseno mosusu. Ntango mosusu Yona ayebaki koloba monɔkɔ ya bato ya Ninive te, to mpe ayebaki koloba yango malamu te. Ata soki ezalaki bongo to te, Yona amonaki ete mokumba yango ezalaki mpasi, mpe akimaki.—Yona 1:1-3.
Emonani polele ete Yona asengelaki koyeba ete Yehova Nzambe amonaka makambo na mozindo mpe atalaka mitema. (1 Samwele 16:7) Na nsima ya kobikisa Yona na ndenge ya likamwisi ntango azindaki na mai, Yehova atindaki ye mpo na mbala ya mibale ete akende koteya bato ya Ninive. Yona atosaki, yango wana ebele ya bato ya Ninive babongolaki motema. Kasi, Yona azalaki kaka na makanisi ya malamu te. Na nzela ya liteya moko ya nguya, Yehova alakisaki ye ete asengeli kobongola makanisi na ye. Yehova atunaki ye boye: “Nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkóto mokama na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi te?” (Yona 4:5-11) Tokoloba boni mpo na biso lelo oyo? Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya bikólo ndenge na ndenge?
Ayambaki Basamalia mpe bato ya bikólo mosusu
Na ekeke ya liboso, Yesu atindaki bayekoli na ye ete bázalisa bayekoli na mabota nyonso. (Matai 28:19) Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango. Bayekoli ya Yesu bazalaki Bayuda, mpe lokola Yona, bamesanaki kosolola kaka na bato ya ekólo na bango mpe ya mimeseno na bango. Bango mpe bakokaki kozanga te mwa moke ezaleli ya kokanisela basusu mabe oyo ezalaki na ntango wana. Kasi, Yehova atambwisaki makambo mpe basaleli na ye bakangaki mokemoke ntina ya mokano na ye mpo na bango.
Likambo ya liboso ezalaki ya kolongola makanisi mabe oyo Bayuda na Basamalia bazalaki kotyelana. Bayuda na Basamalia bazalaki koyokana te. Kasi, mbala mingi Yesu azalaki kobongisa makambo mpo ete na mikolo ekoya, Basamalia bándima nsango malamu. Amonisaki ezaleli na ye ya kozanga koponapona ntango asololaki na mwasi moko Mosamalia. (Yoane 4:7-26) Mokolo mosusu, na nzela ya lisese ya Mosamalia ya motema malamu, Yesu amonisaki Moyuda moko oyo alingaki makambo ya Nzambe mingi ete, bato mosusu oyo bazali Bayuda te bakoki mpenza kolinga bazalani na bango. (Luka 10:25-37) Filipo, Petelo mpe Yoane—bango nyonso Bayuda—basakolaki epai ya bato ya Samalia ntango ngonga ekokaki mpo ete Yehova andima Basamalia na lisangá ya boklisto. Nsango malamu na bango epesaki esengo mingi na engumba wana.—Misala 8:4-8, 14-17.
Soki ezalaki mpasi mpo na Bayuda oyo bakómaki baklisto bálinga Basamalia oyo bazalaki kutu bandeko na bango, na ntembe te ezalaki mpasi koleka mpo bámonisa bolingo epai ya bato ya bikólo mosusu, oyo bazalaki kotyola mpe koyina. Nzokande, na nsima ya liwa ya Yesu, koyinana ekokaki kosila kati na Bayuda oyo bakómaki baklisto mpe bato ya bikólo mosusu. (Baefese 2:13, 14) Mpo na kosalisa Petelo ete andima ebongiseli wana ya sika, Yehova alakisaki ye emonaneli oyo ayebisaki ye ete “eloko oyo ezali pɛto na miso ya Nzambe, koloba té ‘tè ezali mbindo.” Na nsima, elimo ya Yehova ememaki ye epai ya mopakano moko na nkombo ya Koloneli. Ntango Petelo asosolaki likanisi ya Nzambe ete abenga mopakano wana eloko na mbindo te mpo Nzambe apɛtolaki ye, Petelo alobaki na kopemama na elimo santu ete: “Ya solo, sik’oyo namoni ‘tè Nzambe aponaka bilongi té. Kasi na ekolo nyonso, moto oyo atosaka ye mpe asalaka makambo ya malonga, Nzambe andimaka ye.” (Misala 10:9-35, Boyokani ya sika pe Banzembo) Petelo akamwaki ntango Nzambe amonisaki ete ayambi Koloneli na libota na ye, na kosopáká elimo santu likoló na bango.
Paulo aponami mpo na koteya na bikólo mosusu
Mosala ya kosakola ya Paulo ezali ndakisa malamu na ndenge oyo Yehova abongisaka basaleli na ye mokemoke mpo bálinga mpe básalisa bato ya mitindo nyonso. Ntango oyo Paulo abongwanaki, Yesu alobaki ete Paulo akoponama mpo na komema nkombo na Ye epai ya bikólo mosusu. (Misala 9:15, NW) Na nsima Paulo akendaki na Alaba, ntango mosusu mpo na komanyola likoló ya mokano ya Nzambe, ndenge alingaki kosalela ye mpo na kosakola nsango malamu epai ya bikólo mosusu.—Bagalatia 1:15-17.
Na boumeli ya mobembo na ye ya liboso lokola misionɛrɛ, Paulo asakolaki na molende epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. (Misala 13:46-48) Yehova apambolaki mosala ya Paulo, mpe yango ezali elembeteli ete ntoma yango asalaki makambo na boyokani na ebongiseli ya Yehova. Paulo amonisaki ete asepelaki mpenza na likanisi ya Yehova ntango, na mpiko nyonso, asembolaki Petelo mpo amonisaki koponapona na kotikáká kosangana na bandeko oyo bazalaki Bayuda te.—Bagalatia 2:11-14.
Bilembeteli mosusu oyo emonisi ete Nzambe azalaki kokamba milende ya Paulo emonani na mobembo na ye ya mibale lokola misionɛrɛ, ntango elimo santu epekisaki Paulo kokende koteya na Bitunia, etúká moko ya Loma. (Misala 16:7) Emonanaki lokola ete ntango ebongaki te. Kasi, na nsima, bato mosusu ya etúká ya Bitunia bakómaki baklisto. (1 Petelo 1:1) Na emonaneli moko, moto moko ya Makedonia abondelaki Paulo boye: “Yaká na Makedonia kosunga biso.” Paulo asosolaki ete asengeli kotika epai alingaki kokende mpo na kokende kosakola nsango malamu na etúká wana ya Loma.—Misala 16:9, 10.
Makoki oyo Paulo azalaki na yango mpo na komesana na bato mosusu emekamaki makasi ntango azalaki koteya bato ya Atene. Mibeko ya ekólo ya Grèce mpe mibeko ya Baloma epekisaki makambo ya kokɔtisa banzambe ya bapaya mpe mimeseno ya sika ya mangomba na mboka na bango. Lokola Paulo alingaki bato, yango etindaki ye atalela malamumalamu makambo ya losambo na bango. Na Atene amonaki etumbelo ya mbeka oyo bakomaki ete “na Nzambe oyo ayebani te.” Alobelaki likambo yango na mosala na ye ya kosakola. (Misala 17:22, 23) Abandaki lisolo na ye na boboto mpe na limemya mpenza!
Na ntembe te Paulo azalaki koyoka esengo soki akanisi lisusu matomba ya mosala na ye lokola ntoma ya mabota! Apesaki mabɔkɔ mpo na kosala masangá oyo ezalaki na baklisto mosusu oyo bazalaki Bayuda te na Kolinti, na Filipi, na Tesaloniki, mpe na bingumba ya Galatia. Asalisaki mibali mpe basi oyo bazalaki na kondima, lokola Damali, Dionusi, Selegi Paulo, mpe Tito. Oyo nde libaku malamu ya komona bato oyo bayebaki Yehova mpe Biblia te bákóma na kondima ya solo ya lingomba ya boklisto! Mpo na oyo etali mokumba na ye ya kosalisa bato oyo bazalaki Bayuda te ete bákóma na boyebi ya solo, Paulo alobaki boye: “Mposa na ngai ezali ete nasakola nsango malamu na bisika naino nkombo na Klisto eyokani te . . . Lokola ekomami ete, Baoyo bayebisami mpo na ye te bakomona ye, mpe baoyo bayoki naino te bakososola.” (Baloma15:20, 21) Tokoki kosakola nsango malamu epai ya bato ya mimeseno mosusu?
Tósalisa bato ya bikólo nyonso ya mokili
Salomo abondelaki Yehova mpo na bato oyo bazalaki Bayisalaele te, oyo bakoya kosambela ye na tempelo na Yelusaleme. Abondelaki boye: “Bongo yoká kuna na lola longwa na efandelo na yo mpe salá nyonso lokola mopaya azali kolɔmba yo yango ete mabota nyonso ya mokili báyeba nkombo na yo mpe bátosa yo lokola libota na yo Yisalaele, báyeba ete ndako oyo etongi ngai ebyangami na nkombo na yo.” (1 Mikonzi 8:41-43) Lelo oyo na mikili mingi, bankóto ya basakoli ya Bokonzi bazali na mayoki motindo wana. Bakutanaka na bato oyo bakokani na bato ya Ninive, bato oyo na elobeli ya elimo, “bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi te.” Mpe basakoli ya nsango malamu bazali na mposa ya kokokisa bisakweli oyo etali koyanganisama ya basaleli ya solo oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge.—Yisaya 2:2, 3; Mika 4:1-3.
Se ndenge bato oyo bazalaki na mangomba ya boklisto bandimaki nsango ya elikya oyo euti na Biblia, bato ya mangomba mosusu mpe bazali kosala bongo. Likambo yango etaleli yo na nini? Omitalela malamumalamu. Soki omoni ete ozalaka mpenza na ezaleli ya kokanisela basusu mabe, longola makanisi yango mpe na esika na yango loná bolingo mpenza.a Koboya te bato oyo Nzambe andimi bango.—Yoane 3:16.
Omibongisa na makanisi liboso ya kosolola na bato ya mimeseno mosusu. Luká koyeba bindimeli na bango, mitungisi na bango mpe lolenge na bango ya kokanisa; mpe luká makambo oyo bino na bango bokoki koyokana. Zalá na motema malamu mpe motema mawa epai na bango. Kolinga te bówelana, kozala na makambo makasi te mpe zalá na makanisi malamu. (Luka 9:52-56) Soki ozali kosala bongo, okosepelisa Yehova, “oyo mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:4, NW.
Ezali esengo mingi mpo na biso kozala na bato oyo bautá na bikólo ndenge na ndenge na masangá na biso. (Yisaya 56:6, 7) Koyoka bankombo lokola Mimi, Malu, Papi mpe Pitshou esepelisaka biso; kasi tosepelaka mpe koyoka bankombo lokola Mamadou, Jegan, Reza, mpe Chan. Ya solo, ‘ekuke monene [ezipwami liboso na biso] mpo na mosala monene.’ (1 Bakolinti 16:9) Tiká ete tósalela mabaku oyo etyami liboso na biso mpo na koyebisa bato ya mabota nyonso ete Yehova, Nzambe oyo azangi koponapona, azali kobenga bango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 8 Yuli 1996, lokasa 5-7 (Ebimeli ya Lifalanse) na motó ya likambo: “Communication: les barrières.”
[Bililingi na lokasa 23]
Paulo asakolaki nsango malamu na bisika nyonso na komimesenisáká na bato
. . . na Atene
. . . na Filipi
. . . na mobembo