Landá mitinda ya Nzambe na bomoi na yo
“[Yehova] akolakisa yo mpo na litomba.”—YISAYA 48:17.
1. Ndenge nini Mozalisi atambwisaka bato?
BATO ya siansi bazali koyekola molɔ́ngɔ́ mpo na koyeba makambo mosusu oyo eyebani naino te. Ntango bazali koyekola makambo yango, bazali kokamwa na komona ete molɔ́ngɔ́ etondi na nguya. Moi oyo engɛngisaka biso ezali kaka lokola minzoto, kutu ezali na minzoto mosusu oyo eleki yango na monene; kasi, “na sekonde mokomoko” ebimisaka nguya oyo ekokani na “kopanzana ya miliare 100 ya babɔmbi ya makasi.” Mozalisi akoki kotambwisa biloko minene wana ya likoló na nguya na ye oyo ezangi nsuka. (Yobo 38:32; Yisaya 40:26) Tokoloba boni mpo na biso bato, oyo tozali na bonsomi ya kopona, tokoki kokesenisa mabe na malamu, tozali na makanisi, mpe tokoki koyeba makambo ya elimo? Mokeli na biso amonaki malamu kotambwisa biso na ndenge nini? Na bolingo na ye, atambwisaka biso na mibeko na ye ya kokoka mpe mitinda na ye ya malamu mingi, nzela moko na lisosoli na biso oyo eteyami malamu.—2 Samwele 22:31; Baloma 2:14, 15.
2, 3. Nzambe asepelaka na botosi ya ndenge nini?
2 Nzambe asepelaka na bikelamu ya mayele oyo balingaka kotosa ye. (Masese 27:11) Yehova asalá biso lokola bamasini te oyo basilá kobongisa ndenge oyo esengeli kosala; apesá biso nde bonsomi ya kopona mpo tózwaka bikateli ya kosala oyo ezali malamu ntango toyebi makambo nyonso mpe tokanisi malamu.—Baebele 5:14.
3 Yesu, moto oyo amonisaki mpenza bomoto ya Tata na ye, alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino. Nakobyanga bino lisusu baombo te.” (Yoane 15:14, 15) Na ntango ya kala, moombo azalaki mpenza na likambo ya koloba te soki nkolo na ye apesi mitindo, asengelaki kaka kotosa. Nzokande, boninga ekolaka ntango bato bazali kolakisana bizaleli malamu oyo esepelisaka motema. Biso mpe tokoki kokóma baninga ya Yehova. (Yakobo 2:23) Bolingo oyo tozali kolakisa ye mpe oyo ye azali kolakisa biso nde elendisaka boninga yango. Yesu amonisaki ete kotosa Nzambe etambolaka nzela moko na kolinga ye ntango alobaki boye: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotosa liloba na ngai; mpe Tata na ngai akolinga ye.” (Yoane14:23) Lokola Yehova alingi biso mpe alingi kotambwisa biso malamu, azali kosɛnga na biso ete tólanda mitinda na ye.
Mitinda ya Nzambe
4. Ndenge nini okoki kolimbola mitinda?
4 Mitinda ezali nini? Diksionɛrɛ moko elimboli motinda lokola “moboko oyo esimbi makambo ya solo, elingi koloba mobeko monene oyo ebimisaka mibeko mosusu, liteya, to likanisi oyo esimbi to ezali kobimisa mibeko to mateya mosusu.” Ntango tozali koyekola Biblia malamumalamu tozali komona ete Tata na biso ya likoló apesi mitinda ya ntina mingi oyo ezali kotalela makambo ndenge na ndenge ya bomoi. Apesi yango mpo na bolamu na biso ya seko. Yango eyokani na maloba oyo Salomo, mokonzi ya mayele, akomaki ete: “Mwana na ngai, yoká mpe yambá maloba na ngai, boye [bambula] ya bomoi na yo ekozala mingi. Nalakisi yo na nzela ya mayele, nakambi yo na bilekelo ya sembo.” (Masese 4:10, 11) Mitinda ya minene oyo Yehova apesi etalelaka boyokani na biso na ye mpe na bazalani na biso, losambo na biso, mpe makambo oyo tosalaka na bomoi na biso. (Nzembo 1:1) Sikoyo, tótalela naino mwa ndambo ya mitinda yango.
5. Tángá mwa mitinda ya minene.
5 Na ntina etali boyokani na biso na Yehova, Yesu alobaki ete: “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37) Longola yango, Nzambe apesi mitinda oyo ezali kotalela boyokani na biso na bazalani na biso, na ndakisa Lilako Lileki Malamu; yango elobaka ete: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12, NW; Bagalatia 6:10; Tito 3:2) Na makambo ya losambo, balobi na biso boye: “Tótalanaka mpo tópusama na komonisa bolingo mpe na misala ya malamu, tótika te koyangana na biso elongo.” (Baebele 10:24, 25, NW) Mpo na makambo mosusu oyo tosalaka mokolo na mokolo, ntoma Paulo alobi boye: “Soko bokolyaka, soko bokomɛlaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Liloba ya Nzambe ezali na mitinda mosusu mingi.
6. Bokeseni nini ezali kati na mitinda na mibeko?
6 Mitinda ezali makambo ya solo mpe ya ntina mingi oyo bato balandaka; mpe baklisto ya mayele bayekolaka kolinga yango. Salomo apemamaki na elimo ya Yehova mpe akomaki ete: “Yokamelá maloba na ngai; sembolá matoi na yo epai na malako na ngai. Tiká te ete málongwa na liboso ya miso na yo, batelá yango na kati ya motema na yo. Zambi mazali bomoi epai na baoyo bakozwa yango mpe nkisi malamu mpo na nzoto nyonso na bango.” (Masese 4:20-22) Bokeseni nini ezali kati na mitinda na mibeko? Mitinda nde ebimisaka mibeko. Mbala mingi mibeko ezalaka sikisiki, ezalaka mpo na ntango moko to mpo na likambo moko boye, kasi mitinda ezalaka mpo na libela. (Nzembo 119:111) Mitinda ya Nzambe esilaka ngala te, elekaka mpe te. Maloba oyo mosakoli Yisaya akomaki na kopemama na elimo ezali mpenza solo ete: “Matiti mazali kokauka, felele ezali kolɛmba, nde liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”—Yisaya 40:8.
Tótalelaka mitinda ntango tozali kokanisa mpe ntango tozali kosala makambo
7. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tótalelaka mitinda ntango tozali kokanisa mpe ntango tozali kosala makambo?
7 Mbala na mbala “liloba ya Nzambe na biso” elendisaka biso tótalelaka mitinda ntango tozali kokanisa mpe ntango tozali kosala makambo. Ntango batunaki Yesu alobela Mibeko nyonso na mokuse, alobaki yango na fraze mibale ya mikuse; ya liboso emonisaki ete tosengeli kolinga Yehova, mpe ya mibale emonisaki ete tosengeli kolinga mozalani. (Matai 22:37-40) Na ndenge yango, Yesu azongelaki ndambo ya maloba oyo emonisaki na mokuse mitinda ya ntina oyo Mibeko ya Mose elobelaki na Deteronome 6:4, 5 ete: “[Yehova] azali Nzambe na biso, [Yehova] moko, mpe okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” Emonani mpe ete Yesu azalaki kokanisa motinda ya Nzambe oyo ezali na Levitike 19:18. Na maloba ya polele, ya mokuse mpe ya nguya oyo ezali na nsuka ya mokanda ya Mosakoli, Mokonzi Salomo amonisi na mokuse ebele ya mibeko ya Nzambe: “Nsima ya koyoka nyonso, nsuka ya likambo ezali boye: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde nyonso oyo esɛngisami na moto. Mpamba te Nzambe ya solo akosambisa misala ya lolenge nyonso, na ntina etali likambo na likambo oyo ebombami, mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe.”—Mosakoli 12:13, 14, NW; Mika 6:8.
8. Mpo na nini kokanga ntina malamumalamu ya mitinda ya Biblia ezali libateli?
8 Soki tozali kokanga malamumalamu ntina ya mitinda yango ya minene, yango ekoki kosalisa biso na koyeba mpe kolanda malako oyo ezali sikisiki. Lisusu, soki tozali kokanga ntina ya mitinda malamumalamu te mpe tozali kondima yango te, tokoki koyeba mpenza te kozwa bikateli ya malamu mpe ekozala mpasi te mpo kondima na biso etɛngatɛnga. (Baefese 4:14) Soki tobateli malamu mitinda yango na makanisi mpe na motema na biso, tokozala pene ya kolanda yango ntango tolingi kozwa bikateli. Soki tozali kosalela yango na bososoli, ekomemela biso bolamu.—Yosua 1:8; Masese 4:1-9.
9. Mpo na nini kososola mitinda ya Biblia mpe kolanda yango ezalaka ntango nyonso likambo moke te?
9 Kososola mpe kolanda mitinda ya Biblia ezali likambo moke te, ezali te likambo ya kotosa kaka mibeko. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki koboya kosala makasi oyo esengeli mpo na kotalela mitinda ntango tozali kokanisa na likambo moko. Na ntango esɛngi ete tózwa ekateli moko to toyebi malamu te soki tosengeli kosala nini, tokoki komona malamu kolanda kaka mobeko moko. Ntango mosusu tokoki koluka toli epai ya moklisto moko oyo akɔmeli, mbala mosusu nkulutu moko, na elikya ete akoyebisa biso mobeko moko etaleli likambo oyo tozali na yango. Nzokande, ekoki kozala ete Biblia to mikanda ya moombo ya sembo elobeli mpenza te mobeko moko ya sikisiki, mpe ata soki mobeko moko ezali, ekoki ntango mosusu kosalelama te ntango nyonso mpe mpo na makambo nyonso. Mbala mosusu oyebi ete moto moko alobaki na Yesu boye: “Molakisi, lobá na ndeko na ngai ete akabola libula mpo na ngai.” Yesu alobelaki mbala moko mobeko te mpo na kokata likambo ya bandeko mibale, kasi amonisaki ye motinda moko: “Kebá mpe sɛnzɛlá na ntina na lokoso nyonso.” Na bongo, Yesu apesaki motinda oyo ebongaki na ntango wana mpe ebongi ata na moi ya lelo.—Luka 12:13-15.
10. Ndenge nini kolanda mitinda emonisaka mpenza mposa ya motema na biso?
10 Mbala mosusu osilá komona bato oyo batosaka mibeko na mitema mibale, basalaka kaka mpo bápesa bango etumbu te. Kotosa mitinda elongolaka ezaleli wana. Moto oyo alandaka mitinda asalaka makambo mpo motema na ye nde ezali kotinda ye. Kutu, mbala mingi soki moto alandi mitinda te, azwaka etumbu kaka na ntango wana te. Lokola ezalaka bongo, yango epesaka biso nzela ya komonisa polele ntina oyo ezali kotinda biso na kotosa Yehova mpe emonisaka mposa mpenza ya motema na biso. Tozali na ndakisa moko na likambo oyo Yosefe asalaki: aboyaki likanisi ya mwasi ya Potifala oyo asɛngaki ye ete asala na ye ekobo. Atako Yehova apesaki naino te mibeko ekomami oyo epekisaki ekobo mpe Nzambe ayebisaki te soki moto asangisi nzoto na mwasi ya moto mosusu akozwa etumbu nini, Yosefe ayebaki mitinda ya Nzambe oyo ezali kosɛnga na moto oyo abali azala sembo epai ya molongani na ye. (Genese 2:24; 12:18-20) Eyano na ye ezali komonisa ete mitinda yango ezalaki mpenza na motema na ye: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?”—Genese 39:9.
11. Baklisto basengeli koluka ete mitinda ya Yehova etambwisa bango na makambo nini?
11 Lelo oyo, baklisto balingaka ete mitinda ya Yehova etambwisa bango na makambo oyo etali bango moko; na ndakisa, mpo na kopona baninga, masano, miziki, mpe mikanda ya kotánga. (1 Bakolinti 15:33; Bafilipi 4:8) Ntango boyebi, bososoli mpe bolingo na biso mpo na Yehova mpe mibeko na ye ezali kokola, lisosoli na biso, mposa ya kosala malamu oyo tozali na yango na motema, ekosalisa biso tólanda mitinda ya Nzambe na likambo nyonso oyo tokutani na yango, ezala na makambo oyo etali mpenza biso moko. Soki tozali kolanda mitinda ya Biblia, tokoluka te bisika oyo mibeko ya Nzambe ezali polele te mpo tózwa nzela ya kosala makambo mosusu; tokolanda mpe te ndakisa ya bato oyo balukaka makambo nini oyo, ata soki basali yango, ekoki kolobama mpenza te ete babuki mobeko. Tokoyeba ete kokanisa ndenge wana ebotaka mbuma ya mabe mpe ezali mabe.—Yakobo 1:22-25.
12. Mpo ete tótambwisama na mitinda ya Nzambe, sɛkɛlɛ ezali nini?
12 Baklisto oyo bakɔmeli bayebaka ete mpo na kolanda mitinda ya Nzambe, sɛkɛlɛ ezali nde koluka koyeba likanisi ya Yehova na likambo yango. Mokomi ya nzembo alendisi ete: “Bino baoyo bokolingaka [Yehova], bóyina mabe.” (Nzembo 97:10) Masese 6:16-19 etángi ndambo ya makambo oyo Nzambe amonaka ete ezali mabe; elobi boye: “[Yehova] akoyina na makambo oyo motoba; ɛɛ, nsambo izali koboyama na [molimo, NW] na ye; miso na nzombo, lolemo ya lokuta, mabɔkɔ masopi makila ya mosembwi, motema mozali kobanzabanza misala mabe, makolo makopota mbangu kosala masumu, motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te, mpe ye oyo akoyeisa kowelana kati na bandeko.” Soki tozali koluka ete ndenge oyo Yehova atalelaka makambo wana ya ntina mingi emonana mpe na bomoi na biso, tokotika te kolanda mitinda.—Yilimia 22:16.
Tosengeli kozala na mposa ya kosala malamu
13. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu abendaki likebi mingi na lolenge nini ya kokanisa?
13 Koyeba mitinda mpe kolanda yango ebatelaka biso mpe esalisaka biso ete tósambela te kaka mpo na kosambela. Kolanda mitinda ekeseni na kotosa mibeko kaka ndenge ezali. Yesu amonisaki likambo yango polele na Lisolo Likoló ya Ngomba. (Matai 5:17-48) Tóbosana te ete Yesu azalaki koloba na bato oyo bazalaki Bayuda; elingi koloba bato oyo basengelaki kolanda Mibeko ya Mose na bomoi na bango. Kasi, bazalaki kotalela Mibeko na ndenge ya malamu te. Bakómaki kokangama na Mibeko ndenge kaka ekomami, kasi bazalaki koluka ndimbola na yango te. Bazalaki mpe kotya likebi mingi na makambo ya bonkɔkɔ, bazalaki kotya yango liboso ya mateya ya Nzambe. (Matai 12:9-12; 15:1-9) Yango wana, bato mingi bayekolaki kotalela mitinda te ntango bazali kokanisa na likambo moko.
14. Ndenge nini Yesu asalisaki bato oyo alobaki na bango mpo ete bátalelaka mitinda?
14 Nzokande, na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu apesaki mitinda na makambo mitano oyo etali etamboli na biso: nkanda, libala mpe koboma libala, bilaka, kozongisa mabe na mabe, bolingo mpe koyina. Mpo na likambo mokomoko, Yesu amonisaki litomba ya kolanda motinda oyo esimbi yango. Na ndenge yango, Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge oyo eleki malamu ya kotalela bizaleli malamu. Na ndakisa, na likambo ya ekobo, apesaki biso motinda oyo ezali kobatela biso kaka te na kosala ekobo, kasi ezali mpe kobatela makanisi mpe bamposa na biso na likambo yango: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.”—Matai 5:28.
15. Ndenge nini tokoki kolongola elimo ya kokangama kaka na oyo mibeko elobi?
15 Ndakisa yango ezali komonisa ete tosengeli te kobosanaka mokano mpe ntina ya mitinda ya Yehova. Tókanisa te ete Nzambe akosepela na biso mpo tozali kolakisa bosantu na libándá, na makambo oyo ezali komonana na miso. Yesu amonisaki ete ezaleli wana ezali lokuta mpe alakisaki bato ete báluka nde motema mawa mpe bolingo ya Nzambe. (Matai 12:7; Luka 6:1-11) Soki tozali kolanda mitinda ya Biblia na bomoi na biso, tokotika Biblia pembeni te mpe kosala mpo na biso moko (to kosalela bato mosusu) molɔngɔ ya makambo ya makasimakasi oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. Tokotya mingi makanisi na biso na motinda ya bolingo mpe motinda ya kotosa Nzambe, kasi te na kolakisa na miso ya bato ete tozali bato oyo basambelaka.—Luka 11:42.
Mbuma ya malamu
16. Tángá mwa ndambo ya mitinda oyo esimbi mibeko mosusu ya Biblia.
16 Wana tozali kosala nyonso mpo na kotosa Yehova, ezali na ntina mingi tóyeba ete mibeko na ye esimbami na mitinda. Na ndakisa, baklisto basengeli koboya losambo ya bikeko, pite mpe ekobo, mpe koboya kosalela makila na ndenge oyo ebongi te. (Misala 15:28, 29) Baklisto balandaka mitinda nini na makambo wana? Nzambe kaka nde abongi ete tósambela ye; tosengeli kozala sembo epai ya molongani na biso; mpe Yehova nde azali Mopesi ya bomoi. (Genese 2:24; Exode 20:5; Nzembo 36:9) Soki tozali kokanga ntina ya mitinda yango, tokozala na mokakatano te mpo na kondima mpe kotosa mibeko oyo euti na yango.
17. Makambo nini ya malamu eutaka na kososola mpe kotosa mitinda ya Biblia?
17 Ntango tozali kososola mitinda oyo esimbi mibeko mpe tozali kosalela yango, tokomona ete ezali mpo na bolamu na biso. Mbala mingi, mapamboli ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazwaka eyaka nzela moko na matomba mosusu. Na ndakisa, bato oyo bamɛlaka likaya te, basalaka pite to ekobo te, batalelaka makila lokola eloko ya mosantu, bamibatelaka na bamaladi mosusu. Ndenge moko mpe, kolanda mateya ya solo ya Nzambe ekoki komemela biso matomba na makambo ya mbongo, na ndenge ya kofanda na bato, mpe na libota. Litomba mokomoko na makambo wana ezali komonisa ete mitinda ya Yehova ezali na motuya mpe ebongi mpenza. Kasi, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kolanda mitinda ya Nzambe ezali te mpo na kozwa matomba ya biso moko. Baklisto ya solo batosaka Yehova mpo balingaka ye, abongi básambela ye, mpe ezali likambo oyo ebongi.—Emoniseli 4:11.
18. Soki tolingi kozala baklisto ya malamu, nini esengeli kotambwisa bomoi na biso?
18 Soki totiki ete mitinda ya Biblia etambwisa bomoi na biso, bomoi na biso ekokóma malamu koleka, mpe yango ekobenda bato mosusu na nzela ya Nzambe. Likambo eleki ntina ezali ete bomoi na biso ekokumisa Yehova. Tokomona mpenza ete Yehova azali Nzambe ya bolingo oyo alingi ete tózala malamu mpenza. Ntango tozali kolanda mitinda ya Biblia liboso ya kozwa bikateli mpe tozali komona ete Yehova azali kopambola biso, tokokóma baninga na ye ya solosolo. Tokokóma na boyokani makasi biso na Tata na biso ya likoló.
Ozali koyeba lisusu?
• Motinda ezali nini?
• Bokeseni nini ezali kati na mitinda na mibeko?
• Mpo na nini ezali malamu tótalelaka mitinda ntango tozali kokanisa mpe ntango tozali kosala makambo?
[Etanda na lokasa 20]
Wilson, moklisto moko ya ekólo Ghana, azwaki mokanda oyo emonisaki ye ete nsima ya mwa mikolo, mosala na ye na kompanyi ekosila. Na mokolo na ye ya nsuka, bapesaki ye mosala ya kosukola vuatire ya patrɔ. Wilson amonaki mbongo na kati ya vuatire, kasi mokonzi oyo azali liboso na ye ayebisaki ye ete Nzambe nde atindeli ye mbongo yango mpo esalisa ye lokola balingi kolongola ye na mosala. Kasi, Wilson alandaki mitinda ya Biblia oyo esɛngi kozala sembo, azongisaki mbongo yango epai ya patrɔ. Likambo yango ekamwisaki patrɔ mpe esepelisaki ye mingi; yango wana, atikaki ye na mosala mpe na mbala moko akómisaki ye mokonzi mpe akómaki moko ya bakambi ya kompanyi.—Baefese 4:28.
[Etanda na lokasa 21]
Rukia, mwasi moko ya ekólo Albanie, azali na mbula koleka 60. Azwanaki matata ye na yaya na ye ya mobali mpe bazalaki kolobana te na boumeli ya mbula 17. Na nsima, Rukia akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe ayekolaki ete baklisto basengeli kofanda na kimya na bato mosusu mpe basengeli kobomba nkanda te. Abondelaki butu mobimba mpe na ntɔngɔ akendaki na ndako ya yaya na ye na motema ezali kobɛta makasi. Ntango mwana ya yaya na ye afungolaki ndako; akamwaki na komona Rukia. Atunaki ye: “Nani akufi? Oyei kosala nini awa?” Rukia ayebisaki ye ete azali na mposa akutana na ndeko na ye. Alimbolaki na malɛmbɛ ete nsima ya koyekola mitinda ya Biblia mpe makambo ya Yehova, amonaki ete asengeli kozongisa kimya na ndeko na ye. Balelaki mpe bayambanaki, na nsima basalaki mwa fɛti mpo na kosepela bokutani wana!—Baloma 12:17, 18.
[Elilingi na lokasa 23]
[Elilingi na lokasa 23]
[Elilingi na lokasa 23]
[Elilingi na lokasa 23]
“Ntango amonaki ebele ya bato, amataki likoló ya ngomba; mpe nsima ya kofanda, bayekoli na ye bayaki pembeni na ye; mpe afungolaki monɔkɔ na ye mpe abandaki koteya bango.”—MATAI 5:1, 2, NW.