Tótalela malamumalamu makanisi ya bato mosusu na ntina na liwa
BANDA kala, bato babangaka liwa mpe bamitunaka mituna mingi mpo na yango. Bato bakómá kobanga liwa koleka lisusu mpo na mateya ya lokuta, bonkɔkɔ mpe makanisi oyo moto na moto akolá na yango. Moto akoki kozanga esengo na bomoi na ye mpe akoki komona ete bomoi ezali na ntina te mpo azali kobanga liwa.
Makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango na ntina na liwa euti mingimingi na mateya ya mangomba ya minene. Tótalela naino mwa ndambo ya makanisi yango mpe tóluka soki Biblia eteyi nini; bongo, yo moko otala soki ekofungola yo miso na ndenge oyo otalelaka liwa.
Likanisi ya 1: Liwa ezali ndenge bomoi nyonso esukaka.
Buku moko (Death—The Final Stage of Growth) elobi ete: “Liwa . . . ezali eteni moko ya bomoi na biso.” Makanisi ya ndenge yango ezali komonisa liteya oyo elobaka ete liwa ezali likambo oyo etángamá, ezali ndenge ebongisamá oyo ekelamu nyonso ya bomoi esengeli kosuka. Liteya yango esali ete bato mingi bákóma kokanisa ete bizaleli ya malamu mpe bomoi ezali na ntina moko te mpe mingi bakómi kaka koluka bolamu na bango moko, ata na makambo ya mabe.
Kasi, ezali solo ete liwa ezali ndenge ebongisamá oyo ekelamu nyonso ya bomoi esengeli kosuka? Bato mosusu ya mayele bazali kondima yango te. Na ndakisa, Calvin Harley, ye azali moto ya mayele na bioloji mpe ayekolaka konuna ya nzoto ya moto; batunaki ye mituna mpe alobaki ete andimaka te ete bato “babongisamá na boye ete nsukansuka bákufaka.” William Clark, ye azali moto ya mayele na immunologie, alobaki ete: “Liwa ezali te nsuka oyo etángamá mpo na bomoi nyonso.” Seymour Benzer, molakisi na Eteyelo monene ye teknoloji na etúká ya Californie, alobaki ete “tokoki kokokanisa konuna na montre te, kasi ebongi tókokanisa yango na lisolo oyo tokoki kobongola yango.”
Bato ya siansi bakamwaka ntango bayekolaka ndenge oyo moto asalemá. Bamonaka ete tozali na makoki mingi koleka oyo esengeli mpo na bomoi na biso oyo eumelaka kaka mbula 70 to 80. Na ndakisa, bato ya siansi bayekoli ete bɔɔngɔ ya moto ezali na makoki ya kokamwa mpo na kobomba makambo. Moto moko ya mayele alobaki ete bɔɔngɔ na biso ekoki kobomba makambo oyo “ekoki kokomama na babuku milio 20, babuku oyo ezali na babibliotɛkɛ oyo eleki monene na mokili mobimba.” Bato mosusu ya mayele oyo bayekolaka bɔɔngɔ bazali koloba ete, na bomoi ya moto, asalelaka kaka mwa ndambo moke mpenza ya makoki oyo bɔɔngɔ na ye ezali na yango. Yango wana ebongi mpenza tómituna motuna oyo: ‘Mpo na nini tozali na bɔɔngɔ oyo ezali na makoki mingi, nzokande tosalelaka makoki na yango kaka moke mpenza na bomoi na biso mobimba?’
Tókanisa lisusu ndenge oyo bato batalelaka liwa! Mpo na bato mingi, kokufela mwasi, mobali, to mwana ezali likambo oyo ekoki kotungisa bango mingi koleka na bomoi na bango mobimba. Mbala mingi makanisi ya moto ebulunganaka mpo na ntango molai soki akufeli moto moko oyo alingaki mingi. Ata bato oyo balobaka ete liwa ezali ndenge etángamá oyo bomoi nyonso esengeli kosuka bakakatanaka mpo na kondima ete makambo na bango nyonso mpe ekosuka ntango bakokufa. Zulunalo moko (British Medical Journal) elobaki ete “bato mingi ya mayele bandimaka ete bato nyonso balingaka koumela mingi na bomoi.”
Soki tokanisi makambo oyo: ndenge bato batalelaka liwa, makoki ya kokamwa oyo bɔɔngɔ ezali na yango ya kobomba makambo mpe ya koyekola, mpe mposa oyo bato bazalaka na yango ya kotikala na bomoi libela, biso moko tozali komona te ete moto akelamá mpo azala kaka na bomoi? Nzambe akelaki bato te mpo ete nsukansuka bákufaka, kasi mpo bázala na bomoi libela na libela. Yoká likambo oyo Nzambe alobaki na mobali na mwasi ya liboso: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili, mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi ya mai, mpe na ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Yango ezali mpenza elikya ya bomoi ya malamu mpe ya libela!
Likanisi ya 2: Bato bakufaka mpo Nzambe azwaka bango mpo bákende kofanda epai na ye.
Mwasi moko ya mbula 27 oyo azalaki pene na kokufa mpe kotika bana misato, ayebisaki mamelo moko ete: “Koyá awa te mpo na koloba na ngai ete oyo ezali mokano ya Nzambe mpo na ngai. . . . Nayokaka nkanda soki moto mosusu alobi na ngai bongo.” Nzokande, ezali likambo yango nde mangomba mingi eteyaka na ntina etali liwa, ete Nzambe azwaka bato mpo bákende kofanda epai na ye.
Tokanisi mpenza ete Mozalisi azali na motema mabe ndenge wana mpo abomaka biso atako ayebi malamu ete yango esalaka biso mpasi? Ekoki kozala Nzambe oyo ya Biblia te. Mokapo ya 1 Yoane 4:8 elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” Elobi te ete Nzambe azali na bolingo to Nzambe alingaka, kasi elobi ete Nzambe azali bolingo. Bolingo ya Nzambe ezali monene, ezali pɛto mpe ezali ya kokoka mpe ezali bolingo na ye nde esimbi bomoto na ye mpe misala na ye nyonso; yango wana tokoki koloba ete ye moko azali mpenza bolingo. Nzambe ya ndenge yango akoki te kozala Nzambe oyo abomaka bato mpo bákende kofanda pene na ye.
Mangomba ya lokuta etii bato na mobulu na ntina etali esika oyo moto akendaka mpe ndenge akómaka soki akufi. Ezali mpasi mpo na kokanga ntina ya bisika lokola lola, lifelo, epongelo, limbe mpe bongo na bongo mpe bisika yango ebangisaka mpenza. Nzokande, Biblia ezali koloba na biso ete bato oyo bakufá bayebaka eloko moko te; bazali lokola bato oyo bazali na mpɔngi. (Mosakoli 9:5, 10; Yoane 11:11-14) Yango wana, tosengeli komitungisa te mpo na oyo ekómelaka biso soki tokufi, ndenge kaka tomitungisaka te ntango tomoni moto alali mpɔngi makasi. Yesu alobaki ete ekozala na ntango moko oyo “bato nyonso oyo bazali na malita ya kokanisama . . . bakobima,” bakozala lisusu na bomoi na paladiso awa na mabele.—Yoane 5:28, 29, NW; Luka 23:43.
Likanisi ya 3: Nzambe akamataka bana mike mpo bákóma baanzelu.
Doktɛrɛ Elisabeth Kübler-Ross ayekolaki ndenge oyo bato mingi ya maladi bazalaka soki bakómi pene na liwa; alobaki mpo na likambo mosusu oyo bato mingi oyo basambelaka balobaka. Nsima ya kolimbola likambo moko oyo esalemaki, alobaki ete “ezali likambo ya mayele te koyebisa mwana moke ya mwasi oyo ndeko na ye ya mobali akufi ete Nzambe alingaka mingi bana mike ya mibali yango wana akamati Johnny mpo azala na ye kuna na likoló.” Maloba ya ndenge yango emonisaka ete Nzambe azali mabe mpe emonisaka te bomoto mpe bizaleli na ye. Doktɛrɛ Kübler-Ross abakisaki boye: “Ata ntango mwana yango akómaki mwasi monene, atikaki te koyokela Nzambe nkanda, yango ememelaki ye mpasi makasi na makanisi mbula 30 na nsima ntango mwana na ye moko ya moke ya mobali akufaki.”
Mpo na nini Nzambe asengeli kozwa mwana moko mpo na kokóma na anzelu mosusu—lokola nde Nzambe azali na mposa ya mwana mingi koleka baboti na ye? Soki ezali solo ete Nzambe azwaka bana, omoni te ete tokoki koloba ete azali Mozalisi oyo azangi bolingo mpe atalaka kaka matomba na ye moko? Nzokande Biblia ezali koteya bongo te, yango elobi ete: “Bolingo euti na Nzambe.” (1 Yoane 4:7) Nzambe ya bolingo akoki nde kolinga ete liwa ekómela moto, bongo bandeko na ye bázanga ye, likambo oyo ata moto oyo azali na mwa makanisi ya malamu kaka moke akoki kondima yango te?
Kasi, mpo na nini bana bakufaka? Moko ya biyano oyo Biblia epesi ezali na Mosakoli 9:11 (NW): “Ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” Lisusu, Nzembo 51:5 elobi na biso ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali bato ya masumu banda na libumu ya mama na biso mpe liwa ekoki kokómela moto nyonso mpo na ntina ndenge na ndenge. Ntango mosusu mwana akoki kokufa na kati ya libumu mpe abotami ebembe. Ntango mosusu mpe bana bakufaka mpo na bampasi to na makama. Na makambo nyonso wana, tosengeli kopesa Nzambe foti te.
Likanisi ya 4: Bato mosusu banyokwamaka nsima ya liwa na bango.
Mangomba mingi eteyaka ete bato mabe bakokende na lifelo ya mɔ́tɔ epai bakonyokwama libela na libela. Kasi motuna yango oyo: liteya yango elongobani mpe euti na Makomami? Moto aumelaka na bomoi mbula soki 70 to 80. Ata soki moto asalaki mabe mingi mpenza na bomoi na ye mobimba, tokanisi mpenza ete etumbu oyo ebongi mpo na mabe na ye ezali konyokola ye libela na libela? Te. Ekozala sembo te konyokola moto libela na libela mpo na masumu oyo asalaki ntango azalaki na bomoi oyo ezalaka kutu molai te.
Kaka Nzambe nde akoki koyebisa likambo oyo ekómelaka mpenza bato soki bakufi; mpe ayebisi biso yango na kati ya Liloba na ye, Biblia. Biblia elobi boye: ‘Lokola [nyama] akokufa, [moto] mpe akokufa; ɛɛ, bango nyonso bazali na mpema moko. . . . Nyonso bakokenda na esika moko; nyonso balongwi na mputulu, nyonso bakozonga na mputulu lisusu.’ (Mosakoli 3:19, 20) Vɛrsɛ yango elobeli lifelo ya mɔ́tɔ te. Bato bazongaka na mputulu soki bakufi; elingi koloba ete bazalaka lisusu te.
Mpo moto akoka konyokwama, asengeli koyeba makambo oyo ezali koleka. Bato oyo bakufá bayebaka nde makambo? Biblia epesi lisusu eyano ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana.” (Mosakoli 9:5) Lokola bato bakufá ‘bayebaka likambo te,’ bakoki konyokwama ata epai moko te.
Likanisi ya 5: Liwa nde esukisaka bomoi na biso mpo na libela.
Tozalaka lisusu na bomoi te ntango tokufi, kasi yango elingi koloba te ete tokoki lisusu kozala na bomoi te. Yobo, moto ya sembo, ayebaki ete soki akufi, akokende na Sheole to lilita. Kasi, yoká ndenge abondelaki Nzambe: “Ɛ, soko okobomba ngai kati na [Sheole, NW], soko okozipa ngai kino nkanda na yo ekosuka, soko okotyela ngai elaka mpe okokanisa ngai? Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo.”—Yobo 14:13-15.
Yobo azalaki na kondima ete soki atikali sembo tii na liwa, Nzambe akobosana ye te mpe na nsima akosekwisa ye. Basaleli nyonso ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kondima likambo yango. Yesu ye moko amonisaki elikya yango mpe ateyaki ete Nzambe akotinda ye asekwisa bato oyo bakufá. Maloba ya Klisto ye moko ezali kopesa biso elikya oyo: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na [Yesu] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki na momeseno ya kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”—Yoane 5:28, 29, NW.
Etikali moke Nzambe alongola makambo nyonso ya mabe mpe atya mokili ya sika oyo bokonzi ya likoló ekoyangela. (Nzembo 37:10, 11; Danyele 2:44; Emoniseli 16:14, 16) Bokonzi yango ekotya paladiso na mabele mobimba oyo ekozala kaka na bato oyo bakosalela Nzambe. Na kati ya Biblia tozali kotánga boye: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti ya bokonzi ete, Talá! Efandelo ya Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Tolongwe na kobanga
Okoki kobɔndisama soki oyebi ete lisekwa ezali mpe oyebi nani oyo abongisi yango. Yesu alakaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Kosikolama yango elimboli mpe kolongwa na bobangi ya liwa. Kaka Yehova nde akoki kosilisa konuna mpe liwa mpe kopesa biso bomoi ya seko. Okoki kondima bilaka ya Nzambe? Okoki kondima yango mpamba te Liloba ya Nzambe ezangaka te kokokisama. (Yisaya 55:11) Tozali kolendisa yo okoba koyekola mpo na koyeba makambo mingi oyo Nzambe azali kokana kosalela bato. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Moto akoki kozanga esengo na bomoi na ye mpo azali kobanga liwa
[Etanda na lokasa 7]
MWA MAKANISI YA BATO MOSUSU MAKOMAMI ELOBAKA NINI?
NA NTINA NA LIWA
● Liwa ezali ndenge bomoi Genese 1:28; 2:17; Baloma 5:12
nyonso esukaka
● Bato bakufaka mpo Nzambe Yobo 34:15; Nzembo 37:11, 29; 115:16
azwaka bango mpo bákende kofanda epai na ye
● Nzambe akamataka bana mike Nzembo 51:5; 104:1, 4;
mpo bákóma baanzelu Baebele 1:7, 14
● Bato mosusu banyokwamaka Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 10;9:5, 10;
nsima ya liwa na bango Baloma 6:23
● Liwa nde esukisaka bomoi Yobo 14:14, 15; Yoane 3:16; 17:3;
na biso mpo na libela Misala 24:15
[Elilingi na lokasa 8]
Koyeba solo na ntina na liwa esikolaka biso na kobanga
[Picture Credit Line 5]
Liyemi ya Gustave Doré (Barratiers, Ciampolo) mpo na Divine comédie ya Dante/Publications Inc.