Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/7 nk. 28-30
  • Kotambola na nzela ya Yehova epesaka mbano mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotambola na nzela ya Yehova epesaka mbano mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mibeko ya Yehova ezali malamu mingi
  • Kotambola na botɔndi
  • Tókokisa mikumba na biso ntango tozali kotambola
  • Tóbakisa molende na biso
  • Kotambola na Nzambe —matambe ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Okotambola elongo na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tótambola ntango nyonso na nzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • ‘Bókoba kotambola na bomoko elongo na Klisto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/7 nk. 28-30

Kotambola na nzela ya Yehova epesaka mbano mingi

OSILÁ kozwa libaku ya kotambola na bangomba? Soki osilá kosala yango, na ntembe te ozalaki komona lokola nde mokili mobimba etikalaki na nse. Ozalaki mpenza na esengo ya kopema mopɛpɛ ya kitoko, ya komona mosika mpenza, kotala bazamba kitoko! Mbala mosusu obosanaki mwa moke mitungisi ya bomoi.

Ezali solo ete bato mingi te bazwaka libaku ya kokende kotambola na bangomba, kasi soki ozali moklisto oyo amipesi na Nzambe, ekoki kozala ete banda mwa ntango, otambolaka na bangomba na ndimbola ya elimo. Na ndakisa ya mokomi na nzembo na ntango ya kala, na ntembe te osilá kosala libondeli oyo: “Ɛɛ Yehova, yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo.” (Nzembo 25:⁠4) Ozali koyeba lisusu ndenge omiyokaki ntango okendaki mpo na mbala ya liboso na ngomba ya ndako ya Yehova mpe obandaki kotambola na bisika ya likoló? (Mika 4:2; Habakuku 3:19) Na ntembe te, omonaki ete kotambola na banzela wana oyo ezali likoló, elingi koloba na losambo ya pɛto, ebatelaka yo mpe epesaka yo esengo. Omiyokaki lokola mokomi na nzembo oyo ayembaki ete: “Esengo na bato oyo bakosanzolaka yo! Ɛɛ [Yehova], bakotambolaka na pole ya elongi na yo.”​—⁠Nzembo 89:⁠15.

Kasi, ntango mosusu esɛngaka na bato oyo batambolaka na bangomba bábuta bangomba ya milai mpenza. Bayokaka makolo ebandi kosala mpasi, mpe balɛmbaka. Biso mpe tokoki kokutana na mikakatano na mosala na biso mpo na Nzambe. Ekoki kozala ete banda mwa ntango makolo na biso ebandi kosala mpasi. Ndenge nini tokoki kozwa lisusu makasi mpe esengo? Tosengeli libosoliboso kondima ete banzela ya Yehova eleki banzela nyonso.

Mibeko ya Yehova ezali malamu mingi

Banzela ya Yehova ‘eleki banzela ya bato,’ mpe losambo na ye ‘emati likoló koleka ngomba ya milai nyonso, mpe etombwani likoló ya ngomba mike.’ (Yisaya 55:9; Mika 4:​1, NW) Bwanya ya Yehova ezali “bwanya oyo euti na likoló.” (Yakobo 3:​17, NW) Mibeko na ye eleki mibeko mosusu nyonso. Na ndakisa, ntango Bakanana bazalaki kopesa bana na bango mbeka, Yehova apesaki Bayisalaele mibeko oyo ezalaki malamu mingi mpe ezalaki komonisa motema mawa. Ayebisaki bango boye: “Okosalela mobola makambo na koponapona te, mpe okotika te motema na yo esepela na moto ya lokumu. . . . Mopaya . . . asengeli kozala lokola mwana-mboka, mpe okolinga ye ndenge omilingaka.”​—⁠Levitike 19:​15, 34, NW.

Mbula 1 500 na nsima, Yesu amonisaki bandakisa mingi mosusu ya ‘mobeko monene mpenza’ ya Yehova. (Yisaya 42:​21, NW) Na Lisolo Likoló na Ngomba, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómimonisa bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Matai 5:​44, 45, NW) Abakisaki ete: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo; wana nde, ya solo, ndimbola ya Mibeko mpe Basakoli.”​—⁠Matai 7:​12, NW.

Mibeko yango ya malamu mingi etambwisaka bato oyo bandimaka kotosa Nzambe, etindaka bango na komekola Nzambe na bango. (Baefese 5:1; 1 Batesaloniki 2:13) Kanisá mbongwana oyo Paulo asalaki. Mbala ya liboso oyo Biblia elobi nkombo na ye ezalaki na ntango oyo “andimaki kobomama ya” Setefano mpe na ntango yango azalaki “konyokola lisangá.” Mwa bambula moke na nsima, akómaki moninga ya baklisto ya Tesalonika lokola “mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza.” Mateya ya Nzambe ebongolaki Paulo, atikaki konyokola baklisto mpe akómaki moklisto oyo amibanzabanzaka mpo na basusu. (Misala 8:​1, 3, NW; 1 Batesaloniki 2:​7, NW) Azalaki na botɔndi mpenza ete mateya ya Klisto ebongolaki bomoto na ye. (1 Timote 1:​12, 13) Ndenge nini komonisa botɔndi ndenge wana ekoki kosalisa biso na kolanda kotambola na banzela ya Nzambe oyo ezali malamu mingi mpenza?

Kotambola na botɔndi

Bato oyo bakendaka kotambola na bangomba basepelaka kotalatala bazamba kitoko oyo emonanaka ntango moto azali likoló ya ngomba. Lisusu, basepelaka na biloko mikemike oyo bakoki komona na nzela ya makolo, lokola libanga moko kitoko, fololo moko kitoko, to komona nyama ya zamba. Ndenge moko mpe na elimo, tosengeli kotyaka likebi na biloko kitoko, ezala ya moke to ya monene, oyo tokoki kosepela na yango ntango tozali kotambola elongo na Nzambe. Soki tozali koyeba likambo yango, ekoki kopesa biso makasi mpe ekoki kosala ete mobembo oyo tozalaki komona ete ezali mpasi ekóma nde mobembo oyo ezali kopesa biso makasi. Tokoloba lokola Davidi ete: “Yokisá ngai boboto na yo na ntɔngɔ-ntɔngɔ, zambi elikya na ngai ezali epai na yo; lakisá ngai nzela ekoki na ngai kotambola.”​—⁠Nzembo 143:⁠8.

Mary atambolaki na banzela ya Yehova bambula mingi; ye alobi boye: “Soki natali biloko oyo Yehova akelá, ekamwisaka ngai, kasi emonisaka ngai mpe bolingo ya Nzambe. Ezala nyama, ndɛkɛ, to nyama-nkɛkɛ, ekelamu mokomoko ezali na makambo oyo ekeseni na bikelamu mosusu oyo esepelisaka mpenza. Esengo ya ndenge yango eutaka na mateya ya solo ya elimo oyo ezali kongɛnga makasi koleka wana bambula ezali koleka.”

Ndenge nini tokoki lisusu kokóma na botɔndi mingi? Ya liboso, tosengeli komona na lisɛki te makambo oyo Yehova azali kosala mpo na biso. Paulo akomaki ete: “Bóbondelaka ntango nyonso. Na makambo nyonso, bópesaka matɔndi.”​—⁠1 Batesaloniki 5:​17, 18, NW; Nzembo 119:⁠62.

Koyekola biso moko esalisaka biso tómonisaka botɔndi. Paulo alendisaki baklisto ya Kolose ete: ‘Bókoba kotambola na bomoko elongo na [Klisto Yesu], . . . bótondana mpenza na kondima na kati ya matɔndi.’ (Bakolose 2:​6, 7, NW) Kotánga Biblia mpe komanyola likoló ya makambo oyo tozali kotánga elendisaka kondima na biso mpe ebendaka biso epai ya Mobandisi ya Biblia. Biblia ezali na biloko ya motuya oyo ekoki kotinda biso ‘tótondana na matɔndi.’

Lisusu, kosalela Yehova elongo na bandeko na biso elɛmbisaka mpasi ya kotambola. Mokomi ya nzembo alobaki mpo na ye moko ete: “Nazali ndeko ya baoyo nyonso bakobangaka yo.” (Nzembo 119:63) Bantango mosusu oyo epesaka biso esengo mingi ezali oyo tolekisaka na mayangani ya boklisto to na mabaku mosusu elongo na bandeko na biso. Toyebaka ete ezali mpo na Yehova mpe mpo na mibeko na ye ya malamu nde tozali na libota ya bolingo ya bandeko na biso boklisto na mokili mobimba.​—⁠Nzembo 144:15b.

Longola komonisa botɔndi, kokokisa mikumba na biso ekosalisa biso tókoba kotambola na banzela ya malamu mingi ya Yehova.

Tókokisa mikumba na biso ntango tozali kotambola

Bato oyo batambolaka na bangomba oyo bakanisaka malamu, bayebaka ete basengeli kotambola na likebi mpenza soki balingi ete bábunga te to bákende te penepene mpenza ya mabwaku. Yehova atikeli biso bonsomi ya kosala biso moko makambo mwa mingi. Kasi bonsomi yango esɛngaka ete tóyeba kosimba mikumba na biso ya boklisto malamumalamu.

Na ndakisa, Yehova atyelaka basaleli na ye motema ete bakokokisa masɛngami na ndenge esengeli. Alobi te makasi ya ndenge nini tosengeli kosala na yango to ntango boni tosengeli kolekisa na misala ya boklisto to ntalo boni tosengeli kopesa lokola makabo to na makambo mosusu. Kasi, maloba oyo Paulo akomelaki Bakolinti etaleli biso nyonso: “Moto na moto asala lokola akanisi na motema na ye.”​—⁠2 Bakolinti 9:​7, NW; Baebele 13:​15, 16.

Mpo na baklisto, kopesa na elimo malamu elimboli mpe koteya bato mosusu nsango malamu. Tolakisaka mpe ete tokokisaka mikumba na biso ntango tozali kopesa makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Gerhardt, azali nkulutu mpe alobi ete ye na mwasi na ye babakisaki makabo na bango nsima ya kokende na liyangani moko na mikili ya Mpoto ya Ɛsti. Alobi boye: “Tomonaki ete kuna, bandeko na biso bazangi biloko mingi; kasi basepelaka mingi na mikanda, yango wana tozwaki ekateli ete tópesa bandeko na biso ya bikólo mosusu oyo bazali na bosɛnga lisungi oyo tokoki kopesa.”

Tóbakisa molende na biso

Kotambola na bangomba esɛngaka kozala na molende. Bato oyo batambolaka na bangomba bamekamekaka kotambola mpo na komesenisa ntango bakotambola ntaka milai. Ndenge moko mpe, Paulo apesaki toli ete tómipesa mingi na makambo ya lisangá mpo tóbatela makoki na biso ya elimo. Paulo alobaki ete baoyo balingi “kotambola na ndenge ebongi na Yehova” mpe ‘kokómisamáká na nguya,’ basengeli “kobota mbuma na misala nyonso ya malamu.”​—⁠Bakolose 1:​10, 11, NW.

Mposa ya kolonga esalisaka bato oyo batambolaka na bangomba bálɛmba noki te. Na ndenge nini? Kotya makanisi na mokano na bango, lokola kokóma na ngomba moko mosika, elendisaka bango. Ntango moto oyo azali kotambola na bangomba akómi na esika moko, akoki koyeba soki atamboli ntaka ya molai mpe soki oyo etikali ezali molai to te mpo akóma na esika azali kokende. Ntango akanisi nzela mosika oyo atamboli, ayokaka esengo.

Ndenge moko mpe, elikya na biso ya bomoi ya seko elendisaka mpe etindaka biso tózala na molende. (Baloma 12:12) Ntango tozali kotambola na banzela ya Yehova, tokozwa litomba ntango tozali komityela mikano mpe tozali kokokisa yango. Mpe epesaka biso esengo ntango tokanisaka bambula mingi oyo tosaleli Yehova na bosembo mpe tomoni mbongwana oyo tosalaki na bomoto na biso.​—⁠Nzembo 16:⁠11.

Mpo na kotambola na banzela milai mpe kobatela makasi na bango, bato oyo batambolaka na bangomba batambolaka na mbangumbangu te. Ndenge moko mpe, momeseno malamu ya koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ekosalisa biso tókende se liboso tii tokokokisa mokano na biso. Yango wana, Paulo alendisaki bandeko na ye baklisto ete: “Tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na kati ya nzela moko wana.​—⁠Bafilipi 3:​16, NW.

Ya solo, tozali kotambola biso moko te na nzela ya Yehova. Paulo akomaki boye: “Tótalanaka mpo tópusama na komonisa bolingo mpe misala ya malamu.” (Baebele 10:​24, NW ) Baninga malamu ya elimo bakosalisa biso tótambola ntango nyonso malamu elongo na bandeko na kati ya lisangá.​—⁠Masese 13:⁠20.

Likambo ya nsuka mpe oyo eleki ntina ezali ete tosengeli kobosana soki moke te nguya oyo Yehova apesaka. Bato oyo Yehova azali nguya na bango “makasi na bango ekoyikana wana ekotambolaka bango.” (Nzembo 84:​5, 7) Atako tokokutana ntango mosusu na mikakatano ya makasi, tokoki kolonga yango na lisalisi ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto