Bóbakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ezaleli na bino ya koyika mpiko
“Bóbakisa na kondima na bino . . . ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe.”—2 PETELO 1:5, 6, NW.
1, 2. (a) Tolingaka komona mwana nyonso akola na makambo nini? (b) Kokola na elimo ezali na ntina nini?
EZALI na ntina ete mwana nyonso akolaka; kasi, kokola yango esengeli kozala kaka ya nzoto te. Asengeli mpe kokola na mayele mpe na makanisi. Nsima ya bambula, mwana akotika makambo ya bomwana mpe akokóma mobali to mwasi oyo akɔmeli. Ntoma Paulo alobelaki likanisi yango ntango akomaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.”—1 Bakolinti 13:11, NW.
2 Maloba ya Paulo ezali komonisa likambo moko ya ntina na oyo etali kokola na elimo. Baklisto basengeli te kotikala bana na elimo, basengeli kokola mpe kokóma “mikóló na oyo etali makoki ya kososola.” (1 Bakolinti 14:20, NW) Basengeli kosala makasi mpo na kokóma “na mezire ya molai oyo ezali ya litondi ya Klisto.” Na ntango wana, bakozala lisusu te “bana mike, oyo bazali kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.”—Baefese 4:13, 14, NW.
3, 4. (a) Tosengeli kosala nini mpo na kokóma bato oyo bakɔmeli na elimo? (b) Bizaleli nini esepelisaka Nzambe oyo tosengeli kozala na yango, mpe yango ezali na ntina nini?
3 Ndenge nini tokoki kokóma mikóló na elimo? Nzoto ekolaka yango moko na ntango makambo nyonso ezali malamu; nzokande, mpo na kokola na elimo, esɛngaka ete tósala makasi. Nyonso ebandaka na kozwa boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. (Baebele 5:14; 2 Petelo 1:3) Na nsima, makambo oyo toyekoli ekosalisa biso tókóma na bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. Na ntango oyo moto azali kokola, asengeli mpe mbala moko kokola na makanisi mpe na mayoki; ndenge moko mpe, bizaleli ndenge na ndenge oyo esepelisaka Nzambe ekolaka nzela moko. Ntoma Petelo akomaki boye: “Na kosaláká molende nyonso ya makasi lokola eyano na likambo yango, bóbakisa na kondima na bino ezaleli malamu, na ezaleli malamu na bino boyebi, na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa, na ezaleli na bino ya komipekisa ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe, na ezaleli na bino ya kokangama na Nzambe bolingo ya bondeko, na bolingo na bino ya bondeko bolingo.”—2 Petelo 1:5-7, NW.
4 Ezaleli mokomoko oyo Petelo atángaki ezali na ntina mingi; tosengeli kobosana ata moko te. Abakisaki boye: “Soki makambo wana ezali na kati na bino mpe etondani mingi, yango ekopekisa bino kozala bato oyo bazangi kosala mosala to bato oyo bazangi kobota mbuma na oyo etali boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Petelo 1:8, NW) Tótya naino makanisi na biso kaka na ntina oyo tosengeli kobakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ezaleli na biso ya koyika mpiko.
Ntina ya ezaleli ya koyika mpiko
5. Mpo na nini tosengeli na ezaleli ya koyika mpiko?
5 Ezala Petelo to Paulo, bango nyonso mibale balobelaki ezaleli ya kokangama na Nzambe esika moko na ezaleli ya koyika mpiko. (1 Timote 6:11, NW) Kozala na ezaleli ya koyika mpiko elimboli kaka te kokanga motema mpe kozonga nsima te na ntango ya mpasi. Esɛngaka kozala na motema molai, kozala na mpiko, kolendendela, mpe kobatela elikya na ntango tozali na mikakatano, komekama, to minyoko. Lokola toponi bomoi oyo esɛngi “ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu,” toyebaka ete bakonyokola biso. (2 Timote 3:12, NW) Tosengeli koyika mpiko mpo na komonisa ete tolingaka Yehova mpe mpo na kolona bizaleli oyo esengeli mpo na kozwa lobiko. (Baloma 5:3-5; 2 Timote 4:7, 8; Yakobo 1:3, 4, 12) Soki tozali na ezaleli ya koyika mpiko te, tokoki kozwa bomoi ya seko te.—Baloma 2:6, 7; Baebele 10:36.
6. Koyika mpiko tii na nsuka elimboli kosala nini?
6 Ata soki tobandaki malamu mpenza, likambo eleki ntina ezali nde koyika mpiko. Yesu alobaki ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Matai 24:13, NW) Tosengeli mpenza koyika mpiko tii na nsuka; ezala nsuka ya bomoi na biso, to nsuka ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo. Ezala tokomona nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo to bomoi na biso ekosuka liboso ete yango eya, tosengeli kotikala sembo epai ya Nzambe. Nzokande, soki tobakisi te ezaleli ya kokangama na Nzambe likoló ya ezaleli na biso ya koyika mpiko, tokoki kosepelisa Yehova te, mpe tokozwa bomoi ya seko te. Kasi, ezaleli ya kokangama na Nzambe elimboli mpenza nini?
Kokangama na Nzambe elimboli nini?
7. Kokangama na Nzambe elimboli nini, mpe yango etindaka biso na kosala nini?
7 Kokangama na Nzambe elakisi komemya Yehova Nzambe, kosambela ye mpe kosalela ye mpamba te tozali sembo na bokonzi na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo na komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, tosengeli naino koyeba makambo ya solosolo na ntina na Yehova mpe koyeba banzela na ye. Tosengeli koluka koyeba Nzambe malamumalamu. Yango ekotinda biso na kolona ezaleli ya kokangama na ye makasi, mpe ezaleli yango ekomonana na misala na biso mpe na bomoi na biso mobimba. Tosengeli koluka kozala mpenza lokola Yehova, komekola banzela na ye mpe komonisa bizaleli mpe bomoto na ye. (Baefese 5:1) Ezaleli ya kokangama na Nzambe etindaka biso na koluka kosepelisa Nzambe na makambo nyonso oyo tozali kosala.—1 Bakolinti 10:31.
8. Na ndenge nini ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na boyokani makasi na ezaleli ya kosambela kaka ye?
8 Mpo na komonisa ezaleli ya solosolo ya kokangama na Nzambe, tosengeli kosambela kaka Yehova, tosengeli kotika te ete eloko mosusu to likambo mosusu ezwa esika na ye na mitema na biso. Lokola azali Mozalisi na biso, azali na lotomo ete biso tósambela kaka ye. (Deteronome 4:24, NW; Yisaya 42:8) Atako bongo, Yehova asɛngisaka biso na makasi te ete tósambela ye. Alingi ete mposa ya kosambela ye euta na mitema na biso. Nsima ya kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe, bolingo oyo tokómaka na yango mpo na ye nde etindaka biso tótika misala nyonso ya mbindo mpe tómipesa mobimba epai na ye, mpe na nsima, tómonisa na bomoi na biso ete tomipesi na ye.
Tókóma baninga ya Nzambe
9, 10. Ndenge nini tokoki kolona mpe kobatela boninga ya solosolo na Nzambe?
9 Ata soki tosili komipesa na Nzambe mpe tozwi batisimo, tosengeli kaka kosala ete boninga na biso na ye ekolaka. Yango wana, mposa na biso ya kokóma baninga ya Yehova mpe ya kosalela ye na bosembo ekotinda biso tótika te koyekola Liloba na ye mpe komanyola likoló na yango. Ntango tozali kotika elimo ya Nzambe esala na motema mpe na makanisi na biso, bolingo na biso mpo na Yehova ebakisamaka. Boninga na biso na ye ezalaka ntango nyonso eloko oyo eleki ntina na bomoi na biso. Totalelaka Yehova lokola Moninga na biso ya motema mpe tozalaka na mposa ya kosepelisa ye ntango nyonso. (1 Yoane 5:3) Esengo oyo boninga ya malamu oyo tozali na yango na Nzambe epesaka biso ebakisamaka, mpe tozalaka na botɔndi ete azali koteya mpe kosembola biso na bolingo na ntango oyo esengeli.—Deteronome 8:5.
10 Tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kolendisa boyokani ya ntina mingi oyo tozali na yango na Yehova, soki te, boyokani yango ekolɛmba. Mpe soki boyokani yango elɛmbi, ekozala foti ya Nzambe te, mpamba te ye “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27, NW) Ezali mpenza esengo na komona ete Yehova atyeli biso makambo ya mindɔndɔ te mpo biso tópusana penepene na ye! (1 Yoane 5:14, 15) Ya solo, tosengeli kokanga mabɔkɔ te mpo ete boninga na biso na Yehova ezala kaka makasi. Kasi, azali kosalisa biso na kopusana penepene na ye na ndenge azali kopesa biso makambo nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kolona ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe kobatela yango. (Yakobo 4:8) Ndenge nini tokoki kosalela makambo yango malamumalamu?
Tózala ntango nyonso makasi na elimo
11. Tángá mwa makambo oyo emonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe.
11 Bolingo makasi oyo tolingaka Nzambe ekotinda biso tómonisa ete ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe ezali mpe makasi, na kolanda toli ya Paulo ete: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15, NW) Mpo na kosala bongo ezali kosɛnga tózala ntango nyonso na momeseno malamu ya koyekola Biblia, ya koyangana na makita, mpe ya kobima na mosala ya kosakola. ‘Kobondela ntango nyonso’ ekoki mpe kosalisa biso na kozala penepene na Yehova. (1 Batesaloniki 5:17, NW) Makambo nyonso wana nde emonisaka mpenza ete tozali na ezaleli ya kokangama na Nzambe. Soki tobosani moko na yango, ekoki komemela biso maladi ya elimo mpe tokozala na makasi te ya kolonga masɛnginya ya Satana.—1 Petelo 5:8.
12. Ndenge nini tokoki kolonga komekama?
12 Kozala ntango nyonso makasi na elimo mpe komipesa na mosala ya Nzambe esalisaka mpe biso na kotɛmɛla komekama ndenge na ndenge oyo eyelaka biso. Komekama mosusu ekoki kozala makasi mpenza. Ekoki kozala mpasi tóyika mpiko ntango bandeko na biso moko, to baninga na biso to mpe bato oyo tofandi na bango kartye moko bazali koboya nsango na biso, bazali kotɛmɛla biso, mpe bazali konyokola biso. Na mosala to na kelasi, bato mosusu bakoki kosalela mayele mabe to maloba ya sukali mpo na komema biso na kobuka mibeko ya boklisto. Kolɛmba nzoto, maladi, mpe konyokwama na makanisi ezali makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso mpe ekoki kosala ete komekama ya kondima na biso ekóma mpasi koleka mpo na koyikela yango mpiko. Kasi tokoki kolonga komekama nyonso soki tozali kotika te “misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.” (2 Petelo 3:11, 12, NW) Tokoki mpe kobatela esengo na biso na ntango tozali kosala makambo yango, na elikya ete Nzambe akopambola biso.—Masese 10:22.
13. Tosengeli kosala nini mpo tómonisa ntango nyonso ezaleli ya kokangama na Nzambe?
13 Atako Satana azali kokanela mpenza bato oyo bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe, tosengeli kobanga te. Mpo na nini? Mpamba te “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petelo 2:9, NW) Mpo na koyikela komekama mpiko mpe kozwa lobiko wana, tosengeli ‘kobwaka ezaleli ya kotyola Nzambe mpe koboya bamposa ya mokili mpe kozala na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.’ (Tito 2:12, NW) Biso baklisto, tosengeli kokeba ete bolɛmbu moko te oyo euti na bamposa mpe misala ya nzoto ebebisa ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe. Sikoyo, tótalela naino mwa makambo yango oyo ekoki kobebisa ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe.
Kebá na makambo oyo ekoki kobebisa ezaleli ya kokangama na Nzambe
14. Likambo nini tosengeli kokanisa soki tobendami na motambo ya koluka kozala na biloko mingi ya mokili?
14 Mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili ezali motambo mpo na bato mingi. Tokoki komikosa mpe “kokanisa ete ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali nzela ya kozwa litomba [ya biloko ya mokili].” Na ndenge yango, tokoki kokóma na mposa ya kosalela mabe ezaleli ya kotyelana motema oyo tozalaka na yango kati na biso. (1 Timote 6:5, NW) Tokoki mpe komikosa na kokanisa ete ezali mabe te kotya ndeko moko oyo azali na bozwi mbamba ete adefisa biso mbongo oyo toyebi malamu ete tokokoka kozongisa yango te. (Nzembo 37:21) Nzokande, ezali ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi konduka biloko ya mokili te nde “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” (1 Timote 4:8, NW) Lokola “toyaki na eloko te na kati ya mokili, mpe tokoki komema eloko te,” tómipesa mingi nde na kolanda ‘ezaleli ya kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango’ mpe tólona elimo ya ‘kosepela na bilei mpe eloko ya kozipa nzoto’ oyo tozali na yango.—1 Timote 6:6-11, NW.
15. Tosengeli kosala nini soki kolanda bisengo ekómi likama mpo na ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe?
15 Koluka bisengo ekoki koboma ezaleli ya kokangama na Nzambe. Ezali nde na esika oyo tosengeli kobongisa nokinoki na likambo yango? Toboyi te, kosala ngalasisi mpe kozwa mopɛpɛ ezalaka na mwa matomba. Kasi, matomba na yango ezali eloko te soki tokokanisi yango na bomoi ya seko. (1 Yoane 2:25) Lelo oyo, bato mingi bazali “bato balingá bisengo na esika bázala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na lolenge moko boye ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango”; tosengeli kokima bato ya ndenge yango. (2 Timote 3:4, 5, NW) Bato oyo bazali kotya makanisi na bango mingimingi na ezaleli ya kokangama na Nzambe bazali ‘komibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.’—1 Timote 6:19, NW.
16. Bamposa nini ya mabe epekisaka bato mosusu kokokisa masɛngami ya sembo oyo Nzambe azali kosɛnga, mpe ndenge nini tokoki kolonga bamposa yango?
16 Masanga ya makasi, bangi, pite mpe ekobo, na bamposa ya kosala masumu ekoki kobebisa ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe. Soki tomipesi na makambo yango, ekoki kopekisa biso kokokisa masɛngami ya sembo ya Nzambe. (1 Bakolinti 6:9, 10; 2 Bakolinti 7:1) Ata Paulo mpe azalaki ntango nyonso kobunda etumba na nzoto na ye ya masumu. (Baloma 7:21-25) Esengeli kozwa meko ya makasi mpo na kobengana bamposa ya mabe. Ya liboso, tosengeli kozala na ekateli ya kotikala na bizaleli ya pɛto. Paulo alobi na biso boye: “Bóboma binama ya nzoto na bino oyo bizali na mabele, na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Bakolose 3:5, NW) Koboma binama ya nzoto na oyo etali bamposa ya mabe ezali kosɛnga kozala na ekateli makasi ya kolonga bamposa yango. Lisusu, soki tozali kobondela Nzambe makasi mpo na kosɛnga ye asalisa biso, tokolonga bamposa ya mabe mpe tokolanda boyengebene mpe ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo.
17. Ndenge nini tosengeli kotalelaka disipilini?
17 Kolɛmba nzoto ekoki kolɛmbisa ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na bongo kobebisa ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe. Basaleli mingi ya Yehova bakutanaki na makambo oyo elɛmbisaki bango nzoto. (Mituya 11:11-15; Ezela 4:4; Yona 4:3) Kolɛmba nzoto ekoki kozala mabe mingi soki esangani na nkanda mpo tozali kokanisa ete basali biso mabe to bapesi biso mpamela oyo eleki makasi. Nzokande, mpamela to disipilini emonisaka ete Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso mpe alingi biso. (Baebele 12:5-7, 10, 11) Tosengeli te kotalela disipilini lokola etumbu kaka, kasi tosengeli kotalela yango lokola ndenge ya kolakisa biso nzela ya boyengebene. Soki tozali na komikitisa, tokosepela na toli mpe tokondima yango, tokobosana te ete ‘mpamela mpo na kopesa disipilini ezali nzela ya bomoi.’ (Masese 6:23, NW) Yango ekoki kosalisa biso tókola malamu na elimo ntango tozali kolanda ezaleli ya kokangama na Nzambe.
18. Mokumba nini tozali na yango na ntango basali biso mabe to biso nde tosali moto mosusu mabe?
18 Kozwela basusu makanisi mabe mpe mabe oyo basali biso ekoki kozala komekama mpo na ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe. Makambo yango ekoki kobimisa nkanda mpe kotinda bato mosusu na kolinga lisusu te kozala elongo na bandeko na bango ya elimo, nzokande kosala bongo ezali mpenza likama. (Masese 18:1) Kasi tosengeli kobosana te ete kobomba makambo na motema to kokangela basusu nkanda ekoki kobebisa boyokani na biso moko na Yehova. (Levitike 19:18) Kutu, “moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:20, NW) Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki ete na ntango matata ebimi, esengeli kosala noki mpo na kosilisa yango. Alobaki ete: “Boye, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo .” (Matai 5:23, 24, NW) Kosɛnga bolimbisi ekoki kosilisa mpasi oyo toyokisi moto na maloba to na makambo mosusu ya mabe oyo tosalaki. Soki tozali koyokana te na moto mosusu, tokoki kobongisa makambo mpe kozongisa kimya soki tosɛngi bolimbisi mpe tondimi ete tosalaki mabe. Yesu apesaki mpe toli mosusu mpo na kosilisa mikakatano. (Matai 18:15-17) Tozalaka mpenza na esengo ntango tosali makasi mpo na kosilisa mikakatano mpe boyokani ezongi!—Baloma 12:18; Baefese 4:26, 27.
Tólanda ndakisa ya Yesu
19. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tólanda ndakisa ya Yesu?
19 Komekama ekozanga te koyela biso, kasi ezali mpo na yango te nde tokotika kopota mbangu mpo na bomoi ya seko. Tóbosana te ete Yehova akoki kobikisa biso na komekama. Lokola ‘tolongoli kilo nyonso’ mpe ‘tozali kopota na koyika mpiko momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso, tótalaka na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso, Yesu.’ (Baebele 12:1-3, NW) Soki tozali kotalela malamumalamu ndakisa ya Yesu mpe tozali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa na ye na maloba mpe na misala, ekosalisa biso tólona ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe tómonisa yango mingi na bomoi na biso.
20. Mbano nini ezaleli ya koyika mpiko mpe ezaleli ya kokangama na Nzambe ememaka?
20 Ezaleli ya koyika mpiko mpe ezaleli ya kokangama na Nzambe esalaka elongo mpo na kosalisa biso tózwa lobiko. Soki tozali na bizaleli malamu yango, tokoki kolanda kosala na bosembo mosala na biso ya bosantu mpo na Nzambe. Ata na ntango oyo tokutani na komekama, esengo na biso ekosila te ntango tokomona bolingo mpe mapamboli ya Yehova mpo toyiki mpiko mpe tozali kokangama na ye. (Yakobo 5:11) Longola yango, Yesu ye moko alobi na biso ete: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.”—Luka 21:19, NW.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini ezaleli ya koyika mpiko ezali na ntina mingi?
• Kokangama na Nzambe elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango?
• Ndenge nini tokoki kolona mpe kobatela boninga ya makasi na Nzambe?
• Wapi mwa makambo oyo ekoki kobebisa ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?
[Bililingi na lokasa 12]
Tokoki komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ndenge ebele
[Bililingi na lokasa 14]
Kebá na makambo oyo ekoki kobebisa ezaleli na yo ya kokangama na Nzambe