Bazali ntango nyonso kotambola na kati ya solo
“Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”—3 YOANE 4, NW.
1. “Solo ya nsango malamu” ezali kotalela nini?
YEHOVA andimaka kaka baoyo basambelaka ye “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24, NW) Bato yango batosaka solo, bandimaka mateya nyonso ya boklisto oyo euti na Liloba ya Nzambe. “Solo ya nsango malamu” yango ezali kotalela mpenza Yesu Klisto mpe kolongisama ya boyangeli ya Yehova na nzela ya Bokonzi. (Bagalatia 2:14, NW) Nzambe atiki ete “nguya moko ya libunga” elonga baoyo balingi makambo ya lokuta; nzokande mpo na kobika, moto asengeli kondima nsango malamu mpe asengeli kotambola na kati ya solo.—2 Batesaloniki 2:9-12, NW; Baefese 1:13, 14.
2. Mpo na likambo nini Yoane azalaki mpenzampenza na botɔndi, mpe ndenge nini azalaki kotalela Gayo?
2 Basakoli ya Bokonzi bazali “baninga ya mosala na kati ya solo.” Na ndakisa ya ntoma Yoane na moninga na ye Gayo, bakangami makasi na solo mpe bazali kotambola kati na yango. Yoane azalaki kokanisa Gayo ntango akomaki boye: “Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoane 3-8, NW) Ata soki ezali mobange Yoane te moto ateyaki Gayo solo, kasi ebongaki mpenza bátalela Gayo, oyo na ntembe te Yoane azalaki mokóló na ye, lokola mwana na ye ya elimo mpamba te Yoane azalaki mobange mpe azalaki moklisto oyo akɔmeli; lisusu, azalaki na bolingo oyo tata amonisaka epai ya bana na ye.
Solo mpe losambo ya boklisto
3. Makita ya baklisto ya liboso ezalaki na ntina nini mpe ezalaki na litomba nini?
3 Mpo na koyekola solo, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na masangá mpe mbala mingi bazalaki koyangana na ndako ya moklisto moko. (Baloma 16:3-5) Na ndenge yango, bazalaki kolendisama mpe bazalaki kotindana na komonisa bolingo mpe misala ya malamu. (Baebele 10:24, 25, NW) Na ntina etali baklisto ya bikeke oyo elandaki, Tertullien (azalaki na bomoi soki na mobu 155 tii mwa moke nsima ya mobu 220 ya ntango na biso [T.B.]) akomaki boye: “Tokutanaka mpo na kotánga mikanda ya Nzambe . . . Tolendisaka kondima na biso na maloba mosantu yango, totombolaka elikya na biso mpe tokómisaka yango makasi.”—Apologétique, mokapo 39.
4. Koyemba ezalaki na esika nini na makita ya baklisto?
4 Na ntembe te, na makita na bango, baklisto ya liboso bazalaki mpe koyemba. (Baefese 5:19; Bakolose 3:16) Profesɛrɛ Henry Chadwick akomaki ete Celsus, mokomi moko ya ekeke ya mibale, amonaki ete nzembo ya baklisto “ezalaki kitoko mingi mpe ete ndenge oyo ezalaki kokɔtela ye na motema ekómaki kopesa ye nkanda.” Profesɛrɛ Chadwick abakisi ete: “Clément d’Alexandrie nde mokomi ya liboso oyo azalaki moklisto oyo alobelaki motindo ya miziki oyo ebongi mpo na baklisto. Apesaki likanisi ete miziki yango esengeli kozala miziki te oyo ezali na mabina ya nsɔni.” (The Early Church, nkasa 274-275) Lokola emonani ete baklisto ya liboso bazalaki koyemba ntango bazalaki koyangana, Batatoli ya Yehova mpe mbala mingi bayembaka nzembo oyo elobelaka makambo ya Biblia mpe esanzolaka Nzambe mpe Bokonzi na ye.
5. (a) Ndenge nini masangá ya baklisto ya ekeke ya liboso ezalaki kozwa malako na makambo ya elimo? (b) Ndenge nini baklisto ya solo bakokisaka maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 23:8, 9?
5 Na masangá na ekeke ya liboso, bankulutu bazalaki koteya solo, mpe basaleli na misala bazalaki kosunga bandimi mosusu na ndenge ebele. (Bafilipi 1:1) Lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki kolanda Liloba ya Nzambe mpe oyo etambwisamaki na elimo santu ezalaki kopesa malako na makambo ya elimo. (Misala 15:6, 23-31) Baklisto yango bazalaki na batitre te mpamba te Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bóbengama Labi te, mpo kaka moko nde azali moteyi na bino, nzokande bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo kaka moko nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló.” (Matai 23:8, 9, NW) Batatoli ya Yehova bakokani na baklisto ya ekeke ya liboso na makambo yango mpe na makambo mingi mosusu.
Banyokwami mpo bazali kosakola solo
6, 7. Atako baklisto ya solo bazalaki kosakola nsango ya kimya, makambo nini bazalaki kosala bango?
6 Atako bazalaki kosakola nsango ya kimya oyo etali Bokonzi, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki konyokwama se ndenge oyo Yesu anyokwamaki. (Yoane 15:20; 17:14) John von Mosheim, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki “bato oyo balekaki kozala na kimya, bazalaki ata na mposa to likanisi ya kosala likambo moko te oyo ekoki kobebisa mboka.” Doktɛrɛ Mosheim alobaki ete likambo oyo “ezalaki kopesa Baloma nkanda mpo na baklisto ezalaki losambo na bango oyo ezangaki makambo ya mindɔndɔ, ata na likambo moko te yango ekokanaki na milulu ya losambo ya bato mosusu nyonso.” Alobaki lisusu ete: “[Baklisto] bazalaki kotumba mbeka te, bazalaki na batempelo te, bazalaki kosalela bililingi te, bazalaki na bisika mosantu te, to mpe banganga-nzambe te; yango wana ebele ya bato mosusu bazalaki kotyola bango, bato yango bazalaki kokanisa ete lingomba moko te ekoki kozanga makambo wana. Yango wana bazalaki kotalela bango lokola bato oyo bandimaka Nzambe te; mpe na mibeko ya Loma, bato oyo bandimaka Nzambe te bazalaki lokola bato mabe mpo na mboka.”
7 Banganga-nzambe, bato ya misala ya mabɔkɔ, mpe bato oyo, soki losambo ya bikeko ezali lisusu te, misala na bango mpe ekufi, bango nyonso wana bazalaki kotinda bato báyina baklisto, mpamba te baklisto bazalaki kosambela bikeko te. (Misala 19:23-40; 1 Bakolinti 10:14) Tertullien akomaki boye: “Bazalaki komona ete baklisto nde bazalaki kobimisa likama nyonso oyo esalemi na mboka, to mabe nyonso oyo ekómeli bato. Soki mai ya Ebale Tibre emati tii na bifelo ya engumba, soki mai ya Ebale Nil ekómi na bilanga te, soki mbula ezali kobɛta te, soki mabele eningani, soki nzala ekɔti na mboka, soki maladi mabe ekɔti na mboka, bazalaki koganga mbala moko ete: ‘Tóbwaka baklisto esika bankosi ezali!’” Baklisto ya solo ‘bakebaka na bikeko’ ata soki kosala ndenge wana ekoki kobendela bango mikakatano nini.—1 Yoane 5:21, NW.
Solo mpe bafɛti ya mangomba
8. Mpo na nini bato oyo batambolaka na kati ya solo basalaka fɛti ya Noele te?
8 Bato oyo bazali kotambola na kati ya solo baboyaka kosala bafɛti oyo Makomami epesi yango nzela te mpamba te ‘bosangani ezali te na kati ya pole mpe molili.’ (2 Bakolinti 6:14-18, NW) Na ndakisa, basepelaka Noele te, fɛti oyo esalemaka mokolo ya 25 Desɛmbɛ. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi polele ete “moto moko te ayebi mokolo mpenza oyo Klisto abotamaki.” Buku mosusu (The Encyclopedia Americana, [ebimeli ya 1956]) elobi ete: “Makambo mingi oyo bato basalaka na Noele eutá na Saturnales, fɛti moko oyo Baloma bazalaki kosala na katikati ya sanza ya Desɛmbɛ.” Buku mosusu (Cyclopædia) ya M’Clintock na Strong elobi boye: “Ezali Nzambe te nde atindaki bato básalaka fɛti ya Noele, mpe eutá na B[oyokani] ya S[ika] te.” Buku mosusu mpe (Daily Life in the Time of Jesus) elobi boye: “Bibwele . . . ezalaki kolekisa eleko ya malili na kati ya ndako ya bibwele; mpe soki tokamati kaka likambo wana yango moko, ekoki mpo na komonisa ete dati oyo basalaka fɛti ya Noele, na eleko ya malili makasi, ekoki kozala dati oyo ebongi te, mpamba te Evanzile elobi ete babateli ya bampate bazalaki na esobe.”—Luka 2:8-11.
9. Mpo na nini basaleli ya Yehova, baoyo ya kala mpe ya lelo, basalaka fɛti ya Pasika te?
9 Balobaka ete Pasika ezali fɛti oyo bakanisaka lisekwa ya Klisto, kasi babuku oyo eyebani ete elobaka solo ezali komonisa ete eutaki na losambo ya lokuta. Buku moko (The Westminster Dictionary of the Bible) elobi ete “na ebandeli Pasika ezalaki fɛti ya eleko ya prɛnta oyo Ba-Teuton bazalaki kokumisa nzambe-mwasi ya pole mpe prɛnta; oyo na Lingelesi babengaka ye Eastre.” Ata soki ezalaki bongo to ndenge mosusu, buku mosusu (Encyclopædia Britannica [ebimeli ya mbala ya 11]) eyebisi ete: “Likambo moko te na kati ya Boyokani ya Sika emonisi ete bazalaki kosepela fɛti ya Pasika.” Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosala fɛti ya Pasika te, lelo oyo mpe basaleli ya Yehova basalaka yango te.
10. Ekaniseli nini Yesu abandisaki, mpe banani oyo basalaka yango na ndenge oyo ebongi mpenza?
10 Yesu atindaki bayekoli na ye te ete bákanisaka kobotama na ye to lisekwa na ye, kasi ye moko alakisaki bango ndenge oyo basengeli kosalaka Ekaniseli ya liwa na ye. (Baloma 5:8) Kutu, yango ezali ekaniseli kaka moko oyo atindaki bayekoli na ye básalaka. (Luka 22:19, 20) Mbala moko na mbula, Batatoli ya Yehova basalaka Ekaniseli yango oyo ebengamaka mpe Bolei ya Mpokwa ya Nkolo.—1 Bakolinti 11:20-26, NW.
Solo esakolami na mabele mobimba
11, 12. Ndenge nini bato oyo batambolaka na solo basimbaka mosala na bango ya kosakola?
11 Bato oyo bayebi solo bamonaka ete bazali na libaku malamu ya kosalela ntango na bango, makasi na bango, mpe biloko na bango mosusu mpo na kosala mosala ya kosakola nsango malamu. (Malako 13:10) Baklisto ya ekeke ya liboso basalaki mosala ya kosakola na lisalisi ya makabo ya bolingo malamu. (2 Bakolinti 8:12; 9:7) Tertullien akomaki boye: “Atako ezali na kɛsi moko mpo na makabo, ezali te mpo bato báfutaka mbongo liboso ya kokɔta, lokola nde losambo ezali likambo ya mombongo. Moto na moto amemaka mwa lomeya mbala moko na sanza, to ntango nyonso oyo alingi, mpe soki motema na ye elingi, mpe soki akoki; mpamba te batindaka moto moko te na makasi; moto na moto apesaka na bolingo na ye moko.”—Apologétique, mokapo 39.
12 Batatoli ya Yehova mpe basalelaka kaka makabo ya bolingo malamu mpo na kosala mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba. Longola Batatoli bango moko, bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu, oyo mpe bazali na botɔndi, bamonaka ete kopesa makabo na bango mpo ete mosala yango ekende liboso ezali libaku malamu. Na likambo oyo mpe, Batatoli ya Yehova bakokani na baklisto ya ekeke ya liboso.
Solo mpe etamboli oyo moto asengeli kozala na yango
13. Petelo apesaki toli nini oyo Batatoli ya Yehova balandaka mpo na etamboli na bango?
13 Lokola bazalaki kotambola na solo, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kolanda toli ya ntoma Petelo ete: “Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde na basali-mabe, bákoka kopesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala.” (1 Petelo 2:12, NW) Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza maloba yango.
14. Ndenge nini baklisto batalelaka masano ya mbindo?
14 Ata nsima wana lipɛngwi ekɔtaki, baklisto baboyaki misala ya mbindo. Profesɛrɛ William Killen, ye azali molakisi ya makambo ya kala ya lingomba, akomaki boye: “Na ekeke ya mibale mpe ya misato, na bingumba nyonso ya minene, bato mingi bazalaki kosepela kokende kotala teyatre na ndako ya teyatre; mpe atako mbala mingi bato oyo bazalaki kosala teyatre bazalaki bato ya misala ya mbindo, teyatre oyo bazalaki kosala ezalaki ntango nyonso kolakisa makambo oyo ezalaki kolamusa bamposa mabe ya bato ya ntango wana. . . . Baklisto nyonso ya solo bazalaki kosepela na teyatre ata moke te. . . . Baboyaki makambo ya nsɔni oyo bazalaki kolakisa na bateyatre yango; mpe ndenge oyo na bateyatre yango bazalaki ntango nyonso kobelela banzambe ya bapakano, ezalaki na boyokani te na bindimeli na bango.” (The Ancient Church, nkasa 318-319) Lelo oyo mpe, bayekoli ya solo ya Yesu baboyaka masano nyonso oyo elakisaka makambo ya nsɔni mpe ya mbindo.—Baefese 5:3-5.
Solo mpe “bakonzi oyo bazali liboso”
15, 16. Banani bazali “bakonzi oyo bazali liboso” mpe ndenge nini bato oyo batambolaka na kati ya solo batalelaka bango?
15 Atako baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na bizaleli ya malamu, baamperɛrɛ mingi ya Loma bazalaki kolinga bango te. Ernest Hardy, moto ya mayele na istware, alobi ete baamperɛrɛ bazalaki “kotyola bango ete bazali na molende ya mabe mingi.” Mikanda oyo Pline le Jeune, guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Bitunia na Amperɛrɛ Trajan bazalaki kotindelana emonisi ete bakonzi bayebaki baklisto malamu te. Ndenge nini baklisto batalelaka Leta?
16 Lokola bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova batosaka “bakonzi oyo bazali liboso,” elingi koloba bakonzi ya Leta; kasi batalelaka naino makambo oyo bakonzi yango bazali kosɛnga bango. (Baloma 13:1-7, NW) Soki bakonzi yango basɛngi bango básala makambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe, Batatoli balobaka ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29, NW) Buku moko (After Jesus—The Triumph of Christianity) elobi boye: “Atako baklisto bazalaki kosambela amperɛrɛ te, bazalaki batomboki te, mpe atako losambo na bango ekesanaki na losambo mosusu nyonso mpe ntango mosusu bapakano bazalaki komona yango mabe, yango ekokaki kokweisa ekólo te.”
17. (a) Guvɛrnɛma nini baklisto ya liboso bazalaki kokumisa? (b) Ndenge nini bayekoli ya solo ya Klisto basalelaka maloba ya Yisaya 2:4?
17 Baklisto ya liboso bazalaki kokumisa Bokonzi ya Nzambe, ndenge oyo bato ya kala lokola Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo bazalaki kozela na kondima ‘engumba oyo etongami na Nzambe’ oyo elakamaki. (Baebele 11:8-10, NW) Ndenge moko na Nkolo na bango, bayekoli ya Yesu bazalaki “bato ya mokili te.” (Yoane 17:14-16, NW) Lisusu, na makambo etali bitumba mpe kowelana, bango ‘batulaki mipanga na bango ete ezala bitimweli’ mpo na kolanda kimya. (Yisaya 2:4) Geoffrey Nuttall, ye azali molakisi ya makambo ya kala ya lingomba, amonaki likambo moko ya ntina mingi oyo ekokani kati na Batatoli mpe baklisto ya liboso mpe alobaki boye: “Ndenge oyo baklisto ya liboso bazalaki kotalela bitumba ezali mpenza ndenge oyo bato oyo bamibengaka Batatoli ya Yehova batalelaka yango atako ezali kosala biso mpasi na kondima yango.”
18. Mpo na nini ata guvɛrnɛma moko te esengeli kokanisa ete Batatoli ya Yehova bazalaka na mikano ya mabe?
18 Baklisto ya liboso bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te, kasi bazalaki kotosa “bakonzi oyo bazali liboso”; bazalaki koluka kokweisa bokonzi moko te, Batatoli ya Yehova mpe bazali ndenge yango. Mopanzi-nsango moko na Amerika ya Nɔrdi akomaki boye: “Esengeli mpenza kozala ete moto akaniselaka Batatoli ya Yehova mabe to ayinaka bango mpo akanisa ete bakoki koluka kokweisa bokonzi moko ya politiki. Batindaka bato na kotomboka te mpe balingi kimya na ndenge mpenza oyo lingomba esengeli kozala.” Bakonzi oyo bayebi bango malamu bayebi ete Batatoli ya Yehova bakoki soki moke te kosala makambo oyo ezali mabe mpo na guvɛrnɛma.
19. Na likambo etali kofuta mpako, tokoki koloba nini mpo na baklisto ya liboso mpe mpo na Batatoli ya Yehova?
19 Lolenge moko oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kolakisa ete batosaka “bakonzi oyo bazali liboso” ezalaki na ndenge oyo bazalaki kofuta mpako na bango. Justin le Martyr atindelaki Antonin le Pieux, amperɛrɛ ya Loma (138-161 T.B.) mokanda mpe na kati na yango alobaki ete baklisto bazalaki kofuta mpako na bango “nokinoki koleka bato mosusu nyonso.” (Première apologie, mokapo 17) Lisusu, Tertullien ayebisaki bakonzi ya Loma ete bakɔngɔli na bango ya mpako bazali na “nyongo ya kozongisela baklisto matɔndi” mpo na ndenge oyo bazalaki kofuta mpako na bango kozanga mindɔndɔ. (Apologétique, mokapo 42) Baklisto bazalaki mpe kozwa litomba na Pax Romana, to Kimya ya Loma; yango nde etyaki mibeko mpe ezalaki kopekisa mobulu, esalaki ete básala banzela ya malamu, mpe esalaki ete mibembo na masuwa ezala mpenza na makama te. Mpo na komonisa botɔndi na bango na mboka, bazalaki kotosa maloba ya Yesu: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” (Malako 12:17, NW) Lelo oyo mpe basaleli ya Yehova balandaka toli yango mpe bato mosusu bazali kokumisa bango mpo na bosembo na bango, na ndakisa na likambo etali kofuta mpako.—Baebele 13:18.
Solo ezali kotya bomoko
20, 21. Na likambo etali kofanda na kimya lokola bandeko, nini emonanaki epai ya baklisto ya liboso mpe ezali komonana epai ya basaleli ya Yehova lelo oyo?
20 Lokola baklisto ya liboso bazalaki kotambola na kati ya solo, bazalaki bango nyonso liboke moko, bafandaki na kimya lokola bandeko; lelo oyo mpe Batatoli ya Yehova bazali ndenge yango. (Misala 10:34, 35) Mokanda moko ebimaki na zulunalo moko (The Moscow Times) elobaki boye: “[Batatoli ya Yehova] bayebani ete bazali bato malamu, bato ya boboto, ya komikitisa mpe bato ya matata te, balukelaka bato mosusu mindɔndɔ te mpe balukaka ntango nyonso kozala na kimya na bato mosusu . . . Kati na bango bazali te na bato oyo bandimaka kanyaka, bato oyo balangwaka masanga to bamɛli bangi, mpe ezali bongo mpo na ntina moko oyo ezali mpenza polele: Basalaka makambo to balobaka na kolanda bindimeli na bango oyo euti na Biblia. Soki bato nyonso na mokili bamekaki ata komeka kolanda Biblia lokola Batatoli ya Yehova, mokili mabe oyo elingaki kozala ndenge mosusu mpenza.”
21 Buku mosusu (Encyclopedia of Early Christianity) elobi boye: “Bato oyo bazalaki na lingomba ya ekeke ya liboso bazalaki komimona ete bakómi na bomoto ya sika mpe baoyo kati na bango bazalaki liboso banguna, Bayuda na Bapakano, bakokaki sikoyo kofanda na bomoko mpe na kimya.” Batatoli ya Yehova mpe bazali lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo balingi kimya; bazali mpenza bato ya mokili ya sika. (Baefese 2:11-18; 1 Petelo 5:9; 2 Petelo 3:13) Mokonzi ya bakɛngɛli ya fware ya Pretoria na Afrika ya Sudi amonaki ndenge oyo Batatoli ya mposo ndenge na ndenge bafandaki na esika yango na kimya mpo na liyangani na bango, alobaki boye: “Moto nyonso azalaki na bonkonde, mpe bazalaki kosolola na boboto; bizaleli oyo bomonisaki na boumeli ya mwa mikolo oyo ezali komonisa ete bato ya lingomba na bino bazali mpenza na bizaleli malamu mpe ete bino nyonso bozali kofanda na kimya mpe na esengo lokola libota moko.”
Bazwi mbano mpo bazali koteya solo
22. Lokola baklisto bazali komonisa solo polele, likambo nini ezali kosalema?
22 Paulo na baklisto mosusu bazalaki ‘komonisa solo polele’ na nzela ya bizaleli na bango mpe mosala na bango ya kosakola. (2 Bakolinti 4:2, NW) Omonaka te ete Batatoli ya Yehova bazali kosala se ndenge yango mpe bazali koteya solo na bikólo nyonso? Na mokili mobimba, bato bazali kondima losambo ya solo mpe bazali koya ebele na ‘ngomba ya ndako ya Yehova.’ (Yisaya 2:2, 3) Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe, mpe masangá mingi ya sika ezali kosalema.
23. Ndenge nini otalelaka bato oyo bateyaka solo na bikólo nyonso?
23 Atako basaleli ya Yehova bazali bato oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge, bango nyonso basangani na losambo ya solo. Bolingo na bango emonisaka ete bazali bayekoli ya solo ya Yesu. (Yoane 13:35) Ozali komona ete, ‘Nzambe azali mpenza na kati na bango’? (1 Bakolinti 14:25, NW) Yo mpe ozali na molɔngɔ ya baoyo bazali koteya bato ya bikólo nyonso solo? Soki ezali bongo, monisáká botɔndi na yo mpo na solo mpe simbá libaku malamu ya kotambola kati na yango libela na libela.
Okopesa eyano nini?
• Na oyo etali ndenge ya kosambela, bokokani nini ezali kati na baklisto ya liboso na Batatoli ya Yehova?
• Ekaniseli nini kaka moko bato oyo batambolaka na kati ya solo basalaka?
• Banani bazali “bakonzi oyo bazali liboso” mpe ndenge nini baklisto batalelaka bango?
• Na ndenge nini solo ezali kotya bomoko?
[Elilingi na lokasa 21]
Banda na ntango ya kala, makita ya lisangá ezalaka na matomba mpo na bato oyo batambolaka na kati ya solo
[Bililingi na lokasa 23]
Yesu atindaki bayekoli na ye básalaka Ekaniseli ya liwa na ye
[Elilingi na lokasa 24]
Batatoli ya Yehova batosaka “bakonzi oyo bazali liboso” ndenge baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kotosa