Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/8 nk. 25-28
  • Okobatela bosembo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okobatela bosembo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Satana azali koluka kobebisa bosembo na biso
  • Bosembo ya Yesu ekokaki kobebisama te
  • Kotikala sembo liboso ya mikakatano
  • Motambo ya kala mpo na kokanga nyama ya sika
  • Batelá bosembo na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yobo ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Nakotika bosembo na ngai te!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/8 nk. 25-28

Okobatela bosembo na yo?

OYEBI motango ya bakɛngɛli-mboka (moineaux) oyo bakufaki lobi? Moto moko te ayebi, mpe ntango mosusu kaka bato moke nde bamibanzabanzaka na likambo yango, mpo bandɛkɛ yango ezali ebele. Kasi Yehova, ye amibanzabanzaka na yango. Kolobeláká mwa bandɛkɛ mikemike yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba.” Abakisaki ete: “Bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”​—⁠Matai 10:​29, 31, NW.

Na nsima mpenza, bayekoli bayaki koyeba malamumalamu ete bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Ntoma Yoane, moko kati na bango akomaki boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele na oyo etali biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoane 4:​9, NW) Yehova apesaki kaka lisiko mpamba te, kasi alobi lisusu na mosaleli na ye mokomoko ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—⁠Baebele13:​5, NW.

Emonani polele ete bolingo ya Yehova mpo na bato na ye ezali makasi. Kasi motuna ezali boye: ‘Tokangami na Yehova makasi na ndenge ete tokoki kotika ye soki moke te?’

Satana azali koluka kobebisa bosembo na biso

Ntango Yehova abendaki likebi ya Satana na etamboli ya bosembo ya Yobo, Satana azongiselaki ye boye: “Yobo akoki nde kosambela yo soki azwi eloko moko mpo na yango te?” (Yobo 1:​9, Today’s English Version) Na maloba wana alingaki koloba ete bato bazalaka sembo epai na Nzambe kaka mpo na ‘biloko oyo bakoki kozwa epai na ye.’ Soki ezalaki bongo solo, mbɛlɛ bosembo ya moklisto nyonso ekokaki kobebisama, soki biloko oyo ezali komeka ye ezali mpenza na motuya mingi.

Na ntina na Yobo, Satana alobaki liboso ete bosembo na ye epai na Nzambe ekosila soki abungisi biloko na ye ya motuya. (Yobo 1:​10, 11) Ntango lokuta wana elongaki te, Satana alobaki lisusu boye: “Moto akopesa eloko nyonso mpo atikala na bomoi.” (Yobo 2:​4, TEV) Ata soki likambo oyo Satana alobi awa ezali solo mpo na bato mosusu, Yobo aboyaki kobebisa bosembo na ye. Lisolo ya kala emonisi yango polele. (Yobo 27:5; 42:​10-17) Yo mpe ozali na bosembo ya motindo wana? To okotikela Satana nzela ete abebisa bosembo na yo? Na ntango tozali kolobela mwa makambo ya solo oyo etali baklisto nyonso, omitalela yo moko malamumalamu.

Ntoma Paulo andimaki solo ete bosembo ya baklisto ekoki kozala makasi mpenza. Mpe akomaki ete: “Nandimi solo ete ezala liwa to bomoi . . . to makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya . . . to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso ná bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 8:​38, 39, NW) Tokoki mpe komindimisa ndenge wana soki bolingo na biso mpo na Yehova ezali makasi. Bolingo ya ndenge wana ezali ekanganeli moko ya makasi, oyo ata liwa ekoki kolonga yango te.

Soki tozali na boyokani ya lolenge wana na Nzambe, tokomituna mokolo moko te motuna oyo: ‘Nsima ya mwa bambula nakozala kaka kosalela Yehova?’ Kokakatana ya ndenge wana ekoki komonisa ete bosembo na biso epai na Nzambe etali nde makambo oyo ekoki koyela biso na bomoi. Bosembo ya solo ebongwanaka te mpo na makambo mosusu oyo moto akutani na yango. Etali nde lolenge ya bomoto na biso. (2 Bakolinti 4:​16-18) Soki tolingi Yehova na motema na biso mobimba, tokoki koyokisa ye mawa ata mokolo moko te.​—⁠Matai 22:37; 1 Bakolinti 13:⁠8.

Nzokande, tosengeli koyeba ete Satana azali ntango nyonso koluka ndenge nini akoki kobebisa bosembo na biso. Akoki komeka biso mpo tókweya na bamposa ya nzoto, tólanda masɛnginya ya baninga, to mpe tótikela mikakatano ya lolenge nyonso nzela ete elongola biso na nzela ya solo. Atako kozanga kokoka na biso esalisaka Satana mingi na etumba oyo azali kobundisa biso, mosungi na ye ya liboso mpenza ezali bongo mokili oyo etangwi mosika na Nzambe. (Baloma 7:​19, 20; 1 Yoane 2:16) Atako bongo, tozali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa biso na etumba yango. Moko na makambo yango, oyo ezali mpe na ntina koleka, ezali koyeba myango ya Satana.​—⁠2 Bakolinti 2:⁠11.

Myango ya satana ezali nini? Na mokanda na ye epai ya Baefese, ntoma Paulo abengaki yango “mayele mabe,” to mpe “bokosi.”a (Baefese 6:​11, NW, maloba na nse ya lokasa) Satana azali kotya mitambo na nzela na biso mpo na kobebisa bosembo na biso. Kasi, likambo ya esengo, toyebi mayele ya Zabolo, mpo ete myango na ye esilá kokomama na kati ya liloba ya Nzambe. Lolenge Satana amekaki kobebisa bosembo ya Yesu mpe ya Yobo elakisi banzela mosusu oyo asalelaka mpo na kobebisa bosembo ya baklisto.

Bosembo ya Yesu ekokaki kobebisama te

Ntango Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola, Satana azwaki mpiko ya komeka Mwana ya Nzambe na kotumoláká ye na lofundo nyonso ete akómisa libanga limpa. Oyo nde mayele mabe! Na ntembe te Yesu azalaki na nzala makasi, mpo alyaki te mikolo 40. (Luka 4:​2, 3) Satana alobaki na Yesu ete akokisa mposa na ye ya kolya kaka na ngonga wana, na lolenge oyo eyokanaki te na mokano ya Yehova. Ndenge moko mpe lelo oyo, bapiblisite ya mokili ezali kotinda bato bákokisa bamposa na bango nokinoki, kozanga kotala makama oyo yango ekoki kobimisa. Balobaka maloba lokola: ‘Ebongi kozala na yango sikoyo,’ to mpe, ‘Salá yango kaka sikoyo!’

Soki Yesu alukaki kaka kosilisa nzala na ye kozanga kotalela oyo ekokaki koya nsima, mbɛlɛ Satana abebisaki bosembo na ye. Yesu atalelaki likambo yango na miso ya elimo, mpe ayanolaki mbala moko ete: “Ekomamá ete, ‘Moto asengeli kobika kaka na mampa te.’ ”​—⁠Luka 4:​4, NW; Matai 4:⁠4.

Na nsima Satana alukaki lolenge mosusu ya komeka ye. Azwaki Makomami oyo Yesu azalaki kosalela, mpe asalelaki yango mabe, mpo na kotinda Yesu amibwaka na nse longwa na nsamba ya tempelo. Satana alobaki na ye ete: ‘Anzelu moko asengeli kobatela yo.’ Yesu azalaki na mposa te ya kosɛnga Tata na ye ete abatela ye na nzela ya likamwisi kaka mpo na kobenda likebi likoló na ye moko. Yesu azongisaki ete: “Osengeli te kotya Yehova Nzambe na yo na komekama.”​—⁠Matai 4:​5-7, NW; Luka 4:​9-12.

Mwango ya nsuka oyo Satana asalelaki ezalaki ya polele. Alukaki koyokana na Yesu na kolobáká na ye ete soki afukami mpe asambeli ye, akopesa ye mokili mobimba na nkembo na yango nyonso. Wana ezalaki mpenza biloko nyonso oyo Satana akokaki kopesa. Kasi ekobanda kutu ndenge nini Yesu akende kosala ekela ya losambo liboso ya monguna ya liboso mpenza ya Tata na ye? Ekokaki kosalema ata moke te! Yesu azongisaki boye: “Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”​—⁠Matai 4:​8-11, NW; Luka 4:​5-8.

Na nsima wana alongaki te mbala misato mobimba, Satana ‘atikaki Yesu tii na ntango mosusu ya malamu.’ (Luka 4:​13, NW) Yango emonisi ete Satana azalaki ntango nyonso koluka libaku ya komeka bosembo ya Yesu. Libaku eyaki komonana nsima ya mbula mibale na ndambo, ntango Yesu akómaki koyebisa bayekoli na ye ete mosika te akokufa. Ntoma Petelo alobaki na ye ete: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo, likambo wana ekokómela yo te.”​—⁠Matai 16:​21, 22, NW.

Yesu asepelaki nde na toli wana ya mabe, atako epesamaki na makanisi malamu, kaka mpo eutaki epai ya moyekoli na ye? Yesu ayebaki mbala moko ete maloba wana ezalaki nde na boyokani na mokano ya Satana, kasi oyo ya Yehova te. Klisto ayanolaki na motema mobimba ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—⁠Matai 16:​23, NW.

Lokola Yesu alingaka Yehova na bolingo oyo ezali na nsuka te, Satana alongaki te kobebisa bosembo na ye. Eloko moko te oyo Satana akokaki kopesa ye, ata mpe komekama ya makasi ndenge nini, ekokaki te kolɛmbisa bosembo ya Yesu epai ya Tata na ye ya likoló. Biso mpe tokozwa ekateli ya lolenge wana ata soki mpo na makambo tokutani na yango ezali mpasi kobatela bosembo na biso? Ndakisa ya Yobo ekosalisa biso tóyeba malamumalamu ntina ya mikakatano oyo tokoki kokutana na yango.

Kotikala sembo liboso ya mikakatano

Ndenge Yobo amonaki yango, mikakatano ekoki koyela biso ata na ntango nini. Azalaki mobali ya esengo na libala na ye mpe azalaki na bana zomi; azalaki mpe na mimeseno malamu ya elimo. (Yobo 1:⁠5) Nzokande, atako Yobo ayebaki eloko moko te, bazalaki kotyela bosembo na ye ntembe kuna na likoló esika Nzambe afandaka, mpe Satana akanaki kosala nyonso mpo na kokweisa ye.

Na mwa ntango moke, Yobo abungisaki bozwi na ye nyonso. (Yobo 1:​14-17) Kasi bosembo ya Yobo elongaki komekama yango, mpo ete ye atyaki motema na ye na mbongo ata moke te. Komikundoleláká ntango azalaki mozwi, Yobo alobaki ete: “Soki natii wolo lokola elikya na ngai, . . . soki nasepelaki mpo ete bozwi na ngai ezali monene . . . yango mpe ekozala lisumu . . . , zambi nazalaki kowangana Nzambe na likoló.”​—⁠Yobo 31:​24, 25, 28.

Lelo mpe, tokoki na mbalakaka mpenza kobungisa bozwi na biso nyonso. Bayibelaki moto moko ya mombongo, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, ebele ya mbongo, atikalaki mpenza mabɔkɔ mpamba. Na bosembo nyonso, alobaki boye: “Etikalaki moke nabɛla maladi ya motema. Kutu tóloba ete, soki ezalaki mpo na boyokani oyo nazali na yango na Nzambe te, mbɛlɛ nabɛlaki motema. Atako bongo, likama yango ezongisaki makanisi na ngai nsima, mpe nayaki komona ete nazalaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ngai te. Esengo ya kozwa mbongo mingi elingaki koleka makambo mosusu nyonso.” Kobanda wana Motatoli yango azwá mokano ya kosala mwa mombongo moko moke mpe akómá ntango nyonso kozwa mokumba ya mobongisi-nzela mosungi, kolekisáká ngonga 50 to mpe koleka, sanza na sanza na mosala ya kosakola. Nzokande, mikakatano mosusu ezalaka lisusu mabe koleka kutu kobungisa bozwi.

Yobo azalaki naino kokanisa bozwi na ye oyo eutaki kobebisama, ntango bayebisaki ye ete bana na ye zomi bakufi. Kasi ye alobaki na mpiko mpenza ete: “Nkombo ya [Yehova] esanzolama.” (Yobo 1:​18-21) Biso mpe tokokoka kobatela bosembo na biso ata soki tobungisi bato ya libota na biso ebele na mbala moko? Nkulutu moko na lisangá ya boklisto, nkombo na ye Francisco, abungisaki bana mibale na likama moko ya nsɔmɔ ya bisi. Abɔndisamaki na kopusanáká lisusu penepene na Yehova mpe na kolekisáká ntango mingi na mosala ya kosakola.

Ata nsima ya kobungisa bana na ye na ndenge wana ya mabe, mpasi ya Yobo esilaki naino te. Satana apesaki ye bokɔnɔ moko ya mabe oyo enyokolaki ye mpenza. Na ntango yango, mwasi ya Yobo apesaki ye toli ya mabe. Alobaki na ye boye: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Yobo ayokaki toli na ye te, mpe “asalaki lisumu na bibɛbu na ye te.” (Yobo 2:​9, 10) Bosembo na ye etalelaki te lisalisi ya libota na ye, kasi boyokani oyo ye moko azalaki na yango na Yehova.

Flora, mwasi oyo mobali na ye mpe mwana na ye ya mobali ya liboso batiká nzela ya boklisto koleka mbula zomi, ayebi solo ndenge Yobo asengelaki koyoka. Alobi boye: “Soki obungisi lisungi ya libota na yo na ndenge ya mbalakaka, okoki mpenza kotambola motó. Kasi nayebaki ete nakokaki te kozwa esengo na libándá ya lisangá ya Yehova. Yango wana natɛlɛmaki ngwi mpe natyaki Yehova na esika ya liboso, wana nazalaki kosala makasi ete natikala ntango nyonso mwasi malamu mpe mama malamu. Nazalaki kobondela ntango nyonso, mpe Yehova apesaki ngai makasi. Nazali moto ya esengo mpo ete, atako mobali na ngai azali kotɛmɛla ngai makasi, nayekoli kotyela Yehova motema na ngai mobimba.”

Mayele mabe mosusu oyo Satana asalelaki mpo na kobebisa bosembo ya Yobo ezalaki na nzela ya baninga na ye misato. (Yobo 2:​11-13) Ezalaki mpenza likambo ya mawa ntango babandaki kolobela ye mabe. Soki ye ayoka maloba na bango, mbɛlɛ alongolaki motema na ye epai ya Yehova Nzambe. Toli ya kolɛmbisa nzoto oyo bazalaki kopesa ye elingaki kobebisa elimo na ye mpe bosembo na ye, mpe nsukansuka mokano ya Satana elingaki kolonga.

Nzokande Yobo atingamaki makasi: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te!” (Yobo 27:⁠5) Ye alobaki te ete, ‘Nakotikela bino nzela te ete bóbebisa bosembo na ngai!’ Yobo ayebaki ete kobatela bosembo na ye ezalaki kotalela ye moko mpe bolingo na ye epai na Yehova.

Motambo ya kala mpo na kokanga nyama ya sika

Tii lelo Satana azali kaka kosalela batoli ya mabe to mpe maloba makasi oyo ekoki kouta epai ya baninga to epai ya bandeko baklisto. Makambo mabe oyo ndeko moko na lisangá asaleli biso ekoki kolɛmbisa kondima na biso koleka kutu minyoko oyo eutaka na bato oyo bazali bandimi te. Nkulutu moko oyo abundá bitumba ntango azalaki soda, alobelaki bokeseni oyo ezali kati na bitumba yango mpe mpasi oyo amonaka mpo na maloba mabe ya bandeko baklisto mosusu. Mpo na maloba to misala ya bandeko baklisto, alobaki boye: “Yango ezali likambo eleki mpasi oyo nakutaná na yango naino te.”

Epai mosusu, mabunga ya bandeko baklisto ekoki kopesa biso mpasi oyo ekoki kosala ete tóboya ata kolobisa bamosusu to mpe tókóma ata kozangisa makita ya boklisto. Ntango mosusu tokoki kokanisa ete likambo eleki ntina ezali nde oyo ya koyeba ndenge nini tokoki kosilisa mpasi ya mitema na biso. Kasi ekozala mawa mingi soki tozali na makanisi mokuse ndenge wana, mpe tosundoli eloko na biso ya motuya monene, elingi koloba totiki makambo oyo bato mosusu bazali kosala to koloba elɛmbisa boyokani na biso na Yehova. Soki topesi nzela na makambo ya ndenge wana, tokokwea noki mpenza na moko ya mitambo ya kala wana ya Satana.

Ya solo, mposa na biso ezali ete lisangá ya boklisto ezala na bizaleli malamu mpenza. Kasi soki tozali kokanisa ete bandeko, oyo bazali bato ya kozanga kokoka, bakosala makambo oyo eleki makoki na bango, tokozala kaka bato ya mawa. Nzokande, Yehova asɛngaka te na basaleli na ye makambo oyo eleki makoki na bango. Soki tolandi ndakisa na ye, tokoyeba kokanga motema na kozanga kokoka na bango. (Baefese 4:​2, 32) Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Soki boyoki nkanda, bótika te ete nkanda etinda bino na lisumu; bótika te ete ntango moi ekolala ekuta bino kaka bozali naino kobatela yango; bótikela zabolo nzela te.”​—⁠Baefese 4:​26, 27, The New English Bible.

Ndenge Biblia emonisi yango polele, Satana azali na mayele mabe ndenge na ndenge oyo asalelaka mpo na koyeba​—⁠soki akoki​—⁠ndenge nini kobebisa bosembo ya baklisto. Mayele mosusu oyo asalelaka esepelisaka nzoto oyo ya lisumu, kasi mayele mosusu ememaka mitungisi. Makambo oyo ezali na lisolo oyo, emonisi ntina oyo osengeli ata moke te kozanga bokɛngi. Na bolingo makasi epai na Nzambe kati ya motema na yo, zwá ekateli ya komonisa ete Satana azali mobuki ya lokuta, mpe sepelisá motema ya Nzambe. (Masese 27:11; Yoane 8:44) Ata soki komekama ya ndenge nini eyeli biso, tóbosana te ete moklisto ya solo asengeli te kokakola bosembo na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nganga-mayele ya Biblia William E. Vine alobi ete liloba yango ya Grɛki oyo ebongolami ekoki mpe kolimbola “mayele ya kobuba.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto