Bilenge oyo balingaka solo
EKOKI sikoyo mbula koleka 2400, Moebele moko oyo azalaki mokomi ya nzembo atunaki motuna oyo: “Ndenge nini elenge mobali akopɛtola nzela na ye?” (Nzembo 119:9, NW) Lelo oyo, motuna yango ezali kaka na ntina, mpamba te bilenge mingi bazali kokutana na mikakatano. Mobulu ya basi to mpe ya mibali ememi bilenge mingi na kozwa sida; ndambo ya bato (50 %) oyo bazali na maladi yango ya nsɔmɔ bazali bilenge ya mbula 15 tii mbula 24. Komɛla bangi ezali mpe kobimisa ebele ya mikakatano, bilenge mosusu bazali kokufa mobesu mpo na yango. Miziki oyo ezali na maloba ya nsɔni; bafilme, maboke, na baemisyo mosusu ya televizyo oyo etondi na mobulu mpe makambo ya kosangisa nzoto; mpe bililingi ya bato bazali bolumbu oyo bazali kolakisa na Internet, nyonso wana ezali mpenza kobebisa bilenge. Yango wana, lelo oyo baboti mingi mpe bilenge mingi bazali komituna motuna oyo mokomi ya nzembo atunaki.
Mokomi yango ya nzembo apesaki eyano na motuna na ye, ete: “Soki azali kokeba na kolanda liloba na yo.” Ya solo, Biblia ezali kopesa bilenge toli ya malamu mpe bilenge mingi oyo bazali kolanda yango bazali na bomoi ya malamu. (Nzembo 119:105) Tótalela bandakisa ya bilenge oyo balingaka Nzambe mpe basalaka milende mpo na kozala ntango nyonso makasi na elimo na kati ya mokili oyo bato bamipesi na koluka bisengo mpe biloko ya mokili.
Bazali na botɔndi mpo na toli ya baboti
Jacob Emmanuel azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza liboso abanda kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Mexique. Abosani te ndenge oyo akómaki kolinga mosala ya Nzambe mpe azali kolobela likambo yango na botɔndi: “Baboti na ngai nde basalisaki ngai mingi, atako bandeko mosusu oyo bakɔmeli, baoyo bazalaki baninga na ngai basalisaki ngai mpe. Bango nyonso balendisaki ngai na kolinga mosala ya kosakola. Na boboto mpenza, balakisaki ngai nzela ya malamu; nazalaki soki moke te koyoka ete bazali kotindika ngai.”
David azali na mosala ya ntango nyonso banda bambula ebele; ye abosani te ndenge oyo motema na ye esimbamaki na komona ete baboti na ye babandaki mosala ya mobongisi-nzela monene na ntango oyo ye na ndeko na ye bazalaki naino bana mike. Nsima ya liwa ya tata na ye, mama na ye akobaki na mosala ya mobongisi-nzela monene. Mama na bango azalaki kosala mosala ya kobɔkɔla bango mpe mosala ya kosakola nsango malamu. David alobi ete: “Baboti na ngai batindaki ngai na makasi te ete nakóma mobongisi-nzela, kasi libota na biso mobimba tozalaki kosepela mingi na mosala yango; yango wana, lokola tozalaki koyokana malamu mpe makambo nazalaki komona, nyonso wana epesaki ngai mposa ya kosala mosala yango.” Mpo na toli mpe likebi ya baboti na ye, David alobi boye: “Mikolo nyonso na butu, mama azalaki kotángela biso masolo oyo ezali na mokanda Paladiso ebunga na paladiso ekozwama.a Ndenge oyo azalaki kobɛtela biso masolo yango epesaki biso mposa ya kolyaka bilei ya elimo.”
Basepelaka na makita
Bilenge mosusu basepelaka mpenza na makita ya boklisto te. Bakendaka na makita mpo baboti na bango bakendaka na bango. Nzokande, soki batiki te koyanganaka na makita, nsukansuka bakoki kobanda kolinga yango. Tótalela ndakisa ya Alfredo; ye abandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango azalaki na mbula 11. Alobi ete ntango azalaki na mbula soki mitano, azalaki kosala nyonso mpo akende na makita te, mpamba te makita ezalaki kopesa ye mpɔngi; kasi baboti na ye bazalaki kotikela ye nzela te ete alalaka na ntango ya makita. Alobi boye: “Ntango nazalaki kokola, nabandaki mokemoke kosepela na makita, mingimingi ntango kaka nayebaki kotánga mpe kokoma; mpamba te nabandaki kopesa biyano na maloba na ngai moko.”
Cintia azali elenge mwasi ya mbula 17, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza; ye ayebisi biso ndenge oyo baninga ya malamu basalisaki ye mingi mpo akóma kolinga mosala ya Nzambe. Alobi boye: “Boyokani malamu na bandeko mpe koyangana mbala na mbala na makita esalisi ngai nayokaka mpasi te mpo natiki baninga na ngai ya mokili mpe makambo oyo bilenge mingi basalaka, makambo lokola kokende kobina na banganda. Na makita, ntango nazalaki koyoka biyano mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, epesaki ngai mposa ya kopesa Yehova nyonso oyo nazali na yango; mpe nakanisi ete eloko eleki malamu oyo nazali na yango ezali nde bolenge na ngai. Yango wana, nazwaki ekateli ya kosalela yango na mosala na ye.”
Kasi, alobi ete: “Liboso nazwa batisimo, ezalaki na ntango moko oyo nazalaki kozangisa makita mpambampamba; nazalaki kokosa ete nazali na badevuare oyo nasengeli kosala to mpe makambo mosusu na kelasi. Nazangisaki makita mbala mingi, mpe yango ekómaki kolɛmbisa ngai na elimo. Nakómaki kolekisa ntango mingi na elenge mobali moko oyo azalaki koyekola Biblia te. Na lisalisi ya Yehova, nazongaki na nzela ya malamu liboso ete nazwa likama.”
Bango moko nde bazwaka ekateli
Pablo azali elenge mosusu oyo asalelaka Yehova lokola mobongisi-nzela; ntango batunaki ye soki, mpo na ye, nini mpenza esalisaka moto akóma kolinga solo ya Liloba ya Nzambe, ayanolaki boye: “Mpo na ngai, ezali na makambo mibale: koyekola mbala na mbala yo moko mpe kozala na molende na mosala ya kosakola. Nazali kotɔnda baboti na ngai na ndenge bateyaki ngai solo ya Yehova, mpe nakanisi ete yango nde eloko ya malamu mpenza oyo bapesaki ngai. Kasi, ngai moko nasengeli koyeba malamumalamu ntina oyo nalingaka Yehova. Mpo na yango, ezali mpenza na ntina koyeba solo ya Biblia na ‘bonene mpe bozindo’ na yango. Ezali kaka na nzela wana nde tokokóma na mposa ya Liloba ya Yehova; yango ekozala kati na mitema na biso lokola ‘mɔtɔ oyo ezali kozikisa’ oyo ekotinda biso tóyebisa yango bato mosusu. Molende wana na mosala ya kosakola ekobakisa botɔndi na biso mpo na solo.”—Baefese 3:18; Yilimia 20:9, NW.
Jacob Emmanuel, oyo tolobelaki liboso, ye mpe amonisi ntina oyo moto ye moko asengeli kopona kosalela Yehova. Alobi ete baboti na ye bazalaki soki moke te kotindika ye ete azwa batisimo. “Nakanisi ete basalaki mpenza malamu, mpamba te namoni mbuma malamu na yango. Na ndakisa, bilenge mosusu oyo bazalaki baninga na ngai bazwaki ekateli ya kozwa batisimo nzela moko. Atako ezalaki mabe te, namonaki ete bamosusu kati na bango babatisamaki kaka na loyenge ya kolanda baninga mpe mwa moke na nsima, molende na bango mpo na misala ya Bokonzi ekitaki. Mpo na ngai, baboti na ngai batindaki ngai na makasi te ete nazwa ekateli ya komipesa na Yehova. Ngai moko nde nazwaki ekateli yango.”
Mokumba ya lisangá
Bilenge mosusu bayekolaki solo ya Liloba ya Nzambe bango moko, kozanga lisalisi ya baboti na bango. Ezalaka mpenza pɛtɛɛ te na makambo ya ndenge wana mpo moto ayekola kosala makambo ya malamu mpe alanda kaka nzela yango.
Noé azali koyeba lisusu ndenge oyo solo ememelaki ye matomba. Banda bomwana mpenza, azalaki moto ya nkanda mpe ya mobulu. Ntango akómaki na mbula 14, abandaki koyekola Biblia mpe bizaleli na ye ebandaki kobongwana. Yango esepelisaki baboti na ye mingi atako na ntango wana bazalaki kosepela na Biblia te. Wana Noé azalaki kokola na elimo, akómaki na mposa ya kosalela Nzambe mingi na bomoi na ye. Sikoyo, azali kosala na Betele.
Ndenge moko mpe, Alejandro abandaki kosepela na mateya ya boklisto na ntango oyo azalaki elenge mpenza, atako baboti na ye bazalaki kosepela na mateya yango te. Amonisi botɔndi na ye mpo na solo na maloba oyo: “Nakolaki na libota ya Bakatolike ya makila. Kasi, lokola na lingomba nazwaki biyano te na mituna oyo ezalaki kotungisa ngai banda ntango oyo nazalaki naino mwana moke mpenza, nakómaki kosepela na makanisi ya Bakoministe na liteya na bango ete Nzambe azali te. Ebongiseli ya Yehova esalisaki ngai na koyeba Nzambe. Ebikisaki mpenza bomoi na ngai, mpamba te soki nayekolaki Biblia te, nalingaki ntango mosusu kosuka na etamboli ya mbindo, na milangwa to na komɛla bangi. Ntango mosusu mpe nakokaki kokɔta na lisangá moko ya batomboki mpe yango elingaki komemela ngai mpasi mingi.”
Ndenge nini elenge akoki kolanda koluka solo mpe kokangama na yango soki baboti bazali kolendisa ye te? Na ntembe te, bankulutu mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá basalaka mosala monene mpenza. Noé alobi boye: “Ata mokolo moko te namiyoká ete nazali ngai moko, mpamba te Yehova azalaka ntango nyonso pene na ngai. Lisusu, bandeko mingi ya bolingo, basi mpe mibali, oyo bakómi batata, bamama mpe bandeko na ngai na elimo, basungaki ngai.” Lelo oyo, Noé asalaka na Betele mpe asalelaka ntango na ye na mosala ya Nzambe. Alejandro mpe alobi boye: “Nakozala ntango nyonso na botɔndi ete nazwaki libaku malamu ya kozala na kati ya lisangá moko oyo bankulutu bazalaki komonisa ete balingi ngai mpe bazali komibanzabanza mpo na ngai. Nazali mpenza na botɔndi mpo na yango, mpamba te na ntango oyo nabandaki koyekola Biblia, wana nazalaki na mbula 16, loyenge oyo bilenge mingi bazalaka na yango ekɔtelaki ngai mpe. Mabota ya bandeko ya lisangá batikaki ngai te. Ntango nyonso ndeko moko azalaki kozanga te mpo na koyamba ngai epai na ye, kopesa ngai esika ya kolala mpe biloko ya kolya, komonisela ngai bolingo.” Lelo oyo, Alejandro akokisi mbula koleka 13 na mosala ya mobongisi-nzela.
Bato mosusu bakanisaka ete losambo ezali kaka mpo na mikóló. Nzokande, bilenge mingi bayekoli Biblia banda bomwana mpenza mpe bakómi kolinga Yehova mpe bazali ntango nyonso sembo epai na ye. Maloba ya Davidi na Nzembo 110:3 ebongi mpo na bilenge yango: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo, na nkembo ya bulɛɛ, bilenge na yo bakoya epai na yo lokola mamwe longwa na ntango ya ntɔngɔntɔngɔ.”
Esɛngaka molende mpe ekateli makasi mpo elenge ayekola solo mpe akangama na yango. Tozali mpenza na esengo ya komona ete bilenge mingi bazali kokangama makasi na ebongiseli ya Yehova, bazali koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe bazali koyekola Biblia na molende. Yango nde esalisi bango bálinga mpenza Liloba ya Nzambe na mosala na ye!—Nzembo 119:15, 16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova na 1972; ebimaka lisusu te.