Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 nk. 22-26
  • Kobɔkɔla bana na mboka mopaya​—Mikakatano mpe mbano na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobɔkɔla bana na mboka mopaya​—Mikakatano mpe mbano na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano mpo na kosimba makanisi mpe motema
  • Libota nde ekopona
  • Mwa toli oyo ebongi
  • Mikakatano mpo na mimeseno ya mboka mosusu
  • Mbuma oyo ekoki kobotama
  • Bokoki kolonga
  • Tósalisa bana ya “bato oyo bafandi bapaya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Kobá kozala makasi na elimo ntango okei na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Nakosala nini soki nazali na kati ya mimeseno mibale?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 nk. 22-26

Kobɔkɔla bana na mboka mopaya​—Mikakatano mpe mbano na yango

EBELE ya bato bazali kokende kofanda na mboka mopaya mpo na koluka bomoi ya malamu. Lelo oyo, bato koleka milio 20 oyo bautá na mikili mosusu bazali kofanda na Mpoto; bato koleka milio 26 oyo bautá na bikólo mosusu bazali kofanda na États-Unis, mpe soki okamati bato mokama na ekólo Australie, bato 21 kati na bango babotamá na mikili mosusu. Mbala mingi, bapaya yango na mabota na bango bakutanaka na mokakatano ya koyekola monɔkɔ mpe mimeseno ya mboka oyo bakei kofanda.

Mbala mingi, bana baumelaka te koyeba monɔkɔ ya mboka oyo bakei kofanda mpe bakómaka kokanisa na monɔkɔ yango. Baboti bakoki koumela mingi mpo na koyeba monɔkɔ ya bapaya. Ntango bana bazali kokola na mboka mopaya, mikakatano oyo baboti na bango bazali na yango mpo na koyekola monɔkɔ ya mboka yango ekoki kopekisa bango básololaka malamu.

Ntango bana bayekoli monɔkɔ ya sika bakómaka kokanisa ndenge mosusu; lisusu, mimeseno ya ekólo oyo bakei kofanda ebongolaka bomoto na bango. Baboti bakoki komona ete bazali kokoka bizaleli ya bana na bango te. Yango wana, baboti oyo bazali kobɔkɔla bana “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova” na mboka mopaya, bazali na mikakatano monene lisusu.​—Baefese 6:⁠4.

Mokakatano mpo na kosimba makanisi mpe motema

Baklisto oyo bazali na bana bazalaka na mposa mpe na mokumba ya koteya bana na bango “monɔkɔ ya pɛto,” elingi koloba solo ya Biblia. (Sefania 3:​9, NW) Kasi, soki bana bayebi monɔkɔ ya baboti kaka mwa moke mpe soki baboti bayebi malamu te monɔkɔ oyo bana na bango bameseni koloba, ndenge nini baboti bakokɔtisa mibeko ya Yehova na mitema ya bana na bango? (Deteronome 6:⁠7) Bana bakoki koyoka makambo oyo baboti bazali koloba na bango, kasi soki makambo yango ezali kosimba mitema na bango te, bakozala lokola bapaya na kati ya ndako na bango moko.

Pedro na Sandra bautaki na Amerika ya Sudi mpe bakendaki kofanda na Australie; bango mpe bazali kobɔkɔla bana mibali mibale oyo bakómi bilenge na mokakatano wana.a Pedro alobi boye: “Ntango bozali kolobela makambo ya Nzambe, esɛngaka kosimba motema mpe makanisi. Esengeli moto amonisaka makanisi ya likolólikoló te mpe oyo ezali na ntina; yango wana, esɛngaka koyeba koloba monɔkɔ malamu.” Sandra abakisi boye: “Soki bana bayebi malamu te monɔkɔ ya mboka na biso, bakoki kozala na mikakatano na elimo. Bakoki kotalela solo bongobongo, bakoyeba te mitinda oyo esimbi makambo oyo bazali koyekola. Bososoli na bango ya elimo ekoki kokita, mpe boyokani na bango na Yehova ekoki kolɛmba.”

Gnanapirakasam na Helen bautá na Sri Lanka mpe bafandaka na Allemagne; bazali sikoyo na bana mibale. Balobi boye: “Tokanisi ete ezali na ntina mingi bana na biso bálobaka monɔkɔ ya mboka na biso ntango bazali koyekola monɔkɔ ya Allemand. Ezali na ntina báyebisaka biso mitungisi na bango, báfungolelaka biso mitema na bango mpe biso tófungolelaka bango mitema.”

Miguel na Carmen bautá na ekólo Uruguay mpe bafandaka na Australie; bango balobi boye: “Baboti oyo bazali lokola biso basengeli kosala makasi mpenza. Basengeli kopona na kati ya makambo oyo mibale: koyekola koloba malamu monɔkɔ ya mboka oyo bakei kofanda mpo bákoka kokanga ntina ya makambo ya Nzambe mpe kolimbola yango na monɔkɔ yango, to koteya bana na bango báyeba koloba malamu monɔkɔ ya mboka ya baboti.”

Libota nde ekopona

Mpo libota oyo bakei kofanda na mboka mopaya bázala makasi na elimo, basengeli kopona monɔkɔ oyo ‘Yehova akoteya’ bango na yango. (Yisaya 54:​13, NW) Soki lisangá moko oyo basalaka makita na monɔkɔ ya mboka na bango ezali pene, bakoki kopona báyanganaka na lisangá yango. To mpe, bakoki kopona koyanganaka na lisangá oyo basalaka makita na monɔkɔ ya mboka oyo bakei kofanda. Makambo nini bakotalela mpo na kopona?

Demetrios na Patroulla bautá Chypre mpe bafandaka na Angleterre epai babɔkɔlaki bana mitano; bango bayebisi biso makambo oyo batalelaki mpo na kopona lisangá: “Liboso, tozalaki koyangana na lisangá ya monɔkɔ ya Grɛki. Atako ezalaki malamu mingi mpo na biso baboti, tomonaki ete ezalaki kozongisa bana nsima na elimo. Atako bayebaki monɔkɔ ya Grɛki mwa moke, bazalaki na mokakatano mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ezali mwa makasi. Yango emonanaki bongo mpamba te kokola na bango na elimo ezalaki malɛmbɛ. Libota mobimba toyokanaki ete tókende na lisangá ya Lingelesi, mpe mbala moko tomonaki litomba mpo na bana na biso. Bakómaki makasi na elimo. Ezalaki mpasi mpo tózwa ekateli ya kokende na lisangá mosusu, kasi ekateli yango ebotaki mbuma ya malamu mpo na libota na biso.”

Kasi, libota yango batikaki te koloba monɔkɔ ya mboka na bango mpe yango ememelaki bango matomba mingi. Bana na bango balobi boye: “Koyeba monɔkɔ mosusu ezali likambo ya malamu. Atako toyebi mingimingi Lingelesi, koyeba monɔkɔ ya Grɛki esalisi biso na kozala na boyokani malamu na bandeko na biso, mingimingi na bankɔkɔ na biso. Esalisi biso mpe na koyeba komitya na esika ya bato oyo bazali koya na mboka mopaya, mpe esalisaki biso na komona ete tokoki koyekola monɔkɔ mosusu ya bapaya. Yango wana, ntango tokolaki, libota mobimba tokendaki kofanda na esika mosusu mpo na kosunga lisangá moko ya monɔkɔ ya Albanais.”

Christopher na Margarita bautaki na Chypre mpe bakendaki kofanda na Angleterre epai babɔkɔlaki bana misato. Bamonaki malamu báyanganaka na lisangá ya monɔkɔ ya Grɛki. Mwana na bango, Nikos, oyo azali lelo oyo nkulutu na lisangá ya monɔkɔ ya Grɛki, alobi boye: “Balendisaki biso tókende na lisangá ya monɔkɔ ya Grɛki oyo efungwamaki sika. Na libota na biso totalelaki yango lokola mokumba oyo Nzambe apesi biso.”

Margarita alobi boye: “Ntango bana na biso ya mibali bakokisaki, mosusu mbula mwambe mpe mosusu mbula nsambo, bakómaki kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Tozalaki komitungisa mwa moke lokola bayebaki monɔkɔ ya Grɛki malamu te. Kasi, mbala nyonso oyo bapesi bango lisolo ya kosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, tozalaki kobongisa yango na libota, mpe tozalaki kozwa ntango mingi mpo na kosalisa bango na kobongisa masolo na bango.”

Mwana na bango ya mwasi, Joanna, alobi boye: “Nabosanaka te ntango oyo Tata azalaki kotángisa biso monɔkɔ ya Grɛki, azalaki kokoma alfabɛ na etanda moko na ndako mpe tosengelaki koyekola yango nyonso. Bato mingi bayekolaka bambula ebele mpo na koyeba monɔkɔ ya bapaya, kasi lokola Tata na Mama basalisaki biso, tolekisaki ntango mingi te mpo na koyekola monɔkɔ ya Grɛki.”

Mabota mosusu bayanganaka na lisangá oyo basalaka makita na monɔkɔ ya mboka na bango mpo baboti bamonaka ete mpo bango moko bákóma na “bososoli ya elimo” mpe bákola, basengeli koteyama na monɔkɔ ya mboka na bango. (Bakolose 1:​9, 10; 1 Timote 4:​13, 15) Libota mosusu mpe bakoki komona ete lokola bayebi monɔkɔ ya mboka na bango, ezali malamu mpo na koteya solo epai ya bato mosusu ya mboka na bango oyo bayei mpe kofanda na mboka mopaya.

Libota mosusu mpe bakoki komona ete eleki malamu bákende na lisangá ya monɔkɔ ya mboka oyo bazali kofanda. (Bafilipi 2:4; 1 Timote 3:⁠5) Nsima ya kotalela likambo yango mpe kopesana makanisi na kati ya libota, mokonzi ya libota nde asengeli kozwa ekateli nsima ya kobondela mingi. (Baloma 14:4; 1 Bakolinti 11:3; Bafilipi 4:​6, 7) Toli nini ekoki kosalisa mabota yango?

Mwa toli oyo ebongi

Pedro na Sandra, oyo tolobelaki mwa liboso, balobi boye: “Tomityelá mobeko ete na ndako tólobaka kaka monɔkɔ ya Espagnol mpo tóbosana monɔkɔ ya mboka na biso te. Ezali mpasi mpo na kotosa mobeko yango, mpamba te bana bayebi ete toyokaka mpe Lingelesi. Kasi soki totosi mobeko yango te, bakobosana Espagnol noki.”

Miguel na Carmen oyo tolobelaki mwa liboso, bapesi toli oyo: “Soki baboti bazali kosala boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ mpe bazali kozangisa te kotalela mokapo ya mokolo na monɔkɔ ya mboka na bango, bana bakoyeba monɔkɔ yango mwa mingi, bakoyeba ndenge ya kolimbola makambo ya elimo na monɔkɔ yango.”

Miguel apesi mpe toli oyo: “Bókómisa mosala ya kopesa litatoli likambo ya esengo. Teritware na biso ezali ndambo monene ya engumba moko monene, mpe tolekisaka ntango mingi na motuka mpo na kokende koluka bato oyo balobaka monɔkɔ ya mboka na biso. Na ntango yango tosalaka masano ya Biblia mpe tolobelaka makambo mosusu ya ntina. Namekaka kobongisa liboso ndenge oyo tokotambola na motuka mpo na kopesa litatoli mpo tókoka kozongela bato mingi oyo bakosepela. Bongo, na mpokwa, bana bamonaka ete bazwaki libaku ata moko ya kosolola masolo ya ntina na mokolo mobimba oyo balekisi.”

Mikakatano mpo na mimeseno ya mboka mosusu

Liloba ya Nzambe elendisi bilenge na maloba oyo: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te.” (Masese 1:⁠8) Kasi, mikakatano ekoki kobima soki mateya ya tata mpe “mibeko” ya mama ezali kolanda mimeseno oyo ekeseni na mimeseno ya mboka bafandi.

Mokonzi mokomoko ya libota nde akopona ndenge oyo akotambwisa libota na ye, mpe asengeli kolanda mingi te ndenge oyo makambo esalemaka na mabota mosusu. (Bagalatia 6:​4, 5) Kasi, soki baboti bazali kosolola malamu na bana, ekosalisa baboti bándima mimeseno ya sika.

Kasi, makambo mingi oyo ezali kosalema na bamboka ya bozwi ezali mabe mpo na elimo ya baklisto. Miziki mpe masano mingi ezali kolendisa pite, ekobo, lokoso na motó makasi. (Baloma 1:​26-32) Baklisto oyo bazali na bana basengeli kokokisa mokumba na bango ya koluka koyeba lolenge ya miziki oyo bana na bango bazali koyoka mpe masano oyo bazali kosepela na yango; basengeli kosundola yango te kaka mpo bazali na mokakatano ya koyoka monɔkɔ ya mboka oyo bafandi. Basengeli kopesa malako ya polele. Kasi, yango ekoki mpe komema mokakatano.

Carmen alobi boye: “Mbala mingi toyebaka te maloba ya nzembo oyo bana bazali koyoka. Miziki yango moko ekoki kozala kitoko na matoi, kasi tokoki koyeba te soki maloba na yango ezali na ndimbola mosusu to ezali na maloba ya nsɔni to ya balabala.” Basalaki nini mpo na kolonga mokakatano yango? Miguel alobi boye: “Tozwaka ntango mingi mpo na koteya bana na biso báyeba makama ya miziki ya mabe, mpe tomekaka kosalisa bango bápona miziki oyo Yehova akosepela na yango.” Esengeli mpenza kofungola miso, kasi kozala na makambo makasi te, mpo na kolonga na ntango mimeseno ya mboka na bino ekeseni na oyo ya mboka oyo bozali kofanda na bana.​—⁠Deteronome 11:​18, 19; Bafilipi 4:⁠5.

Mbuma oyo ekoki kobotama

Kobɔkɔla bana na mboka mopaya esɛngaka ntango mpe molende mingi. Ezali kutu likambo ya kobɛtela ntembe te. Kasi soki baboti na bana basali makasi, bakoki kobuka mbuma mingi.

Azzam na mwasi na ye Sara, bautaki na Turquie mpe bakendaki kofanda na Allemagne epai babɔkɔlaki bana misato. Lelo oyo, mwana na bango ya liboso azali kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Selters, na Allemagne. Azzam alobi boye: “Litomba monene mpo na bana ezali ete bakoki kolona bizaleli oyo ezali na ntina mingi ezala mpo na bato ya mboka na biso to ya mboka mopaya.”

Antonio na Lutonadio bautaki na Angola mpe bafandaka na Allemagne, epai bazali kobɔkɔla bana libwa. Na libota na bango balobaka Lingala, Lifalanse, na Allemand. Antonio alobi boye: “Koyeba minɔkɔ ebele esalisaka biso na kopesa litatoli epai ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Yango epesaka biso esengo mingi.”

Libota moko bautaki na Japon mpe bazali kofanda na Angleterre; bana na bango mibale bamonaka ete koyeba koloba monɔkɔ ya Japonais na Lingelesi ezali na litomba monene mpo na bango. Bana yango balobi boye: “Koyeba koloba minɔkɔ mibale esalisaki biso na kozwa mosala. Tolandaki mayangani ya minene na Lingelesi. Lisusu, tozali na libaku malamu ya kosala na lisangá oyo basalaka makita na Japonais, epai bandeko bazali na mposa bápesa bango mabɔkɔ.”

Bokoki kolonga

Kobɔkɔla bana na ntango oyo bozali kofanda na bato oyo bozali na bango mimeseno ndenge moko te ezalaka etumba oyo, banda na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe babundaki na yango. Baboti ya Moize babɔkɔlaki ye malamu, atako ezalaki na Ezipito. (Exode 2:​9, 10) Bayuda mingi oyo bakendaki na boombo na Babilone babɔkɔlaki bana oyo bandimaki kozonga na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya solo.​—⁠Ezela 2:​1, 2, 64-70.

Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto oyo bazali na bana bakoki kolonga. Bakoki kozwa mbano ya koyoka bana na bango koloba maloba lokola oyo mobali moko na mwasi na ye bayokaki na monɔkɔ ya bana na bango ete: “Libota na biso tolingani mingi mpamba te Tata na Mama balingaki biso mpe bazalaki komibanzabanza mpo na biso, mpe tozalaki ntango nyonso kosolola na bango malamu. Tozali na esengo ya kozala na kati ya libota ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato mosusu topesi bango bankombo mosusu

[Elilingi na lokasa 24]

Soki bozali koloba kaka monɔkɔ ya mboka na ndako, bana na bino bakoyeba mwa moke monɔkɔ yango

[Elilingi na lokasa 24]

Bankɔkɔ bayokanaka na bana ya bana na bango malamu soki bazali koyoka monɔkɔ oyo balobaka

[Elilingi na lokasa 25]

Koyekola Biblia na bana ekolisaka ‘bososoli na bango ya elimo’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto