Esengeli kopesa tii kotikala mabɔkɔ mpamba?
PASTƐRƐ moko ya Lingomba ya Protesta alobaki boye: “Bóbenga ngai mosɛngi, ekosala eloko te. Nazali nde kosɛnga mpo na Yesu.” Maloba yango emonisi ete bato mosusu bazali komona mabe moko te na mayele oyo mangomba ezali kosalela mpo na kozwa mbongo, kasi ezali mpe na bato oyo bazali komona yango mabe. Ezali komonana ete mangomba ezali na mposa ya mbongo mingi mpo misala na yango ekufa te. Ezali na mposa ya mbongo mpo na kofuta bato ya misala, kotonga to mpe kobongisa bandako-nzambe mpe kobongisa bakampanye mpo na koteya nsango malamu. Ndenge nini bakoki kozwa mbongo nyonso wana?
Mpo na mangomba mingi, ndenge mosusu ezali te, esengeli kaka ete bandimi báfutaka diimɛ.a Norman Robertson, moteyi moko ya makambo ya Nzambe, akomaki boye na buku na ye (Tithing—God’s Financial Plan): “Diimɛ ezali lolenge oyo Nzambe abongisá mpo na kozwa mbongo mpo na misala ya bokonzi na Ye awa na mabele. Na nzela na yango nde azali kosala ete Nsango Malamu esakolama.” Moteyi yango ayokaka nsɔni te mpo na koyebisa ntango nyonso bandimi ete basengeli kopesaka mabonza, alobaka ete: ‘Kopesa diimɛ ezali te likambo ya kosala mpo okoki kosala yango. Ezali likambo oyo emonisaka botosi. Soki opesaka diimɛ te, obukaka mpenza mobeko ya Nzambe. Ozali ndenge moko na moto oyo ayibaka mbongo.’
Na ntembe te, yo mpe okanisaka ete moklisto nyonso asengeli kopesaka makabo. Kasi, ndenge oyo babɛtaka nsɛtɛ na likambo ya kopesa mabonza etungisaka yo, to ntango mosusu epesaka yo nkanda? Inácio Strieder, moto ya teoloji na ekólo Brésil, alobaki ete bakonzi ya mangomba bazali kosɛnga bandimi bápesaka diimɛ mpo “na koluka kosilisa mikakatano ya lingomba” mpe alobaki ete kosɛnga mbongo ndenge wana “elongobani te, ezali kokosa bato mpe teoloji ezali kosɛnga bongo te.” Alobaki ete yango nde ezali kosala ete “basomɛlɛ, na basi oyo bakufelá mibali, na bato oyo bafandi na bakartye ya bobola, mpe bato oyo bandimaka makambo bindimelá, bákanisa ete Nzambe asundoli bango mpe ete basengeli kopesaka ‘moteyi’ ebele ya mbongo mpe na nsima, bango moko na mabota na bango bákufaka nzala.”
Okoki komituna motuna ete: ‘Mangomba oyo ezali kosɛnga bandimi na yango diimɛ ezali mpenza kolanda ndenge oyo Makomami elobi? Ekoki mpe kozala ete mangomba mosusu, mpo na koyiba mbongo ya bandimi na yango, ezali nde kobangisa bango ete soki bapesi diimɛ te Nzambe akopesa bango etumbu? Ezali solo ete Nzambe azali kosɛnga biso tópesaka tii tótikala mabɔkɔ mpamba?’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Diimɛ ezali ndambo moko likoló ya zomi (10 %) ya mbongo to biloko mosusu nyonso oyo moto azali kozwa.