Makambo oyo Yosua abosanaki te
YEHOVA alobaki na Yosua ete: “[Moize], moombo na ngai, akufi. Na bongo [tɛlɛmá mpe katisá Yolodani, NW] oyo, yo mpe bato oyo nyonso, kokɔta na mokili oyo ezali ngai kopesa na bango.” (Yosua 1:2) Oyo nde mokumba monene Yosua azwaki! Azalaki mosungi ya Moize na boumeli ya mbula pene na 40. Sikoyo, bayebisi ye azwa esika ya nkolo na ye mpe atambwisa bana ya Yisalaele, oyo mbala mingi bazalaki motó makasi, tii na Mokili ya Ndaka.
Ntango Yosua akanisaki makambo oyo asengelaki kokutana na yango, mbala mosusu mikakatano oyo akutanaki na yango mpe oyo alongaki ezongelaki ye mbala moko na makanisi. Makambo oyo Yosua abosanaki te esalisaki ye mingi mpenza na ntango wana, ekoki mpe kosalisa baklisto lelo oyo.
Azalaki moombo, akómi komanda
Ebele ya bambula oyo alekisaki na boombo ezalaki na kati ya makambo oyo Yosua abosanaki te. (Exode 1:13, 14; 2:23) Lokola Biblia eyebisi te na mozindo makambo oyo Yosua akutanaki na yango na eleko wana, tokoki bobele kokanisa yango kokanisa. Ekoki kozala ete Yosua ayekolaki kobongisa makambo malamumalamu na ntango azalaki kosala na Ezipito, mpe ntango mosusu asalisaki mpo na kobongisa ndenge Baebele mpe “ebele ya bato ya ndenge na ndenge” babimaki na ekólo yango.—Exode 12:38.
Yosua azalaki moto ya libota ya Efelaima. Elisama, nkɔkɔ na ye ya mobali, azalaki mokambi ya libota yango mpe ntango mosusu ye moto azalaki kotambwisa basoda 108 100 ya etuluku moko oyo esangisaki mabota misato ya Yisalaele. (Mituya 1:4, 10, 16; 2:18-24; 1 Ntango 7:20, 26, 27) Atako bongo, ntango Baamaleki bayaki kobundisa bana ya Yisalaele mwa moke nsima ya kobima na bango na Ezipito, Moize asɛngaki Yosua abongisa babundi. (Exode 17:8, 9a) Mpo na nini aponaki Yosua na esika ya kopona, na ndakisa, nkɔkɔ na ye to tata na ye? Buku moko epesi likanisi oyo: “Moize aponaki [Yosua] lokola motambwisi mpo amonaki ete [Yosua] akokoka mpenza kopona mpe kobongisa babundi, mpamba te azalaki mokambi ya libota monene ya Efelaima, ayebanaki mpenza mpo na mayele oyo azalaki na yango ya kobongisa makambo, mpe mpo bato nyonso bazalaki mpenza kotyela ye motema.”
Ezala soki mpo na ntina nini, ntango Yosua aponamaki, asalaki se ndenge oyo Moize ayebisaki ye. Atako Bayisalaele bayebaki kobunda ata moke te, Yosua azalaki na kondima mpenza ete Nzambe akosalisa bango. Kondima yango ebakisamaki lisusu ntango Moize ayebisaki ye ete “lobi nakotɛlɛma na likoló ya ngomba, na lingenda ya Nzambe na lobɔkɔ na ngai.” Na ntembe te, Yosua akanisaki lisusu ete Yehova autaki kobebisa nyɛɛ limpinga ya basoda oyo ezalaki na nguya koleka mampinga nyonso ya basoda ya ntango wana. Mokolo oyo elandaki, ntango Moize atombolaki mabɔkɔ na ye mpe atikaki yango kaka bongo tii ntango moi elalaki, monguna ata moko te akokaki kopika mpende liboso ya Yisalaele, mpe Bayisalaele balongaki Baamaleki. Na nsima, Yehova ayebisaki Moize akoma na buku mpe ‘alakisa na matoi ya Yosua’ ekateli na Ye, ete: “Nakosilisa ekólo ya Amaleki libela; moto moko te akoyeba kombo na bango lisusu.” (Kobima [Exode] 17:9b-14, Bible na Lingala ya lelo oyo) Yehova akokisaki mpenza etumbu yango.
Ntango azalaki mosungi ya Moize
Na ntembe te, etumba wana na Amaleki ekómisaki Yosua na Moize baninga mpenza ya motema. Yosua azwaki libaku malamu ya kozala mosungi ya Moize, to moto ‘oyo azalaki kosalela ye,’ na boumeli ya mbula soki 40, elingi koloba “banda bomwana” na ye tii na liwa ya Moize.—Kotanga [Mituya] 11:28, Bible na Lingala ya lelo oyo.
Mosala yango epesaki ye mabaku malamu oyo bato mosusu bazalaki na yango te, kasi ezalaki mpe kosɛnga ye akokisa ebele ya mikumba. Na ndakisa, ntango Moize, Alona, bana mibali ya Alona, mpe mikóló ya Yisalaele 70 bamataki na Ngomba Sinai mpe bamonaki emonaneli ya nkembo ya Yehova, mbala mosusu Yosua azalaki na kati na bango. Na mosala na ye ya mosungi, akendeki elongo na Moize likoló mpenza na ngomba mpe emonani lokola ete ye atikalaki mwa nsima ntango Moize akɔtaki na lipata oyo ezalaki komonisa ete Yehova azali wana. Ekoki kozala ete Yosua atikalaki likoló ya ngomba mikolo 40. Azelaki na bosembo nyonso nkolo na ye azonga, mpo ntango Moize abandaki kokita na ngomba na bitanda mibale ya Litatoli, Yosua azalaki wana mpo na kokutana na ye.—Exode 24:1, 2, 9-18; 32:15-17.
Nsima ya lisumu oyo Bayisalaele basalaki ya kosambela ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo, Yosua akobaki kozala mosungi ya Moize na hema ya koyangana oyo ezalaki na libándá ya kaa. Kuna, Yehova azalaki kosolola mpenza na Moize. Kasi, ntango Moize azalaki kozonga na kaa Yosua ‘azalaki kolongwa na hema te.’ Ntango mosusu, esengelaki atikalaka wana mpo na kopekisa Bayisalaele oyo bazali mbindo kokɔta na hema. Yosua azalaki mpenza kozwa mokumba yango na lisɛki te!—Exode 33:7, 11.
Josèphe, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete Moize alekaki Yosua na mbula 35; atako bongo, ntembe ezali te ete boninga oyo ezalaki kati na bango mibale ekolisaki mpenza kondima ya Yosua. Buku moko ebengi boninga na bango “boninga ya moto oyo akɔmeli na oyo azali naino elenge, boninga ya molakisi na mwana-kelasi”; mpe emonisi ete yango nde esalaki ete Yosua akóma “mobali ya mpiko, oyo bakoki kotyela motema.” Lelo oyo, tozali na basakoli lokola Moize na kati na biso te, kasi masangá ya basaleli ya Yehova ezali mpe na mikóló oyo bapesaka makasi mpe balendisaka mpo bayebi makambo mingi mpe bazali makasi na elimo. Omonisaka ete oyebi valɛrɛ na bango? Ozali kozwa matomba ntango ozali kofanda na bango?
Monɔngi na Kanana
Likambo moko monene na bomoi ya Yosua esalemaki mwa moke nsima ya ntango oyo Yisalaele ezwaki Mibeko. Na libota na ye, baponaki ye mpo na konɔnga Mokili ya Ndaka. Bato mingi bayebi lisolo yango. Banɔngi 12 bandimaki bango nyonso ete mokili yango ezali mpenza “mokili eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi” se lokola Yehova alakaki. Kasi, zomi kati na bango bazangaki kondima mpe babangaki ete Yisalaele bakokoka te kobɔtɔla mokili yango na mabɔkɔ ya bato oyo bafandi kuna. Kaka Yosua na Kalebe nde balendisaki bato ete kobanga etinda bango te na kotomboka, mpamba te Yehova akozala mpenza na bango. Ntango ebele ya bato oyo basanganaki wana bayokaki bongo, batombokaki mpe balobaki ete bábola bango mibale mabanga. Soki Yehova amonisaka bango nkembo na ye te, mbɛlɛ basalaki likambo yango. Mpo bazangaki kondima, Yehova azwaki ekateli ete bato nyonso ya Yisalaele, kobanda na baoyo bazalaki na mbula 20 to koleka, bakokufa liboso ya kokɔta na Kanana. Na kati na bango, bobele Yosua, Kalebe mpe Balevi nde babikaki.—Mituya 13:1-16, 25-29; 14:6-10, 26-30.
Bato nyonso bamonaki te misala minene oyo Yehova asalaki na Ezipito? Bongo, nini etindaki Yosua andima mpenza ete Nzambe akosalisa bango na ntango oyo bato ebele bazalaki kotya ntembe? Na ntembe te, Yosua abosanaki te makambo nyonso oyo Yehova alakaki mpe asalaki, mpe akanisaki yango malamumalamu. Bambula mingi na nsima, akokaki koloba ete ‘liloba moko te na kati ya maloba malamu oyo Yehova alobaki na Yisalaele ezangi kokokisama. Nyonso ekokisamaki.’ (Yosua 23:14, NW) Na bongo, Yosua azalaki kondima ete bilaka nyonso oyo Yehova apesaki mpo na mikolo oyo ekoya, yango mpe ekokokisama solo. (Baebele 11:6) Yango esengeli kotinda moto na moto amituna: ‘Bongo ngai? Milende nyonso nasali mpo na koyekola bilaka ya Yehova mpe kokanisa yango malamumalamu endimisi ngai ete nakoki kotyela bilaka yango motema? Nandimaka ete Nzambe akoki kobatela ngai elongo na basaleli na ye na ntango ya bolɔzi monene oyo ezali koya?
Yosua amonisaki mpenza kondima na ye, kasi amonisaki mpe mpiko mpo na kosala likambo oyo ebongi. Bobele ye na Kalebe nde baponaki ngámbo ya Yehova, mpe lisangá mobimba balobaki ete bábamba bango mabanga. Soki ezalaka yo, olingaki koyoka ndenge nini? Olingaki kobanga? Yosua abangaki te. Ye na Kalebe balobaki na mpiko mpenza makambo oyo bazalaki kondima. Mokolo mosusu, bosembo na biso epai ya Yehova ekoki kosɛnga ete tósala mpe bongo.
Na lisolo ya banɔngi, tomoni ete Yosua azalaki na nkombo mosusu liboso: Hosea. Na nkombo yango, oyo elimboli “Lobiko,” Moize abakisaki ekango (syllabe) oyo emonisaka nkombo ya Nzambe mpe abengaki ye Yehoshua to Yosua—oyo elimboli “Yehova azali lobiko.” Nkombo na ye ezali “Yesu” na libongoli ya Septante. (Mituya 13:8, 16) Na boyokani na nkombo yango monene, Yosua asakolaki na mpiko nyonso ete Yehova azali lobiko. Moize apesaki Yosua nkombo yango bipeselá te. Yango emonisaki motuya oyo Moize azalaki kopesa na bizaleli ya Yosua, mpe yango ekokanaki na mokumba monene oyo Yosua asengelaki kokokisa na nsima: kotambwisa libota ya sika tii na Mokili ya Ndaka.
Bayisalaele bayengayengaki na esobe na boumeli ya mbula 40 wana batata na bango bazalaki kokufa. Toyebi makambo oyo ekómelaki Yosua na eleko wana te. Atako bongo, na ntembe te, azwaki mateya mingi na makambo oyo amonaki na ntango yango. Ekoki kozala ete amonaki na miso na ye moko ndenge Nzambe apesaki etumbu na Kola, Datana, mpe Abilama, bato oyo batombokelaki Yehova, na baoyo balandaki bango, bakisa mpe bato oyo bamipesaki na losambo ya nsɔni ya Baala ya Peolo. Na ntembe te, Yosua ayokaki mawa mingi ntango ayebaki ete Moize akokɔta na mokili ya ndaka te mpo asantisaki Yehova te na likambo ya mai ya Meliba.—Mituya 16:1-50; 20:9-13; 25:1-9.
Aponami mpo na kozwa esika ya Moize
Ntango Moize akómaki pene na liwa, asɛngaki Yehova apona moto oyo akozwa esika na ye mpo ete Yisalaele ekóma “lokola bampate bazangi mobateli te.” Yehova alobaki nini? Yosua, “moto oyo [elimo] ezali kati na ye” nde asengelaki koponama na miso ya lisangá mobimba. Basengelaki koyokela ye. Oyo nde maloba ya malamu mpo na ye! Yehova amonaki kondima ya Yosua mpe makoki na ye. Kaka ye nde azalaki na makoki mpenza mpo na kotambwisa Yisalaele. (Mituya 27:15-20) Atako bongo, Moize ayebaki ete Yosua akokutana na mikakatano minene. Yango wana, Moize ayebisaki ye azala “makasi mpe na mpiko” mpo Yehova akotika ye te.—Deteronome 31:7, 8.
Nzambe ye moko ayebisaki lisusu Yosua maloba wana ya kolendisa mpe abakisaki ete: “[Otosa] mibeko nyonso oyo Moize, moombo na ngai, alakelaki yo. Kopɛngwa na yango epai na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi te, na ntina ete [ozala na likoki ya kosala na bwanya, NW] soki wapi ekokenda yo. Buku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami na yango. Mpo ete bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo [okosala na bwanya, NW]. Ngai nalakeli yo te? Zalá makasi mpe yiká mpiko. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo ete [Yehova] Nzambe na yo azali na yo elongo soki wapi ekokenda yo.”—Yosua 1:7-9.
Soki akanisi maloba wana ya Yehova oyo ekɔtaki mpenza na motema na ye mpe soki ataleli ebele ya makambo oyo ayebaki, Yosua akokaki kotyela maloba ya Yehova ntembe te. Ntembe ezalaki te ete akobɔtɔla mokili yango. Asengelaki kokutana na mikakatano; kutu, mokakatano monene ya liboso ezalaki nde kokatisa Ebale Yolodani na ntango ya mpela. Atako bongo, Yehova ye moko apesaki ye etinda oyo: “Tɛlɛmá mpe katisá Yolodani oyo.” Na yango, ekozala na mokakatano moko te oyo akolonga te.—Yosua 1:2, NW.
Makambo oyo elandanaki na bomoi ya Yosua—ndenge babɔtɔlaki Yeliko, ndenge balongaki banguna nyonso moko na moko, mpe ndenge bakabolaki mokili yango—emonisi ete abosanaki te bilaka ya Nzambe. Pene na liwa na ye, ntango Yehova apesaki bana ya Yisalaele kimya liboso ya banguna na bango, Yosua ayanganisaki bato nyonso mpo bákanisa lisusu elongo makambo oyo Nzambe asalelaki bango mpe mpo alendisa bango básalela Ye na motema na bango mobimba. Yango etindaki bana ya Yisalaele básala lisusu kondimana na Yehova. Na ntembe te, ndakisa malamu ya motambwisi na bango etindaki ‘Yisalaele básalela Yehova mikolo nyonso ya Yosua.’—Yosua 24:16, 31.
Yosua azali ndakisa ya malamu mingi mpo na biso. Lelo oyo, kondima ya baklisto ekutanaka na komekama mingi. Tosengeli kolonga yango soki tolingi Yehova akoba kondima biso mpe nsukansuka tósangola bilaka na ye. Yosua alongaki mpo azalaki na kondima makasi. Ya solo, biso tomoná misala ya nguya ya Nzambe na miso te lokola Yosua amonaki yango, kasi soki ezali na moto oyo azali na ntembe, mokanda ya Yosua, oyo ezali na Biblia, elobeli lisolo ya moto oyo amonaki mpenza na miso na ye moko ete ebongi kotyela maloba ya Yehova motema. Lokola Yosua, biso mpe tokozwa bwanya mpe tokolonga soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe soki tozali kosala nyonso mpo tósalela yango.
Mbala mosusu, etamboli ya baklisto mosusu ezokisaka yo? Kanisá ndenge oyo Yosua ayikaki mpiko na boumeli ya mbula 40 oyo ayengayengaki na esobe elongo na baninga oyo bazangaki kondima, nyonso wana atako ye moko asalaki mabe te. Omonaka ete ezalaka mpasi mpo na komonisa bindimeli na yo? Kanisá lisusu likambo Yosua na Kalebe basalaki. Mpo bazalaki na kondima mpe na botosi, bazwaki mbano ya malamu mingi. Ya solo, Yosua azalaki kondima solo ete Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso. Tiká ete ezala mpe bongo mpo na biso.—Yosua 23:14.
[Elilingi na lokasa 10]
Kondima ya Yosua ekolaki mpo azalaki moninga ya Moize
[Elilingi na lokasa 10]
Kalebe na Yosua batyaki motema na nguya ya Yehova
[Elilingi na lokasa 10]
Libota mobimba ekangamaki na Yehova na ntango Yosua azalaki kotambwisa bango