Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 8-13
  • “Bópusana penepene na Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bópusana penepene na Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tótika te ‘koyekola koyeba’ Nzambe
  • Monisá na misala ete olingi Yehova
  • Tókolisa boninga na Yehova na nzela ya mabondeli
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • “Akopusana penepene na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • ‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 8-13

“Bópusana penepene na Nzambe”

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—⁠YAKOBO 4:⁠8.

1, 2. (a) Mbala mingi, bato balobaka nini? (b) Elendiseli nini Yakobo apesaki, mpe mpo na nini apesaki yango?

NA BILEMBO ya bikólo mingi, ata mpe na bilamba ya basoda, bakomaka maloba oyo: “Nzambe azali na biso.” Lelo oyo, na ebele ya mbongo ya bibende to mpe ya nkasa, bakomá ete: “Totii elikya epai ya Nzambe.” Mbala mingi, bato balobaka ete bazali baninga ya Nzambe. Nzokande, okanisi ete maloba mpamba ekoki mpo na komonisa ete moto azali mpenza moninga ya Nzambe?

2 Biblia ezali komonisa ete moto akoki kozala moninga ya Nzambe. Kasi, esɛngaka kosala milende mpo na yango. Na ekeke ya liboso, ata baklisto mosusu bapakolami basengelaki kosala makasi mpo bázala baninga mpenza ya Yehova Nzambe. Yakobo, mokɛngɛli na lisangá ya boklisto, apesaki bato mosusu toli mpo na bamposa na bango ya mabe mpe mpo bakómaki mbindo na elimo. Yakobo apesaki bango toli na makambo mingi mpe, kati na yango, alendisaki bango na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:​1-12) Likanisi ya Yakobo ezalaki mpenza nini ntango alobaki “bópusana penepene”?

3, 4. (a) Na ekeke ya liboso, maloba “bópusana penepene na Nzambe” elamusaki likambo nini na makanisi ya bato mosusu oyo batángaki mokanda ya Yakobo? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete bato bakoki kopusana penepene na Nzambe?

3 Yakobo asalelaki maloba oyo bato ebele oyo batángaki mokanda na ye bamesanaki na yango. Mibeko ya Moize epesaki banganga-nzambe malako ya sikisiki oyo ezalaki komonisa ndenge basengelaki ‘kobɛlɛma’ to kopusana penepene na Yehova mpo na basaleli na ye. (Exode 19:22) Na bongo, maloba ya Yakobo ekokaki kokundwela batángi na ye ete kopusana penepene na Yehova ezali likambo ya lisɛki te, mpamba te Yehova aleki na lokumu na molɔ́ngɔ́ mobimba.

4 Longola yango, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi ete: “Elendiseli yango [oyo ezali na Yakobo 4:8] ezali komonisa elikya mpenza.” Yakobo ayebaki ete banda kala Yehova abengaka, na bolingo mpenza, bato ya kozanga kokoka ete bápusana penepene na Ye. (2 Ntango 15:⁠2) Bomoi ya Yesu oyo apesaki yango lokola mbeka efungolelaki bato nzela ya kopusana malamumalamu penepene na Yehova. (Baefese 3:​11, 12) Lelo oyo, bamilio ya bato bazali na likoki ya kopusana penepene na Nzambe! Kasi, ndenge nini tokoki kosalela libaku malamu yango? Tokotalela na mokuse makambo misato oyo ekoki kosalisa biso na kopusana penepene na Yehova Nzambe.

Tótika te ‘koyekola koyeba’ Nzambe

5, 6. Ndenge nini ndakisa ya elenge Samwele emonisi makambo oyo ‘koyekola koyeba’ Nzambe esɛngaka?

5 Na Yoane 17:​3, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” Ndenge oyo Babiblia mingi ebongoli vɛrsɛ yango ekeseni mwa moke na ndenge oyo ebongolami na Libongoli ya Mokili ya Sika. Na esika báloba ‘koyekola koyeba’ Nzambe, bango balobi kaka ‘koyeba’ Nzambe. Nzokande, ebele ya bato ya mayele balobaka ete liloba ya Grɛki ya kala oyo basalelaki wana elimboli mpenza ete likambo yango esengeli kosuka te mpe ekoki ata komema moto oyo azali kosala yango ayeba moto mosusu malamumalamu.

6 Koluka koyeba Nzambe malamumalamu ezali likanisi oyo ebandaki na ntango ya Yesu te. Na ndakisa, na Makomami ya Liebele, tozali kotánga ete ntango Samwele azalaki naino mwana, “ayebaki naino [Yehova] te.” (1 Samwele 3:⁠7) Yango elingi nde koloba ete Samwele ayebaki makambo moke mpenza mpo na Nzambe? Te. Na ntembe te baboti na ye na banganga-nzambe bateyaki ye makambo mingi. Kasi, moto moko ya mayele alobi ete liloba ya Liebele oyo basaleli na vɛrsɛ wana ekoki “kosalelama mpo na kolobela koyeba mpenza moto malamumalamu.” Yango elingi koloba ete na ntango wana, Samwele ayebaki naino Yehova malamumalamu te ndenge oyo ayebaki ye na nsima ntango akómaki molobeli na ye. Ntango Samwele azalaki kokola, azalaki koyeba mpenza Yehova; akómaki moninga na ye ya motema.​—⁠1 Samwele 3:​19, 20.

7, 8. (a) Mpo na nini mateya ya makasi oyo ezali na Biblia esengeli kobangisa biso te? (b) Wapi mwa mateya ya makasi ya Liloba ya Nzambe oyo tosengeli koyekola yango?

7 Oyekolaka koyeba Yehova mpo okoka koyeba ye malamumalamu? Mpo na yango, osengeli ‘kozala na mposa makasi’ ya bilei ya elimo oyo ezali kouta na Nzambe. (1 Petelo 2:⁠2) Kosuka kaka na mateya ya ebandeli te. Luká koyekola mateya mosusu ya mozindo oyo ezali na Biblia. (Baebele 5:​12-14) Mateya wana ebangisaka yo mpo okanisaka ete eleki makasi? Soki ezali bongo, kobosana te ete Yehova azali “Molakisi Monene.” (Yisaya 30:​20, NW) Ayebi ndenge ya kokɔtisa mateya ya makasi na bɔɔngɔ ya bato ya kozanga kokoka. Akoki mpe kopambola milende ya solosolo oyo ozali kosala mpo okanga ntina ya makambo oyo azali koteya yo.​—⁠Nzembo 25:⁠4.

8 Ekozala malamu okanisa malamumalamu lolenge oyo otalelaka “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10) Makambo yango ezali makambo ya bongobongo te lokola oyo bato ya teoloji na bakonzi ya mangomba batyelanaka ntembe. Yango ezali mateya ya ntina mpenza oyo ekoki kosalisa biso tóyeba makambo malamu mpenza oyo ezali na makanisi mpe na motema ya Tata na biso ya bolingo. Na ndakisa, lisiko, ‘sɛkɛlɛ mosantu,’ na kondimana ndenge na ndenge oyo Yehova asalelaki mpo na bolamu ya libota na ye mpe mpo na kokokisa mikano na ye, bakisa mpe mateya mosusu ya ndenge yango, nyonso wana ezali makambo kitoko mpe ya ntina oyo tokoki koyekola yango mpe koluka koyeba makambo mosusu etali yango na kati ya mikanda na biso.​—⁠1 Bakolinti 2:⁠7.

9, 10. (a) Mpo na nini lolendo ezali mpenza likama, mpe nini ekosalisa biso tóboya ezaleli yango? (b) Na oyo etali boyebi ya Yehova, mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kozala na komikitisa?

9 Ntango ozali kokóma na boyebi mingi ya mateya ya makasi, osengeli kokeba na likama moko oyo boyebi wana ekoki komemela yo: lolendo. (1 Bakolinti 8:⁠1) Lolendo ezali mpenza likama, mpamba te ememaka moto mosika na Nzambe. (Masese 16:5; Yakobo 4:⁠6) Kobosana likambo oyo te: moto moko te azali mpenza na ntina ya kotombola mapeka mpo na boyebi na ye. Maloba ya ebandeli ya buku moko oyo elobeli makambo ya sika oyo bato ya siansi bayekoli ezali mpenza kondimisa likambo yango; yoká ndenge elobi: “Ntango tozali kokóma na boyebi mingi, tomonaka malamumalamu ete toyebi mpenza eloko te. . . . Soki tokokanisi makambo oyo toyebi na oyo toyebi naino te, oyo toyebi ezali mpenza eloko te.” Maloba yango ya komikitisa ezali mpenza kosepelisa. Yango wana, na oyo etali boyebi ya Yehova Nzambe, oyo eleki boyebi nyonso, tosengeli komikitisa lisusu mingi koleka. Mpo na nini?

10 Yoká maloba mosusu oyo Biblia elobi na ntina na Yehova. “Makanisi na yo ezali na bozindo mpenza!” (Nzembo 92:⁠5) “Mayele [ya Yehova] ekoki kotángama te.” (Nzembo 147:⁠5) “Bososoli ya [Yehova] eyebani nsuka te.” (Yisaya 40:28) “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni!” (Baloma 11:33) Ezali polele ete ata mokolo moko te tokoyeba makambo nyonso oyo tosengeli koyeba na ntina na Yehova. (Mosakoli 3:11) Yehova ateyi biso makambo mingi ya kokamwa, kasi tokozala kaka na ebele ya makambo ya koyekola. Omoni te ete likanisi wana ezali mpenza kosepelisa mpe koteya biso komikitisa? Yango wana, ntango tozali koyekola, tósalelaka boyebi oyo tozali kozwa mpo na kopusana penepene na Yehova mpe mpo na kosalisa basusu bápusana penepene na ye; kasi tósalelaka yango te mpo na komitombola likoló ya basusu.​—⁠Matai 23:12; Luka 9:⁠48.

Monisá na misala ete olingi Yehova

11, 12. (a) Makambo oyo tozali koyekola na ntina na Yehova esengeli kotinda biso na kosala nini? (b) Nini emonisaka ete moto azali na bolingo ya solosolo mpo na Nzambe?

11 Ntoma Paulo amonisaki na ndenge ebongi boyokani oyo ezali kati na boyebi na bolingo. Akomaki boye: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, ete bolingo na bino etondana lisusu mpe lisusu elongo na boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.” (Bafilipi 1:⁠9) Na esika ete solo nyonso oyo toyekoli na ntina na Yehova mpe na mikano na ye evimbisa biso na lolendo, esengeli nde kobakisa bolingo na biso mpo na Tata na biso ya likoló.

12 Bato mingi oyo balobaka ete balingaka Nzambe balingaka ye mpenza te. Bakoki koyoka na mitema na bango ete balingi Nzambe. Soki mposa oyo bazali na yango na mitema na bango eyokani na boyebi ya solosolo, yango ezali mabe te; kutu esengeli kopesa bango longonya mpo na yango. Kasi, yango te nde bolingo ya solosolo mpo na Nzambe. Mpo na nini tolobi bongo? Yoká ndenge Liloba ya Nzambe elimboli bolingo ya solosolo: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” (1 Yoane 5:⁠3) Na yango, bolingo mpo na Yehova ezalaka solosolo se soki moto azali komonisa yango na misala oyo ezali komonisa botosi.

13. Ndenge nini ezaleli ya kobanga Nzambe ekosalisa biso tómonisa na misala ete tolingi Yehova?

13 Ezaleli ya kobanga Nzambe ekosalisa biso tótosa Yehova. Koyekola koyeba ye, koyekola mpe bizaleli na ye minene lokola bosantu, nkembo, nguya, boyengebene, bwanya mpe bolingo nde esalaka ete tókóma na nsɔmɔ mpe na limemya makasi ndenge wana mpo na Yehova. Mpo na kopusana penepene na ye, esengeli kozala na kobanga motindo wana. Talá ndenge Nzembo 25:14 (NW) elobi: “Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.” Na yango, soki tozali kobanga koyokisa Tata na biso ya bolingo mpasi, tokoki kopusana penepene na ye. Ezaleli ya kobanga Nzambe ekosalisa biso tótosa toli malamu oyo ekomami na Masese 3:6 (NW): “Na banzela na yo nyonso talelá ye, mpe ye, akokómisa semba banzela na yo.” Maloba yango elingi koloba nini?

14, 15. (a) Wapi mwa bikateli oyo tozwaka mokolo na mokolo? (b) Ndenge nini tokoki kozwa bikateli oyo ekomonisa ete tobangaka Nzambe?

14 Mokolo na mokolo, ozwaka bikateli ya minene to ya mike. Na ndakisa, masolo nini okosolola na baninga na yo ya mosala, baninga na yo ya kelasi to baninga na yo ya kartye? (Luka 6:45) Okosala misala na yo na molende, to okolinga koboma nzoto te mpo na yango? (Bakolose 3:23) Okokangama na baoyo balingaka Yehova mingi te to mpe balingaka ye te, to okoluka kobongisa lisusu koleka boninga na yo na bato oyo balingaka makambo ya elimo? (Masese 13:20) Makambo nini okosala, ata soki ezali ya minene te, mpo na kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe? (Matai 6:33) Soki olandaka mitinda ya Makomami lokola oyo ezali na bavɛrsɛ oyo epesami awa mpo na kozwa bikateli ya mokolo na mokolo, yango emonisi ete otalelaka mpenza Yehova “na banzela na yo nyonso.”

15 Yango elingi koloba ete ntango nyonso oyo tolingi kozwa ekateli, tosengeli komitunaka boye: ‘Yehova akolinga ngai nasala nini? Likambo nini ekosepelisa ye mingi?’ (Masese 27:11) Kobanga Nzambe motindo wana ezali lolenge ya malamu mpenza ya komonisa na misala ete tolingi ye. Ezaleli ya kobanga Nzambe ekotinda mpe biso tózala ntango nyonso pɛto na elimo, na bizaleli mpe na nzoto. Tóbosana te ete kaka na vɛrsɛ oyo Yakobo alendisi baklisto ete ‘bápusana penepene na Nzambe,’ alendisi mpe bango boye: “Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale.”​—⁠Yakobo 4:⁠8.

16. Ntango tozali kopesa Yehova, nini oyo tokoki soki moke te kokokisa; atako bongo, likambo nini oyo tokoki ntango nyonso kosala?

16 Komonisa na misala ete tolingi Yehova esuki kaka te na koboya kosala makambo ya mabe. Bolingo etindaka biso mpe na kosala makambo ya malamu. Na ndakisa, tozongiselaka Yehova nini na ebele ya makabo oyo apesaka biso? Yakobo akomaki boye: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.” (Yakobo 1:17) Ntango tozali kopesa Yehova biloko na biso, tozali kokómisa ye mozwi te. Biloko nyonso ezali ya ye. (Nzembo 50:12) Lisusu, wana tozali kopesa ntango mpe makasi na biso mpo na Yehova, tókanisa te ete tozali kokokisa mposa moko oyo ye moko akoki kokokisa yango te. Ata soki toboyi kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, azali na likoki ya kotinda mabanga eganga! Na bongo, mpo na nini tosengeli kopesa Yehova biloko, ntango mpe makasi na biso? Ntina ya libosoliboso ezali ete na lolenge wana nde tozali komonisa na misala ete tolingi ye na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso.​—⁠Malako 12:​29, 30.

17. Nini ekoki kotinda biso tópesaka Yehova na esengo?

17 Ntango tozali kopesa Yehova, tosengeli kosala yango na esengo, “mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:⁠7) Likanisi oyo ezali na Deteronome 16:17 ekoki kosalisa biso tópesaka na esengo: “Moto na moto akopesa lokola ekoki na ye, lokola na lipamboli na [Yehova] Nzambe na yo, oyo esili ye kopesa na yo.” Soki tokanisi ebele ya makabo oyo Yehova apesi biso, toyokaka mposa ya kopesa ye mingi. Soki tozali kopesa ye ndenge wana, motema na ye esepelaka se ndenge oyo moboti nyonso asepelaka na mwa likabo moke oyo mwana na ye ya bolingo apesi ye. Soki tozali komonisa bolingo na misala motindo wana, yango ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova.

Tókolisa boninga na Yehova na nzela ya mabondeli

18. Mpo na nini ebongi tókanisaka ndenge oyo tokoki kobongisa mabondeli na biso?

18 Ntango oyo tobondelaka biso moko epesaka biso libaku malamu ya koyebisa Tata na biso ya likoló makambo oyo tozali na yango na motema. (Bafilipi 4:⁠6) Lokola libondeli ezali nzela ya ntina mingi mpo na kopusana penepene na Nzambe, ebongi ete tófanda mpe tókanisa soki mabondeli na biso ezalaka ndenge nini. Yango elingi koloba te ete tosengeli koluka kosalaka mabondeli ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe oyo tobongisi yango malamumalamu, kasi tosengeli nde koloba makambo oyo euti mpenza na motema. Ndenge nini tokoki kobongisa lisusu mabondeli na biso?

19, 20. Mpo na nini tosengeli kokanisaka liboso ya kobondela, mpe wapi mwa makambo oyo ebongi tókanisaka yango malamumalamu?

19 Tokoki komeka kokanisa liboso ya kobondela. Soki tozali kokanisa liboso ndenge wana, tokoki kozwa makambo ya sikisiki mpe ya ntina oyo tokolobela na mabondeli na biso. Ekosalisa mpe biso tózongelaka kaka te maloba oyo tomeseni koloba na mabondeli na biso, mpamba te yango nde eyelaka biso mbala moko na makanisi. (Masese 15:​28, 29) Ntango mosusu, soki tozali kokanisa malamumalamu makambo mosusu oyo Yesu alobelaki na libondeli oyo ateyaki lokola ndakisa mpe na nsima toyokanisi yango na makambo oyo etali biso moko, yango ekoki kosalisa biso. (Matai 6:​9-13) Na ndakisa, tokoki komituna wapi mwa makambo oyo tozali kokana kosala mpo ete mokano ya Yehova ekokisama awa na mabele. Tokoki nde te koyebisa Yehova mposa oyo tozali na yango ete asalela biso mingi mpenza mpe kosɛnga ye asalisa biso tókokisa mokumba nyonso oyo apesi biso? Tozali kotungisama mingi mpo na bamposa ya biloko ya mokili? Tozali na mposa ete bálimbisa biso mpo na masumu nini, mpe tosengeli kolimbisaka mingimingi nani? Komekama nini tozali na yango, mpe tozali mpenza komona ete tozali na mposa ete Yehova abatela biso nokinoki na komekama yango?

20 Longola yango, tokoki kokanisa bato oyo toyebi oyo bazali mpenzampenza na mposa ya lisalisi ya Yehova. (2 Bakolinti 1:11) Kasi, tosengeli kobosana te kozongiselaka Yehova matɔndi. Soki tofandi mpe tokanisi, tokozanga te komona makambo oyo mpo na yango tosengeli kotɔnda Yehova mpe kokumisa ye mikolo nyonso mpo na malamu na ye mingi. (Deteronome 8:10; Luka 10:21) Soki tozali kosala bongo, tokozwa litomba mosusu: ekosalisa biso tótyaka makanisi na biso mingimingi na makambo ya malamu mpe tózalaka na botɔndi mpo na yango.

21. Wapi bandakisa ya Makomami oyo, soki toyekoli yango, ekoki kosalisa biso na ntango oyo tolingi kobondela Yehova?

21 Koyekola ekoki mpe kobongisa mabondeli na biso. Na kati ya Liloba ya Nzambe, tokokuta mabondeli ya malamu mpenza oyo basi na mibali ya sembo basalaki. Na ndakisa, na ntango mokakatano moko ezali koyela biso oyo ekómi kotungisa biso na ndenge ete tokómi ata kobanga mpo na bolamu na biso to ya baninga mpe bandeko na biso, tokoki kotánga libondeli oyo Yakobo asalaki liboso ete akutana na ndeko na ye Esau oyo azalaki kokana kosala ye mabe. (Genese 32:​9-12) To mpe tokoki koyekola libondeli oyo Mokonzi Asa asalaki ntango basoda soki milio moko ya Etiopia bayaki kobundisa libota ya Nzambe. (2 Ntango 14:​11, 12) Soki totungisami mpo na likambo moko oyo ekoki kofingisa nkombo ya Yehova, na ntango wana ebongi tótalela libondeli oyo Eliya asalaki liboso ya basambeli ya Baala na Ngomba Kalemele to mpe libondeli oyo Nehemia asalaki mpo na Yelusaleme wana ebebaki mpenza. (1 Mikonzi 18:​36, 37; Nehemia 1:​4-11) Kotánga mabondeli ya ndenge wana mpe kokanisa yango malamumalamu ekoki kokómisa kondima na biso makasi; ekoki mpe kopesa biso makanisi mpo na kobondela Yehova na ndenge ya malamu koleka mpo na koyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa biso mingi.

22. Wapi mokapo ya mobu 2003, mpe likambo nini tokoki komituna mbala na mbala na boumeli ya mbula yango?

22 Na maloba ya polele, kolanda toli ya Yakobo oyo esɛngi ete ‘tópusana penepene na Nzambe’ ezali likambo ya lokumu mpe ezali mokano oyo eleki malamu ya komityela. (Yakobo 4:⁠8) Tiká ete tóbakisa boyebi na biso ya Nzambe, tóluka komonisa na misala ete tozali kolinga ye mingi, mpe tókolisa boninga na biso na ye na nzela ya mabondeli na biso mpo na komonisa ete tozali kopusana penepene na ye. Na mobu 2003, mokapo ya mobu ezali Yakobo 4:8; wana tokobanda kokanisa yango, tómitalelaka ntango nyonso mpo na koyeba soki tozali mpenza kopusana penepene na Yehova. Kasi, vɛrsɛ yango elobi mpe ete Yehova “akopusana penepene na bino.” Yango elingi mpenza koloba nini mpe matomba nini likambo yango ekomemela biso? Lisolo oyo elandi ekotalela likambo yango.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini kopusana penepene na Yehova ezali likambo oyo tosengeli kozwa na lisɛki te?

• Wapi mwa mikano oyo tokoki komityela na oyo etali koyekola koyeba Yehova?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi mpenza Yehova?

• Ndenge nini tokoki kokolisa boninga makasi na Yehova na nzela ya mabondeli?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Mokapo ya mobu 2003 ekozala: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” ​—⁠Yakobo 4:⁠8.

[Elilingi na lokasa 9]

Ntango azalaki kokola, Samwele ayekolaki koyeba Yehova malamumalamu

[Elilingi na lokasa 12]

Libondeli oyo Eliya asalaki na Ngomba Kalemele ezali ndakisa malamu mpo na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto