‘Bózala na bolingo na kati na bino’
“Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—YOANE 13:35.
1. Ezaleli nini Yesu alobelaki mingi mwa moke liboso akufa?
“BANA mike.” (Yoane 13:33) Yesu abengaki bantoma na ye bongo ntango azalaki kosolola na bango na butu ya nsuka liboso akufa. Ezali na esika mosusu te na Baevanzile epai balobi ete Yesu azalaki kobenga bango bongo liboso. Kasi, na butu wana asepelaki kobenga bayekoli na ye ndenge wana mpo na komonisa ete alingaki bango mingi. Kutu, na butu wana Yesu alobelaki bolingo mbala soki 30. Mpo na nini alobelaki mingi ezaleli wana?
2. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete baklisto bámonisaka bolingo?
2 Yesu alimbolaki mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi. Alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35; 15:12, 17) Kozala moyekoli ya Klisto esɛngaka mpe kozala moto oyo alingaka bandeko. Baklisto ya solo bayebanaka te na molato moko boye to na mimeseno oyo kaka bango nde balandaka, kasi bayebanaka nde na bolingo ya solosolo oyo bazalaka na yango kati na bango. Kozala na bolingo ya ndenge wana ezali likambo ya mibale kati na makambo misato oyo esɛngami mpo na kozala moyekoli ya Klisto oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo eleki. Nini ekosalisa biso tólanda kokokisa likambo yango?
‘Tósala yango malamumalamu koleka’
3. Toli nini ntoma Paulo apesaki na likambo etali bolingo?
3 Se ndenge ezalaki komonana na kati ya bayekoli ya Klisto na ekeke ya liboso, lelo oyo bolingo monene yango ezali mpe komonana na kati ya bayekoli ya solosolo ya Klisto. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso boye: “Na likambo etali bolingo ya bondeko, bozali na mposa te ete tókomelaka bino, mpo bino moko boteyami na Nzambe ete bólinganaka; mpe, ya solo, bozali kosala yango epai ya bandeko nyonso.” Atako bongo, Paulo abakisaki ete: “Bókoba kosala yango malamumalamu koleka.” (1 Batesaloniki 3:12; 4:9, 10) Biso mpe tosengeli kolanda toli ya Paulo mpe kosala makasi mpo na komonisana bolingo “malamumalamu koleka.”
4. Banani oyo Paulo ná Yesu balobaki ete tosengeli mpenza kobosana bango te?
4 Kaka na mokanda yango, Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi’ mpe ‘básalisaka bato ya bolɛmbu.’ (1 Batesaloniki 5:14) Na mokanda mosusu, ayebisaki baklisto ete baoyo ‘bazali makasi basengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te.’ (Baloma 15:1) Yesu mpe apesaki malako etali kosalisa baoyo bazali na bolɛmbu. Ntango Yesu ayebisaki ete na butu oyo bakokanga ye Petelo akosundola ye, nsima na yango alobaki na Petelo boye: “Ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” Mpo na nini? Mpamba te bango mpe bakosundola Yesu mpe na bongo, bakozala na mposa ya lisalisi. (Luka 22:32; Yoane 21:15-17) Na yango, Liloba ya Nzambe ezali koteya biso tólinga mpe bato oyo balɛmbi na elimo mpe baoyo ntango mosusu batiki lisangá ya boklisto. (Baebele 12:12) Mpo na nini tosengeli kosala yango? Eyano ezali na bandakisa mibale oyo Yesu apesaki.
Mpate oyo ebungaki mpe mbongo ya ebende oyo ebungaki
5, 6. (a) Wapi ndakisa mibale ya mikuse oyo Yesu apesaki? (b) Bandakisa yango ezali komonisa nini na ntina na Yehova?
5 Mpo na koteya bato oyo bazalaki koyoka ye ndenge oyo Yehova atalelaka bato oyo babungi nzela, Yesu apesaki ndakisa mibale ya mikuse. Moko elobelaki mobateli ya mpate. Yesu alobaki boye: “Moto nani na kati na bino oyo azali na bampate monkama, soki abungisi moko na yango, akotika ntuku libwa na libwa te na esobe mpe akokenda koluka oyo ebungi tii akomona yango? Mpe ntango asili kozwa yango akotya yango na mapeka na ye mpe akosepela. Mpe ntango azongi na ndako akobenga baninga na ye mpe bazalani na ye, akoloba na bango ete, ‘Bósepela elongo na ngai, mpamba te namoni mpate na ngai oyo ebungaki.’ Nazali koyebisa bino ete ezali ndenge wana nde esengo ekozala mingi na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema koleka mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa oyo bazali na mposa ya kobongola motema te.”—Luka 15:4-7.
6 Ndakisa ya mibale elobelaki mwasi moko. Yesu alobaki boye: “Mwasi nani oyo azali na badalakima zomi ya bibende, soki abungisi dalakima moko ya ebende, akopelisa mwinda te mpe akokɔmbɔla ndako na ye te mpe akoluka malamumalamu te tii akomona yango? Mpe ntango amoni yango akobenga basi oyo bazali baninga na ye mpe bazalani na ye, akoloba ete, ‘Bósepela elongo na ngai, mpamba te namoni dalakima ya ebende oyo nabungisaki.’ Ezali ndenge wana, nazali koyebisa bino, nde esengo ezalaka epai ya baanzelu ya Nzambe mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.”—Luka 15:8-10.
7. Wapi makambo mibale oyo ndakisa ya mpate oyo ebungaki mpe ndakisa ya mbongo ya ebende oyo ebungaki ezali koteya biso?
7 Bandakisa yango ekoki koteya biso nini? Ezali komonisa biso (1) ndenge oyo tosengeli koyoka na mitema mpo na bato oyo balɛmbi mpe (2) oyo tosengeli kosala mpo na kosalisa bango. Tiká tótalela naino makambo yango.
Babungi kasi bazali na motuya
8. (a) Mobateli ya mpate mpe mwasi basalaki nini mpo na biloko na bango oyo ebungaki? (b) Makambo oyo basalaki ezali komonisa biso ete bazalaki kotalela biloko oyo ebungaki ndenge nini?
8 Bandakisa nyonso mibale ezali kolobela eloko moko oyo ebungaki, kasi landá malamu makambo oyo bakóló ya biloko yango basalaki. Mobateli ya mpate alobaki te ete: ‘Mpate moko nde nini? Ata ebungi, ekosala ngai eloko te, natikali na 99 mobimba.’ Mwasi alobaki te ete: ‘Mpo na nini namitungisa mpo na ebende moko? Natikali na libwa mobimba.’ Nzokande, mobateli ya mpate alukaki mpate oyo ebungaki lokola nde azalaki kaka na moko wana. Mwasi mpe amonaki lokola nde azalaki kaka na ebende moko oyo ebungaki. Na bandakisa yango mibale, eloko oyo ebungaki ezalaki kaka na motuya mpo na nkolo na yango. Yango ezali komonisa nini?
9. Komitungisa ya mobateli ya mpate mpe ya mwasi ezali komonisa nini?
9 Yoká ndenge oyo Yesu asukisaki bandakisa yango mibale: “Ndenge wana nde esengo ekozala mingi na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema” mpe “ezali ndenge wana, nazali koyebisa bino, nde esengo ezalaka epai ya baanzelu ya Nzambe mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.” Yango wana, komitungisa ya mobateli ya mpate mpe ya mwasi yango ezali komonisa mwa moke ndenge Yehova ná bikelamu na ye na likoló bayokaka. Eloko oyo ebungaki ezalaki kaka na motuya mpo na mobateli ya mpate mpe mpo na mwasi yango; ndenge moko mpe, baoyo batiki lisangá mpe bakabwani na basaleli ya Nzambe bazali kaka na motuya na miso ya Yehova. (Yilimia 31:3) Ekoki kozala ete bato yango balɛmbi nde na elimo, kasi bazali mpenzampenza batomboki te. Atako balɛmbi na elimo, ekoki kozala ete bazali kaka kotosa mwa moke masɛngami ya Yehova. (Nzembo 119:176; Misala 15:29) Yango wana, se ndenge ezalaki na ntango ya kala, Yehova awelaka te “kobwaka bango [mosika, NW] na elongi na ye.”—2 Mikonzi 13:23.
10, 11. (a) Ndenge nini tosengeli kotalelaka bato oyo batiki lisangá? (b) Na kotalela bandakisa mibale ya Yesu, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komitungisa mpo na bango?
10 Lokola Yehova ná Yesu, biso mpe tozali komitungisa mpenza mpo na baoyo balɛmbi mpe batiki lisangá ya boklisto. (Ezekiele 34:16; Luka 19:10) Na miso na biso, moto oyo alɛmbi na elimo azali lokola mpate oyo ebungi, kasi te lokola moto oyo elikya ezali lisusu te mpo na ye. Tolobaka te ete: ‘Mpo na nini tómitungisa mpo na moto moko oyo alɛmbi? Lisangá ekufi te mpo ye azali lisusu te.’ Kasi, bato oyo batikaki lisangá kasi balingi kozonga, totalelaka bango ete bazali na motuya, se ndenge oyo Yehova atalelaka bango.
11 Kasi, ndenge nini tokoki komonisa ete tomitungisaka mpo na bango? Bandakisa mibale ya Yesu ezali komonisa ete tokoki kosala yango (1) na kokangáká mabɔkɔ te, (2) na komonisáká boboto, mpe (3) na kozaláká na molende. Tótalela naino makambo yango mokomoko.
Tókanga mabɔkɔ te
12. Maloba “akokenda koluka oyo ebungi” ezali komonisa ete mobateli ya mpate azalaki na makanisi nini?
12 Na ndakisa ya liboso, Yesu alobaki ete mobateli ya mpate “akokenda koluka oyo ebungi.” Mobateli ya mpate akangaki mabɔkɔ te, nzokande asalaki molende mpo na komona mpate oyo ebungaki. Abangaki mikakatano te, makama te, to mpe nzela molai te. Kasi, mobateli ya mpate alukaki na molende ‘tii amonaki yango.’—Luka 15:4.
13. Ndenge nini bato ya sembo na ntango ya kala oyo Biblia elobeli basalisaki baoyo balɛmbaki, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?
13 Ndenge moko mpe, mpo na kosalisa moto oyo asengeli kolendisama, mbala mingi esɛngaka ete moto oyo azali makasi akanga mabɔkɔ te. Bato ya sembo na ntango ya kala bakangaki ntina ya likambo yango. Na ndakisa, ntango Yonatana Mwana ya Mokonzi Saulo, amonaki ete esengeli kolendisa Davidi, moninga na ye ya motema, “atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya Davidi na Holesa mpe asungaki ye kozwa makasi kati na Nzambe.” (1 Samwele 23:15, 16) Bankama ya bambula na nsima, ntango Guvɛrnɛrɛ Nehemia amonaki ete Bayuda mosusu balɛmbaki, ye mpe ‘atɛlɛmaki nokinoki’ mpe alendisaki bango ete ‘bábosana Yehova te.’ (Nehemia 4:14, NW) Lelo oyo, biso mpe tosengeli ‘kotɛlɛma,’ elingi koloba kokanga mabɔkɔ te, mpo na kolendisa baoyo balɛmbi. Kasi, na kati ya lisangá, banani basengeli kosala likambo yango?
14. Na kati ya lisangá ya boklisto, banani basengeli kosalisa bato oyo balɛmbi?
14 Mingimingi, bankulutu nde bazali na mokumba ya ‘kokembisa mabɔkɔ oyo elɛmbi mpe kopesa nguya na mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te,’ mpe ‘koloba na bango bazali kobanga kati na mitema ete, Bóyika mpiko! Bóbanga te!’ (Yisaya 35:3, 4; 1 Petelo 5:1, 2) Kasi, tóbosana te ete Paulo apesaki toli ya ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi’ mpe ya ‘kosalisa bato ya bolɛmbu’ kaka na bankulutu te. Paulo akomelaki “lisangá ya Batesaloniki.” (1 Batesaloniki 1:1; 5:14) Na yango, mokumba ya kosalisa baoyo balɛmbi ezali ya baklisto nyonso. Lokola mobateli ya mpate na ndakisa oyo Yesu apesaki, moklisto mokomoko asengeli kozala na mposa ya ‘kokenda koluka oyo abungi.’ Kasi, yango esalemaka malamu mingi soki ezali ebongiseli ya bankulutu. Ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa bato oyo balɛmbi na kati ya lisangá na bino?
Tózala na boboto
15. Ekoki kozala mpo na nini mobateli ya mpate asalaki makambo oyo toyoki?
15 Ntango mobateli ya mpate amonaki mpate oyo ebungaki, asalaki nini? ‘Atyaki yango na mapeka na ye.’ (Luka 15:5) Likambo yango ezali mpenza kobenda likebi na biso mpe koteya biso! Ekoki kozala ete mpate yango eyengayengaki mwa mikolo mingi butu ná moi na bisika oyo emesanaki te, mbala mosusu ezalaki na likama ete nkɔsi emona yango mpe elanda yango. (Yobo 38:39, 40) Na ntembe te mpate elɛmbaki mpo elyaki te. Ezalaki na makasi te ya kokatisa bisika ya nkaka na nzela mpo ezonga epai etonga ezalaki. Yango wana, mobateli ya mpate agunzamaki, atombolaki mpate yango na boboto mpenza, mpe amemaki yango mpe alekaki bisika nyonso ya nkaka tii azongaki na yango na etonga. Ndenge nini tokoki komonisa boboto lokola oyo ya mobateli yango?
16. Mpo na nini tosengeli komonisa boboto lokola oyo ya mobateli ya mpate epai ya mpate oyo ebungaki?
16 Ekoki kozala ete moto oyo atiká lisangá alɛmbi mingi na elimo. Ndenge moko na mpate oyo ekabwanaki na mobateli na yango, ekoki kozala ete moto yango ayengayengaki na bisika ya mabe ya mokili oyo. Lokola azali lisusu na kati ya etonga te, elingi koloba lisangá ya boklisto te, epai azalaki kobatelama, azali mpenza na likama ete Zabolo, oyo “azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto,” akwela ye. (1 Petelo 5:8) Lisusu, moto yango alɛmbi mpo azali kolya te na elimo. Na bongo, na makasi na ye moko akokoka te koleka bisika ya mpasi oyo akokutana na yango na nzela mpo na kozonga na lisangá. Yango wana esengeli ete, na maloba ya elilingi, biso tógunzama, tótombola ye na boboto, mpe tómema ye. (Bagalatia 6:2) Ndenge nini tokoki kosala yango?
17. Na ndakisa ya ntoma Paulo, tokosala nini ntango tokei kotala moto moko oyo alɛmbi na elimo?
17 Ntoma Paulo alobaki boye: “Soki moto moko alɛmbi, ngai mpe nakolɛmba na ye elongo te?” (2 Bakolinti 11:29, The New English Bible; 1 Bakolinti 9:22) Paulo azalaki komitya na esika ya basusu, ata baoyo balɛmbi. Biso mpe tosengeli komonisa ezaleli yango mpo na bato oyo balɛmbi. Ntango tokei kotala moklisto moko oyo alɛmbi na elimo, tólakisa ye ete azali na motuya na miso ya Yehova mpe ete bandeko na ye Batatoli bazali na mposa na ye. (1 Batesaloniki 2:17) Tómonisa ye ete bazali pene mpo na kosunga ye mpe balingi kozala mpo na ye “ndeko abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17; Nzembo 34:18) Maloba ya boboto oyo euti mpenza na motema na biso ekoki kolendisa ye mokemoke tii akozonga na kati ya etonga. Na nsima tokosala nini? Ndakisa ya mwasi oyo abungisaki mbongo ya ebende eteyi biso ndenge ya kosala.
Tózala na molende
18. (a) Mpo na nini mwasi oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye azalaki kaka na elikya? (b) Milende nini ya solosolo mwasi yango asalaki, mpe azwaki mbano nini?
18 Mwasi oyo abungisaki mbongo ya ebende ayebaki ete ekozala mpasi mpo amona yango, kasi azalaki kaka na elikya. Soki mbongo yango ya ebende ekweaki na esika oyo ezali na matiti mingi to na mai ya pɔtɔpɔtɔ, mbala mosusu alingaki kolongola elikya ya komona yango lisusu. Kasi, lokola ayebaki ete ekweaki na kati ya ndako, na esika moko oyo akokaki komona yango, alukaki yango na molende. (Luka 15:8) Apelisaki naino mwinda mpo na kongɛngisa ndako. Na nsima, akɔmbɔlaki ndako na elikya ete akoyoka mwa makɛlɛlɛ ya ebende. Na nsuka, alukaki malamumalamu bisika nyonso oyo ezalaki molili to ebombaná tii ntango kongɛnga ya mwinda ebɛtaki mwa ebende yango. Mwasi yango azwaki mbano mpo atyaki molende!
19. Na kati ya ndakisa ya mbongo ya ebende oyo ebungaki, makambo oyo mwasi asalaki ezali koteya biso nini na likambo etali kosalisa bato oyo balɛmbi?
19 Ndenge mwa likambo wana oyo elobelami na kati ya ndakisa ezali komonisa biso, mokumba oyo Makomami epesi ya kosalisa baklisto oyo balɛmbi eleki makasi te mpo na biso. Kasi, tomoni mpe ete ezali kosɛnga molende. Kutu, ntoma Paulo alobaki na bankulutu ya Efese ete: “Na kosaláká mosala makasi ndenge wana bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu.” (Misala 20:35a) Tóbosana te ete mpo mwasi wana amona mbongo ya ebende, asukaki kaka te na kobwaka miso epai na epai, likolólikoló. Alukaki malamumalamu ‘tii amonaki yango.’ Biso mpe ndenge moko, ntango tozali kosala makasi mpo na kosalisa moto oyo alɛmbi na elimo, tosengeli kosala molende mpe kosala makambo bisalelá te. Tokoki kosala nini?
20. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bato oyo balɛmbi?
20 Ndenge nini tokoki kosalisa moto oyo alɛmbi akóma na kondima mpe na botɔndi? Ntango mosusu ekosɛnga kaka ete tóyekola na ye Biblia na lisalisi ya mokanda moko oyo ebongi. Koyekola Biblia na moto oyo alɛmbi ekopesa biso nzela ya kosalisa ye malamumalamu. Tokanisi ete mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde akoki mpenza kopona ndeko oyo abongi kopesa lisalisi ya ndenge wana. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akoki kopesa makanisi mpo na kopona mikapo oyo bakoki koyekola mpe mokanda oyo ebongi mpenza. Mwasi oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye asalelaki biloko oyo ebongi mpo na kosala likambo oyo azalaki na mposa na yango, lelo oyo mpe biso tozali na biloko ya mosala oyo esalisaka biso tókokisa mokumba oyo Nzambe apesi biso ya kosalisa bato oyo balɛmbi. Babuku mibale oyo tozwi sika: buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo ná buku Tópusana penepene ya Yehova,a ekosalisa mpenza mpo na kokokisa likambo yango.
21. Ndenge nini kosalisa bato oyo balɛmbi ememelaka ná biso ná bango mapamboli?
21 Kosalisa bato oyo balɛmbi ememelaka ná biso moko ná bango mapamboli. Moto oyo azali kosalisama ayokaka esengo ya kozongela baninga ya solosolo. Toyokaka esengo oyo moto azwaka kaka na kopesa. (Luka 15:6, 9; Misala 20:35b) Bolingo ekolaka na kati ya lisangá mobimba ntango moto mokomoko azali kokanisa basusu. Na koleka, Yehova ná Yesu, Babateli na biso, bakozwa lokumu lokola basaleli na bango awa na mabele bazali komonisa mposa na bango ya kosalisa bato oyo balɛmbi. (Nzembo 72:12-14; Matai 11:28-30; 1 Bakolinti 11:1; Baefese 5:1) Tomoni mpenza ete ezali na makambo mingi oyo ezali kotinda biso na kotika te ‘kozala na bolingo na kati na biso’!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini komonisa bolingo ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na biso?
• Mpo na nini tosengeli komonisa bolingo epai ya bato oyo balɛmbi?
• Ndakisa ya mpate mpe mbongo ya ebende oyo ebungaki ezali koteya biso nini?
• Tokoki kosala nini mpo na kosalisa moto oyo alɛmbi?
[Bililingi na lokasa 16]
Tokangaka mabɔkɔ te, tozalaka na boboto mpe na molende mpo na kosalisa baoyo balɛmbi
[Elilingi na lokasa 17]
Kosalisa bato oyo balɛmbi ememelaka ná biso ná bango mapamboli