Mpo na nini konyokola bato mpo na lingomba na bango?
YO MPE okanisaka ete esengeli konyokola bato mpo na lingomba na bango? Tobanzi ete okanisaka bongo te, mingimingi soki bazali kosala bato mosusu mabe te to kobebisa ntomo na bango te. Nzokande, konyokola bato mpo na lingomba ezali likambo oyo ebandá kala mpenza. Na ndakisa, na boumeli ya ekeke ya 20, mbala mingi bazalaki kopekisa misala ya Batatoli ya Yehova na mikili mingi ya Mpoto mpe na mikili mosusu mpe banyokolaki bango na ndenge ya nsɔmɔ mpenza.
Na bambula yango, Banazi ná Bakoministe banyokolaki Batatoli ya Yehova na ndenge ya nsɔmɔ mpenza mpe bazalaki kotika bango kimya te. Makambo oyo bakutanaki na yango ezali koteya biso nini na likambo etali konyokola bato mpo na lingomba na bango? Mpe liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo bazalaki kotalela minyoko yango?
“Bazali bato ya mokili te”
Batatoli ya Yehova basalaka makasi ete bátosa mibeko ya Leta, bázala na kimya mpe na bizaleli ya malamu. Babundisaka baguvɛrnema te to kozala na matata na bango, balukaka mpe minyoko yango te mpo báboma bango lokola bamartiru. Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te. Bakokisaka maloba ya Yesu oyo elobi ete: “[Bayekoli na ngai] bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Baguvɛrnema mingi etungisaka Batatoli te lokola bakɔtaka na makambo ya politiki te. Kasi bakonzi ya makambo makasimakasi batikaka te ete baklisto bátosa etinda ya Biblia oyo esɛngi bango básangana na mokili te.
Na likita moko oyo esalemaki na sanza ya Novɛmbɛ 2000 na Iniversite ya Heidelberg, na Allemagne, balimbolaki ntina oyo basalaka bongo. Motó ya likambo ya likita yango ezalaki: “Batatoli ya Yehova na ntango ya boyangeli ya Banazi mpe Bakoministe.” Doktɛrɛ Clemens Vollnhals, ye ayekolaka makambo na ebongiseli moko (Hannah-Arend-Institute for Research Into Totalitarianism) alobaki boye: “Bakonzi ya makambo makasimakasi basukaka kaka te na makambo na bango ya politiki. Balukaka na ndenge nyonso ete bato bátosa bango na makambo nyonso.”
Baklisto ya solo bakoki te kotosa biyangeli ya bato “na makambo nyonso,” mpamba te balapaki ndai ya kotosa kaka Yehova Nzambe na makambo nyonso. Batatoli oyo bazalaki na bikólo oyo bakonzi ya makambo makasimakasi bazalaki koyangela, bamonaki ete makambo mingi oyo Leta akómaki kosɛnga bango, ezalaki koyokana te na makambo oyo bango bandimaka. Basalaki nini? Na ntango ya kala Batatoli ya Yehova balandaki etinda oyo bayekoli ya Yesu Klisto balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:29.
Ebele ya Batatoli, atako banyokolaki bango makasi, baboyaki kondima na bango te mpe bakɔtaki na makambo ya politiki te. Nini esalisaki bango na koyika mpiko? Ndenge nini bazwaki makasi ya koyika mpiko? Tótika bango moko bápesa biyano. Mpe tótala liteya oyo moto na moto akoki kozwa na likambo yango, azala Motatoli to te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Na boumeli ya mbula 50 oyo eleki, Banazi ná Bakoministe banyokolaki Batatoli ya Yehova ya Allemagne na ndenge ya nsɔmɔ mpenza mpe bazalaki kotika bango kimya te
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
“Bakonzi ya makambo makasimakasi basukaka kaka te na makambo na bango ya politiki. Balukaka na ndenge nyonso ete bato bátosa bango na makambo nyonso.”—Doktɛrɛ Clemens Vollnhals
[Elilingi na lokasa 4]
Libota ya Kusserow bazalaki lisusu na bonsomi te mpo batikaki kondima na bango te
[Elilingi na lokasa 4]
Babomaki Johannes Harms na kaa ya Banazi mpo na kondima na ye