‘Bózala na mpiko mpe na makasi!’
“Bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili.”—YOANE 16:33.
1. Na likambo nini balendisaki Bayisalaele lokola basengelaki kokutana na banguna na mokili ya Kanana?
NTANGO Bayisalaele bakómaki pene ya kokatisa Ebale Yolodani mpo bákɔta na Mokili ya Ndaka, Moize alobaki na bango boye: “Bózala na mpiko mpe na makasi. Bóbanga te mpe bólɛnga liboso na bango te, mpamba te Yehova Nzambe na bino nde azali kotambola na bino.” Na nsima, Moize abengaki Yosua, moto oyo asengelaki kokamba Bayisalaele tii na Kanana, mpe apesaki ye toli ete azala na mpiko. (Deteronome 31:6, 7, NW) Na nsima, Yehova ye moko alendisaki Yosua na maloba oyo: “Zalá na mpiko mpe na makasi . . . Zalá kaka na mpiko mpe na makasi mpenza.” (Yosua 1:6, 7, 9, NW) Maloba yango ya kolendisa eyaki na ntango oyo ebongaki mpenza. Bayisalaele basengelaki kozala na mpiko mpo na kobunda na banguna ya makasi oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani.
2. Makambo nini tozali komona lelo oyo, mpe ezaleli nini tosengeli kozala na yango?
2 Lelo oyo, etikali moke baklisto ya solo bákɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki; yango wana, basengeli kozala na mpiko lokola Yosua. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 7:14) Kasi, makambo oyo ezali na ntango na biso ekeseni na oyo ezalaki na ntango ya Yosua. Yosua abundaki bitumba na mipanga mpe na makɔnga. Nzokande, biso tozali na etumba ya elimo mpe tosimbaka mindoki te. (Yisaya 2:2-4; Baefese 6:11-17) Lisusu, Yosua abundaki ebele ya bitumba ya makasi ata nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Kasi mpo na biso, ezali sikoyo, liboso tókɔta na mokili ya sika, nde tozali kobunda bitumba oyo eleki makasi. Tiká tótalela mwa makambo mosusu oyo ezali kosɛnga biso tózala na mpiko.
Mpo na nini tosengeli kobunda?
3. Biblia ezali komonisa nini na ntina etali monguna na biso ya libosoliboso?
3 Ntoma Yoane akomaki boye: “Toyebi ete touti na Nzambe, kasi mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Maloba yango ezali komonisa ntina mpenza oyo baklisto basengeli kobunda mpo bábatela kondima na bango. Ntango moklisto atikali sembo, tokoloba ete ezali mwa kolonga oyo alongi Satana Zabolo. Yango wana, Satana azali kosala makambo lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma”; azali koluka kobangisa baklisto ya sembo mpo na kolya bango. (1 Petelo 5:8) Ya solo mpenza, azali kobundisa baklisto bapakolami ná baninga na bango. (Emoniseli 12:17) Na etumba yango, azali kosalela bato oyo bazali koyeba to mpe oyo bazali koyeba te ete bazali kokokisa mikano na ye. Ezali kosɛnga ete moto azala na mpiko mpo azonga nsima te ntango Satana ná bato na ye bazali kobundisa ye.
4. Likebisi nini Yesu apesaki, kasi ezaleli nini baklisto ya solo bamonisi?
4 Lokola Yesu ayebaki ete Satana ná bato na ye bakotɛlɛmɛla makasi nsango malamu, akebisaki bayekoli na ye ete: “Bato bakokaba bino na bolɔzi mpe bakoboma bino, mpe bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Maloba yango ekokisamaki na ekeke ya liboso, ezali mpe kokokisama na moi ya lelo. Minyoko oyo Batatoli ya Yehova mosusu bakutani na yango na mikolo na biso ezali makasi lokola kaka oyo bato mosusu bakutanaki na yango na bileko mosusu nyonso oyo eleká. Atako bongo, baklisto ya solo bazali koyikela makambo yango mpiko. Babosanaka te ete “kobanga bato ekoyeisa motambo,” mpe balingi te ete bákangama na motambo.—Masese 29:25.
5, 6. (a) Makambo nini esɛngaka biso tómonisa mpiko? (b) Baklisto ya sembo basalaka nini ntango bakutani na makambo oyo ekoki kotya mpiko na bango na komekama?
5 Longola minyoko, tozali mpe kokutana na mikakatano mosusu oyo ezali kosɛnga tózala na mpiko. Mpo na bamosusu, koyebisa bato oyo bayebani na bango te nsango malamu ezali etumba monene. Na kelasi, bazali kosɛnga bana mosusu ete báyemba loyembo ya ekólo to bápesa drapo losako, mpo básala yango te ezali mpe kosɛnga bázala na mpiko. Lokola koyemba loyembo ya ekólo ezali losambo mobimba, bana oyo bazali baklisto bazwaki ekateli ya kosala oyo esepelisaka Nzambe, mpe ezaleli ya malamu oyo bamonisaki ezali mpenza kopesa esengo.
6 Tosengeli mpe kozala na mpiko ntango banguna bazali kokosela biso basaleli ya Nzambe makambo na bazulunalo, na radio mpe na televizyo to ntango bazali kosala “makambo mabe na nzela ya mibeko” mpo na koluka kopekisa losambo ya solo. (Nzembo 94:20, NW) Na ndakisa, tosengeli kosala nini ntango bakomi na zulunalo moko, to balobi na radio to na televizyo, makambo ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova? Tosengeli nde komitungisa? Te. Toyebi ete makambo ya ndenge wana esengeli kosalema. (Nzembo 109:2) Tokamwaka te ntango bato mosusu bazali kondima makambo wana ya lokuta mpamba te toyebi ete ‘zoba ayambaka maloba nyonso.’ (Masese 14:15) Kasi, baklisto ya sembo bandimaka bindimelá te likambo nyonso oyo bato balobi mpo na bandeko na bango, bakimaka mpe makita te, balɛmbisaka mabɔkɔ te na mosala ya kosakola, to mpe kondima na bango ekitaka te mpo bazali kokosela bango makambo. Kutu, ‘bamilobelaka lokola baministre ya Nzambe . . . na nzela ya nkembo mpe ya koyokisama nsɔni, na nzela ya lokumu ya mabe mpe ya lokumu ya malamu; lokola bakosi [ndenge banguna babengaka bango] nzokande bazali [nde] bato oyo balobaka solo.’—2 Bakolinti 6:4, 8.
7. Wapi mituna ya mozindo oyo tokoki komituna?
7 Paulo akomelaki Timote maloba oyo: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya . . . Na yango koyoka nsɔni te mpo na litatoli oyo etali Nkolo na biso.” (2 Timote 1:7, 8; Malako 8:38) Nsima ya kotánga maloba yango, tokoki komituna boye: ‘Nayokelaka mateya ya lingomba na ngai nsɔni, to nazalaka nde na mpiko? Na mosala (to na kelasi), nayebisaka bato ete nazali Motatoli ya Yehova to nalukaka nde komibomba? Nayokaka nsɔni bámona ete ngai nakeseni na bato mosusu to namonaka ete soki nakeseni na bato mosusu ezali lokumu mpamba te nazali moninga ya Yehova?’ Soki moto moko abangaka kosakola nsango malamu to akakatanaka mpo na koboya kolanda ndenge oyo bato mingi basalaka, moto ya ndenge wana akanisa lisusu toli oyo Yehova apesaki Yosua: “Zalá na mpiko mpe na makasi.” Tóbosana te ete oyo eleki ntina ezali te makanisi ya baninga na biso ya mosala to ya kelasi, kasi ezali nde makanisi ya Yehova mpe ya Yesu Klisto.—Bagalatia 1:10.
Ndenge ya kokóma na mpiko
8, 9. (a) Ndenge nini mpiko ya baklisto ya ekeke ya liboso emekamaki? (b) Petelo ná Yoane basalaki nini ntango bakebisaki bango, mpe bango moko ná bandeko mosusu bamonaki likambo nini?
8 Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko oyo ekosalisa biso tótikala sembo na ntango oyo ya mpasi? Tóluka naino koyeba ndenge oyo baklisto ya ekeke ya liboso bakómaki na mpiko. Tótalela likambo oyo elekaki ntango banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya Yelusaleme bayebisaki Petelo ná Yoane ete bátika kosakola na nkombo ya Yesu. Lokola bayekoli yango ya Yesu baboyaki kotika, bakebisaki bango mpe na nsima batikaki bango. Bakendaki kokutana mbala moko na bandeko mosusu, mpe babondelaki bango nyonso ete: “Yehova, tyá likebi na makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” (Misala 4:13-29) Yehova apesaki bango makasi na nzela ya elimo santu mpe “batondisaki Yelusaleme” na mateya na bango ndenge bango moko bakonzi ya Bayuda bandimaki yango na nsima.—Misala 5:28.
9 Sikoyo, tótalela naino malamumalamu makambo oyo elekaki na ntango wana. Ntango bakonzi ya Bayuda bakebisaki bayekoli, bango bakanisaki ata moke te ete bátika kosakola lokola bazalaki kokanela bango. Babondelaki Nzambe apesa bango nde mpiko mpo bákoba kosakola. Na nsima, basalaki ndenge oyo basɛngaki na libondeli na bango mpe Yehova apesaki bango makasi na nzela ya elimo santu. Likambo oyo bakutanaki na yango ezali komonisa ete maloba oyo Paulo akomaki mwa bambula na nsima, atako azalaki kolobela likambo mosusu, etaleli mpe baklisto ntango bazali konyokwama. Paulo alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—Bafilipi 4:13.
10. Ndenge nini likambo oyo ekómelaki Yilimia ezali kosalisa baoyo bazalaka nsɔninsɔni?
10 Kasi, tokoloba boni mpo na moto oyo azalaka nsɔninsɔni? Moto ya ndenge wana akoki mpe kosalela Yehova na mpiko nyonso ata soki bazali kotɛmɛla ye? Akoki kosala yango! Tókanisa lisusu makambo oyo Yilimia alobaki ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli. Elenge mobali yango alobaki ete: “Nazali bobele elenge.” Na maloba mosusu, amonaki ete akokoka mokumba yango te. Kasi, Yehova alendisaki ye na maloba oyo: “Lobá te ete, Ngai nazali bobele elenge! Zambi okokenda epai na bango nyonso ekotinda ngai yo epai na bango, okoloba nyonso ekolakisa ngai yo. Bangá bilongi na bango te, mpo ete ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo.” (Yilimia 1:6-10) Yilimia atyelaki Yehova motema, mpe Yehova apesaki ye makasi, atikaki kobanga mpe akómaki motatoli ya mpiko mpenza na Yisalaele.
11. Nini ezali kosalisa baklisto lelo oyo bázala na mpiko lokola Yilimia?
11 Lelo oyo, baklisto bapakolami bazali na mokumba lokola oyo ya Yilimia; mpe lokola “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bazali kopesa bango mabɔkɔ, bazali kokoba kosakola mikano ya Yehova, ata ntango bato bazali kosepela na nsango na bango te, to bazali kotyola bango, to mpe bazali konyokola bango. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bazali kolendisama na maloba oyo Yehova ayebisaki Yilimia ete: “Bangá te.” Babosanaka ata moke te ete Nzambe nde atindi bango mpe bazali kosakola nsango na ye.—2 Bakolinti 2:17.
Bato ya mpiko oyo ebongi kolanda ndakisa na bango
12. Ndakisa nini ya malamu mpenza ya mpiko Yesu atikaki, mpe ndenge nini alendisaki bayekoli na ye?
12 Soki tozali kokanisa bandakisa ya bato mosusu oyo, lokola Yilimia, bazalaki na mpiko ekoki mpe kosalisa biso na milende oyo tozali kosala mpo na kokóma na mpiko. (Nzembo 77:12) Na ndakisa, ntango tozali kotalela mosala ya Yesu, tosepelaka na mpiko oyo amonisaki ntango Satana amekaki ye mpe ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kotɛmɛla ye. (Luka 4:1-13; 20:19-47) Yehova asalisaki Yesu mpo azonga nsima te, mpe mwa moke liboso akufa, alobaki na bayekoli na ye ete: “Na kati ya mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili.” (Yoane 16:33; 17:16) Soki bayekoli ya Yesu balandi ndakisa na ye, bango mpe bakolonga mokili. (1 Yoane 2:6; Emoniseli 2:7, 11, 17, 26) Kasi, ekosɛnga ete ‘bázala na mpiko.’
13. Ndenge nini Paulo alendisaki Bafilipi?
13 Mwa bambula nsima ya liwa ya Yesu, Paulo ná Silasi bakɔtaki bolɔkɔ na Filipi. Na nsima, Paulo alendisaki lisangá ya Filipi ete ‘bátɛlɛma ngwi na elimo kaka moko, na molimo kaka moko kobundáká elongo mpo na kondima ya nsango malamu, mpe komitikáká te kobangisama na banguna na bango ata na likambo moko.’ Mpo na kolendisa bango na likambo yango, Paulo alobaki boye: “Likambo wana mpenza [konyokwama oyo baklisto bazali konyokwama] ezali elembeteli ya libebi mpo na [banyokoli], kasi ya lobiko mpo na bino; mpe elembo yango euti epai ya Nzambe, mpamba te ezali epai na bino nde libaku malamu epesamaki mpo na Klisto, kaka mpo na kondimela ye te, kasi mpe mpo na konyokwama mpo na ye.”—Bafilipi 1:27-29.
14. Mpiko ya Paulo esalaki bandeko na Loma nini?
14 Ntango Paulo atindelaki lisangá ya Filipi mokanda, azalaki lisusu na bolɔkɔ, kasi na mbala oyo na Loma. Atako bongo, akobaki kosakola na mpiko. Yango epesaki litomba nini? Akomaki boye: “Minyɔlɔlɔ na ngai eyebani polelepolele na bokangami na Klisto na kati ya Bakɛngɛli nyonso ya Peletolia mpe epai ya bamosusu nyonso oyo batikali; mpe mingi ya bandeko na kati ya Nkolo, kozwáká makasi mpo na minyɔlɔlɔ na ngai, bazali komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga.”—Bafilipi 1:13, 14.
15. Epai wapi tokoki komona bandakisa malamu ya kondima oyo ekolendisa biso na ekateli tozwi ya kozala na mpiko?
15 Ndakisa ya Paulo ezali kolendisa biso. Tozali mpe kolendisama na bandakisa ya baklisto mosusu ya mikolo na biso oyo bayikaki mpiko ntango banyokolaki bango na bikólo oyo ezalaki na bakonzi ya makambo makasimakasi to na bikólo oyo bakonzi ya mangomba bazalaki koyangela. Masolo ya bamosusu kati na bandeko yango ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na Lamuká! mpe na Annuaire. Ntango ozali kotánga masolo wana, kobosanaka te ete bazalaki kaka bato lokola biso; kasi na ntango ya mpasi makasi, Yehova apesaki bango nguya oyo eleki makasi mpe bayikaki mpiko. Tokoki kotya motema ete akosala mpe bongo epai na biso soki esengeli.
Mpiko na biso esepelisaka Yehova mpe ekumisaka ye
16, 17. Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko na moi ya lelo?
16 Soki moklisto akangami makasi na solo mpe na boyengebene, amonisaka ete azali na mpiko. Soki asali bongo atako azali kobanga na kati ya motema na ye, yango emonisaka ete azali na mpiko mingi lisusu. Moklisto nyonso akoki komonisa mpiko soki alingi mpenza kosala mokano ya Yehova, soki azali na ekateli ya kotikala sembo, soki azali ntango nyonso kotyela Yehova motema, mpe soki azali kobosana te ete Yehova alendisaki ebele ya bato lokola ye. Lisusu, na ntango toyebi ete mpiko na biso esepelisaka Yehova mpe ekumisaka ye, tokozala na ekateli makasi ya kolɛmba te. Tokondima básɛka biso to mpe báyokisa biso mpasi mpamba te tolingi ye mingi.—1 Yoane 2:5; 4:18.
17 Tóbosana ata moke te ete ntango tozali konyokwama mpo na kondima na biso, yango elingi koloba te ete tosalaki likambo moko ya mabe. (1 Petelo 3:17) Tozali konyokwama mpo tozali kolongisa bokonzi ya Yehova, mpo tozali kosala malamu mpe mpo tozali bato ya mokili te. Na likambo yango, ntoma Petelo alobaki boye: “Soki, ntango bozali kosala malamu mpe bozali konyokwama, bozali kokangela yango motema, yango ezali likambo malamu epai ya Nzambe.” Petelo abakisaki lisusu ete: “Tiká . . . baoyo bazali konyokwama na boyokani na mokano ya Nzambe bákoba kotika milimo na bango na mabɔkɔ ya Mozalisi moko ya sembo wana bazali kosala oyo ezali malamu.” (1 Petelo 2:20; 4:19) Ya solo, kondima na biso esepelisaka Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, mpe ekumisaka ye. Yango ezali ntina monene ya kozala na mpiko!
Koloba liboso ya bakonzi
18, 19. Nsango nini toyebisaka bazuzi ntango tozali komonisa mpiko liboso na bango?
18 Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bakonyokwama, alobaki lisusu boye: “[Bato] bakokaba bino na bisambiselo ya mboka, mpe bakobɛta bino fimbo na basinagoga na bango. Ɛɛ, bokomemama liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe bikólo mosusu.” (Matai 10:17, 18) Kosamba liboso ya zuzi to mokonzi ntango bakoseli biso makambo esɛngaka kozala na mpiko. Kasi, ntango tozali kopesa bato yango litatoli na mpiko, tozali kokómisa mokakatano yango libaku ya kosala likambo moko ya ntina. Na maloba mosusu, tozali nde koyebisa na bato oyo bazali kosambisa biso maloba ya Yehova oyo ezali na Nzembo ya mibale ete: “Sikoyo, bino bakonzi, bózala na mayele; bótika ete básembola bino, bino bazuzi ya mokili. Bósalela Yehova na kobanga.” (Nzembo 2:10, 11, NW) Mbala mingi, ntango bakoselaki Batatoli ya Yehova makambo na batribinale, bazuzi mingi balongisaki bonsomi ya losambo ntango bakataki makambo na bosembo, mpe tozali na botɔndi mpo na yango. Kasi, bazuzi mosusu bayokaki makanisi mabe ya banguna na biso. Makomami elobi na bazuzi ya ndenge wana ete: “Bótika ete básembola bino.”
19 Bazuzi basengeli koyeba ete mobeko oyo eleki mibeko nyonso ezali mobeko ya Yehova Nzambe. Basengeli kobosana te ete bato nyonso, ezala bazuzi, bakosamba liboso ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto. (Baloma 14:10) Nzokande mpo na biso, ezala bazuzi balongisi biso to bakweisi biso, tosengeli kozala na mpiko mpamba te Yehova azali na biso. Biblia elobi ete: “Esengo na baoyo nyonso bakomibomba epai na ye.”—Nzembo 2:12, NW.
20. Ndenge nini tokoki kozala na esengo soki bazali konyokola biso mpe bazali kokosela biso makambo?
20 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:11, 12) Ya solo, moto moko te ayokaka esengo ntango bazali konyokola ye, kasi soki totikali sembo ata bazali konyokola biso, ata soki bazali kokosela biso makambo na bazulunalo, na radio to na televizyo, tokozala na esengo. Yango ekomonisa ete tozali kosepelisa Yehova mpe akopesa biso mbano mpo na yango. Mpiko na biso ezali komonisa ete tozali na kondima ya solosolo mpe ezali kondimisa biso ete Nzambe azali kosepela na biso. Ezali mpenza komonisa ete tozali kotyela Yehova motema mobimba. Ezali na ntina mingi ete moklisto ayeba kotyela Yehova motema ndenge wana, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.
Makambo nini oyekoli?
• Makambo nini ezali kosɛnga komonisa mpiko lelo oyo?
• Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko?
• Tángá mwa bandakisa ya bato oyo bazalaki na mpiko.
• Mpo na nini tozali na mposa ya kosala makambo na mpiko?
[Bililingi na lokasa 9]
Simone Arnold (lelo oyo Liebster) na Allemagne, Widdas Madona na Malawi, Lydia ná Oleksii Kurdas na Ukraine, bazalaki na mpiko mpe balongaki moto mabe
[Bililingi na lokasa 10]
Toyokelaka nsango malamu nsɔni te
[Elilingi na lokasa 11]
Mpiko oyo Paulo amonisaki ntango azalaki na bolɔkɔ epesaki baklisto mosusu molende ya kosakola nsango malamu
[Elilingi na lokasa 12]
Soki tozali na mpiko mpe tozali kolimbolela zuzi makambo oyo Makomami eteyi biso, tozali koyebisa ye nsango moko ya ntina