Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/3 nk. 13-18
  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa malamu ya Yosua ná Kalebe
  • Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema mobimba?
  • Davidi atyelaki Yehova motema
  • Hizikiya azwaki mbano mpo atyelaki Yehova motema
  • Kotyela Yehova motema elimboli nini?
  • Tólanda ndakisa ya Paulo
  • Botya elikya na bino epai na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/3 nk. 13-18

Tyelá Yehova motema na yo mobimba

“Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema.”​—NZEMBO 9:10, NW.

1, 2. Makambo nini bato batyelaka motema mpe bakanisaka ete ekobatela bango?

LELO oyo, lokola tozali komona ebele ya makambo oyo ekoki kobebisa bolamu na biso, elongobani ete tóluka eloko moko to moto moko oyo akobatela biso. Bato mosusu bakanisaka ete kozala na mbongo mingi nde ekobatela bango na mikolo ekoya; kasi soki totali malamu, mbongo ekoki mpenza kobatela moto te. Biblia elobi ete: “Ye oyo akotalela bozwi na ye akokwea.” (Masese 11:28) Bato mosusu batyelaka bakonzi motema, kasi ata bakonzi oyo baleki malamu bamikosaka. Lisusu, bango nyonso basukaka na kokufa. Yango wana, Biblia elobi likambo moko ya bwanya ete: “Bótyela bato minene motema te, to na mwana na moto oyo asalemi na mabelé, mpo ete bakoki kobikisa te.” (Nzembo 146:3, NW) Maloba wana oyo epemami ezali mpe koyebisa biso ete tótya motema na milende na biso moko te. Biso mpe tozali kaka ‘bana ya bato oyo basalemi na mabelé.’

2 Mosakoli Yisaya alobaki ete bakonzi ya ekólo Yisalaele na ntango na ye bazalaki kosala mabe mpamba te bazalaki kotya motema na bango na “esika ya komibomba ya lokuta.” (Yisaya 28:15-17, NW) Basalaki boyokani na bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango mpo ebatela bango. Ebongaki te bátyela boyokani wana motema, ezalaki lokuta. Lelo oyo mpe ndenge moko, ebele ya bakonzi ya mangomba bazali koyokana na bakonzi ya politiki. Mokolo mosusu boyokani yango ekomonana ete ezali ‘lokuta.’ (Emoniseli 17:16, 17) Boyokani yango ekobatela bango mpenza te.

Ndakisa malamu ya Yosua ná Kalebe

3, 4. Ndenge nini lapolo ya Yosua ná Kalebe ekeseneki na oyo ya banɔngi mosusu zomi?

3 Kasi, nani asengeli kobatela biso? Moto oyo Yosua ná Kalebe batyelaki motema na ntango ya Moize. Nsima ya kobima na boombo na Ezipito, liboso bákɔta na Kanana, Mokili ya Ndaka, Bayisalaele batindaki mibali zomi na mibale bákende konɔnga mokili yango; nsima ya mikolo 40, bazongaki mpo na koyebisa makambo bamonaki. Na kati na bango, kaka bato mibale, Yosua ná Kalebe, nde balobaki ete Bayisalaele bakobɔtɔla mokili yango. Baoyo mosusu balobaki mpe ete mokili yango ezali malamu, kasi babakisaki boye: “Bato bafandi kuna bazali makasi, mpe mboka na bango ezingami makasi mpe ezali minene mingi . . . Biso tokoki kobunda na bato yango te mpo ete baleki biso na makasi.”​—Mituya 13:27, 28, 31.

4 Bayisalaele bayokelaki banɔngi zomi mpe babandaki kobanga; kutu baimaimelaki Moize. Na nsuka, Yosua ná Kalebe, balobaki na kondima nyonso ete: “Mokili elekaki biso na kati na yango mpo na konɔnga ezali mokili malamu mingi. Soki [Yehova] asepeli [na] biso, mbɛlɛ akokɔtisa biso na mokili yango mpe akopesa yango na biso. Yango mokili eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi. Nde bótomboka epai na [Yehova] te, mpe bóbanga bato na mokili yango te.” (Mituya 14:6-9) Kasi, Bayisalaele baboyaki koyoka, yango wana Yehova akɔtisaki bango na Mokili ya Ndaka te na ntango wana.

5. Mpo na nini Yosua ná Kalebe bapesaki lapolo ya malamu mpo na mokili oyo banɔngaki?

5 Mpo na nini Yosua ná Kalebe bapesaki lapolo ya malamu, nzokande banɔngi mosusu zomi bapesaki lapolo ya mabe? Bango nyonso 12 bamonaki bingumba oyo ezingamaki na bifelo ya milai mpe bamonaki bato oyo bafandaki na mokili yango. Lisusu, bato wana zomi balobaki solo ete Bayisalaele bakokoka te kobɔtɔla mboka yango. Yosua ná Kalebe bayebaki mpe likambo yango. Kasi, banɔngi zomi batalelaki makambo na miso ya bomoto. Nzokande, Yosua ná Kalebe, bango batyelaki Yehova motema. Bamonaki makambo ya kokamwa oyo asalaki na Ezipito, na Mbu Motane, mpe na Ngomba Sinai. Kutu, bambula mingi na nsima, Lahaba, mwasi moko oyo azalaki kofanda na Yeliko, oyo ayokaki makambo wana kaka na nsango, andimaki kotya bomoi na ye na likama mpo na kosalisa libota ya Yehova! (Yosua 2:1-24; 6:22-25) Yosua ná Kalebe, bato oyo bamonaki na miso makambo ya kokamwa oyo Yehova asalaki, bazalaki na elikya makasi ete Nzambe akobundela lisusu bato na ye. Nsima ya mbula ntuku minei, bazwaki mbano na ndenge batyelaki Yehova motema; na ntango wana, Bayisalaele mingi oyo bakolaki na bango basilaki kokufa mpe oyo bazalaki bana mike bakolaki. Yosua atambwisaki bango, bakɔtaki na mokili ya Kanana mpe bazwaki yango.

Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema mobimba?

6. Mpo na nini lelo oyo baklisto bazali kotungisama, mpe basengeli kotyela nani motema?

6 Na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali na yango, tozali lokola Bayisalaele; tozali kobunda na banguna oyo baleki biso na makasi. (2 Timote 3:1) Bazali kotya biso mpanzi likoló mpo tótika bizaleli na biso ya malamu, bazali koluka kolɛmbisa biso na elimo, mpe ntango mosusu, bazali ata konyokola biso. Na makasi na biso moko tokoki kolonga makambo wana te, mpamba te ezali kouta na Satana Zabolo, moto oyo aleki biso bato na makasi. (Baefese 6:12; 1 Yoane 5:19) Na yango, epai wapi tokoki kozwa lisalisi? Moto moko ya sembo na ntango ya kala abondelaki Yehova boye: “Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema.” (Nzembo 9:10, NW) Soki toyebi mpenza Yehova mpe tozali koyeba ndimbola ya nkombo na ye, tokotyela ye motema se ndenge oyo Yosua ná Kalebe batyelaki ye motema.​—Yoane 17:3.

7, 8. (a) Ndenge nini biloko oyo Nzambe akelá ezali kopesa biso bantina ya kotyela Yehova motema? (b) Biblia ezali kopesa biso bantina nini ya kotyela Yehova motema?

7 Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema? Soki Yosua ná Kalebe batyelaki Yehova motema ezali mpe mpo bamonaki makambo oyo asalaki na nguya na ye. Biso mpe tomoni makambo ya ndenge wana. Na ndakisa, tótala biloko oyo Yehova akelá, bakisa mpe molɔ́ngɔ́ oyo ezali na bamiliare ya bagalaksi. Biloko mineneminene oyo Yehova azali kotambwisa ezali komonisa solo ete azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ntango tozali kokanisa biloko ya kokamwa oyo akelá, tosengeli koloba lokola Yobo ete: ‘Nani akopekisa ye? Nani akoloba na ye ete, Ozali kosala nini?’ (Yobo 9:12) Ya solo, soki Yehova azali na biso, tosengeli kobanga moto moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba.​—Baloma 8:31.

8 Tótalela mpe Biblia, Liloba ya Yehova. Mokanda yango oyo ezali na bwanya ya Nzambe oyo ezangi nsuka, ezali na nguya mingi mpo na kosalisa biso tólonga misala ya mabe mpe tósala mokano ya Yehova na bomoi na biso. (Baebele 4:12) Biblia nde elakisi biso nkombo ya Yehova mpe ndimbola na yango. (Exode 3:14) Toyebi ete Yehova akoki kokóma Tata ya bolingo, Zuzi ya sembo, Mobundi oyo bakoki kolonga ye te, to ndenge mosusu nyonso oyo alingi, mpo na kokokisa mikano na ye. Tozali mpe komona ndenge oyo liloba na ye ezangaka te kokokisama. Ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe, yango ezali kotinda biso tóloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Natyeli liloba na yo motema.”​—Nzembo 119:42, NW; Yisaya 40:8.

9. Ndenge nini lisiko mpe lisekwa ya Yesu ezali kotinda biso na kotyela Yehova motema lisusu koleka?

9 Lisiko ezali kopesa biso ntina mosusu oyo tosengeli kotyela Yehova motema. (Matai 20:28) Nzambe asalaki likambo monene mpenza na ndenge atindaki Mwana na ye aya kokufa mpo na kobikisa biso! Lisusu, lisiko yango ezali mpenza na nguya. Ezali kolongola masumu ya bato nyonso oyo bazali kobongola motema mpe bazali koya epai ya Yehova na motema ya sembo. (Yoane 3:16; Baebele 6:10; 1 Yoane 4:16, 19) Esengelaki mpe ete Yesu asekwa mpo na kopesa lisiko. Likamwisi yango, oyo ebele ya bato bamonaki, ezali ntina mosusu ya kotyela Yehova motema. Ezali kondimisa biso ete makambo oyo tozali kolikya ekokokisama mpenza.​—Misala 17:31; Baloma 5:5; 1 Bakolinti 15:3-8.

10. Wapi bantina ya biso moko oyo ezali kotinda biso na kotyela Yehova motema?

10 Makambo oyo totángi ezali kaka mwa ndambo ya bantina oyo tokoki mpe tosengeli kotyela Yehova motema mobimba. Ezali mpe na ebele ya bantina mosusu, oyo kati na yango mosusu mpe etali biso moko. Na ndakisa, mbala na mbala biso nyonso tokutanaka na mikakatano na bomoi na biso. Ntango tosɛngi Yehova apesa biso mayele ya kolonga yango, tomonaka ndenge oyo asalisaka biso mpenza. (Yakobo 1:5-8) Soki tozali kotyela Yehova motema na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe tozali komona matomba na yango, yango ekotinda biso tótyela ye motema lisusu koleka.

Davidi atyelaki Yehova motema

11. Davidi atyelaki Yehova motema atako akutanaki na makambo nini?

11 Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, azali moko ya bato oyo batyelaki Yehova motema. Mokonzi Saulo azalaki koluka koboma Davidi. Lisusu Filistia, mboka oyo ezalaki na basoda ya makasi ezalaki koluka koyangela Yisalaele. Atako bongo, Saulo abomaki Davidi te mpe Davidi alongaki Bafilistia. Mpo na nini? Davidi ye moko alobaki boye: “[Yehova] azali pole na ngai mpe kobika na ngai, nakobanga nani? [Yehova] azali ekimelo na bomoi na ngai, nakolɛnga mpo na nani?” (Nzembo 27:1) Biso mpe tokolonga soki totyeli Yehova motema ndenge wana.

12, 13. Ndenge nini Davidi amonisaki ete tosengeli kotyela Yehova motema ata ntango banguna bazali kosalela lolemo na bango lokola bibundeli mpo na kosala biso mabe?

12 Mokolo mosusu, Davidi abondelaki ete: “Ee Nzambe, yoká mongongo na ngai na kati na kobanga na ngai. Liboso ya makasi mingi ya monguna, batelá bomoi na ngai. Bombá ngai liboso ya makambo oyo bato mabe bazali koyokana na kati ya kobombana, liboso ya makɛlɛlɛ ya baoyo basalaka makambo mabe, baoyo bapelisi lolemo na bango lokola mopanga, baoyo babongisi mbanzi na bango, maloba na bango ya bololo, mpo na kobamba yango longwa na bisika ya kobombana epai ya moto ya sembo.” (Nzembo 64:1-4, NW) Toyebi mpenza te nini epesaki Davidi makanisi ya kokoma maloba yango. Kasi, toyebi ete lelo oyo banguna bazali mpe ‘kopelisa lolemo na bango,’ elingi koloba bazali kosalela maloba lokola ebundeli. Bazali ‘kobamba’ baklisto ya sembo mbanzi, elingi koloba ete bazali koloba to mpe kobimisa mikanda mpo na kokosela bango makambo. Soki totyeli Yehova motema mobimba, likambo nini ekosalema?

13 Davidi alobaki lisusu boye: “Nzambe akobamba bango mbanzi na mbalakaka. Bazoki mpota, mpe bazali kobɛtisa bino libaku. Kasi lolemo na bango ekotɛmɛla bango moko . . . Moyengebene akosepela na Yehova mpe akomibomba epai na ye.” (Nzembo 64:7-10, NW) Ya solo, atako banguna bazali kopelisa lolemo na bango mpo na kosala biso mabe, na nsuka ezali komonana ete ‘lolemo na bango ezali kotɛmɛla bango moko.’ Nsukansuka, Yehova abongisaka makambo mpo ete baoyo batyeli ye motema básepela na ye.

Hizikiya azwaki mbano mpo atyelaki Yehova motema

14. (a) Hizikiya atyelaki Yehova motema ntango akutanaki na mokakatano nini? (b) Ndenge nini Hizikiya amonisaki ete andimaki maloba ya lokuta ya Moasulia te?

14 Moto mosusu oyo atyelaki Yehova motema mpe azwaki mbano mpo na yango ezali Mokonzi Hizikiya. Ntango Hizikiya azalaki mokonzi, basoda ya Asulia oyo bazalaki bilombe balukaki kobundisa Yelusaleme. Basoda wana balongaki ebele ya bikólo mosusu. Kutu, basoda wana babɔtɔlaki bingumba ya Yuda, etikalaki kaka Yelusaleme, mpe Senakeliba abɛtaki ntolo ete akobɔtɔla mpe engumba yango. Laba-sake, moto oyo Senakeliba atindaki, alobaki solo ete Hizikiya akosala eloko te soki atyeli Ezipito motema ete ekosunga ye. Kasi, abakisaki ete: “Nzambe na yo oyo ozali kotyela motema akosa yo te na maloba oyo: ‘Yelusaleme ekopesama na mabɔkɔ ya mokonzi ya Asulia te.’” (Yisaya 37:10, NW) Kasi, Hizikiya ayebaki ete Yehova akoki kokosa ye te. Yango wana abondelaki boye: “Ee [Yehova], Nzambe na biso, nabondeli yo ete obikisa biso na lobɔkɔ na ye ete makonzi nyonso na mokili báyeba ete yo ozali [Yehova], bobele yo moko.” (Yisaya 37:20) Yehova ayokaki libondeli ya Hizikiya. Na butu moko mpamba, anzelu moko abomaki basoda 185 000 ya Asulia. Babɔtɔlaki Yelusaleme te, mpe Senakeliba alongwaki na Yuda. Bato nyonso oyo bayokaki nsango ya likambo yango bamonaki ete Yehova azali Nzambe monene.

15. Likambo nini ekosalisa biso tómibongisa mpo na kolonga mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango na mokili oyo?

15 Lelo oyo, biso mpe tozali na etumba lokola Hizikiya. Etumba na biso ezali ya elimo. Kasi, lokola tozali basoda oyo bazali kobunda etumba ya elimo, tosengeli koyekola mayele ya kobunda malamu mpo tókufa na elimo te. Tosengeli koyeba liboso mayele nini monguna akosalela mpo na kobundisa biso mpe komibongisa mpo alonga biso te. (Baefese 6:11, 12, 17) Na mokili ya lelo, makambo ekoki kobongwana nokinoki. Mobulu ekoki kobima na mboka na ntango oyo tozali kokanisa te. Bikólo oyo, banda kala, etikelaka bato bonsomi na makambo ya losambo ekoki kolongola bonsomi yango. Soki tolandi ndakisa ya Hizikiya, elingi koloba tomibongisi mpo na kotyela Yehova motema mobimba, nde tokolonga likambo nyonso oyo ekoki kobima.

Kotyela Yehova motema elimboli nini?

16, 17. Ndenge nini tomonisaka ete totyelaka Yehova motema?

16 Kotyela Yehova motema ezali kaka maloba ya mpamba te. Likambo yango ezalaka naino na motema na biso mpe na nsima emonanaka na misala. Soki totyeli Yehova motema, tokotyela mpe Biblia, Liloba na ye, motema mobimba. Tokotánga yango mokolo na mokolo, tokomanyola likoló na yango, mpe tokotika yango etambwisa bomoi na biso. (Nzembo 119:105) Kotyela Yehova motema esɛngaka mpe kotyela nguya ya elimo santu na ye motema. Na lisalisi ya elimo santu, tokoki kolona mbuma oyo esepelisaka Yehova, mpe tokoki kolonga mimeseno mabe oyo ezali ntango mosusu mpasi mpo tótika yango. (1 Bakolinti 6:11; Bagalatia 5:22-24) Yango wana, elimo santu esalisi bato mingi bátika komɛla likaya to bangi. Bamosusu batiki pite mpe ekobo. Ya solo, soki totyeli Yehova motema, tokosala makambo na makasi na biso moko te, kasi na makasi na ye.​—Baefese 3:14-18.

17 Lisusu, kotyela Yehova motema elimboli mpe kotya motema na bato oyo ye aponi. Na ndakisa, Yehova atii “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kobatela matomba ya Bokonzi awa na mabele. (Matai 24:45-47) Tolukaka te kosala makambo na ndenge oyo biso moko tolingi, mpe tondimaka moombo ya sembo mpamba te totyelaka bibongiseli ya Yehova motema. Lisusu, na masangá, tozali na bankulutu oyo ntoma Paulo alobaki ete elimo santu nde eponi bango. (Misala 20:28) Ntango tozali kotosa bankulutu na lisangá, tomonisaka mpe ete tozali kotyela Yehova motema.​—Baebele 13:17.

Tólanda ndakisa ya Paulo

18. Ndenge nini baklisto balandaka ndakisa ya Paulo lelo oyo, kasi likambo nini batyelaka yango motema te?

18 Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mingi na mosala na ye, ndenge moko mpe biso tozali kokutana na mikakatano mingi. Na ntango ye azalaki na bomoi, bato mosusu bazalaki koyebisa bakonzi makambo ya lokuta mpo na lingomba ya boklisto, mpe ntango mosusu Paulo azalaki kosala makasi mpo na komonisa bosolo ya makambo to kondimisa mosala ya kosakola nsango malamu na mibeko. (Misala 28:19-22; Bafilipi 1:7) Lelo oyo, baklisto balandaka mpe ndakisa na ye. Na esika nyonso oyo tokoki kosala yango, tozali kosala nyonso mpo na kosalisa bato báyeba mosala na biso. Tozali mpe kosala makasi mpo na kondimisa nsango malamu na mibeko. Nzokande, totyaka motema na biso nyonso na milende wana te, mpamba te tokanisaka te ete kolonga to kolonga te etaleli bikateli ya batribinale to malamu oyo bato bakoki koloba mpo na biso. Totyelaka nde Yehova motema. Tobosanaka te maloba ya kolendisa oyo Yehova ayebisaki Yisalaele ya kala ete: “Bokozala na makasi soki bofandi kimya mpe botii motema [epai na ngai].”​—Yisaya 30:15, NW.

19. Lokola batyelaki Yehova motema, ndenge nini bandeko na biso bazwaki mbano ntango bazalaki konyokola bango?

19 Na mikolo na biso, na mikili mosusu ya Mpoto, ya Azia mpe ya Afrika, mpe na mikili mosusu ya Amerika ya Sudi mpe ya Nɔrdi bapekisaki mosala na biso to batyelaki yango ebele ya mibeko mpo na kozongisa yango nsima. Yango elingi nde koloba ete totyaki motema epai oyo ebongi te? Te. Atako ntango mosusu Yehova atikaki minyoko makasi mpo na kokokisa mokano na ye, kasi na bolingo mpenza, alendisaki baoyo bazalaki kozwa minyoko yango. Baklisto mingi bamonisaki na kati ya minyoko yango ete bazalaki na kondima makasi epai ya Nzambe mpe bazalaki kotyela ye motema.

20. Atako Leta akoki kondima biso mpe kotikela biso bonsomi ya kosala misala na biso, makambo nini tokondima kosala te?

20 Nzokande, na mikili mingi, bakonzi ya Leta bazali kondima tósala mosala na biso, mpe na ntango mosusu bazulunalo, radio, mpe televizyo elobaka malamu mpo na biso. Tozalaka na botɔndi mpo na yango mpe toyebaka ete yango mpe ezali kokokisa mokano ya Yehova. Na lisalisi na ye, tozali kosalela bonsomi oyo tozali na yango, mpo na koluka matomba na biso te, kasi mpo na kosalela Yehova na miso ya bato nyonso mpe na makasi na biso nyonso. Nzokande, tokoluka te tókɔta na makambo ya mokili, tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, to mpe tózonga nsima na makambo mosusu nyonso oyo tozali kosalela Yehova mpo kaka bakonzi básepela na biso. Tozali bato ya Bokonzi ya Masiya mpe toponi kolongisa kaka bokonzi ya Yehova. Tozali kotya elikya na biso na ebongiseli ya makambo oyo te, kasi na mokili ya sika oyo kati na yango, Bokonzi ya Masiya na likoló ekozala guvɛrnema kaka moko oyo ekoyangela. Ezala babɔmbi, bamisile, to mpe bibundeli ya nikleere, eloko moko te ekoki koningisa guvɛrnema wana ya likoló to kokweisa yango. Bakoki kolonga yango te mpe ekokokisa mokano ya Yehova.​—Danyele 2:44; Baebele 12:28; Emoniseli 6:2.

21. Tozali na ekateli ya kosala likambo nini?

21 Paulo alobaki boye: “Biso tozali te motindo ya bato oyo bazongaka nsima mpo na libebi, kasi nde motindo ya bato oyo bazali na kondima mpo na kobatelama ya molimo na bomoi.” (Baebele 10:39) Yango wana, tiká ete biso nyonso tósalela Yehova na bosembo tii na nsuka. Tozali na bantina mingi ya kotyela Yehova motema mobimba banda sikoyo mpe mpo na libela.​—Nzembo 37:3; 125:1.

Makambo nini oyekoli?

• Mpo na nini Yosua ná Kalebe bapesaki lapolo ya malamu?

• Yebisá mwa bantina oyo tosengeli kotyela Yehova motema mobimba.

• Kotyela Yehova motema elimboli nini?

• Lokola tozali kotyela Yehova motema, tozali na ekateli ya kosala nini?

[Elilingi na lokasa 15]

Mpo na nini Yosua ná Kalebe bapesaki lapolo ya malamu?

[Bililingi na lokasa 16]

Biloko oyo Yehova akelá ezali komonisa biso ntina mpenza ya kotyela ye motema

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bililingi nyonso misato: Na ndingisa ya Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ ya David Malin

[Elilingi na lokasa 18]

Kotyela Yehova motema esɛngaka mpe kotyela bato oyo ye aponi motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto