Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/3 nk. 23-29
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi na biso ebongwani
  • Bango mpe baponi kosala mosala ya ntango nyonso
  • Na mosala ya misionɛrɛ
  • Tokobaki kosala ata na ntango bapekisaki mosala na biso
  • Tomoni esengo ya mosala ya mokɛngɛli-motamboli
  • Mbongwana ekɔtaki na bomoi na biso
  • Tozali kaka koluka liboso Bokonzi
  • Natiká ata moke te koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana ezalaki ngai na mibu motoba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/3 nk. 23-29

Lisolo ya bomoi

Koluka Liboso Bokonzi​—bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo

YA JETHA SUNAL

Nsima ya komɛla tii, toyokaki balobi na radio ete: “Leta ayebi Lingomba ya Batatoli ya Yehova te, mpe mosala na bango epekisami.”

EZALAKI na 1950, mpe tozalaki bana basi minei oyo tozalaki na mbula koleka 20; tozalaki bamisionɛrɛ Batatoli ya Yehova na République dominicaine. Tokómaki kuna mbula moko liboso.

Liboso, nazalaki kokana kosala mosala ya misionɛrɛ te na bomoi na ngai. Ya solo, nazalaki kokende ndako-nzambe ntango nazalaki mwana moke. Kasi, tata na ngai atikaki kokende ndako-nzambe na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mokolo oyo nakulaki nkɔtisa na Église épiscopalienne na 1933, episkɔpɔ atángaki kaka vɛrsɛ moko na Biblia, na nsima akómaki koloba makambo ya politiki. Mama ayokaki mabe mpenza mpe akataki makolo na ye libela na ndako-nzambe.

Bomoi na biso ebongwani

Baboti na ngai, William Karl ná Mary Adams, babotaki bana mitano. Bana ya mibali Don, Joel, ná Karl. Joy, azalaki leki na biso ya nsuka ya mwasi mpe ngai mwana ya liboso. Mokolo moko​—nakanisi nazalaki na mbula 13 na ntango wana​—nautaki kelasi mpe nakutaki mama azali kotánga mwa buku moko ya Batatoli ya Yehova. Motó ya likambo na yango ezalaki Bokonzi, elikya ya mokili (na Lingelesi). Mama alobaki na ngai ete: “Solo yango oyo.”

Mama azalaki koyebisa biso makambo oyo azalaki koyekola na Biblia. Azalaki koloba mpe kopesa ndakisa mpo na komonisa biso polele ntina ya toli ya Yesu ete: ‘Bóluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.’​—Matai 6:33.

Ntango mosusu nazalaki kosepela koyoka makambo yango te. Mokolo moko nalobaki na ye ete: “Mama, tiká koteya ngai, soki te nakotika kopangusela yo basaani.” Kasi, alandaki kosolola na biso na mayele mpenza. Mbala na mbala azalaki komema biso bana nyonso na makita oyo ezalaki kosalema na ndako ya Clara Ryan, oyo azalaki kofanda mwa moke penepene na ndako na biso na engumba Elmhurst, na etúká ya Illinois, na États-Unis.

Clara azalaki mpe koyekolisa bato kobɛta piano. Na nsuka ya mbula, bayekoli na ye babɛtaki miziki liboso ya bato, mpe ye alobelaki Bokonzi ya Nzambe mpe elikya ya lisekwa liboso ya bato wana. Lokola nazalaki kosepela na miziki mingi, mpo nayekolaki kobɛta violon ntango nazalaki naino na mbula nsambo, nalandaki lisolo ya Clara.

Mosika te, biso bana nyonso tobandaki koyangana na makita elongo na mama na wɛsti ya engumba Chicago. Tozalaki kosala mobembo moko molai na bisi, kasi na ndenge wana nde toyekolaki koluka liboso Bokonzi banda bomwana na biso. Na 1938, mbula misato nsima ya batisimo ya mama, nakendaki na ye na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova na Chicago. Chicago ezalaki moko ya bingumba 50 oyo bato bakokaki kolanda liyangani na radio. Makambo oyo nayokaki kuna esimbaki motema na ngai.

Kasi, nakómaki kolinga miziki lisusu mingi. Nasilisaki kelasi ya ntei na 1938, mpe tata atindaki ngai nakende kotánga na eteyelo ya miziki (American Conservatory of Music) na Chicago. Na yango, nayekolaki miziki na boumeli ya mbula mibale oyo elandaki, mpe nabɛtaki miziki na masangá mibale ya baalangá-nzembo, mpe nazalaki kokana kosala mosala ya kobɛta miziki na bomoi na ngai.

Molakisi na ngai ya violon, Herbert Butler, autaki na Mpoto mpe ayaki kofanda na États-Unis. Napesaki ye mwa buku Bato bakimá mboka (na Lingelesi),a mpo atánga yango. Atángaki yango, mpe nsima ya liteya na ngai na pɔsɔ oyo elandaki, alobaki ete: “Jetha, ozali kobɛta miziki malamu, mpe soki okobi koyekola, okoki kokɔta na lisangá ya babɛti-miziki ya radio moko to mpe kozwa mosala ya kolakisa kobɛta miziki.” Asimbaki mwa buku oyo napesaki ye mpe abakisaki ete: “Kasi, nakanisi ete motema na yo ezali nde na makambo oyo. Mpo na nini te kosala kaka mosala yango na bomoi na yo?”

Nakanisaki likambo yango malamumalamu. Na esika nalanda kotánga na eteyelo ya miziki, nandimaki kokende na mama na liyangani ya Batatoli ya Yehova na Detroit, na etúká ya Michigan, na sanza ya Yuli 1940. Tofandaki na bandako ya kapɔ na kaa ya bato oyo bayaki mpo na liyangani. Namemaki violon na ngai, mpe nabɛtaki violon na bandeko oyo babɛtaki miziki na liyangani. Na kaa yango, nakutanaki na ebele ya babongisi-nzela (basakoli ya ntango nyonso). Bazalaki mpenza bato ya esengo. Nazwaki ekateli ya kozwa batisimo mpe kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela. Nabondelaki Yehova asalisa ngai natikala na mosala ya ntango nyonso na bomoi na ngai mobimba.

Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na engumba na biso. Nsima, nakendeki kosala na Chicago. Na 1943, nakendeki na etúká ya Kentucky. Na eleko ya molunge ya mbula wana, liboso ete liyangani ya etúká esalema, babengaki ngai na kelasi ya mbala ya mibale ya Eteyelo ya Gileadi mpo na kozwa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ. Kelasi esengelaki kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1943.

Na liyangani wana, nazalaki kofanda na ndako ya Motatoli moko oyo alobaki na ngai nazwa bilamba nyonso oyo nalingaki na bilamba ya mwana na ye ya mwasi. Mwana na ye yango akendeki mosala ya soda, mpe ayebisaki mama na ye akaba biloko na ye nyonso. Mpo na ngai, biloko wana ezalaki nde kokokisama ya elaka ya Yesu ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:33) Sanza mitano na Gileadi elekaki nokinoki, mpe ntango tozwaki diplome mokolo ya 31 Yanuali 1944, nazalaki na mposa makasi ya kobanda mosala ya misionɛrɛ.

Bango mpe baponi kosala mosala ya ntango nyonso

Mama abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1942. Na ntango wana, bandeko na ngai misato ya mibali ná ndeko na ngai ya mwasi bazalaki naino na kelasi. Mbala mingi mama azalaki kokende kozwa bango nsima ya kelasi mpe kobima na bango na mosala ya kosakola. Alakisaki bango mpe kosala misala ya ndako. Mbala mingi ye moko azalaki kolala noki te na butu mpo azalaki kongoma bilamba mpe kosala misala mosusu oyo esengelaki mpo ete na moi azwa ntango ya kobima na mosala ya kosakola.

Na sanza ya Yanuali 1943, ntango nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na etúká ya Kentucky, ndeko na ngai ya mobali Don abandaki mpe mosala ya mobongisi-nzela. Tata asepelaki te, mpamba te mposa na ye ezalaki ete bana na ye nyonso bálanda lokolo na ye ná mama, elingi koloba bátánga bakelasi ya mineneminene. Ntango Don akokisaki pene na mbula mibale na mosala ya mobongisi-nzela, babengaki ye akende kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na engumba New York.

Joel abandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Yuni 1943 ntango azalaki naino kofanda epai ya baboti. Na ntango wana, amekaki kobenga tata bákende na liyangani moko, kasi tata aboyaki. Kasi, Joel amekaki koluka moto mpo na koyekola na ye Biblia na mboka wana, kasi azwaki moto te, na nsima tata andimaki abanda koyekola na ye na buku “Solo ekopesa bino bonsomi.” (na Lingelesi) Azalaki kopesa biyano malamu na mituna nyonso, kasi azalaki koloba na Joel alakisa ye soki makambo oyo ekomamaki na buku yango ezali na Biblia. Yango esalisaki Joel afandisa mpenza solo ya Biblia na motema na ye.

Joel azalaki na elikya ete, ndenge bato oyo batalaka soki nani akoki kosala mosala ya soda te bandimaki ete Don asala mosala yango te mpo azali ministre ya makambo ya Nzambe, bakondima mpe ete ye asala yango te. Kasi, ntango bamonaki ete Joel azali naino mwana moke, baboyaki kotya ye na molɔngɔ ya baministre ya makambo ya Nzambe mpe batindelaki ye mokanda mpo na kosɛnga ye akɔta na mosala ya soda. Ntango aboyaki, bakonzi batindaki ete bákanga ye. Ntango bapolisi ya FBI bakangaki ye, alalaki mikolo misato na bolɔkɔ ya Cook County.

Tata asimbisaki mikanda ya lopango na biso mpo bábimisa Joel na bolɔkɔ. Na nsima, Tata asalaki mpe ndenge yango mpo na bilenge Batatoli mosusu oyo bakutanaki na mokakatano wana. Lokola bazalaki kotalela likambo yango na bosembo te, epesaki tata nkanda, mpe akendaki na Joel na etúká ya Washington mpo na kosɛnga ete bátala likambo yango na tribinale mosusu. Nsukansuka, bandimaki ete Joel azali ministre ya makambo ya Nzambe, mpe likambo esilaki. Tata akomelaki ngai mokanda epai nazalaki kosala mosala ya misionɛrɛ mpe alobaki ete: “Ngai namoni ete Yehova nde abongi kozwa lokumu ndenge tolongi likambo oyo!” Na nsuka ya sanza ya Augusto 1946, babengaki mpe Joel mpo na kosala na biro monene na Brooklyn.

Liboso ete Karl asilisa kelasi ya ntei na 1947 mpe abanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala na ntango ya konje. Tata azalaki lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te, mpe na bongo, Karl apesaki ye mabɔkɔ mwa moke na misala na ye, liboso akende kobanda mosala ya mobongisi-nzela epai mosusu. Na nsuka ya 1947, Karl akómaki mpe kosala elongo na Don mpe Joel na biro monene ya Brooklyn.

Ntango Joy asilisaki eteyelo ya ntei, abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Mpe na 1951, ye mpe akendaki kosala na Betele epai bandeko na ye ya mibali bazalaki. Azalaki kosala mosala ya kotya bopɛto na bandako mpe na Departema ya abonema. Na 1955, abalaki Roger Morgan, oyo azalaki mpe kosala na Betele. Nsima ya mbula nsambo, lokola bazalaki na mposa ya kobota, babimaki na Betele. Bazali na bana mibale oyo bazali mpe kosalela Yehova.

Ntango bana nyonso bazalaki na mosala ya ntango nyonso, mama alendisaki mpenza Tata, ye mpe amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo na 1952. Na boumeli ya mbula 15, tata azalaki kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola nsango ya Bokonzi, atako maladi ezalaki kopekisa ye kosala mingi, tii na ntango akufaki.

Nsima ya kotika mosala ya mobongisi-nzela mwa moke mpo na maladi ya tata, mama azongelaki mosala yango tii liwa na ye. Mama azalaki na motuka te; azalaki mpe na velo te. Azalaki mokuse, kasi azalaki kokende bipai nyonso na makolo, mbala mingi na bamboka ya mosika mpenza mpo na koyekola na bato Biblia.

Na mosala ya misionɛrɛ

Nsima ya kozwa diplome na eteyelo ya Gileadi, bamosusu na kati na biso tosalaki mosala ya mobongisi-nzela na nɔrdi ya engumba ya New York mbula moko tii ntango tozwaki mikanda oyo epesaki biso nzela ya kokende mboka mopaya. Nsukansuka, na 1945 tokendaki epai batindaki biso, na Cuba, epai tomesanaki mokemoke na bomoi ya lolenge mosusu. Bato bazalaki koyamba biso malamu mpe mosika te biso nyonso tokómaki koyekola Biblia na ebele ya bato. Tosalaki kuna bambula mingi. Na nsima, batindaki biso na République dominicaine. Mokolo moko nakutanaki na mwasi moko oyo abondelaki ngai mpenza ete nakende kotala kiliya na ye Suzanne Enfroy, mwasi moko ya France oyo azalaki koluka moto oyo akoki kosalisa ye ayeba Biblia.

Suzanne azalaki Moyuda, mpe ntango basoda ya Hitler bakɔtaki na France, mobali na ye akimisaki ye ná bana na bango mibale nokinoki na ekólo mosusu. Mwa moke na nsima ya kobanda koyekola, Suzanne akómaki koyebisa bato mosusu makambo oyo azalaki koyekola. Abandaki epai ya mwasi oyo atindaki ngai epai na ye, na nsima ayebisaki Blanche, moninga na ye moko ya France. Bango nyonso bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo.

Suzanne atunaki ngai ete: “Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai?” Mwana na ye ya mobali azalaki kotánga kelasi ya monganga mpe oyo ya mwasi azalaki koyekola mabina, mpo akóma kobina na Radio City Music Hall, na New York. Suzanne asalelaki bana na ye abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! Nsukansuka, mwana ya Suzanne ya mobali, mwasi na ye, mpe lipasa ya mwasi na ye, bango nyonso bakómaki Batatoli. Mobali ya Suzanne, Louis, azalaki kobanga mingi ndenge mwasi na ye azalaki kosepela na Batatoli ya Yehova, mpamba te na ntango wana guvɛrnema ya République dominicaine epekisaki mosala na biso. Kasi, ntango libota mobimba ekendaki na États-Unis, ye mpe akómaki Motatoli.

Tokobaki kosala ata na ntango bapekisaki mosala na biso

Atako bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine na 1949 kaka mwa moke nsima ya kokóma na biso kuna, tozwaki ekateli ya kotosa Nzambe lokola azali Moyangeli na esika ya kotosa bato. (Misala 5:29) Tokobaki koyebisa bato nsango malamu ndenge Yesu alobaki na bayekoli na ye básalaka, mpe na bongo koluka liboso Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Kasi, ntango tozalaki kosala mosala na biso ya kosakola, toyekolaki kozala ‘ekɛngɛ lokola banyoka nzokande lokola bibenga kozala na ngambo te.’ (Matai 10:16) Na ndakisa, violon na ngai ezalaki kosalisa biso mingi. Nazalaki komema yango ntango nazalaki kokende koyekola na bato Biblia. Bayekoli na ngai ya Biblia bakómaki babɛti ya violon te, kasi mabota mingi ekómaki kosalela Yehova!

Ntango bapekisaki mosala na biso, biso minei​—ngai, Mary Aniol, Sophia Soviak, mpe Edith Morgan​—tolongwaki na ndako ya bamisionɛrɛ na San Francisco de Macorís mpe tokendaki kofanda na ndako mosusu ya bamisionɛrɛ na Betele ya Saint-Domingue, mboka-mokonzi. Kasi, sanza na sanza, nazalaki kokende esika tozalaki liboso mpo na koteya bato miziki. Yango epesaki ngai nzela namemelaka bandeko na biso baklisto bilei ya elimo na kati ya ndako ya violon na ngai mpe nazongaka na balapolo na bango ya mosala ya kosakola.

Ntango bakangaki bandeko ya San Francisco de Macorís na Santiago mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki, basɛngaki ngai nakende kotikela bango mbongo ná Babiblia, soki bakopesa ndingisa ekɔta, mpe namemela mabota na bango bansango na bango. Na bolɔkɔ ya Santiago, ntango bakɛngɛli ya bolɔkɔ bamonaki ngai ná violon na ngai na mabɔkɔ, batunaki ngai boye, “Okosala nini na yango?” Nayanolaki ete: “Ezali mpo na kosepelisa bango.”

Moko ya nzembo oyo nabɛtelaki bango ezalaki oyo Motatoli moko akomaki ntango azalaki na kaa ya bakangami ya Banazi. Ezali lelo oyo loyembo nimero 29 na buku ya nzembo ya Batatoli ya Yehova. Nabɛtaki yango mpo bandeko oyo bazalaki na bolɔkɔ báyekola koyemba yango.

Nayokaki ete batindaki Batatoli mingi na ferme ya Trujillo, oyo azalaki mokonzi ya guvɛrnema. Bayebisaki ngai ete ezalaki mosika te na nzela oyo bisi elekaka. Nakitaki na bisi na midi mpe natunaki bálakisa ngai nzela ya ferme yango. Nkolo ya mwa butiki moko alakisaki ngai na mosapi na nsima ya bangomba mpe alobaki ete soki nasimbisi ye violon na ngai, akopesa ngai mpunda na ye ná mwana mobali moko mpo alakisa ngai nzela.

Ntango tolekaki bangomba yango, tosengelaki kokatisa mai, biso nyonso mibale tofandaki likoló ya mpunda ntango mpunda ezalaki kobɛta mai. Kuna, tomonaki tshaku ebele, oyo nsala na yango ya langi ya mai ya pɔndu mpe bule lokola monama ezalaki kongenga makasi na moi. Ezalaki kitoko mpenza! Nabondelaki ete: “Natɔndi yo Yehova, mpo na ndenge okelá yango kitoko.” Nsukansuka, na ngonga ya minei nsima ya midi, tokómaki na ferme yango. Soda oyo azalaki kokɛngɛla ferme yango atikaki ngai nasolola na bandeko, mpe apesaki ngai ndingisa ya kopesa bango biloko nyonso oyo namemelaki bango, ata mpe Biblia moko ya moke.

Ntango tozalaki kozonga, nazalaki kobondela nzelanzela mpo molili ekɔtaki. Ntango tokómaki na butiki, topɔlaki mpenza na mbula. Lokola bisi ya nsuka ekendaki, nasɛngaki nkolo butiki atɛmisela ngai motuka moko ya monene oyo ezalaki koleka. Namitunaki soki ekozala mpenza malamu nakende ngai moko na mibali mibale oyo bazalaki na motuka yango. Moko na bango atunaki ngai ete: “Oyebi Sophie? Sophie ayekolaki na leki na ngai ya mwasi.” Namonaki mpenza ete Yehova ayokaki libondeli na ngai! Bakómisaki ngai malamu na Saint-Domingue.

Na 1953, nazalaki na kati ya bato oyo bautaki na République dominicaine mpo na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaki bato bauti mikili ndenge na ndenge na Yankee Stadium na New York. Libota na biso mobimba, bakisa mpe tata, tozalaki wana. Nsima ya kopesa lapolo na ndenge oyo mosala ya kosakola ezalaki kokende liboso na République dominicaine, ngai ná Mary Aniol, moninga na ngai misionɛrɛ, tosalaki elakiseli mpo na komonisa ndenge tozalaki kosakola na ntango bapekisaki mosala na biso.

Tomoni esengo ya mosala ya mokɛngɛli-motamboli

Na eleko ya molunge ya mbula wana nakutanaki na Rudolph Sunal, ye akómaki mobali na ngai na mbula oyo elandaki. Libota na ye bakómaki Batatoli na Allegheny, na Pennsylvanie, mwa moke nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Nsima ya kolekisa mwa ntango na bolɔkɔ na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpo azalaki moklisto mpe aboyaki kokɔta na makambo ya politiki, abandaki kosala na Betele ya Brooklyn, na New York. Mwa moke nsima ya kobalana na biso, bapesaki ye mokumba ya mokɛngɛli-motamboli mpo na kotalaka masangá. Mbula 18 oyo elandaki, nazalaki kokende elongo na ye kotalaka masangá.

Na mosala ya zongazonga tozalaki kotambola na etúká ya Pennsylvanie, ya Virginie ya Wɛsti, New Hampshire, mpe ya Massachusetts, mpe na bisika mosusu. Mbala mingi tozalaki kofanda epai ya bandeko na biso baklisto. Tozalaki na esengo mingi mpo toyebaki bango malamumalamu mpe mpo tosalelaki Yehova elongo na bango. Bazalaki ntango nyonso koyamba biso na esengo mpe komonisa biso bolingo ya solosolo. Ntango Joel abalaki Mary Aniol, moninga na ngai ya kala ya mosala ya misionɛrɛ, basalaki mbula misato na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, bazalaki kotala masangá na etúká ya Pennsylvanie mpe ya Michigan. Na nsima, na 1958, babengaki Joel lisusu na Betele, mbala wana elongo na Mary.

Karl asalaki pene na mbula nsambo na Betele mpe nsima batindaki ye na mosala ya zongazonga na boumeli ya mwa basanza mpo na kokolisa lisusu mayele. Na nsima, akómaki molakisi na Eteyelo ya Gileadi. Na 1963 abalaki Bobbie, Karl atikalaki na Betele tii liwa na ye na Ɔkɔtɔbɛ 2002.

Na boumeli ya ebele ya bambula oyo asali na Betele, Don azalaki mbala na mbala kosala mibembo na mikili mosusu lokola mokɛngɛli ya zone mpo na kotala bafiliale mpe bamisionɛrɛ. Akendaki na Azia, na Afrika, na Mpoto, mpe na mikili mosusu ya Amerika. Mbala mingi, Don asalaka mibembo wana elongo na Dolores, mwasi na ye ya sembo.

Mbongwana ekɔtaki na bomoi na biso

Tata abɛlaki ntango molai mpe nsukansuka akufaki, kasi liboso akufa alobaki na ngai ete azalaki na esengo mingi ndenge toponaki kosalela Yehova Nzambe. Alobaki ete tozwaki mapamboli mingi koleka oyo tolingaki kozwa soki tolandaki bakelasi ya mineneminene ndenge ye azalaki kokanisa. Nsima ya kosalisa mama na kokanga biloko mpo akende kofanda penepene na ndeko na ngai ya mwasi Joy, ngai ná mobali na ngai tondimaki mosala ya mobongisi-nzela na etúká ya New England, mpo tózala penepene na mama na ye, oyo azalaki na mposa ya lisalisi na biso. Nsima ya liwa ya mama na ye, mama na ngai afandaki na biso mbula 13. Na nsima, na mokolo ya 18 Yanuali 1987, asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na mbula 93.

Mbala mingi, ntango baninga na ye bazalaki kopesa ye longonya na ndenge alongaki kolona na mitema ya bana na ye bolingo ya Yehova mpe mposa ya kosalela ye, mama azalaki koyanola na komikitisa mpenza ete: “Nazwaki kaka nde libaku malamu ya kolona na ‘mabelé’ malamu.” (Matai 13:23) Ezali mpenza lipamboli kozala na baboti oyo babangaka Nzambe, oyo bapesaki biso ndakisa malamu ya molende mpe komikitisa!

Tozali kaka koluka liboso Bokonzi

Tii lelo tozali kaka kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tozali komeka kosalela toli ya Yesu oyo elobi ete tózala na momeseno ya kokabela basusu. (Luka 6:38; 14:12-14) Yehova mpe afungolelaki biso lobɔkɔ na ye na ndenge akokisaki bamposa na biso nyonso. Bomoi na biso ezalaki mpenza bomoi ya esengo.

Tii sikoyo ngai ná Rudy tolingaka kaka miziki makasi. Ntango bato mosusu oyo balingaka mpe miziki bayaka epai na biso na bampokwa mosusu kolekisa ntango elongo na biso, soki tobɛti miziki elongo na bango, ezalaka ntango ya esengo mpenza. Kasi, miziki ezali mosala na ngai te. Ezali kaka moko ya makambo oyo epesaka ngai esengo na bomoi. Lelo oyo, ngai ná mobali na ngai tozalaka na esengo ya komona mbuma oyo mosala na biso ya mobongisi-nzela eboti, bato oyo tosalisá na koyeba solo na boumeli ya bambula.

Atako tozalaki kobɛla mingi, nakoki koloba ete tozalaki na bomoi ya esengo mpe ya kimya na boumeli ya bambula koleka ntuku motoba oyo tolekisi na mosala ya ntango nyonso. Ntɔngɔ nyonso ntango nalamukaka, natɔndaka Yehova na ndenge ayanolaki na libondeli oyo nasalaki ntango nabandaki mosala ya ntango nyonso eleki lelo ebele ya bambula, mpe namitunaka: ‘Ndenge nini nakoki lisusu koluka liboso Bokonzi lelo?’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi enyatamaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 24]

Libota na biso na 1948 (banda na lobɔkɔ ya mwasi): Joy, Don, mama, Joel, Karl, ngai, ná tata

[Elilingi na lokasa 25]

Mama apesaki ndakisa ya molende na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai, Karl, Don, Joel, Joy, lelo oyo, nsima ya mbula koleka 50

[Elilingi na lokasa 27]

Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai, Mary Aniol, Sophia Soviak, ná Edith Morgan bamisionɛrɛ na République dominicaine

[Elilingi na lokasa 28]

Elongo na Mary (na lobɔkɔ ya mwasi) na Yankee Stadium, na 1953

[Elilingi na lokasa 29]

Elongo na mobali na ngai ntango azalaki mokɛngɛli ya zongazonga

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto