Mokolo oyo tosengeli kokanisaka
MOKOLO yango ememelaki bato elikya ya bolamu ya libela na libela. Ezali na mokolo mosusu te oyo ebongolá elikya ya bato mpo na mikolo ezali koya lokola mokolo wana. Ezalaki mokolo oyo Yesu asukisaki makambo nyonso oyo ayaki kosala awa na mabelé. Na likoló ya nzete ya mpasi, apemaki mbala ya nsuka mpe agangaki ete: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Yesu ayaki kosala nini?
Biblia elobi ete: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Yesu apesaki molimo, to bomoi na ye, mpo na kolongola bato na lisumu mpe na liwa oyo bankɔkɔ na bango batikelaki bango. Ya solo, “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Mbeka ya Yesu ezali na motuya mingi mpenza!
Tosengeli mpe kokanisaka mokolo oyo Yesu akufaki mpo na ntina mosusu. Na mokolo yango, Mwana ya Nzambe ateyaki bantoma na ye makambo ya ntina mingi oyo esengelaki kosalisa bango bátikala sembo. Na ntembe te, maloba na ye ya nsuka esimbaki mitema ya bayekoli yango! Ateyaki bango makambo nini? Litomba nini biso tokoki kozwa na mateya oyo Yesu ateyaki bango? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.