Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/3 nk. 26-30
  • ‘Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela libela’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela libela’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Lisumu oyo ekangisaka moto na motambo’
  • ‘Mbuma oyo etondisaka’
  • ‘Mbɛbu oyo ebikisaka’
  • ‘Mbɛbu oyo ekoumela libela’
  • ‘Maloba oyo ebombi boyebi’
  • ‘Maloba oyo esepelisaka’
  • Nzela oyo epesaka mbano
  • Tambolá na ‘nzela ya sembo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Ye oyo akotosa mpamela azali na mayele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Hema ya basembwi ekofulisama”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Moto ya ekɛngɛ atalelaka matambe na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/3 nk. 26-30

‘Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela libela’

LOKOLA mwa mɔtɔ ya moke ekoki kotumba zamba monene, ndenge moko mpe lolemo ekoki kobebisa bomoi mobimba ya moto. Ekoki kozala pwazɔ, kasi ekoki mpe kozala “nzete ya bomoi.” (Masese 15:4) Ekoki koboma to kobikisa. (Masese 18:21) Lolemo na biso, mwa enama wana ya moke, ezali na makasi ya ndenge wana mpe ekoki kotya matɔnɔ na nzoto mobimba. (Yakobo 3:5-9) Yango wana, ezali mpenza likambo ya bwanya ete tóbatelaka lolemo na biso.

Na Biblia, na eteni ya mibale ya mokapo 12 ya mokanda ya Masese, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesi biso toli ya ntina mingi oyo ezali kosalisa biso tóbatela monɔkɔ na biso. Mokonzi ya bwanya apesaki masese ya mikuse, kasi ezali na ndimbola mozindo mpo na komonisa ete maloba ekoki kobimisa makambo minene mpe lisusu komonisa bizaleli malamu ya moto oyo azali kobimisa yango. Toli ya Salomo oyo epemamaki na Nzambe ezali na ntina mingi mpo na moto nyonso oyo alingi ‘kokɛngɛla ekuke ya bibɛbu na ye.’​—Nzembo 141:3, NW.

‘Lisumu oyo ekangisaka moto na motambo’

Salomo alobaki boye: “Na lisumu ya mbɛbu, moto mabe akangamaka na motambo; kasi moto ya sembo alongwaka na mpasi.” (Masese 12:13, NW) Kokosa ezali lisumu ya mbɛbu oyo ekómaka motambo oyo ekoki komemela moto oyo asalaka yango liwa. (Emoniseli 21:8) Kozanga kolongobana ekoki komonana lokola nzela ya mokuse mpo na kokima etumbu to mpe kokima likambo moko ya mpasi oyo ekoki kokómela biso. Kasi, tomonaka te ete mbala mingi moto oyo abuki lokuta mbala moko akolanda kobuka lokuta mbala na mbala? Lokola moto oyo abandi kobɛta masano ya mbongo moke akómaka na mposa ya kobɛta na mbongo mingi mpo na koluka kozongisa mbongo oyo abungisi, moto oyo abuki lokuta mbala moko akangamaka na motambo ya kokóma moto ya lokuta.

Longola yango, lisumu ya mbɛbu ezali motambo mpo na moto oyo azali kobuka lokuta mpe akosuka na komikosa ye moko. Na ndakisa, moto ya lokuta akoki kokanisa ete ayebi likambo moko malamu mpe azali na mayele mingi, nzokande ayebi eloko te. Na bongo, akobanda kondima lokuta na ye. Ya solo, “amisaleli boboto mingi mpo na ye moko, na miso na ye moko, mpo na komona libunga na ye mpo ete ayina yango.” (Nzembo 36:2, NW) Lokuta ndenge yango ezali mpenza motambo! Nzokande, moto ya sembo amityaka na mokakatano ya ndenge wana te. Ata soki azali na mpasi, asalelaka lolemo ya lokuta te.

‘Mbuma oyo etondisaka’

Ntoma Paulo akebisi biso ete: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Likebisi oyo etaleli mpe maloba mpe misala na biso. Salomo alobaki boye: “Na mbuma ya monɔkɔ ya moto, akotonda na oyo ezali malamu, mpe oyo mabɔkɔ ya moto esali ekozala mpo na ye.”​—Masese 12:14, NW.

Monɔkɔ oyo “elobaka maloba ya bwanya” ebotaka mbuma oyo etondisaka. (Nzembo 37:30, NW) Bwanya esɛngaka boyebi; nzokande, ata moto moko te ayebi makambo nyonso. Moto nyonso azalaka na mposa ya toli ya malamu mpe kosalela yango. Mokonzi ya Yisalaele alobaki ete: “Nzela ya zoba ezalaka malamu na miso na ye moko, kasi ye oyo ayokaka toli azali na bwanya.”​—Masese 12:15, NW.

Yehova azali kopesa biso toli ya malamu na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye oyo ezali kobimisa mikanda oyo ezali kouta epai na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45; 2 Timote 3:16) Ekozala mpenza bozoba soki toboyi toli ya malamu mpe tolingi kaka kosala makambo ndenge biso tolingi! Tosengeli “koyokaka noki” ntango Yehova “Ye oyo ateyaka bato boyebi,” azali kopesa biso toli na nzela ya ebongiseli oyo azali kosalela.​—Yakobo 1:19; Nzembo 94:10.

Moto ya mayele asalaka nini soki bafingi ye to batyoli ye mpe zoba asalaka nini? Salomo apesaki eyano ete: “Zoba nde abimisaka nkanda na ye kaka mokolo wana, kasi moto ya bokɛngi abombaka nsɔni na ye.”​—Masese 12:16, NW.

Ntango balobi na ye mabe, zoba azongisaka mbala moko eyano ya nkanda, “kaka mokolo wana.” Kasi, moto ya bokɛngi abondelaka mpo na kozwa elimo ya Nzambe mpo azala na komipekisa. Amanyolaka toli ya Liloba ya Nzambe mpe akanisaka na botɔndi mpenza maloba ya Yesu oyo elobi ete: “Moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, baluselá ye mpe oyo mosusu.” (Matai 5:39) Lokola alingaka ‘kozongisa mabe na mabe te,’ moto ya mayele abatelaka mbɛbu na ye mpo ebimisa te makambo oyo akanisi yango liboso te. (Baloma 12:17) Ndenge moko mpe, soki tozali kolimbisa likambo nyonso oyo eyokisaka nsɔni oyo basali biso, tozali koboya kopelisa mɔtɔ.

‘Mbɛbu oyo ebikisaka’

Lisumu ya mbɛbu ekoki kosala mabe lisusu koleka na ntango ya kosambisa likambo. Mokonzi ya Yisalaele alobaki ete: “Ye oyo akoloba sembo, akomonisa boyengebene; nde motatoli ya lokuta akosaka.” (Masese 12:17, NW) Motatoli ya solo alobaka na bosembo, litatoli na ye ezali solo mpe bakoki kotyela yango motema. Maloba na ye esalisaka ete likambo ekatama na bosembo. Motatoli ya lokuta, azali kokosa mpe litatoli na ye ememaka na ekateli oyo ezali sembo te.

Salomo abakisaki boye: “Ezali na moto oyo alobaka kozanga kotya likebi lokola azali kokata na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.” (Masese 12:18, NW) Maloba ekoki kozokisa lokola mopanga, kokabola baninga mpe kobimisa matata. To mpe ekoki kozala ya malamu mpe ya esengo, oyo ebatelaka boninga. Kofinga, kogangela moto mpe kotyola ezali makambo oyo etikaka mpota minene na motema, boye te? Yango wana, ezali malamu tósɛngaka bolimbisi na maloba oyo euti mpenza na motema mpo na kobongisa makambo soki tosali mabe.

Na ntango ya mpasi oyo tozali, ezali likambo ya kokamwa te ete ebele ya bato ‘bazoki na mitema’ mpe “milimo” na bango “minyokwami.” (Nzembo 34:18, NW) Ntango tozali ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi’ mpe ‘kosalisa bato ya bolɛmbu,’ tozali nde kosalela nguya ya kobikisa oyo eutaka na maloba ya malamu, boye te? (1 Batesaloniki 5:14) Ya solo, maloba ya boboto ekoki kolendisa bilenge oyo bazali kobunda etumba mpo bálanda te makambo mabe ya baninga na bango. Maloba oyo ebongi ekoki kondimisa mibange ete tozalaka na mposa na bango mpe tolingaka bango. Maloba ya boboto ekoki kosalisa bato ya maladi na kolekisa mokolo malamu. Ata mpamela ekoki kondimama kozanga nkaka, soki epesami “na elimo ya boboto.” (Bagalatia 6:1) Mpe lolemo ya moto oyo azali koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezalaka mpenza na nguya ya kobikisa baoyo bazali koyoka ye!

‘Mbɛbu oyo ekoumela libela’

Salomo asalelaki liloba “lolemo” ndenge moko na liloba “mbɛbu,” mpe alobaki boye: “Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela libela, kasi lolemo ya lokuta ezali kaka mpo na mwa ntango moke.” (Masese 12:19, NW) Na Liebele, maloba “mbɛbu oyo elobaka solo” ezali na bɔɔkɔ (singulier) mpe elimboli kaka te koloba solo. Mokanda moko elobi ete: “Yango esangisi makambo lokola koumela, kotikala ntango molai mpe kotyelama motema.” Mokanda yango elobi lisusu ete: “Maloba oyo ezali na makambo yango, ekoumela . . . libela mpamba te ekomonana ete ebongi kotyelama motema, ezali te lokola lolemo ya lokuta . . . oyo ekoki kokosa mpo na mwa ntango kasi ekoyebana soki balandeli yango.”

Mokonzi ya bwanya alobaki ete: “Bokosi ezali na motema ya baoyo bazali koyokana mpo na kosala mabe, kasi baoyo bazali kopesa toli mpo na kimya, bazali na esengo.” Abakisaki ete: “Likambo moko ya mabe ekoyela moyengebene te, kasi bato mabe bakotonda na mawa.”​—Masese 12:20, 21, NW.

Bato oyo bakanaka kosala mabe bakoki se koyokisa bato mpasi mpe konyokola bango. Nzokande, bato oyo bapesaka toli ya kimya bazalaka na esengo mpo basalaka makambo ya malamu. Basepelaka mpe ntango bazali komona matomba na yango. Eloko eleki ntina ezali ete Nzambe andimaka bango, mpamba te “mbɛbu ya lokuta ezali eloko oyo [Yehova] aboyi; kasi baoyo basalaka na bosembo basepelisaka ye.”​—Masese 12:22, NW.

‘Maloba oyo ebombi boyebi’

Mokonzi ya Yisalaele alobeli bokeseni mosusu oyo ezali na kati ya moto oyo akebaka na maloba na ye ná moto oyo akebaka na maloba ye te, na maloba oyo: “Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya bazoba elobaka bozoba polele.”​—Masese 12:23, NW.

Moto ya mayele to moto ya bokɛngi ayebaka ntango nini asengeli koloba mpe ntango nini asengeli kofanda nyɛɛ. Abombaka boyebi na ndenge aboyaka kolakisa na lolendo mpenza makambo oyo ayebi. Yango elingi koloba te ete abombaka ntango nyonso boyebi na ye. Kasi, asalelaka yango na ndenge ya mayele. Nzokande, zoba akanisaka te liboso ya koloba mpe yango emonisaka polele bozoba na ye. Yango wana, tiká ete tólobaka mingi te mpe tózalaka na monɔkɔ ya lolendo te.

Mpo na komonisa yango lisusu malamu, Salomo alobeli likambo moko ya ntina oyo emonanaka kati na moto ya molende mpe moto ya gɔigɔi. Alobi ete: “Lobɔkɔ ya moto ya molende ekoyangela, kasi lobɔkɔ ya gɔigɔi ebongi kaka mpo na kosalisama mosala na makasi.” (Masese 12:24, NW) Moto oyo amipesi na mosala akoki kokende liboso mpe akoyeba ye moko kokokisa bamposa na ye, kasi gɔigɔi etindaka básalisa moto mosala na makasi mpe na boombo. Moto moko ya mayele alobaki ete, “Nsima ya ntango, moto ya gɔigɔi akokóma moombo ya moto ya molende.”

‘Maloba oyo esepelisaka’

Mokonzi Salomo azongeli lisusu maloba nsima ya kotalela malamumalamu bomoto ya bato. Alobaki ete: “Kobanga na kati ya motema ya moto ekobebisa motema na ye, kasi liloba malamu esepelisaka ye.”​—Masese 12:25, NW.

Ezali na makambo ebele oyo ekoki koyokisa motema mpasi mpe kokómisa yango kilo. Kasi eloko oyo ekoki kosala ete motema ezala pɛpɛlɛ mpe na esengo ezali kaka liloba malamu ya kolendisa oyo euti na moto oyo ayebi komitya na esika ya bamosusu. Kasi ndenge nini bato mosusu bakoyeba ete tozali na mposa makasi ya kolendisama soki biso moko tofungoleli bango motema te mpe toyebisi bango yango polele te? Ɛɛ, ntango tozali kokutana na mikakatano to konyokwama na makanisi, tosengeli kofungola motema na biso epai na moto moko oyo akoyeba komitya na esika na biso mpo asalisa biso. Lisusu, soki moto alobi mpasi oyo azali koyoka, ebikisaka mpe ekitisaka motema. Yango wana, ezali malamu kosolola na mobalani na yo, moboti na yo, to moninga moko oyo azali koyeba mpasi na yo mpe azali makasi na elimo.

Maloba ya kolendisa oyo eleki malamu ezali na Biblia. Yango wana, tosengeli komanyolaka na botɔndi mpenza likoló ya Liloba ya Nzambe mpo na kopusana penepene na ye. Kokanisa ndenge yango ekotondisa esengo na motema oyo ezali na mpasi mpe ekongɛngisa elongi oyo ezali na mawa. Mokomi ya nzembo amonaki ete likambo yango ezali mpenza solo, alobaki ete: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli na [Yehova] izali alima, ikosepelisa motema. Malako na [Yehova] izali pɛto, ikomonisa miso polele.”​—Nzembo 19:7, 8.

Nzela oyo epesaka mbano

Mpo na kokesenisa nzela ya moto malamu na oyo ya moto mabe, mokonzi ya Yisalaele alobaki boye: “Moyengebene atalelaka bisika ya koleisa bibwele na ye, kasi nzela ya bato mabe ekopanza yango.” (Masese 12:26, NW) Moyengebene abatelaka bisika ya koleisa bibwele na ye​—elingi koloba baninga oyo aponaka. Aponaka bango malamu mpe akimaka kozala na boyokani na bato mabe. Kasi, ezali bongo te mpo na bato mabe oyo baboyaka koyoka toli mpe batingamaka na nzela na bango. Bakosamaka mpe bakómaka kowayawaya.

Na nsima, Mokonzi Salomo amonisaki bokeseni oyo ezali na kati ya moto ya gɔigɔi mpe moto ya molende. Alobaki ete: “Gɔigɔi ekopesa nyama te, kasi moto ya molende ezali bomɛngo ya moto.” (Masese 12:27, NW) “Moto ya gɔigɔi” akoki te “kobandisa” to “kokalinga” mosala na ye. (New International Version) Yango wana, akoki te kosilisa mosala oyo ye abandaki. Nzokande, molende ezali ndoi ya bozwi.

Kozala na gɔigɔi ezali mabe, yango wana ntoma Paulo amonaki ete ezalaki na ntina mingi akomela baninga na ye bandimi ya Tesaloniki mpo na kosunga bato mosusu kati na bango oyo bazalaki ‘komitambwisa na ndenge ya mobulu,’ oyo bazalaki koboya kosala mosala kasi bazalaki kolinga kaka kokɔta na makambo oyo etalaki bango te. Bango bazalaki mpenza kilo mpo na bamosusu. Yango wana Paulo apesaki bango toli polele, ayebisaki bango ete ‘básala mosala na kimya mpe bálya bilei oyo bazwi bango moko.’ Mpe soki baboyi toli wana, Paulo ayebisaki bato mosusu na kati ya lisangá ete “bákima” bango, elingi koloba báboya kosangana na bango.​—2 Batesaloniki 3:6-12.

Tosengeli kaka te kobomba na motema toli ya Salomo ya kozala bato oyo bazalaka makasi na mosala, kasi lisusu oyo elobeli lolenge ya malamu ya kosalela lolemo. Tiká tósala makasi mpo na kosalela mwa enama wana ya nzoto mpo na kobikisa mpe kosepelisa bamosusu na koboyáká lisumu ya mbɛbu mpe na kolandáká nzela ya sembo. Salomo alobi na biso ete: “Balabala ya boyengebene ezali na bomoi, mobembo na nzela na yango elimboli ete liwa ezali te.”​—Masese 12:28, NW.

[Bililingi na lokasa 27]

“Ye oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya”

[Bililingi na lokasa 28]

“Lolemo ya moto ya mayele, ebikisaka”

[Elilingi na lokasa 29]

Kofungola motema na moninga oyo abongi kotyelama motema ebɔndisaka

[Elilingi na lokasa 30]

Komanyola na botɔndi mpenza likoló ya Liloba ya Nzambe esepelisaka motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto