Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/4 nk. 8-10
  • Bilenge​—Bozali kokola na elimo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Bozali kokola na elimo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zalá na mposa makasi ya kosalela Nzambe
  • Omityela mikano
  • Kotika te kosala oyo ezali malamu
  • Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/4 nk. 8-10

Bilenge​—Bozali kokola na elimo?

HIDEO akanisi lisusu ntango azalaki na eteyelo ya ntei (secondaire) mpe alobi boye: “Atako nazalaki kokende na makita ya lisangá, nazalaki na mposa mpenza te ya kosalela Yehova. Na makanisi na ngai, mbala mingi nazalaki komimona nakómi vɛdɛti na kati ya bana-kelasi na biso mpe nazali kotambola na lolendo nyonso na balabala ná makango na ngai. Nazalaki mpenza koyeba te nini nakosala na bomoi na ngai mpe nazalaki na mposa ata moke te ya kokola na elimo.” Bilenge mingi bazali lokola Hideo, bazali mpenza koyeba te nini bakosala na bomoi na bango mpe bazali kokola na elimo te.

Soki ozali elenge, na ntembe te osepelaka mingi ntango ozali kosala masano to ozali kolekisa ntango na likambo moko oyo olingaka mingi. Kasi, mbala mosusu osepelaka mpenza na makambo ya elimo te. Okoki nde kosepela mpenza na makambo ya elimo? Talelá naino maloba oyo ya mokomi ya nzembo: “Litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. . . . Malako ya [Yehova] ezali pɛto, ekomonisa miso polele.” (Nzembo 19:7, 8) Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa “moto oyo azangi boyebi” ete amitambwisa na bwanya, to ekoki ‘komonisa miso na ye polele.’ Ɛɛ, okoki mpenza kosepela na makambo ya elimo. Kasi osengeli kosala nini mpo osepela na makambo ya elimo? Osengeli kobanda wapi?

Zalá na mposa makasi ya kosalela Nzambe

Ya liboso, osengeli kolona mposa makasi ya kosalela Nzambe. Talelá ndakisa ya Yosiya, elenge moko oyo azalaki mokonzi ya Yuda. Ntango bamonaki buku ya Mibeko ya Yehova na kati ya tempelo, Yosiya atángaki yango mpe makambo oyo atángaki esimbaki mpenza motema na ye. Yango wana, “Yosiya alongolaki mpe biloko nyonso ya bosɔtɔ na mokili mobimba mozalaki na bato ya Yisalaele.” (2 Ntango 34:14-21, 33) Kotánga Liloba ya Nzambe esalisaki Yosiya asala mosala monene ya kotombola losambo ya pɛto.

Yo mpe okoki kolona mposa ya kosalela Yehova soki mokolo na mokolo ozali kotánga Biblia mpe kokanisa likoló ya makambo oyo ozali kotánga. Yango nde esalisaki Hideo. Akómaki moninga ya ndeko moko ya mokóló oyo azali mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka ministre oyo asalaka mosala ya ntango nyonso. Mobongisi-nzela yango azalaki na momeseno ya kotánga Biblia mpe azalaki kosala makasi mpo na kosalela makambo oyo azalaki kotánga na bomoi na ye. Ndakisa malamu ya mobongisi-nzela yango elendisaki Hideo; yango wana, akómaki komekola ye mpe akómaki na mposa makasi ya kosalela Nzambe mpe kosalela bato mosusu. Lokola akolaki na elimo, bomoi na ye mpe ekómaki na ntina.

Bilenge bakoki kokóma na mposa makasi ya kosalela Nzambe soki bazali kotánga Biblia mokolo na mokolo. Takahiro alobi boye: “Soki namati na mbeto mpe nayei kosutuka ete natángi naino Biblia te mokolo wana, nazalaki kolamuka mpo natánga. Na ndenge yango, nazalaki koyoka ete Yehova azali kotambwisa ngai. Kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaki ngai mingi mpo nakola na elimo. Lokola nazwaki ekateli ya kosala mingi na mosala ya Yehova, ntango kaka nasilisaki eteyelo ya ntei, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Nazali kosepela mingi na mosala yango.

Longola kotánga Biblia mokolo na mokolo, eloko nini lisusu ekoki kosalisa yo okolisa mposa makasi ya kokumisa Yehova? Tomohiro ayekolaki solo ya Biblia epai ya mama na ye. Alobi boye: “Ezali se nsima ya koyekola na mozindo buku La vie a bien un but, ntango wana nakómaki na mbula 19, nde nayokaki ete bolingo ya Yehova mpe mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso esimbaki mpenza motema na ngai. Nazalaki na botɔndi mpo na bolingo ya Nzambe, mpe yango epesaki ngai mposa makasi ya komipesa mingi na mosala ya Yehova.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Lokola Tomohiro, bilenge mingi bazali kolendisama na kokola na elimo na ndenge bazali kosala molende na koyekola Biblia.

Kasi, okosala nini soki nsima ya kosala nyonso wana ozali kaka koyoka mposa ya kosalela Yehova te? Ezali nde na moto moko oyo akoki kosalisa yo? Ntoma Paulo akomaki ete: “Mpo Nzambe . . . azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” (Bafilipi 2:13) Soki obondeli Yehova ete asunga yo, akopesa yo elimo santu na ye, oyo ekopesa yo makasi kaka ya ‘kosala’ te, kasi mpe ya ‘kolinga.’ Elingi koloba ete elimo santu ya Nzambe ekokolisa mposa na yo ya kosala nyonso oyo okoki kosala na mosala ya Yehova mpe ekosalisa yo okola na elimo. Na yango, tyá elikya na nguya ya Yehova mpe kembisá motema na yo!

Omityela mikano

Nsima ya kozwa ekateli ya kosalela Yehova mingi koleka, osengeli komityela mikano oyo ekosalisa yo okola na elimo. Mana, elenge mwasi moko moklisto, alobaki boye: “Mikano oyo namityelaki esalisaki ngai mingi mpenza. Nazongaki lisusu nsima te, kasi nazwaki nde makasi ya kokende liboso na mpiko nyonso. Lokola namityelaki mikano, nabondelaki Yehova makasi ete atambwisa ngai; yango epesaki ngai makasi ya kokende liboso, kozanga ete eloko moko elongola likebi na ngai.”

Osengeli komityela mikano oyo okokoka kokokisa yango. Kotánga mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo ekoki kozala mokano moko ya mpasi mpenza te mpo na kokokisa. Okoki mpe kobanda koyekola makambo mosusu na bozindo. Na ndakisa, okoki koyekola bizaleli ya Yehova, mpe mpo na yango, okoluka na Index na motó ya likambo “Jéhovah” mpe na motó ya likambo moke “Qualités par leur nom.” Ezali na mitó ya makambo soki 40 oyo okoki kotalela, mpe na ntembe te, koyekola makambo yango ekobenda yo penepene na Yehova mpe ekokolisa mposa na yo ya kosalela ye lisusu mingi koleka. Mikano mosusu ya makasi te ezali na ndakisa, kopesa ata eyano moko na lisolo nyonso ya mituna mpe biyano na makita, koyeba nkombo ya ndeko ata moko na nsuka ya makita nyonso, mpe kolekisa ata mokolo moko te kozanga kobondela Yehova mpe koteya bato makambo na ye.

Soki okomisá naino nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi te, yango mpe ekoki kozala mokano ya malamu mpo na yo. Obimaka na mosala ya kosakola? Soki te, okosepela mbala mosusu kosala makasi mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Na ntembe te, likambo oyo ekolanda ekozala kotalela malamumalamu boyokani na yo ná Yehova mpe komipesa epai na ye. Bilenge mingi oyo bamipesi na Yehova bazali kokokisa ndai na bango epai na Yehova na ndenge bazali kosɛnga mosala ya ntango nyonso.

Ezali malamu komityela mikano na bomoi, kasi esengeli kokeba ete okóma na elimo ya kowelana te. Okosepela mingi na makambo oyo ozali kosala soki ozali komikokanisa na bato mosusu te.​—Bagalatia 5:26; 6:4.

Ntango mosusu ozali komona ete oyebi makambo mingi te mpe ozali kokoka te komityela mikano ya malamu. Soki ezali bongo, landá toli ya Biblia oyo elobi ete: “Kitisá litoi na yo mpe yokamelá maloba ya bato ya [bwanya, NW].” (Masese 22:17) Luká lisalisi ya baboti na yo mpe ya baklisto mosusu oyo bateli na elimo. Kasi, baboti mpe bato mosusu basengeli kozala na makanisi oyo ebongi mpe ya kolendisa na likambo yango. Bilenge bakoki kobungisa esengo soki bazali komiyoka ete bazali lokola kotindika bango mpo bákokisa mokano oyo bato mosusu batyeli bango mpe yango ekoki ata kobungisa ntina ya mikano. Yango nde likambo ekómelaki elenge mwasi moko. Ye alobaki boye: “Baboti na ngai bazalaki kosɛnga ngai makambo mingi, na ndakisa kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, kobima na mosala ya kosakola, kozwa batisimo mpe kokóma mobongisi-nzela. Nazalaki koboma nzoto mpo na kokokisa likambo mokomoko. Ntango nakokisi likambo moko, baboti na ngai bazalaki ata kopesa ngai longonya te, bazalaki nde kosɛnga ngai nasala mosusu. Yango wana, nazalaki ntango nyonso komiyoka ete bazalaki nde kotindika ngai na makasi nasala makambo yango. Nalɛmbaki mpe nazalaki lisusu komona ntina ya kosala makambo yango te.” Mabe ezalaki wapi? Makambo oyo bazalaki kosɛnga ye asala ezalaki makambo ya malamu, kasi ezalaki ye moko te nde alingaki kosala yango. Mpo na kolonga, esengeli yo moko omityelaka mikano.

Kanisá Yesu Klisto. Ntango ayaki awa na mabelé, ayebaki malamu oyo Tata na ye Yehova alingaki ete ye asala. Yesu azalaki kaka te na mokano ya kosala makambo oyo Yehova alingaki kasi, ezalaki mpe likambo ya ntina mingi oyo ye asengelaki kokokisa. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mokumba na ye? Alobaki ete: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Yesu azalaki na esengo ya kosala mosala ya Yehova mpe kokokisa oyo Tata na ye alingaki ete ye asala. Mpo na Yesu, yango ezalaki lokola bilei, azalaki na esengo mpo na kokokisa mosala nyonso oyo bapesaki ye. (Baebele 10:5-10) Yo mpe okoki kozala na esengo soki ozali na mposa makasi ya kosala oyo baboti na yo bazali kolendisa yo osala.

Kotika te kosala oyo ezali malamu

Soki omityeli mokano moko, osengeli kosala nyonso mpo na kokokisa yango. Bagalatia 6:9 elobi ete: “Boye tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka soki tolɛmbi te.” Kotya motema kaka te na makasi to makoki na yo moko. Ntango mosusu okokutana na mikakatano ata mpe kolɛmba mwa moke. Kasi, Biblia elobi na biso boye: “Na nzela nyonso na yo, ndimá [Nzambe] mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:6) Yehova akosalisa yo na ndenge ozali kosala makasi okokisa mikano ya elimo oyo omityeli.

Soki oloni mpenza mposa makasi ya kosalela Yehova mpe soki ozali komityela mikano ya elimo, ‘bokoli na yo ekomonana polele na miso ya bato nyonso.’ (1 Timote 4:15) Na ndenge yango, okozala na bomoi ya ntina na mosala ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 9]

Kotánga Biblia mpe komanyola makambo otángi ekopesa yo mposa ya kosalela Yehova

[Elilingi na lokasa 10]

Yesu akokisaki oyo Tata na ye alingaki ete ye asala

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto