Epai wapi tokoki kokuta solo na makambo ya elimo?
RODOLPHE atunaki na mwa lityo ete: “Soki moto nyonso asengeli kosambela kaka na lingomba oyo libota na ye esambelaka banda kala, mpo na nini tosambelaka kaka te losambo oyo bankɔkɔ na biso Ba-Celte bazalaki kosambela eleki sikoyo mbula 2 000?” Likanisi yango esɛkisaki mwa moke elenge mobali oyo azalaki koyoka ye.
Rodolphe alobaki ete: “Boninga na ngai na Nzambe ezali na motuya mingi mpo na ngai. Nakoki kondima ata moke te likanisi oyo ete nasengeli kolanda bobele losambo ya bankɔkɔ na ngai, kaka mpo bato ya libota na ngai oyo bazalaki na bomoi eleki lelo bankama ya bambula bazalaki na lingomba yango.” Rodolphe akanisaki malamu mpenza likambo yango ya ntina mingi mpe aboyaki kolanda kaka oyo bankɔkɔ bazalaki kosala.
Atako momeseno ya kosambela kaka na lingomba oyo bankɔkɔ bazalaki kosambela ekómi kosila na mikolo na biso, bato mingi bazali naino kaka kokangama na lingomba ya libota na bango. Kasi, ezalaka ntango nyonso malamu kokangama na lingomba ya baboti? Biblia elobi nini?
Nsima ya kolekisa mbula 40 na esobe, Yosua, mokitani ya Moize, asɛngaki bana ya Yisalaele ete bápona bango moko losambo oyo balingi, ntango ayebisaki bango ete: “Soki nde emonani mabe na miso na bino kosalela [Yehova], mbɛlɛ bópona lelo ye oyo bokosalela, soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino basalelaki na mokili na ngambo na Ebale, to banzambe ya Baamola, baoyo bozali kofanda na mokili na bango. Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].”—Yosua 24:15.
Moko ya bankɔkɔ oyo Yosua alobelaki ezali Tela, tata ya Abalayama, oyo azalaki kofanda na mboka Ulu, oyo ezalaki na ntango wana na ɛsti ya Ebale Pelata. Biblia eyebisi biso makambo mingi te mpo na Tela, elobi kaka ete azalaki kosambela banzambe mosusu. (Yosua 24:2) Mwana na ye Abalayama, atako ayebaki mokano ya Nzambe malamu te, andimaki kotika mboka na ye ntango Yehova asɛngaki ye atika yango. Ɛɛ, Abalayama aponaki losambo oyo ekesanaki na oyo ya tata na ye. Lokola Abalayama asalaki ndenge wana, azwaki mapamboli oyo Nzambe alakaki ye mpe akómaki moto oyo mangomba mingi lelo bazali kobenga “tatá wa bato bánso bayambí Nzámbe.”—Baloma 4:11, Liloba lya Nzambe.
Biblia ezali mpe na lisolo moko ya malamu mpenza oyo elobeli Luta, nkɔkɔ moko ya Yesu Klisto. Luta, mwasi moko ya Moaba, abalaki Moyisalaele; na nsima, mobali yango akufaki mpe Luta asengelaki kopona soki akotikala na ekólo na ye to akokende ná bokilo na ye na Yisalaele. Lokola ayebaki ete losambo ya Yehova eleki losambo ya bikeko oyo baboti na ye bazalaki kosambela, Luta alobaki na bokilo na ye ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.”—Luta 1:16, 17.
Buku moko (Dictionnaire de la Bible) elobeli lisolo yango oyo ezali na mikanda oyo endimami na Biblia, ete lisolo yango ezali komonisa “ndenge oyo mwasi moko mopaya, oyo abotamaki na kati ya bapakano oyo bazalaki koyinana makasi na bato ya Yisalaele, . . . azwaki libaku malamu ya kokóma nkɔkɔ ya Mokonzi mosantu Davidi, mpo na bolingo oyo amoniselaki libota ya Yehova mpe losambo na ye.” Luta akakatanaki te kopona lingomba oyo ekeseni na oyo ya baboti na ye mpe, mpo na yango, Nzambe apambolaki ye.
Lisolo oyo elobeli ebandeli ya lingomba ya boklisto emonisi polele mpenza ntina oyo bayekoli ya Yesu batikaki lingomba ya bankɔkɔ na bango. Na lisolo moko oyo ezalaki na makanisi ya kondimisa mpenza, ntoma Petelo ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete ‘bámibikisa na libota oyo etɛngamá’ mpe bátika masumu na bango mpe bábatisama na nkombo ya Yesu Klisto. (Misala 2:37-41) Moko ya bato oyo basalaki bongo ezali Saulo, Moyuda moko oyo azalaki konyokola baklisto. Ntango azalaki na nzela mpo na kokende na Damasi, Klisto abimelaki ye na emonaneli; na nsima, Saulo akómaki moklisto mpe bakómaki kobenga ye ntoma Paulo.—Misala 9:1-9.
Baklisto mingi ya liboso bakutanaki na makambo ya kokamwa ndenge wana te. Kasi, bango nyonso batikaki losambo ya Bayuda to losambo ya banzambe ndenge na ndenge ya bapakano. Baoyo bandimaki lingomba ya boklisto bayebaki mpenza ntina oyo basalaki bongo, mbala mingi nsima ya kozwa ndimbola malamumalamu ete Yesu azali Masiya. (Misala 8:26-40; 13:16-43; 17:22-34) Bayebisaki baklisto yango ya liboso polele ete basengeli kobongwana. Bazalaki kobenga bato nyonso, ezala Bayuda to bato ya bikólo mosusu, kasi nsango ezalaki kaka moko mpo na bango nyonso. Mpo na kosepelisa Nzambe, esengelaki kokɔta na lingomba ya sika, elingi koloba losambo ya boklisto.
Biso mpe tosengeli kopona
Emonani mpenza ete na ekeke ya liboso ezalaki kosɛnga moto azala na mpiko mpo atika losambo oyo baboti na ye bazalaki kolanda—losambo ya Bayuda, losambo ya amperɛrɛ, to losambo ya banzambe ya bapakano—mpe akɔta na losambo oyo bato nyonso, ezala Bayuda to bato ya Loma, bazalaki kotyola. Eumelaki te, bakómaki konyokola bato oyo baponaki nzela wana na ndenge moko ya mabe mpenza. Lelo oyo mpe esɛngaka kozala na mpiko mpo na koboya oyo Hippolyte Simon, episkɔpɔ ya Clermont-Ferrand, abengaki na buku na ye (Vers une France païenne?) ete “komitika to mpe kokangama na momeseno mabe ya kolanda kaka makambo oyo bato nyonso basalaka.” Esɛngaka mpiko mpo na kokɔta na lingomba ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali kaka na bato moke mpe oyo mbala mingi balobelaka yango mabe.
Paul, elenge mobali moko ya engumba Bastia, na esanga ya Corse, oyo akolaki na Lingomba ya Katolike mpe azalaki mbala mosusu kosala misala ya lingomba—lokola kotɛka bagato mpo na kozwa mbongo—mpo na ebongiseli moko ya Katolike mpo na kosunga babola. Lokola azalaki na mposa ya koyeba Biblia malamumalamu, andimaki ete Batatoli ya Yehova báyaka kosolola na ye mbala na mbala. Nsukansuka, amonaki ete makambo oyo azalaki koyekola ekokaki komemela ye matomba ya libela. Mpo na yango, Paul andimaki mitinda ya Biblia mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Baboti na ye batikaki ye alanda nzela oyo aponaki, mpamba te ebebisaki ata moke te boyokani oyo bazalaki na yango na kati ya libota.
Amélie afandaka na sudi ya France. Na libota na ye banda bankɔkɔ ya molɔngɔ ya minei bazalaki Batatoli ya Yehova. Mpo na nini ye andimaki kolanda lingomba ya baboti na ye? Alobi boye: “Moto akómaka Motatoli ya Yehova kaka te mpo baboti na ye to bankɔkɔ na ye bazali to bazalaki Batatoli ya Yehova. Kasi, ekómaka na ntango moko oyo moto alobaka na kati ya motema na ye moko ete ‘ezali lingomba na ngai, mpamba te nandimaka mpenza mateya na yango.’” Lokola ebele ya bilenge Batatoli ya Yehova mosusu, Amélie ayebi ete mateya ya lingomba oyo andimaka na kati ya motema na ye esalaka ete bomoi na ye ezala na ntina mpe ete ekomemela ye bolamu ya libela.
Ntina oyo tosengeli kondima mitinda ya Nzambe
Mokanda ya Masese, mokapo 6, vɛrsɛ 20, ezali kolendisa baoyo balingi kosepelisa Nzambe: “Mwana na ngai, batelá lilako ya tata na yo mpe longwá na mibeko ya mama na yo te.” Toli wana ezali kolendisa bilenge bázala na bindimandima te, kasi bándima mitinda ya Nzambe nsima ya kokolisa kondima na bango mpe kopona bango moko nzela oyo bakolanda mpo na kosambela Nzambe. Ntoma Paulo alobaki na baninga na ye baklisto ete ‘bátalelaka malamumalamu makambo nyonso,’ mpo na koyeba soki makambo oyo bazalaki koteya bango ezali na boyokani na Liloba ya Nzambe mpe na mokano na ye, mpe básalelaka makambo yango.—1 Batesaloniki 5:21.
Batatoli ya Yehova koleka milio motoba, ezala babɔkɔlami na mabota ya boklisto to te, bilenge to mikóló, bazwaki ekateli wana. Nsima ya koyekola Biblia malamumalamu, bazwaki biyano ya malamu mpenza na mituna oyo bato bamitunaka mpo na ntina ya bomoi mpe bakangaki malamu ntina ya mokano ya Nzambe mpo na bato. Ntango bakómaki na boyebi yango, bandimaki mitinda ya Nzambe mpe basalaka makasi mpo na kosala mokano ya Nzambe.
Ezala otángaka zulunalo oyo mbala na mbala to te, tozali kolendisa yo ondima Batatoli ya Yehova básalisa yo na koyekola Biblia mpe kotalela malamu mitinda na yango ya elimo. Na ndenge yango, okoyeba ‘komeka Nzambe mpe komona ndenge azali malamu,’ mpe okozwa boyebi oyo, soki osaleli yango, ememaka na bomoi ya seko.—Nzembo 34:8, NW; Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 5]
Libota moko na France oyo bazali Batatoli ya Yehova banda bankɔkɔ ya molɔngɔ ya minei
[Elilingi na lokasa 7]
Luta aponaki kosalela Yehova na esika ya banzambe ya bankɔkɔ na ye