Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/4 nk. 28-31
  • Bato mpamba, Yehova atyelaka bango likebi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato mpamba, Yehova atyelaka bango likebi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato mpamba
  • Amibanzabanzaka mpo na bilenge
  • Lisalisi mpo na kokokisa bamposa na yo
  • Kómisá boninga na yo ná Yehova makasi
  • Yehova atyelaka yo likebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Kómisá makasi bolingo na yo mpo na bandeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Nzambe azali komibanzabanza mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/4 nk. 28-31

Bato mpamba, Yehova atyelaka bango likebi

TOSENGELI nde kozala bato minene to oyo basalaka makambo minene mpo Nzambe ayeba biso? Balobaka ete Abraham Lincoln, prezida ya 16 ya États-Unis alobaká boye: “Nkolo alingaka bato mpamba. Yango wana asali bango ebele.” Bato mingi bakanisaka ete bazali bato mpamba oyo bazali ata na likambo moko te ya ntina. Kozala moto mpamba ekoki kolimbola “kozala mobola, kozala na nse ya basusu.” Ndenge moko mpe, liloba “mpamba” ekoki komonisa “kozanga lokumu to kozala na mosala oyo ezali na lokumu te,” “kozala na nse mpenza,” to “nsima ya basusu.” Osepelaka kofanda na bato ya ndenge nini? Bato ya lolendo mpe ya makambo makasimakasi? Osepelaka nde kozala esika moko na bato ya boboto, ya komikitisa, oyo bamitombolaka te mpe oyo bamibanzabanzaka mpo na basusu?

Lokola ezaleli ya kotyola bato mpe koyokisa baninga nsɔni epanzani mingi na mokili, bato mosusu bandimaka te ete Nzambe akanisaka bango mpenza. Moto moko oyo atángaka zulunalo oyo akomaki boye: “Nakolá na libota oyo bolingo ezalaki mpenza te. Bazalaki kotyola ngai, kotumola ngai mpe kosɛka ngai. Yango wana, banda bomwana na ngai namiyokaka ete nazali ata na ntina moko te. Makambo oyo basalá ngai enyokolaka ngai tii lelo, mingimingi soki nakutani na likambo moko ya mpasi.” Kasi, ezali na ebele ya bantina oyo ezali kondimisa biso ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na bato mpamba.

Ndenge oyo Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato mpamba

Mokonzi Davidi akomaki ete: “[Yehova] azali monene monene, abongi mpo na kosanzolama mingi; monene na ye ekoki koyebana te.” (Nzembo 145:3) Kasi, yango epekisaka Yehova te ete amonisela biso bolingo mpe motema mawa. (1 Petelo 5:7) Na ndakisa, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Yehova azali penepene na baoyo bazali konyokwama na mitema, abikisaka baoyo bazali kotungisama na elimo.”​—Nzembo 34:18, NW.

Makambo oyo esepelisaka bato na mokili lokola kitoko ya nzoto, lokumu ya moto to bozwi, ezali yango te oyo Nzambe amonaka ete ezali na ntina. Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele emonisaki ete Yehova amibanzabanzaka mpe azali na motema mawa mpo na babola, bitike, basi-bakufelá mibali mpe bapaya. Nzambe ayebisaki Bayisalaele oyo banyokolamaki makasi na Ezipito ete: “Okosalela mopaya mabe te mpe okonyokola ye te . . . Bokopesa mawa te na mwasi-akufeli-mobali, soko na mwana etike mpe te. Soko okopesa bango mawa mpe baleli epai na ngai mbɛlɛ nakoyoka kolela na bango solo.” (Exode 22:21-24) Lisusu, mosakoli Yisaya alobelaki kondima makasi oyo azalaki na yango ete Nzambe abatelaka bato mpamba na maloba oyo: “Osili kozala esika ya makasi mpo na mobola, esika ya makasi epai na mozangi kati na mpasi na ye; ekimelo liboso ya mbula monene mpe molili na ntango na moi makasi; mpo ete mopɛpɛ na bato na yauli ezali lokola mbula monene oyo ebɛtabɛti lopango.”​—Yisaya 25:4.

Ntango azalaki kosakola, Yesu Klisto oyo azali “elilingi ya sikisiki ya bomoto” ya Nzambe, apesaki bayekoli na ye ndakisa mpo na oyo etali kosepela mpenza na bato mpamba. (Baebele 1:3) Ntango amonaki ebele ya bato oyo “bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli,” Yesu “ayokelaki bango mawa.”​—Matai 9:36.

Lisusu, talelá lolenge ya bato oyo Yesu aponaki mpo bázala bantoma na ye, balobaki mpo na bango ete bazalaki bato “batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13) Na nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye bakómaki kobenga bato ya ndenge nyonso mpo na koyoka Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete “moto moko oyo azangi kondima to moto mpamba” akoki kokɔta na lisangá ya boklisto mpe kokóma mondimi. (1 Bakolinti 14:24, 25) Nzambe aponaki bato minene ya mokili te, kasi aponaki bato mpamba mpo na mosala na ye. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bozali komona kobengama oyo ye abengi bino, bandeko, ete bato mingi te ya bwanya na ndenge ya mosuni nde babengamaki, bato mingi te ya nguya, bato mingi te ya lokumu; kasi Nzambe aponaki biloko ya mokili oyo bizali zoba, mpo akoka koyokisa bato ya bwanya nsɔni; mpe Nzambe aponaki biloko ya mokili oyo bizali ya bolɛmbu, mpo akoka koyokisa biloko ya makasi nsɔni; mpe Nzambe aponaki biloko ya mpambampamba ya mokili mpe biloko oyo ezali kotyolama, biloko oyo ezali te, mpo akoka kobebisa nyɛɛ biloko oyo ezali, na ntina ete mosuni moko te ekoka komikumisa na miso ya Nzambe.”​—1 Bakolinti 1:26-29.

Lelo oyo mpe, Nzambe akanisaka biso kaka ndenge yango. Mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Soki Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete atindaki mwana na ye awa na mabelé mpo akufa mpo na biso, na yango tozali na ntina ata moko te ya komiyoka ete balingaka biso te to tozali na ntina te. (Yoane 3:16) Yesu Klisto amonisaki bayekoli na ye ntina ya kosala malamu ezala epai ya oyo aleki moke na kati ya bandeko na ye ya elimo lokola nde bazali kosala yango epai ya Yesu ye moko. Alobaki ete: “Na meko oyo bosalaki yango epai na moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalaki yango epai na ngai.” (Matai 25:40) Ata soki mokili etaleli biso ndenge nini, soki tolingi solo, tozali mpenza na motuya na miso ya Nzambe.

Yango nde Francisco,a elenge mobali moko na Brésil oyo tata na ye akufá, ayokaki nsima ya kokóma moninga ya Nzambe. Alobi boye: “Koyeba Yehova mpe lisangá na ye esalisaki ngai natika komiyoka ete nazangi moto ya kosalisa ngai mpe natika ezaleli ya nsɔninsɔni. Nayebaki ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso.” Mpo na Francisco, Yehova akómaki mpenza Tata na ye.

Amibanzabanzaka mpo na bilenge

Yehova asepelaka kaka te komona ebele ya bilenge, kasi atalelaka mpenza mokomoko na bango. Nzokande, tózala bilenge to mikóló, tosengeli ata moke te komitalela koleka ndenge oyo biso tozali. Kasi, ekoki kozala ete tozali na makoki mpe na bizaleli malamu oyo ekoki kosala ete Nzambe asalela yango na mikolo ezali koya. Yehova ayebi makambo oyo tosengeli kosembola mpe kobongisa mpo tósalela malamu makoki mpe bizaleli malamu na biso. Na ndakisa, talá lisolo oyo ezali na 1 Samwele, mokapo 16. Ata soki mpo na Samwele, bayaya ya Davidi babongaki mpenza mpo na koyangela Yisalaele, Yehova alimbolaki bantina oyo ye aponaki Davidi, oyo azalaki mwana moke na kati ya bana nyonso ya Yisai, mpo akóma mokonzi ya sika ya Yisalaele. Alobaki boye: “Talá na elongi na ye te mpe na molai ya nzoto na ye te mpo ete naboyi ye [yaya ya Davidi]. Mpo ete [Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.”​—1 Samwele 16:7.

Bilenge ya lelo bakoki mpe komindimisa ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bango? Talelá ndakisa ya Ana, elenge mwasi moko ya Brésil. Lokola bilenge mingi, Ana atungisamaki mingi na komona bizaleli mabe ya bato mpe kozanga bosembo. Na nsima, Tata na ye akómaki kokende na ye ná bandeko na ye mosusu ya basi na makita ya boklisto. Yango wana, Ana akómaki kosepela na makambo oyo azalaki koyekola na Liloba ya Nzambe. Akómaki kotánga Biblia mpe mikanda mosusu oyo lisangá ya boklisto ebimisaka mpe kobondela Yehova Nzambe. Mokemoke, akómaki moninga ya Nzambe. Alobi boye: “Nazalaki kosepela mingi kokende na velo na ngai na mwa esika moko ezali pene na ndako na biso, esika oyo nakokaki komona kolala ya moi. Kuna, nazalaki kobondela Yehova mpe kopesa ye matɔndi mpo na motema-boboto na ye mpe bokabi na ye, mpe nazalaki komeka koyebisa ye ete nalingaka ye mingi. Koyeba Yehova Nzambe mpe mikano na ye epesaki ngai kimya na motema mpe elongolaki ngai kobangabanga.” Yo mpe ozwaka ntango ya kokanisa na mozindo bolingo ya Yehova mpe ndenge amibanzabanzaka mpo na biso?

Ya solo, ndenge oyo tokolá ekoki mbala mosusu kopekisa biso tókóma baninga ya motema ya Yehova. Tókamata ndakisa ya Lidia. Ntango ayebisaki tata na ye likambo moko oyo ezalaki kotungisa ye mingi, tata na ye apamelaki ye mpe alobaki ete: “Likambo yango ezali na ntina te.” Atako ayebaki ete tata na ye alingaki ete ye abosana likambo yango, Lidia alobi boye: “Boyekoli ya Biblia epesaki ngai nyonso oyo nazalaki na mposa na yango, kutu mingi lisusu koleka. Bizaleli malamu ya Yehova ebendaki ngai epai na ye mpe akómaki moninga oyo aleki baninga nyonso. Nazwi sikoyo Tata ya bolingo, oyo ayebi komitya na esika na ngai, oyo nakoki koyebisa ye makambo nyonso oyo nazali na yango na motema mpe oyo ezali kotungisa ngai. Nakoki kolekisa ata ebele ya bangonga kaka na kosolola na Moto oyo aleki ntina na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe nayebi ete akoyoka ngai.” Mikapo ya Biblia lokola Bafilipi 4:6, 7 esalisaki ye na koyeba ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na ye. Bavɛrsɛ yango elobi ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.”

Lisalisi mpo na kokokisa bamposa na yo

Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko mpe mpo na lisangá na ye na mokili mobimba. Tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Tata na biso ya likoló, soki tozali kozwa ntango ya kosolola na ye. Tosengeli te kozwa na lisɛki boyokani oyo tozali na yango elongo na ye. Davidi azalaki ntango nyonso kosepela na boyokani oyo azalaki na yango elongo na Yehova. Alobaki boye: “Ee [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo. Tambolisá ngai kati na solo na yo mpe lakisá ngai, zambi yo ozali Nzambe na kobika na ngai; nazali kotalela yo mokolo mobimba.”​—Nzembo 25:4, 5.

Likanisi ya kozala moninga mpenza ya Nzambe ekoki kozala likambo ya sika mpo na yo. Kasi, ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini, okoki kozala na elikya ete Oyo-Aleki-Likoló akosalisa yo, na boyokani na mokano na ye. (1 Yoane 5:14, 15) Na yango, osengeli kosala makasi ete ntango ozali kobondela, olobaka makambo nyonso polele, makambo nyonso ya bomoi na yo mpe bamposa na yo.

Libondeli oyo Mokonzi Salomo asalaki mokolo oyo bafungolaki tempelo ezali komonisa polele ntina ya koyeba bamposa na biso. Alobaki ete: “Soko nzala ekozala na mokili, soko maladi monene, soko kokauka soko kopɔla soko mayoyo soko mapalala soko mpe bayini bakozingela bango kati na mboka na mokili na bango; soko ezali na likambo nini mabe soko na maladi nini; boye, wana moto moko soko bato nyonso na yo, Yisalaele, bakobondela epai na yo to bakolɔmbaka yo, soko moto na moto ayebi mpasi na ye mpe mawa na ye . . . yoká kuna na likoló . . . mpe limbisá; zongiselá moto na moto [kolanda] nzela na ye nyonso.” (2 Ntango 6:28-30) Ya solo, ezali kaka yo moko nde ‘oyebi mpasi na yo mpe mawa na yo.’ Ezali likambo ya ntina mingi oyeba bamposa na yo. Soki oyebi yango, “Yehova akokokisa malɔmbɔ ya motema na yo.”​—Nzembo 37:4, NW.

Kómisá boninga na yo ná Yehova makasi

Yehova asepelaka ete bato mpamba bázala baninga na ye ya motema. Liloba na ye endimisi biso ete: “‘Nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi,’ Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.” (2 Bakolinti 6:18) Ya solo, Yehova ná mwana na ye balingi ete tózala na bomoi ya malamu mpe tózwa bomoi ya seko. Ezali mpenza likambo ya kolendisa na koyeba ete Yehova akosalisa biso tókokisa malamu mikumba na biso na libota, na mosala, mpe na lisangá ya boklisto!

Kasi, biso nyonso tokutanaka na mikakatano. Makambo lokola maladi, mikakatano na kati ya libota, kozanga mbongo to makambo mosusu ekoki kopesa biso mpasi. Ekoki kozala ete tozali koyeba te oyo tosengeli kosala mpo na kolonga komekama. Mikakatano oyo ezali se kobakisama ezali kouta na mofundi mabe, Satana Zabolo, moto oyo azali kobundisa basaleli ya Nzambe, to na bato na ye. Kasi, ezali na moto moko oyo amityaka na esika na biso mpe azali kosalisa biso ete tóbatela boyokani malamu na Yehova. Ezali bongo Yesu Klisto, ye azali na bokonzi monene kuna na likoló. Tozali kotánga boye: “Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo azangi likoki ya koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu. Na yango, tiká tópusana na elobeli ya polele penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo tóyokelama mawa mpe tózwa boboto monene mpo na kosalisama na ntango oyo ekoki.”​—Baebele 4:15, 16.

Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete esengeli te kokóma naino bato ya lokumu to ya mbongo bongo Nzambe andima biso! Ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini, zalá lokola mokomi ya nzembo oyo abondelaki ete: “Nazali mobola mpe na kozanga; nde Nkolo akokanisa mpo na ngai; yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai.” (Nzembo 31:9-14; 40:17) Yebá ete Yehova alingaka bato ya komikitisa mpe bato mpamba. Ya solo, ‘okoki kobwaka mitungisi na yo nyonso epai na ye, mpamba te ye atyelaka biso likebi.’​—1 Petelo 5:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 29]

Bayekoli mingi ya Yesu batángaki kelasi mingi te mpe bazalaki bato mpamba

[Elilingi na lokasa 30]

Baklisto balukaka kozala na kondima makasi

[Bililingi na lokasa 31]

Tosengeli te kozala naino bato minene mpo Nzambe andima biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto