Ndenge oyo bato mosusu bazwaki biyano na mituna na bango
BATO ebele babondelaka. Bamosusu bandimaka mpenza ete Nzambe ayokaka mabondeli na bango. Bamosusu bamitunaka soki Nzambe ayokaka mpenza mabondeli na bango. Bamosusu mpe balukaka biyano na mituna na bango, kasi bazwaka ata likanisi te ya koyebisa Nzambe bamposa na bango na nzela ya libondeli.
Biblia elobi ete Nzambe ya solo ‘ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2) Soki obondelaka, ondimi mpenza ete obondelaka Nzambe ya solo? Mabondeli na yo ezali mpenza oyo Nzambe akoki koyoka?
Ebele ya bato na mokili mobimba bakoki koyanola ɛɛ na motuna yango! Ndenge nini bazwaki biyano na mituna na bango? Makambo nini bayebaki?
Nzambe azali nani?
Molakisi moko na ekólo Portugal, oyo atángaki na biteyelo ya bamamelo ná basango, azalaki mondimi ya solo mpenza. Ntango lingomba etikaki kosala makambo oyo bazalaki koteya ye banda kala ete ezali makambo ya ntina mpenza, ayebaki lisusu epai atya motó te. Ntango asalaki mobembo na ekólo mosusu, amonaki mpe ndenge bato ya Azia basambelaka mpe akómaki komituna soki Nzambe ya solo azali kaka moko. Ndenge nini asengelaki kosambela? Ntango atunaki sango mituna ya Biblia, sango akokaki koyanola ata na motuna moko te, mpe yango elɛmbisaki ye nzoto.
Lingomba ya Katolike etambwisaki mokanda moko na engumba mobimba epai molakisi yango azalaki kofanda mpo na kokebisa bandimi na bango ete básololaka na Batatoli ya Yehova te. Kasi molakisi yango azwaki kaka biyano te na mituna na ye. Mokolo moko, ntango Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ye, ayokaki bango mpe asepelaki na makambo oyo bayebisaki ye. Ezalaki mbala ya liboso asolola na bango.
Mpo na kozwa biyano na ebele ya mituna oyo azalaki na yango, mwasi yango abandaki koyekola Biblia na Batatoli yango. Pɔsɔ na pɔsɔ, azalaki kozela bango na ebele ya mituna. Azalaki na mposa ya koyeba nkombo ya Nzambe, soki Nzambe ya solo azali kaka moko, soki Nzambe andimaka ete bato básalela bikeko mpo na losambo, mpe mituna mosusu ebele. Amonaki ete biyano nyonso oyo bazalaki kopesa na mituna na ye ezalaki kouta na Biblia, kasi na makanisi ya bato te, mpe yango ekamwisaki ye mpe asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola. Mokemoke, azwaki biyano na ebele ya mituna oyo azalaki na yango. Lelo oyo, azali kosambela Yehova na elimo mpe na solo, ndenge Yesu alobaki mpo na “basambeli ya solosolo.”—Yoane 4:23.
Libota moko na Sri Lanka bazalaki kotánga Biblia elongo mbala na mbala, kasi bazalaki kozwa eyano te na ebele ya mituna ya ntina mingi oyo bazalaki komituna. Atako bazalaki na mposa ya lisalisi, sango akokaki kopesa bango yango te. Kasi, Batatoli ya Yehova bayaki kotala libota yango mpe batikelaki bango mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe mikanda yango esalisaki bango mpenza. Na nsima, ntango Batatoli ya Yehova bapesaki bango biyano ya malamu mpenza na mituna oyo bazalaki komituna na makambo ya Biblia, bandimaki koyekola Biblia. Bazalaki kosepela mpenza na makambo oyo bazalaki koyekola.
Nzokande, mpo na mateya oyo bateyaki ye na lingomba banda bomwana na ye, mama ya libota yango azalaki kokakatana mpo na kondima ete Tata ya Yesu Klisto azali “Nzambe kaka moko ya solosolo,” ndenge oyo Yesu ye moko alobaki. (Yoane 17:1, 3) Na lingomba na ye bateyaki ye ete Yesu ná Tata na ye bazali ndenge moko mpe ete moto akoki te kobɛtela “libombami” yango ntembe. Na bosembo mpenza mpe na mawa nyonso na motema, asalelaki nkombo ya Yehova mpe abondelaki ete alakisa ye soki Yesu azali mpenza nani. Na nsima, atalelaki lisusu malamumalamu mikapo oyo ezali kolobela likambo yango. (Yoane 14:28; 17:21; 1 Bakolinti 8:5, 6) Lokola moto oyo balongoli elamba ya moindo na miso, amonaki polele ete Yehova—Mozalisi ya likoló na nse mpe Tata ya Yesu Klisto—azali Nzambe ya solo.—Yisaya 42:8; Yilimia 10:10-12.
Mpo na nini bato bazali konyokwama?
Yobo anyokwamaki na ndenge moko ya mabe koleka. Mopɛpɛ ya makasi ebomaki bana na ye nyonso mpe akómaki mobola. Anyokwamaki mpe na bokɔnɔ moko ya mabe, mpe baninga mabe bazalaki kotyola ye. Mitungisi nyonso wana etindaki Yobo aloba bilobaloba. (Yobo 6:3) Kasi Nzambe ayebaki mpasi oyo azalaki koyoka. (Yobo 35:15) Ayebaki malamu mpenza motema ya Yobo mpe apesaki ye toli oyo esengelaki. Asalaka mpe bongo mpo na bato lelo oyo.
Na Mozambique, Castro azalaki na mbula zomi mpamba ntango mama na ye akufaki. Atungisamaki mingi. Amitunaki boye: “Mpo na nini mama akufi mpe atiki biso?” Atako abɔkɔlamaki na baboti oyo bazalaki kobanga Nzambe, na ngonga wana akokaki lisusu kokanga ntina ya likambo yango te. Eloko nini ekokaki kobɔndisa ye mpe kolendisa motema na ye? Lokola azalaki kotánga mwa Biblia ya moke na monɔkɔ ya Chichewa mpe kotalela makambo oyo azalaki kotánga elongo na bayaya na ye, yango ebɔndisaki ye.
Mokemoke, Castro asosolaki ete liwa ya mama na ye ezalaki te mpo na kozanga bosembo ya Nzambe, kasi akufaki mpo azalaki moto ya kozanga kokoka. (Baloma 5:12; 6:23) Alendisamaki mingi na elaka ya lisekwa oyo Biblia ezali kopesa, mpamba te yango epesaki ye elikya ete akomonana lisusu na mama na ye. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Likambo ya mawa, mbula minei mpamba na nsima, tata na ye mpe akufaki. Kasi na mbala oyo, liwa yango etungisaki ye mingi te. Lelo oyo, azali komonisa bolingo mpo na Yehova mpe amipesi na mosala ya Nzambe. Bato nyonso oyo bayebi ye bamonaka ete akómá na esengo.
Ebele ya bato mosusu oyo babungisá balingami na bango babɔndisamaka mpe na solo ya Biblia oyo ebɔndisaki Castro. Bato mosusu oyo banyokwamaka na makambo oyo bato mabe basalaka bango batunaka lokola Yobo ete: “Mpo na nini bato mabe bazali kaka kotikala na bomoi?” (Yobo 21:7, NW) Ntango bato bayokaka mpenza eyano ya Nzambe na kati ya Liloba na ye, bamonaka ete ndenge oyo Nzambe asalaka makambo ezalaka nde mpo na bolamu na bango moko.—2 Petelo 3:9.
Barbara, oyo akolaki na États-Unis, ayokaki naino nsɔmɔ ya bitumba te na bomoi na ye. Kasi akolaki na kati ya mokili oyo bitumba ezalaki bipai nyonso. Mokolo na mokolo bazalaki koyoka nsango ya bitumba. Na kelasi, azalaki koyekola na masolo ya kala makambo oyo moto moko te akokaki kondima ete ekoki kosalema. Makambo yango eutaki na nini? Nzambe azalaki komibanzabanza mpo na makambo oyo ezalaki kosalema? Azalaki kondima ete Nzambe azali, kasi ayebaki ye malamumalamu te.
Nzokande, lokola Barbara azalaki kosangana na Batatoli ya Yehova, lolenge na ye ya kotalela bomoi ekómaki kobongwana mokemoke. Azalaki koyoka bango mpe koyekola Biblia na bango. Azalaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Kutu, akendaki na liyangani na bango moko ya monene. Longola yango, ntango azalaki kotuna Batatoli mituna, azalaki komona ete Motatoli mokomoko azalaki kopesa makanisi ndenge moko na Batatoli mosusu na biyano oyo bazalaki kopesa ye. Batatoli nyonso bazalaki kobimisa makanisi ndenge moko mpamba te makanisi yango ezalaki kouta na Biblia.
Batatoli basalelaki Biblia mpo na komonisa polele ete Satana Zabolo nde azali koyangela mokili oyo mpe makanisi na yango ezali kouta epai na ye, mpe ete mokili yango ezali komonisa elimo na ye. (Yoane 14:30; 2 Bakolinti 4:4; Baefese 2:1-3; 1 Yoane 5:19) Bayebisaki Barbara ete makambo oyo ezalaki kotungisa ye esilá kosakolama na kati ya Biblia. (Danyele, mokapo 2, 7, mpe 8) Nzambe asakolaki yango mpo azali na likoki ya komona makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, soki asepeli komona yango. Makambo yango mosusu Nzambe ye moko asalaki yango. Nzokande, mosusu atikelaki yango kaka nzela esalema, kasi eutaki epai na ye te. Batatoli bamonisaki Barbara ete Biblia ezali mpe kosakola makambo ya malamu ná ya mabe oyo ezali kosalema na ntango na biso mpe ezali kolimbola ntina ya makambo yango. (Matai 24:3-14) Balakisaki ye bilaka ya Biblia oyo ezali kolobela mokili ya sika, oyo na kati na yango boyengebene ekotondana mpe mpasi ekozala lisusu te.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.
Mokemoke, Barbara abandaki koyeba ete atako mpasi ya bato eutaka epai ya Yehova Nzambe te, apekisaka mpe yango te na kosɛngisáká bato na makasi ete bátosa mibeko na ye, soki bango moko baboi kotosa yango. (Deteronome 30:19, 20) Nzambe azwi bibongiseli oyo ekoki kosala ete tózala na bomoi ya esengo libela na libela, kasi sikoyo azali kopesa biso libaku ete tómonisa soki tokozala na lolenge ya bomoi oyo eyokani na banzela na ye ya sembo. (Emoniseli 14:6, 7) Barbara azwaki ekateli ya koyekola mitinda ya Nzambe mpe ya kotosa yango na bomoi na ye. Amonaki mpe ete Batatoli ya Yehova bazalaki komonisana bango na bango lolenge ya bolingo oyo Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye na nzela na yango.—Yoane 13:34, 35.
Yo mpe okoki kozwa litomba na bibongiseli oyo esalisaki ye.
Lolenge ya bomoi oyo ezali na ntina
Ata mpe bato oyo bamonanaka lokola bazali na mikakatano te na bomoi na bango, bakoki kozala na mposa ya kozwa biyano na mituna oyo ezali kotungisa bango. Na ndakisa, elenge mobali moko na Angleterre, nkombo na ye Matthew, azalaki ntango nyonso na mposa makasi ya koyeba Nzambe ya solo mpe ya koyeba ntina ya bomoi. Tata ya Matthew akufaki ntango Matthew azalaki na mbula 17. Na nsima, Matthew azwaki diplome ya iniversite na mosala ya miziki. Mpe nsukansuka amonaki ete lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango ya komipesa na bozwi ya mosuni ezali na ntina te. Alongwaki na engumba oyo abotamaki mpe akendaki kofanda na Londres, mpe kuna amipesaki mpenza na komɛla bangi, na kokɔta banganda ya bandumba, na koyekola minzoto mpo na koyeba makambo oyo ekoya, na bikelakela, mpe na mwa lingomba moko ya Bouddha babengi Zen mpe na mateya ndenge na ndenge ya filozofi—nyonso wana kaka mpo na koluka bomoi ya malamu. Lokola azalaki lisusu na elikya te, abelelaki Nzambe ete asalisa ye na koyeba solo.
Nsima ya mikolo mibale, Matthew akutanaki na moninga na ye moko ya kala mpe ayebisaki ye mpasi nyonso oyo azalaki na yango. Mobali yango ayekolaki na Batatoli ya Yehova. Ntango alakisaki Matthew mokapo ya 2 Timote 3:1-5, Matthew akamwaki komona ete Biblia ezali kolobela mpenza makambo oyo ezali kosalema na mokili. Ntango atángaki Lisolo Likoló ya Ngomba, yango esimbaki mpenza motema na ye. (Matai, mokapo 5 tii mokapo 7) Na ebandeli, akakatanaki mpamba te atángaki mwa mikanda oyo elobaki mabe mpo na Batatoli ya Yehova, kasi nsukansuka azwaki ekateli ya koyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki penepene na esika oyo azalaki kofanda.
Makambo oyo Matthew ayokaki kuna esepelisaki ye mingi mpe abandaki koyekola Biblia na nkulutu moko ya lisangá yango. Mosika te amonaki ete makambo oyo azalaki koyekola ezalaki mpenza makambo oyo azalaki koluka, eyano na libondeli oyo asalaki epai ya Nzambe. Azwaki ebele ya matomba ntango atikaki misala oyo esepelisaka Nzambe te. Lokola akómaki kobanga Nzambe, yango etindaki ye abanda kotosa mitinda ya Nzambe na bomoi na ye. Matthew amonaki ete bomoi ya lolenge wana ezali mpenza na ntina.—Mosakoli 12:13.
Etángamaká te ete Matthew to bato mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo bakokóma na bomoi ya esengo oyo bakómi na yango. Nzokande, bayekolaki ete Yehova Nzambe azali na mokano moko malamu mpo na bato nyonso oyo bazali bango moko kopona kotosa mibeko na ye. (Misala 10:34, 35) Mokano yango etali mpe bomoi ya seko na kati ya mokili oyo ezangi bitumba, epai bamaladi mpe nzala ekozala te—ata mpe liwa. (Yisaya 2:4; 25:6-8; 33:24; Yoane 3:16) Yango nde oyo ozali koluka? Soki ezali bongo, okoki koyeba lisusu makambo mingi oyo ekosalisa yo na kozwa sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo soki ozali koyangana na makita mpo na koyekola Biblia na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Tozali mpenza kolendisa yo na kosala yango.
[Elilingi na lokasa 4]
Motamboli: Fɔtɔ ya Chad Ehlers/Index Stock
[Elilingi na lokasa 7]
Bondelá Nzambe na molende, tángaká nkombo na ye
[Bililingi na lokasa 7]
Yekolá Biblia ná bato oyo bateyaka mpenza makambo na yango
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Yanganaká na makita na Ndako ya Bokonzi