Otunaka ete, “Yehova azali wapi?”
“Batiki ngai mosika . . . Mpe balobi te ete, ‘Yehova azali wapi?’”—YILIMIA 2:5, 6, NW.
1. Ntango bato batunaka ete, “Nzambe azali wapi?,” makanisi nini bazalaka na yango?
“NZAMBE azali wapi?” Ebele ya bato basilá kotuna motuna yango. Basusu batunaki yango kaka mpo na koyeba esika oyo Mozalisi afandaka. Basusu batunaki yango ntango likama moko monene esalemaki to ntango bakutanaki na mokakatano moko mpe bazalaki koyeba te mpo na nini Nzambe azali kosala eloko te. Kasi, ezali mpe na bato mosusu oyo batunaka yango te mpamba te bandimaka te ete Nzambe azali.—Nzembo 10:4.
2. Banani oyo basalaki mosala ya mpunda te mpo na koluka Nzambe?
2 Kasi, bato mingi bamonaka mpe bandimaka ebele ya makambo oyo ezali kolakisa ete Nzambe azali. (Nzembo 19:1; 104:24) Bamosusu kati na bato yango basepelaka kaka kosambela ata na lingomba nini oyo esepelisi bango. Nzokande, ezali na bamilio ya bato mosusu na mokili mobimba oyo balingaka mpenza solo, yango wana balukaki Nzambe ya solo. Koluka na bango ezalaki mosala ya mpunda te, mpamba te Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso.”—Misala 17:26-28.
3. (a) Nzambe afandaka wapi? (b) Motuna ‘Yehova azali wapi’ elimbolaka nini na kati ya Makomami?
3 Ntango moto ayebi Yehova, akangaka ntina ete “Nzambe azali Elimo,” tokoki komona ye na miso te. (Yoane 4:24) Yesu abengaki Nzambe ya solo ete “Tata na ngai oyo azali na likoló.” Yango elingi koloba nini? Elingi koloba ete Tata na biso ya likoló afandi na esika oyo, na ndimbola ya elimo, ezali likoló mpenza, se ndenge oyo mapata ezali likoló mpenza ya mabelé. (Matai 12:50; Yisaya 63:15) Atako tokoki komona Nzambe na miso te, asalisi biso na koyeba ye mpe koyekola mikano na ye. (Exode 33:20; 34:6, 7) Apesaka biyano na mituna oyo bato ya sembo, oyo balukaka koyeba ntina ya bomoi, bamitunaka. Amonisi biso ndenge ya malamu ya koyeba makanisi na ye na makambo oyo etali bomoi na biso, elingi koloba, ndenge oyo atalelaka makambo yango mpe soki bamposa na biso eyokani na mikano na ye. Mposa na ye ezali ete tóluka koyeba makambo yango mpe tósala milende mpo na kozwa biyano. Lokola bato ya Yisalaele ya kala basalaki bongo te, Yehova atindaki mosakoli Yilimia mpo na kopamela bango. Bato yango bayebaki nkombo ya Nzambe, kasi batunaki te ete, “Yehova azali wapi?” (Yilimia 2:6, NW) Bazalaki kokanisa libosoliboso mokano ya Yehova te. Bazalaki koluka toli na ye te. Mpo na kozwa bikateli, ezala ya minene to ya mike, otunaka ete, “Yehova azali wapi?”
Bato oyo balukaki koyeba makanisi ya Nzambe
4. Ndenge nini ndakisa ya Davidi ekoki kosalisa biso na oyo etali kotuna makanisi ya Yehova?
4 Davidi, mwana ya Yisai, akómaki na kondima makasi epai ya Yehova ntango azalaki naino elenge. Davidi ayebaki ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi.” Amonaki ndenge oyo Yehova azalaki kobatela ye. Kondima ya Davidi mpe bolingo na ye mpo na “nkombo ya Yehova” epesaki ye mpiko ya kobunda na Goliata, engambe Mofilistia oyo azalaki na bibundeli ya makasi, mpe abomaki ye. (1 Samwele 17:26, 34-51) Atako Davidi alongaki, akómaki komityela motema te. Akómaki na likanisi te ete kobanda ntango wana, Yehova akosalisa ye alonga na likambo ata nini oyo alingi kosala. Na bambula oyo elandaki, mbala mingi Davidi azalaki koluka koyeba makanisi ya Yehova liboso ya kozwa bikateli. (1 Samwele 23:2; 30:8; 2 Samwele 2:1; 5:19) Azalaki ntango nyonso kobondela ete: “Ee Yehova, lakisá ngai banzela na yo; teyá ngai banzela na yo. Tambwisá ngai na kati ya solo na yo mpe teyá ngai, mpamba te ozali Nzambe ya lobiko na ngai. Epai na yo natye elikya na ngai mokolo mobimba.” (Nzembo 25:4, 5, NW) Talá ndakisa malamu mpenza oyo tosengeli kolanda!
5, 6. Ndenge nini Yosafata alukaki Yehova na makambo ndenge na ndenge na bomoi na ye?
5 Ntango Yosafata, mokonzi ya mitano nsima ya Davidi, azalaki koyangela, bikólo misato esangisaki basoda na yango mpo na kobundisa Yuda. Lokola ekólo ezalaki na likama monene, Yosafata “atyaki motema ete aluka [Yehova].” (2 Ntango 20:1-3) Yango ezalaki mbala ya liboso te oyo Yosafata alukaki Yehova. Mokonzi yango aboyaki losambo ya Baala oyo Yisalaele, bokonzi ya bikólo zomi oyo epɛngwaki, emipesaki na yango mpe aponaki kotambola na banzela ya Yehova. (2 Ntango 17:3, 4) Ntango sikoyo akutanaki na mokakatano monene wana, ndenge nini Yosafata ‘alukaki Yehova’?
6 Na ntango wana ya mpasi, Yosafata asalaki libondeli moko liboso ya bato nyonso na Yelusaleme mpe alakisaki ete abosanaki te ete Yehova azali na nguya oyo eleki nguya nyonso. Akanisaki malamumalamu mokano oyo Yehova amonisaki na ndenge abenganaki bikólo mosusu mpe apesaki Yisalaele mabelé lokola libula. Mokonzi amonisaki ete azalaki na mposa ya lisalisi ya Yehova. (2 Ntango 20:6-12) Yehova amimonisaki na ntango wana? Ɛɛ. Na nzela ya Molevi moko na nkombo Yahaziele, Yehova apesaki malako ya polele mpe na mokolo oyo elandaki asungaki libota na Ye mpe balongaki etumba wana. (2 Ntango 20:14-28) Nini ekoki kondimisa yo ete Yehova akomimonisa mpe epai na yo soki osɛngi ye atambwisa yo?
7. Nzambe ayokaka mabondeli ya banani?
7 Yehova aponaka bilongi te. Azali kobenga bato ya bikólo nyonso ete básalaka mabondeli mpo na koluka ye. (Nzembo 65:2; Misala 10:34, 35) Atalaka makambo oyo ezali na mitema ya bato oyo bazali kobondela ye. Alobi na biso ete ayokaka mabondeli ya bato ya sembo. (Masese 15:29) Amimonisaka epai ya bato mosusu oyo, kala bazalaki kokanisa ye te, kasi sikoyo bamikitisi mpe bazali koluka ye atambwisa bango. (Yisaya 65:1) Ayokaka ata mabondeli ya bato oyo bazalaki liboso kobuka mibeko na ye, kasi sikoyo bamikitisi mpe babongoli mitema. (Nzembo 32:5, 6; Misala 3:19) Nzokande, moto oyo aboyi kotosa Nzambe, alekisaka ntango na ye mpamba na kobondela. (Malako 7:6, 7) Tótalela mwa bandakisa.
Basɛngaki, kasi bazwaki te
8. Mpo na nini Yehova andimaki mabondeli ya Mokonzi Saulo te?
8 Ntango mosakoli Samwele ayebisaki Mokonzi Saulo ete Nzambe aboyaki ye mpo azalaki kotosa ye te, Saulo afukamaki liboso ya Yehova. (1 Samwele 15:30, 31) Kasi, asalaki yango kaka mpo na miso ya bato. Saulo azalaki mpenza na mposa ya kotosa Nzambe te, azalaki nde koluka ete bákumisa ye na miso ya bato. Na nsima, ntango Bafilistia bazalaki kobundisa Yisalaele, Saulo atunaki Yehova. Nzokande, lokola azwaki eyano te, akendaki kotuna nganga-nkisi, atako ayebaki malamu ete Yehova apekisaki likambo yango. (Deteronome 18:10-12; 1 Samwele 28:6, 7) Mokapo ya 1 Ntango 10:14 elobi na mokuse mpo na Saulo ete: “Atunaki [Yehova] te.” Mpo na nini? Mpamba te Saulo azalaki kobondela na kondima te. Na yango, ezalaki lokola nde azalaki kobondela te.
9. Mabe nini ezalaki na ndenge oyo Sidikiya azalaki kobondela mpo na kosɛnga Yehova toli?
9 Ndenge moko mpe, ntango etikalaki moke ete bokonzi ya Yuda ebomama, bato bazalaki kobondela mingi mpe bazalaki kotuna basakoli ya Yehova. Nzokande, atako na monɔkɔ bazalaki koloba ete babangaka Yehova, bazalaki mpe kosambela bikeko. (Sefania 1:4-6) Atako bazalaki kotuna Nzambe, babongisaki mitema na bango te mpo na kosala mokano na ye. Mokonzi Sidikiya asɛngaki Yilimia atuna Yehova mpo na ye. Yehova así ayebisaki mokonzi likambo oyo asengelaki kosala. Kasi lokola mokonzi yango azalaki na kondima te mpe azalaki kobanga bato, atosaki maloba ya Yehova te, mpe Yehova apesaki ye te eyano oyo azalaki koluka.—Yilimia 21:1-12; 38:14-19.
10. Mabe ezalaki wapi na ndenge oyo Yoyanana alukaki litambwisi ya Yehova, mpe liteya nini tozwi na libunga oyo asalaki?
10 Ntango Yelusaleme ebebisamaki mpe basoda ya Babilone bamemaki Bayuda na boombo, Yoyanana azwaki likanisi ya komema na Ezipito mwa ndambo ya Bayuda oyo batikalaki na Yuda. Babongisaki makambo nyonso; kasi liboso bákende, basɛngaki Yilimia abondela Yehova mpo na bango mpo atambwisa bango. Kasi, ntango bazwaki te eyano oyo balingaki, bakendaki na motó makasi mpe basalaki kaka ndenge oyo bakanaki. (Yilimia 41:16–43:7) Ezali nde na makambo oyo masolo yango ekoki koteya yo mpo ete ntango ozali koluka Yehova, amimonisa epai na yo?
“Bókoba kotalela malamumalamu”
11. Mpo na nini tosengeli kosalela toli ya Baefese 5:10?
11 Losambo ya solo esuki kaka te na komipesa na Nzambe, kozwa batisimo, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Losambo ya solo etalelaka bomoi na biso mobimba. Mokolo na mokolo tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kotinda biso tópesa Nzambe mokɔngɔ; mikakatano yango mosusu emonanaka polele mpe mosusu emonanaka polele te. Tosengeli kosala nini ntango tokutani na mikakatano yango? Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya sembo na Efese, alobaki na bango boye: “Bókoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.” (Baefese 5:10) Makambo mingi oyo Makomami elobeli ezali komonisa ete kosala bongo nde ezali bwanya.
12. Mpo na nini Yehova asepelaki te ntango Davidi amemisaki sanduku ya kondimana mpo bákende na yango na Yelusaleme?
12 Ntango sanduku ya kondimana ezongaki na Yisalaele, efandaki bambula ebele na Kilyata-yalima; na nsima, Mokonzi Davidi alingaki ete bámema yango na Yelusaleme. Atunaki makanisi ya bankumu ya mboka mpe alobaki ete Sanduku ekomemama ‘soki emonani malamu epai na bango mpe soki ekoki liboso ya Yehova.’ Kasi, alukaki malamumalamu te koyeba mokano ya Yehova na likambo yango. Soki alukaki yango, mbɛlɛ batyaki Sanduku likoló ya likalo te. Balevi ya libota ya Keyata nde balingaki komema yango na mapeka, ndenge malako ya Nzambe elobaki yango polele. Atako mbala mingi Davidi azalaki kotuna Yehova, na likambo wana asalaki yango na ndenge oyo esengeli te. Likambo yango esukelaki bango mabe mpenza. Na nsima, Davidi ye moko alobaki ete: “Yehova Nzambe na biso abɛti biso, mpo tolukaki ye te ndenge oyo tomesaná.”—1 Ntango 13:1-3; 15:11-13, NW; Mituya 4:4-6, 15; 7:1-9.
13. Maloba ya nzembo oyo bayembaki ntango bamemaki Sanduku ezongisaki na makanisi na bango likambo nini?
13 Na nsima, ntango Balevi bamemaki Sanduku banda na ndako ya Obede-edome tii na Yelusaleme, bazalaki koyemba nzembo moko oyo Davidi asalaki. Maloba mosusu ya nzembo yango ezongisaki na makanisi na bango likambo moko ya ntina: “Bóluka [Yehova] mpe nguya na ye, bólukaka elongi na ye ntango nyonso. Bóbanza misala ya nkembo misalaki ye; makambo na ye ya kokamwa mpe toli ya monɔkɔ na ye.”—1 Ntango 16:11, 12.
14. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa malamu ya Salomo mpe mabunga oyo asalaki na nsima?
14 Liboso Davidi akufa, apesaki mwana na ye Salomo toli oyo: “Soki oluki [Yehova], akomimonisa epai na yo.” (1 Ntango 28:9) Liboso Salomo afanda na kiti ya bokonzi, akendaki na Gibona, epai hema ya koyangana ezalaki, mpe atumbelaki Yehova mbeka. Kuna, Yehova alobaki na Salomo boye: “Sɛngá! Napesa yo nini?” Yehova akokisaki mposa ya Salomo; apesaki ye bwanya mpe boyebi mpo na kosambisa Yisalaele, mpe likoló na yango, abakisaki bozwi ná lokumu. (2 Ntango 1:3-12, NW) Salomo alandaki plan oyo Yehova alakisaki Davidi mpe atongelaki Yehova tempelo moko kitoko mpenza. Kasi na oyo etali kobala na ye, Salomo alukaki Yehova te. Salomo abalaki basi oyo bazalaki kosambela Yehova te. Ntango akómaki mobange, basi yango babebisaki motema na ye mpe atikaki kotosa Yehova. (1 Mikonzi 11:1-10) Ata soki tozali na lokumu, na bwanya, to na boyebi ndenge nini, ‘kokoba kotalelaka malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo’ ezali na ntina!
15. Ntango Zela, moto ya Etiopia abundisaki Yuda, mpo na nini Asa abondelaki Yehova na kondima mpo abikisa Yuda?
15 Makambo oyo elekaki ntango Asa, mwana ya mwana ya mwana ya Salomo, azalaki mokonzi ezali komonisa lisusu ntina ya kosala bongo. Ntango Asa akokisaki mbula zomi na moko na bokonzi, Zela, moto ya Etiopia, ayaki na basoda milio moko mpo na kobundisa Yuda. Yehova alingaki nde kobikisa Yuda? Mbula koleka 500 liboso ya likambo wana, Yehova alobaki polele makambo oyo basaleli na ye bakokutana na yango soki bazali kotosa ye mpe bazali kobatela mibeko na ye, mpe makambo oyo bakokutana na yango soki bazali kosala bongo te. (Deteronome 28:1, 7, 15, 25) Ntango Asa abandaki bokonzi na ye, alongolaki na ekólo mobimba bitumbelo mpe makonzí oyo bazalaki kosalela na losambo ya lokuta. Alendisaki bato ‘báluka Yehova.’ Asa azelaki te ete akutana naino na mokakatano bongo na nsima asala yango. Yango wana, na kondima mpenza, Asa abondelaki Yehova asalisa bango. Nini esalemaki? Nzambe asalisaki Yuda mpe balongaki mpenza etumba yango.—2 Ntango 14:2-12.
16, 17. (a) Atako Asa alongaki, Yehova ayebisaki ye lisusu likambo nini? (b) Ntango Asa asalaki makambo na kozanga bwanya, lisalisi nini azwaki, kasi asalaki nini? (c) Liteya nini tokoki kozwa na etamboli ya Asa?
16 Atako bongo, ntango Mokonzi Asa azalaki kozonga nsima ya kolonga etumba, Yehova atindaki Azalia akutana na ye mpe alobaki na ye boye: “Ee Asa, mpe [Yuda] nyonso mpe Benyamina, yoká ngai. [Yehova] azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, akotika bino.” (2 Ntango 15:2) Likambo yango ebakisaki Asa mpiko mpe alendisaki lisusu losambo ya solo. Kasi, mbula 24 na nsima, ntango banguna mosusu bakendaki kobundisa ye, Asa abosanaki koluka Yehova. Atalelaki Liloba ya Nzambe te, mpe abosanaki makambo oyo Yehova asalaki ntango basoda ya Etiopia babundisaki Yuda. Asalaki likambo ya bozoba: akendeki kosala boyokani na Sulia.—2 Ntango 16:1-6.
17 Yehova atindaki Hanani, momoni-makambo, mpo na kopamela Asa na likambo oyo asalaki. Lokola bamonisaki ye likanisi ya Yehova, Asa akokaki kozwa liteya na ntango wana. Kasi, ye asilikaki mpe atyaki Hanani na kasho. (2 Ntango 16:7-10) Asalaki likambo mabe mpenza! Ezali boni mpo na biso? Tolukaka Nzambe, nde na nsima toboyaka kolanda toli? Ntango nkulutu moko oyo alingi bolamu na biso apesi biso toli oyo euti na Biblia mpo tokómi kokangama na makambo ya mokili, tozalaka na botɔndi mpo na bolingo oyo amonisi mpo na kosalisa biso tóyeba “oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo”?
Kobosanaka te koluka makanisi ya Nzambe
18. Litomba nini tokoki kozwa na maloba oyo Elihu alobaki na Yobo?
18 Ata moto oyo asalelaka Yehova na bosembo banda bambula ebele akoki kobɛta libaku na ntango oyo abulungani. Yobo atyaki makanisi na ye nyonso epai na ye ntango oyo abɛlaki maladi moko mabe mpenza, bana na ye nyonso bakufaki, abungisaki biloko na ye nyonso, mpe baninga na ye bazwelaki ye makanisi mabe. Elihu alobaki na ye ete: “Moto moko te alobi ete, ‘Nzambe, Mokeli Monene na ngai, azali wapi?” (Yobo 35:10, NW) Esengelaki ete Yobo atya makanisi na ye epai ya Yehova mpe aluka koyeba ndenge oyo Ye azalaki kotalela likambo yango. Yobo amikitisaki mpe andimaki toli wana, mpe ndakisa na ye ekoki kosalisa biso na kosala mpe bongo.
19. Mbala mingi eloko nini bato ya Yisalaele bazalaki kosala te?
19 Bato ya Yisalaele bayebaki makambo oyo Nzambe asalaki mpo na ekólo na bango. Kasi mbala mingi bazalaki kokanisa makambo yango te ntango bakutani na mikakatano na bomoi na bango. (Yilimia 2:5, 6, 8) Ntango balingi kozwa bikateli na bomoi na bango, bazalaki kosala oyo esepelisi bango na esika ya kotuna ete, “Yehova azali wapi?”—Yisaya 5:11, 12.
Kotika te kotuna ete, “Yehova azali wapi?”
20, 21. (a) Lelo oyo banani bamonisi elimo ya Elisa na ndenge balukaki ete Yehova atambwisa bango? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya kondima na bango mpe kozwela yango litomba?
20 Ntango Eliya asukisaki mosala na ye, Elisa, mosungi na ye, azwaki elamba ya mosala oyo Eliya akweisaki, akendaki na Ebale Yolodani, abɛtaki yango na mai, mpe atunaki ete: “Yehova Nzambe ya Eliya, ɛɛ Ye, azali wapi?” (2 Mikonzi 2:14, NW) Yehova ayokaki ye mpe amonisaki ye ete elimo ya Eliya ekómi epai na ye. Likambo yango ekoki koteya biso nini?
21 Likambo ya ndenge yango esalemaki na eleko na biso. Baklisto mosusu bapakolami oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola bakufaki. Baoyo bakómaki kotambwisa ebongiseli batalelaki Makomami mpe babondelaki Yehova atambwisa bango. Babosanaki te kotuna ete, “Yehova azali wapi?” Na bongo, Yehova akobaki kotambwisa basaleli na ye mpe kopambola mosala na bango. Biso mpe tolandaka ndakisa na bango ya kondima? (Baebele 13:7) Soki ezali bongo, tokotikala na ebongiseli ya Yehova, tokolanda malako na yango, mpe tokomipesa mobimba na mosala oyo ebongiseli yango ezali kosala, oyo Yesu Klisto azali kotambwisa.—Zekalia 8:23.
Okopesa eyano nini?
• Na likanisi nini tosengeli kotuna ete, “Yehova azali wapi?”
• Lelo oyo ndenge nini tokoki kozwa eyano na motuna, “Yehova azali wapi?”
• Mpo na nini Nzambe ayokaka mabondeli ya bato mosusu te oyo batunaka ye toli?
• Bandakisa ya banani na kati ya Biblia ezali komonisa ntina ya ‘kokoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo’?
[Elilingi na lokasa 9]
Ndenge nini Mokonzi Yosafata alukaki Yehova?
[Elilingi na lokasa 10]
Mpo na nini Saulo akendaki kotuna nganga-nkisi?
[Bililingi na lokasa 12]
Bondeláká, yekoláká, mpe manyoláká mpo na koyeba soki ‘Yehova azali wapi’