Lisolo ya Noa ezali nde na ntina mpo na biso?
NTANGO Yesu apesaki elembo ya kozala na ye mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, alobaki boye: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:3, 37) Emonani mpenza ete Yesu asakolaki ete makambo oyo ekosalema na mikolo na biso ekokokana na oyo esalemaki na ntango ya Noa. Lisolo ya makambo oyo esalemaki mpenza na ntango ya Noa ekoki kozala na ntina mingi mpo na biso lelo oyo.
Lisolo yango ya ntina mingi ezali nde lisolo ya Noa? Ezali na makambo oyo ezali kondimisa biso ete lisolo yango ezali lisapo mpamba te? Tokoki mpenza koyeba ntango oyo Mpela esalemaki?
Ntango nini Mpela esalemaki?
Biblia eyebisi makambo oyo esalemaká kala ná ndenge oyo ezalaki kolandana mpe yango ekoki kosalisa biso tózonga nsima tii na ntango oyo bakelaki moto ya liboso. Genese 5:1-29 ezali koyebisa biso ndenge oyo bato balandanaki banda na Adama, moto ya liboso, tii na Noa. Mpela ebandaki “ntango Noa azalaki na mbula nkama motoba.”—Genese 7:11, NW.
Mpo na koyeba mpenza ntango oyo Mpela esalemaki, tosengeli kobanda na dati moko ya sikisiki. Elingi koloba ete tosengeli kokamata dati moko oyo bato ya mayele na masolo ya kala bandimaka, mpe oyo likambo moko oyo Biblia elobeli esalemaká. Tokoki sikoyo kotánga mikolo na kozonga nsima mpo na koyeba dati mpenza oyo Mpela esalemaki soki totaleli yango na manaka na biso.
Dati moko oyo likambo ya ntina mingi esalemaki ezali mobu 539 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na mbula wana, Sirise, mokonzi ya Perse, akweisaki Babilone. Bakomi ntango oyo Sirise ayangelaki na mwa mabanga oyo ezali na masolo ya Babilone, na mikanda ya Diodore, ya Africanus, ya Eusèbe ná ya Ptolémée. Sirise abimisaki mobeko moko oyo epesaki Bayuda nzela ya kobima na Babilone mpe bakómaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Mbula yango ezalaki mbula ya nsuka na eleko ya mbula 70 oyo mokili ya Yuda etikalaki mpamba, oyo Biblia elobaka ete ebandaki na mobu 607 L.T.B. Soki tokamati mpe bambula oyo basambisi batambwisaki Yisalaele mpe oyo ya bakonzi, tokomona ete bana ya Yisalaele babimaki na Ezipito na mobu 1513 L.T.B. Masolo mosusu ya Biblia esalisi biso tótánga lisusu mbula 430 oyo elakaki liboso ya mbula wana mpe yango ememi biso na mobu 1943 L.T.B., ntango oyo Nzambe asalaki kondimana na Abalayama. Na nsima, tokobakisa bambula ya bomoi ya Tela, ya Nahola, ya Selugu, ya Liu, ya Pelege, ya Ebele, ya Sela mpe ya Alafasada, oyo abotamaki “mbula mibale na nsima ya Mpela.” (Genese 11:10-32) Na bongo, tokoki koloba ete Mpela ebandaki na mobu 2370 L.T.B.a
Mpela ebandi
Liboso tólobela makambo oyo esalemaki na ntango ya Noa, okoki naino kotánga Genese mokapo 7 vɛrsɛ 11 tii mokapo 8 vɛrsɛ 4. Biblia elobi na biso boye: “Na mbula ya nkama motoba na bomoi ya Noa [2370 L.T.B.], na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza, na mokolo yango bitima nyonso ya mai monene mpe mozindo efungwamaki mpe bikuke ya likoló efungwamaki.”—Genese 7:11, NW.
Noa akabolaki mbula moko na sanza 12 ya mikolo 30. Mpo na bato ya kala, sanza ya yambo ezalaki kobanda na eleko oyo ekokani na katikati ya sanza ya libwa na manaka na biso. Mbula oyo ememaki Mpela ebandaki na “sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza” mpe eumelaki mikolo 40 mpe butu 40 na sanza ya Novɛmbɛ mpe ya Desɛmbɛ 2370 L.T.B.
Biblia eyebisi biso lisusu boye: “Mokili etondaki na mai na boumeli ya mikolo nkama na ntuku mitano. . . . Mpe mai oyo etondaki na mokili ebandaki kokita, ezalaki kokita mokemoke; mpe na nsuka ya mikolo nkama na ntuku mitano mai nyonso ekaukaki. Mpe na sanza ya nsambo, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza, masuwa etɛlɛmaki na ngomba ya Alalata.” (Genese 7:24–8:4, NW) Boye, banda ntango mai ezindisaki mokili tii ntango ekaukaki, ezalaki mikolo 150, to sanza mitano. Mpe masuwa etɛlɛmaki likoló ya ngomba ya Alalata na Aprili ya mobu 2369 L.T.B.
Sikoyo, okoki kotánga Genese 8:5-17. Nsɔngɛ ya bangomba ebandaki komonana soki nsima ya sanza mibale na ndambo (mikolo 73), “na sanza ya zomi [Yuni], na mokolo ya liboso ya sanza.” (Genese 8:5)b Sanza misato (mikolo 90) na nsima—ntango Noa akómaki na “mbula ya nkama motoba na moko, na sanza ya liboso, mpe na mokolo ya liboso ya sanza,” to mpe na katikati ya sanza ya Sɛtɛmbɛ na mobu 2369 L.T.B.—Noa afungolaki porte ya masuwa. Mpe amonaki ete “mokili esilaki kokauka.” (Genese 8:13) Nsima ya sanza moko ná mikolo 27 (mikolo 57), “na sanza ya mibale, na mokolo ya ntuku mibale na nsambo ya sanza [katikati ya sanza ya Novɛmbɛ na mobu 2369 L.T.B.] mokili esilaki kokauka.” Na nsima, Noa ná libota na ye babimaki na masuwa mpe bakitaki na mabelé oyo esilaki kokauka. Na bongo, Noa ná bato oyo bazalaki na ye balekisaki na kati ya masuwa mbula moko ná mikolo zomi (mikolo 370).—Genese 8:14.
Kasi lisolo yango ya makambo nyonso oyo esalemaki, ata mpe makambo ya mikemike mpe ntango oyo makambo yango esalemaki, ezali komonisa nini? Ezali komonisa ete makambo oyo mosakoli Moize akomaki na buku ya Genese, oyo na ntembe te ezalaki masolo oyo bayebisaki ye, ezali makambo oyo esalemaki mpenza, kasi masapo mpamba te. Na yango, lisolo ya Mpela ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso lelo oyo.
Ndenge nini bakomi mosusu ya Biblia bazalaki kotalela Mpela?
Longola lisolo ya Genese, Biblia elobelaka Noa to Mpela na bisika mosusu. Na ndakisa:
(1) Ezela, moto oyo ayekolaki mpe akomaki masolo ya kala, atángaki Noa ná bana na ye (Semi, Hama mpe Yefete) na kati ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya libota ya Yisalaele.—1 Ntango 1:4-17.
(2) Luka, monganga mpe mokomi ya Evanzile, atángaki mpe Noa ntango akomaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Klisto.—Luka 3:36.
(3) Ntoma Petelo alobelaki mingi lisolo ya Mpela na mokanda oyo akomelaki baninga na ye baklisto.—2 Petelo 2:5; 3:5, 6.
(4) Ntoma Paulo alobeli kondima monene oyo Noa amonisaki na ndenge atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye.—Baebele 11:7.
Tokoki kozala na ntembe te ete bakomi yango ya Biblia oyo bapemamaki bazalaki kondima lisolo ya Genese oyo ezali kolobela Mpela. Bazalaki mpenza kondima ete ezalaki makambo oyo esalemaki solo.
Yesu mpe Mpela
Yesu azalaki na bomoi liboso kutu abotama lokola moto. (Masese 8:30, 31) Ntango Mpela esalemaki, azalaki ekelamu ya elimo kuna na likoló. Na yango, lokola Yesu amonaki mpenza ndenge likambo yango esalemaki, litatoli na ye na ntina na Noa mpe Mpela ezali kondimisa koleka matatoli mosusu nyonso oyo ezali na kati ya Makomami. Yesu alobaki ete: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo se ndenge bazalaki na mikolo yango liboso ya mpela, kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:37-39.
Tokanisi mpenza ete Yesu akokaki kosalela lisapo mpo na kokebisa biso mpo na nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo? Ata moke te! Tondimi mpenza ete ndakisa oyo Yesu apesaki ezali likambo moko oyo esalemá mpenza, oyo elobeli etumbu oyo Nzambe apesaki bato mabe. Ya solo, bato mingi bakufaki, kasi tokobanga te mpo toyebi ete Noa ná libota na ye babikaki na ntango ya Mpela.
“Mikolo ya Noa” ezali na ntina mingi mpo na bato oyo bazali na bomoi lelo oyo, na ntango ya “kozala ya Mwana ya moto,” Yesu Klisto. Ntango tozali kotánga lisolo ya Noa oyo elobeli Mpela ya mokili mobimba, tosengeli kondima ete ezali lisolo ya makambo oyo esalemaki mpenza. Mpe lisolo ya Genese oyo elobelaka Mpela ezali na ntina mingi mpo na biso. Lokola Noa, bana na ye mpe basi na bango bamonisaki kondima na ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na kobikisa bango, biso mpe Yehova akobatela biso soki tozali kondima mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato. (Matai 20:28) Longola yango, tokoki kozala na elikya ya kozala na kati ya bato oyo bakobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo, ndenge oyo lisolo ya Noa ezali komonisa ete ye ná libota na ye babikaki na ntango ya Mpela oyo esukisaki mokili ya ntango wana oyo ezalaki kotosa Nzambe te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndimbola mosusu mpo na koyeba dati ya Mpela ezali na buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 462-465, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Na buku moko (Keil-Delitzsch Commentary on the Old Testament, [volimi 1, lokasa 148]), tozali kotánga boye: “Ekoki kozala ete nsima ya mikolo 73 kobanda ntango oyo masuwa etɛlɛmaki, nsɔngɛ ya bangomba ebandaki komonana, elingi koloba bangomba ya Arménie, oyo ezalaki penepene na esika oyo masuwa etɛlɛmaki.”
[Etanda na lokasa 5]
Bazalaki mpenza na bomoi molai bongo?
BIBLIA elobi ete: “Mikolo nyonso ya Noa ezalaki mbula nkama libwa na ntuku mitano, na nsima akufaki.” (Genese 9:29) Metusela, nkɔkɔ ya Noa, azali moto oyo aumelaki na bomoi koleka bato nyonso; aumelaki mbula 969. Bato oyo bazalaki na bomoi kobanda na Adama tii na Noa bazalaki koumela na bomoi mbula koleka 850. (Genese 5:5-31) Mpo na nini bato ya ntango wana bazalaki na bomoi molai bongo?
Mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete moto azala na bomoi libela na libela. Nzambe akelaki moto ya liboso, Adama, mpo ete soki atosi Nzambe, azala na bomoi libela na libela. (Genese 2:15-17) Kasi Adama atosaki te mpe abungisaki libaku malamu yango. Na boumeli ya mbula 930 oyo azalaki na bomoi, nzoto ya Adama ezalaki kokufa mokemoke tii nsukansuka azongaki mabelé. (Genese 3:19; 5:5) Moto ya liboso atikelaki bana na ye nyonso lisumu mpe liwa.—Baloma 5:12.
Nzokande, bato oyo bazalaki na bomoi na ntango wana bazalaki mosika mingi te na Adama oyo azalaki na bomoi ya kokoka na ebandeli mpe, na ntembe te yango nde ntina oyo bazalaki na bomoi molai koleka bato oyo babotamaki nsima. Na yango, bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela bazalaki koumela pene na mbula nkóto, kasi na nsima ya Mpela, bato bakómaki na bomoi mokuse mpenza. Na ndakisa, Abalayama aumelaki kaka mbula 175. (Genese 25:7) Mpe pene na mbula 400 nsima ya liwa ya moto wana ya sembo, mosakoli Moize akomaki boye: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soki mpo na makasi ekokóma na ntuku mwambe; enzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolɔzi.” (Nzembo 90:10) Makambo ebongwani te lelo oyo.
[Chart/Pictures on page 6]
Banda mobeko ya Sirise ebimaki ete Bayuda bázonga na mboka na bango mpe kozonga nsima tii na Mpela ya Noa
537 Mobeko ya Sirisec
539 Sirise, mokonzi ya Perse, akweisi
Babilone
Mbula 68
607 Ebandeli ya mbula 70 oyo Yuda etikalaki mpamba
Mbula 906 ya
boyangeli ya
batambwisi,
basambisi mpe
bakonzi ya Yisalaele
1513 Kobima ya Yisalaele na Ezipito
Mbula 430
1943 Kondimana oyo Nzambe asalaki na Abalayama ekokisami
Mbula 205
2148 Kobotama ya Tela
Mbula 222
2370 Ebandeli ya Mpela
[Maloba na nse ya lokasa]
c Mobeko ya Sirise mpo na kolongola Bayuda na boombo ebimaki “na mbula ya liboso ya Sirise mokonzi ya Perse,” ekoki kozala na mobu 538 L.T.B. to na ebandeli ya mobu 537 L.T.B.