Bamoni eloko moko oyo ezali kondimisa ete Yesu azalaki?
“MAKOMI oyo ezali kondimisa ete Yesu azalaki.” Bakomaki ndenge wana na ezipeli ya zulunalo moko (Biblical Archaeology Review [Novɛmbɛ/Desɛmbɛ 2002]). Ezipeli yango ezalaki na fɔtɔ ya kɛsi moko ya kobomba mikuwa oyo esalemi na libanga ya calcaire; bamonaki yango na Israël. Bayuda bazalaki kosalela mingi bibombelo ya mikuwa banda na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.). Kasi eloko oyo ebendaki likebi na kɛsi wana ezali makomi ya Araméen oyo ezali na mopanzi na yango. Bato ya mayele balobaki ete na kɛsi yango bakomi boye: “Yakobo, mwana ya Yozefe, ndeko ya Yesu.”
Biblia elobaka ete Yesu ya Nazalete azalaki na ndeko moko na nkombo Yakobo, mwana ya Yozefe, mobali ya Malia. Ntango Yesu azalaki koteya na mboka oyo akolaki, bato oyo bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe batunaki ete: “Oyo ezali te mwana ya mosali-mabaya? Mama na ye abengami Malia te, mpe bandeko na ye ya mibali Yakobo mpe Yozefe mpe Simona mpe Yuda te? Mpe bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali elongo na biso te?”—Matai 13:54-56; Luka 4:22; Yoane 6:42.
Emonani ete makomi oyo ezali na ebombelo ya mikuwa wana ekokani mpenza na makambo oyo toyebi mpo na Yesu ya Nazalete. André Lemaire, moto moko ya mayele oyo ayekolaka makomi ya kala mpe mokomi ya lisolo oyo balobeli na zulunalo oyo touti kolobela alobi ete soki ezali solo ete Yakobo oyo balobeli na makomi wana ezali ndeko ya Yesu Klisto, tokoki mpenza koloba ete kɛsi yango ezali “eloko eleki koumela na kati ya biloko oyo bato ya arkeoloji bazwá oyo, longola makambo oyo Biblia elobi, ezali komonisa ete Yesu azalaki.” Hershel Shanks, mobimisi ya zulunalo yango, akomaki ete ebombelo yango ya mikuwa “ezali eloko oyo tokoki kosimba mpe komona na miso, oyo esalemaki na ntango ya moto oyo alekaki bato nyonso awa na mabelé.”
Kasi, na ekeke ya liboso, bato mingi bazalaki na bankombo nyonso misato oyo bakomi na kɛsi wana. Na yango, ekoki mpe kozala ete, longola libota ya Yesu Klisto, libota mosusu mpe ezalaki na bato oyo bazalaki na nkombo Yakobo, Yozefe mpe Yesu. Lemaire alobi boye: “Na Yelusaleme, kobanda na ntango oyo Yozefe abotamaki tii na mobu 70 T.B., ezalaki . . . na bato pene na 20 oyo bakokaki kobengama ‘Yakobo, mwana ya Yozefe, ndeko ya Yesu.’” Atako bongo, akanisi ete ezali mpenza na likoki monene (90%) ete Yakobo oyo balobeli na ebombelo ya mikuwa wana ezali ndeko ya Yesu Klisto.
Ezali na likambo mosusu oyo ezali kotinda bato mosusu bándima ete Yakobo oyo balobeli na makomi wana ezali ndeko ya Yesu Klisto. Na makomi ya ndenge wana, bazalaki na momeseno ya kokoma nkombo ya tata ya mowei, kasi bazalaki mpenza te kokoma nkombo ya ndeko na ye. Na yango, bato mingi ya mayele bamoni ete Yesu oyo balobeli wana esengeli kozala moto moko monene mpe, na bongo, bakanisi ete ezali Yesu Klisto, mobandisi ya lingomba ya boklisto.
Ebombelo yango ezali mpenza ya ntango wana?
Ebombelo ya mikuwa ezali mpenza nini? Ezali kɛsi oyo bazalaki kotya mikuwa ya moto oyo akufi nsima wana nzoto na ye esili kopɔla na kati ya lilita. Bato bayibaki bibombelo mingi ya mikuwa na malita ya kala ya Yelusaleme. Ezali bato ya arkeoloji te nde bakundolaki kɛsi oyo ezali na nkombo ya Yakobo, kasi basombaki yango nde na zando oyo batɛkaka biloko ya kala. Balobaka ete nkolo kɛsi yango asombaki yango na mwa bankama ya dolare, na bambula ya 1970. Na yango, epai ebombelo yango ya mikuwa eutá eyebani te. Profesɛrɛ Bruce Chilton ya Iniversite ya Bard na New York alobi boye: “Soki esika oyo bazwaki eloko moko boye eyebani te mpe eyebani te soki ezalaki wapi na boumeli ya mbula pene na 2 000, tokoki te koloba ete bankombo oyo bakomi likoló na yango ezali mpenza ya bato boye to boye.”
Mpo na koyeba soki kɛsi yango ezali mpenza eloko ya kalakala, André Lemaire atindaki yango na biro oyo batalelaka biloko ya kalakala na Israël. Kuna batalelaki ebombelo yango ya mikuwa malamumalamu mpe bamonaki ete mabanga ya calcaire oyo basalaki na yango ezalaki ya ekeke ya liboso to ya mibale ya T.B. Balobaki ete “ata elembo moko te ezali kolakisa ete basalelaki bisaleli ya mosala ya mikolo oyo mpo na kosala kɛsi yango.” Lisusu, bato ya mayele na makambo ya Biblia oyo zulunalo moko (The New York Times) etunaki mituna balobaki ete “emonani mpenza ete eloko yango ezali kolobela Yesu, kasi atako bongo ezali kondimisa mbala moko te.”
Zulunalo moko (Time) elobaki ete “na mikolo oyo, pene na bato nyonso ya mayele bandimaka ete Yesu azalaki.” Nzokande, bato mingi balobaka ete liboso bándima ete Yesu azalaki, basengeli komona bilembo mosusu oyo, longola oyo ezali na Biblia, ezali kondimisa mpenza ete azalaki. Ezali biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola nde esengeli kondimisa moto ete Yesu Klisto azalaki mpenza? Makambo nini mpenza ezali kondimisa biso ete “moto oyo alekaki bato nyonso awa na mabelé” azalaki solo?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Na lobɔkɔ ya mwasi, Ebombelo ya mikuwa ya Yakobo: FƆTƆ YA AFP/J.P. Moczulski; na lobɔkɔ ya mobali, makomi: FƆTƆ YA AFP/HO