“Ekokisi mposa moko ya motema na ngai”
“MATƆNDI mingi mpo na buku Approchez-vous de Jéhovah (Pusaná penepene na Yehova). Likabo kitoko yango ekokisi mposa moko ya motema na ngai: mposa ya komiyoka ete Yehova alingaka ngai mpe asepelaka na ngai. Sikoyo nakómi komona ete nazali penepene na Yehova mpe na Mwana na ye ya bolingo koleka liboso. Nazali na mposa ya koyebisa moto nyonso makambo ya buku yango mpe kopesa yango na bandeko mpe baninga na ngai nyonso.” Wana ezali maloba oyo Motatoli ya Yehova moko alobaki mpo na buku ya sika oyo ebimaki na mayangani ya etúká “Basakoli ya Bokonzi ya molende” oyo esalemaki na 2002-2003. Tótalela naino mwa makambo ya buku yango ya sika mpe ntina oyo ebimisamaki.
Mwa makambo ya buku yango ya sika
Makambo nini ezali na buku yango? Makambo nyonso oyo ezali na masolo ya boyekoli ya nimero oyo, bakisá mpe ebele ya makambo mosusu! Buku yango ezali na mikapo 31, oyo mokomoko ezali na bolai ya lisolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nsima ya maloba ya ebandeli mpe mikapo misato ya liboso, buku yango ekabolami na biteni minei, oyo mokomoko ezali kolobela ezaleli moko monene ya Yehova. Eteni mokomoko ebandi na mokapo oyo elobeli ezaleli yango na mokuse. Mikapo oyo elandi elobeli ndenge oyo Yehova amonisaka ezaleli yango. Eteni mokomoko ezali na mokapo moko oyo elobeli Yesu. Mpo na nini? Mpamba te ye moko alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Lokola Yesu azali elilingi mpenza ya Yehova, azali kopesa biso ndakisa malamu na ndenge amonisaka bizaleli ya Nzambe. Eteni mokomoko esuki na mokapo oyo ezali koteya biso ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na komonisa ezaleli oyo elobelami na eteni yango. Ntango buku yango ya sika ezali kolobela bizaleli ya Yehova, ezali kotánga bavɛrsɛ ya mikanda nyonso ya Biblia oyo elobeli yango.
Buku Pusaná penepene na Yehova ezali mpe na makambo mosusu. Mikapo nyonso, banda na mokapo 2 tii na mokapo ya nsuka, ezali na etanda oyo ezali na motó ya likambo ete “Mituna mpo na komanyola.” Bavɛrsɛ mpe mituna ya etanda yango ezali bozongeli ya mokapo te. Kasi ezali kosalisa moto asalela Biblia mpo na komanyola malamumalamu na likambo oyo mokapo elobeli. Tozali kolendisa yo otánga vɛrsɛ mokomoko na likebi mpenza. Na nsima, omituna yo moko mpe kanisá ndenge oyo okoki kosalela yango na bomoi na yo. Komanyola ndenge wana ekoki kosimba motema na yo mpe na ndenge yango, ekosalisa yo opusana lisusu penepene na Yehova.—Nzembo 19:14.
Bililingi ya buku Pusaná penepene na Yehova ebongisami malamu mpo na koteya mpe kosimba motema. Mikapo 17 ezali na bililingi ya makambo oyo Biblia elobeli, oyo ezwi lokasa mobimba.
Mpo na nini buku yango ebimisamaki?
Mpo na nini buku Pusaná penepene na Yehova ebimisamaki? Buku yango ebimisamaki libosoliboso mpo na kosalisa biso tóyeba Yehova malamu koleka, mpo tókóma baninga ya motema ya Nzambe na biso.
Oyebi moto moko oyo buku Pusaná penepene na Yehova ekoki mpenza kosalisa? Ekoki kozala moto moko oyo ayekolaka Biblia to mpe ndeko moko oyo asakolaka lisusu te. Ezali boni mpo na yo moko? Osí obandi kotánga yango? Soki obandi naino te, tolendisi yo obongisa programɛ mpo obanda yango kaka mikolo oyo. Zwáká ntango ya kokanisa malamumalamu na makambo oyo ozali kotánga. Tiká ete buku yango esalisa yo na kopusana lisusu penepene na Yehova Nzambe, mpo osakola nsango malamu ya Bokonzi na esengo mpe na molende koleka!