Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/9 nk. 30-31
  • Osepelaka na bandeko baklisto oyo bazali mibange?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osepelaka na bandeko baklisto oyo bazali mibange?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azalaki kosepela na moninga na ye oyo akómaki mobange
  • ‘Lokola batata mpe bamama’
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndakisa ya komipesa mpe ya bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ—Yo mpe omonaka yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ayikaki mpiko tii na nsuka
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/9 nk. 30-31

Osepelaka na bandeko baklisto oyo bazali mibange?

NTANGO Bayisalaele bazalaki na kondimana na Nzambe, apesaki bango mobeko oyo: “Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni mpe okobanga Nzambe na yo.” (Levitike 19:32) Na yango, komemya mibange ezalaki etinda ya Nzambe, mpe yango ezalaki kokende nzela moko ná kobanga Nzambe. Atako baklisto lelo oyo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, etinda yango ezali kosalisa biso tóyeba ete basaleli ya Yehova oyo bakómi mibange bazali na motuya na miso na ye. (Masese 16:31; Baebele 7:18) Biso mpe totalelaka mibange ndenge oyo Yehova atalelaka bango? Tosepelaka na bandeko na biso baklisto oyo bakómi mibange?

Azalaki kosepela na moninga na ye oyo akómaki mobange

Mokanda ya mibale ya Mikonzi ezali na lisolo moko oyo ezali komonisa ete esengeli komemya mibange. Lisolo yango ezali kolobela ndenge Elisa akómaki mosakoli na esika ya Eliya. Tótalela likambo oyo esalemaki mokolo oyo Eliya asukisaki mosala na ye ya mosakoli na ekólo Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi.

Mokolo yango, Yehova ayebisaki mobange Eliya oyo azalaki na Gilegale ete akende na Betele, mpe kolongwa na Betele, akende na Yeliko, mpe kolongwa na Yeliko tii na Ebale Yolodani. (2 Mikonzi 2:1, 2, 4, 6) Na mobembo yango ya kilomɛtrɛ soki 50, Eliya asɛngaki Elisa mbala misato mobimba ete atika kolanda ye. Kasi, kaka lokola elenge Luta oyo, bankama ya bambula liboso, aboyaki kotika Naomi, Elisa mpe aboyaki kotika mosakoli yango oyo akómaki mobange. (Luta 1:16, 17) Mbala nyonso misato Elisa azalaki koloba ete: “Lokola [Yehova] azali na bomoi mpe lokola yo ozali na bomoi, nakotika yo te.” (2 Mikonzi 2:2, 4, 6) Na ntango wana, Elisa asilaki kolekisa mbula soki motoba lokola mosungi ya Eliya. Kasi, mposa na ye ezalaki ete akoba kosalela Nzambe elongo na Eliya. Kutu, Biblia ebakisi boye: “Ezalaki bango kokenda liboso mpe kolobana, talá . . . Eliya abutaki likoló.” (Vɛrsɛ 11) Eliya ná Elisa bazalaki kosolola tii na ntango Eliya asukisaki mpenza mosala na ye ya mosakoli na Yisalaele. Elenge mosakoli yango azalaki mpenza na mposa ya koyoka malako mingi mpe maloba mingi ya kolendisa ya mosakoli oyo akómaki mobange mpe ayebaki makambo mingi. Emonani polele ete Elisa azalaki mpenza kosepela na moninga na ye oyo azalaki mobange.

‘Lokola batata mpe bamama’

Ezali mpasi te koyeba ntina oyo Elisa azalaki kosepela kozala moninga ya mosakoli oyo akómaki mobange​—azalaki kutu komona ye lokola tata na ye ya elimo. (2 Mikonzi 2:12) Mwa moke liboso Eliya asukisa mosala na ye ya mosakoli na Yisalaele, alobaki na Elisa boye: “Sɛngá eloko nyonso olingi nasalela yo liboso nalongwa liboso na yo.” (Vɛrsɛ 9) Na yango, tii na nsuka mpenza, Eliya azalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo ya mosakoli oyo asengelaki kosala na esika na ye mpe azalaki na mposa ete mosala ya Nzambe ekoba na nsima na ye.

Lelo oyo, ezali esengo mpenza komona ete, lokola batata mpe bamama, bandeko baklisto oyo bakómi mibange bazali kosepela kopesa bilenge baklisto boyebi mpe bwanya na bango. Na ndakisa, bandeko oyo baumeli mingi na mosala ya ntango nyonso na babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova bazalaka mpenza na esengo ya kosalisa bandeko oyo bakɔti na Betele sika bákóma na makoki oyo ekosalisa bango na mosala na bango. Ndenge moko mpe, bakɛngɛli-batamboli oyo baumeli bambula ebele na mosala ya kotala masangá, elongo na basi na bango, bazalaka na esengo ya kopesa boyebi mingi oyo bazali na yango ntango bazali kopesa bandeko ya sika formasyo na mosala yango. Longola yango, na kati ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, bandeko oyo balekisi ebele ya bambula na mosala ya Yehova bazalaka na esengo mingi ya kopesa bandeko ya sika bwanya mpe mayele na bango.​—Masese 2:7; Bafilipi 3:17; Tito 2:3-5.

Mposa oyo bandeko yango ya bolingo bazali na yango ya kosalisa baoyo bakɔmeli naino te ezali kosala ete bandeko bámemyaka bango na esengo. Yango wana, tosengeli kolanda ndakisa ya Elisa mpo tósepelaka na bandeko baklisto oyo bakómi mibange. Lokola ntoma Paulo alobaki yango, tókoba kokamata “mokóló . . . lokola tata” mpe “basi oyo bazali mikóló lokola bamama.” (1 Timote 5:1, 2) Soki tozali kosala bongo, tokosalisa lisangá ya boklisto na mokili mobimba etambola malamu mpe ekende liboso.

[Elilingi na lokasa 30]

Elisa azalaki na mposa ya kokoba kosalela Nzambe elongo na Eliya

[Bililingi na lokasa 31]

Baklisto oyo bakómi mibange basalisaka bilenge mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto