Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 nk. 21-25
  • “Mibeko ya moto ya bwanya” ezali liziba ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mibeko ya moto ya bwanya” ezali liziba ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozala motó makasi te
  • Batelá lolemo na yo!
  • Lingáká mosala
  • Boyengebene ebatelaka
  • Komilakisaka te
  • Koluka bomoi ya mindɔndɔ te
  • Sepelá na “pole”
  • Kebá na bilikya ya lokuta
  • Mibeko ya Nzambe ezali liziba ya bomoi
  • “Ye oyo akotosa mpamela azali na mayele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Zwá mayele mpe ndimá disipilini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Tambolá na ‘nzela ya sembo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 nk. 21-25

“Mibeko ya moto ya bwanya” ezali liziba ya bomoi

NTOMA Paulo alobaki ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Baloma 11:33) Yobo, moto ya sembo alobaki ete: “[Yehova Nzambe azali] na [bwanya, NW] kati na motema.” (Yobo 9:4) Ya solo, moto moko te azali na bwanya oyo ekokani na oyo ya Mozalisi ya likoló ná nse. Tokoloba boni mpo na mibeko, to Liloba ekomami ya Mozalisi yango?

Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli ya [Yehova] ezali alima, ekosepelisa motema. Malako ya [Yehova] ezali pɛto, ekomonisa miso polele.” (Nzembo 19:7, 8) Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, ayebaki mpenza ete maloba yango ezali solo! Alobaki boye: “Mibeko ya moto ya [bwanya, NW] ezali liziba ya bomoi, mpo na kolongwa na mitambo ya kufa.” (Masese 13:14) Na Masese mokapo 13 vɛrsɛ ya liboso tii vɛrsɛ 13, Salomo amonisaki ndenge oyo toli ya Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso na kobongisa bomoi na biso mpe kokima makama.

Kozala motó makasi te

Masese 13:1 (NW) elobi ete: “Mwana akozala na bwanya soki tata azali kopesa ye disipilini; kasi motyoli ayoki mpamela te.” Disipilini ya tata ekoki kozala pɛtɛɛ to makasi. Disipilini yango ekoki kobanda na mateya, mpe soki mwana azali koyoka te, bakopesa ye etumbu. Mwana ya bwanya andimaka disipilini ya tata na ye.

Biblia elobi boye: “Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka; ya solo, abɛtaka fimbo na moto nyonso oyo ye azali kozwa lokola mwana.” (Baebele 12:6) Moko na banzela oyo Tata na biso ya likoló asalelaka mpo na kopesa biso disipilini ezali Liloba na ye, Biblia. Ntango tozali kotánga Biblia na limemya mpe tozali kosalela makambo oyo yango ezali koteya biso, Liloba na ye eteyaka biso mpenza disipilini. Yango ezali mpo na bolamu na biso, mpamba te nyonso oyo Yehova alobaka ezali mpo na litomba na biso.​—Yisaya 48:17.

Disipilini ekoki mpe kozala kosembolama na ndeko moko oyo azali komibanzabanzaka mpo na bolamu na biso ya elimo. Toli nyonso oyo eyokani na Liloba ya Nzambe, esengeli te kotalelama lokola nde euti na moto oyo apesi yango, kasi euti na Nzambe, Liziba monene ya solo. Soki tozali na bwanya, tokondima ete toli yango euti na Yehova. Ntango tozali kosala bongo mpe tozali kotika yango ebongisa makanisi na biso, ebakisa boyebi na biso ya Biblia, mpe esembola banzela na biso, tozali nde kozwa disipilini. Ezali mpe ndenge moko mpo na toli oyo tozwaka na makita ya lisangá mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Soki tozali na matoi ya koyoka mpe motema ya kobomba makambo oyo toyekolaka na mikanda to oyo toyokaka na masolo wana, ezali mpenza disipilini malamu mpo na biso.

Nzokande, motyoli andimaka disipilini te. Buku moko elobi ete: “Lokola akanisaka ete ayebi mingi, azalaka motó makasi.” Andimaka ata mpamela te​—disipilini ya mwa makasi. Kasi, moto ya ndenge wana akoki nde komonisa ete disipilini ya Tata na biso ezali mabe? Yehova asalá naino libunga te mpe akosala yango ata mokolo moko te. Ntango motyoli azali koboya disipilini, azali nde komityola ye moko. Salomo asaleli mwa maloba kitoko mpo na komonisa ntina oyo tosengeli kozala motó makasi te!

Batelá lolemo na yo!

Mpo na komonisa ntina oyo tosengeli kolanda toli ya Liloba ya Nzambe ntango tozali koloba, mokonzi ya Yisalaele akokanisaki monɔkɔ na nzete ya mbuma. Alobaki boye: “Moto akolya malamu ya mbuma ya monɔkɔ na ye; nde molimo ya bato ya masumu ekolya yauli.” (Masese 13:2) Mbuma ya monɔkɔ ezali nde maloba. Mpe moto abukaka oyo alonaki na maloba na ye. Moto moko ya mayele alobaki boye: “Soki maloba na ye ezali ya boboto mpe ezali kobongisa boninga na ye ná bazalani na ye, akolya malamu, elingi koloba akozala na esengo mpe na kimya.” Nzokande, ezalaka ndenge yango te mpo na moto ya masumu. Moto ya ndenge wana asalaka makambo ya yauli mpe alukaka koyokisa baninga mpasi. Akanaka makambo ya yauli, mpe abukaka makambo ya yauli. Mitambo ya kufa ezalaka na porte na ye.

Salomo abakisaki ete: “Ye oyo akobatela monɔkɔ na ye akobikisa molimo na ye; ye oyo akozipola bibɛbu na ye akobebisama nyɛɛ.” (Masese 13:3) Maloba mabe ekoki kobebisa lokumu ya moto, koyokisa ye mpasi na motema, kobebisa boyokani na ye na bato, ata mpe kopesa ye mpasi na nzoto. Nzambe mpe akoki koboya moto oyo azalaka monɔkɔ polopolo, mpamba te Nzambe akosambisa moto na moto mpo na maloba na ye. (Matai 12:36, 37) Ya solo, kobatela monɔkɔ na biso ekobikisa biso na likama. Kasi, ndenge nini tokoki koyekola kobatela monɔkɔ na biso?

Lolenge moko ya pɛtɛɛ ezali ya kolobaka mingi te. Biblia elobi ete: “Na mingi ya maloba, masumu mazangi te.” (Masese 10:19) Lolenge mosusu ezali ya kokanisa liboso ya koloba. Mokomi ya Masese alobaki boye: “Moto azali oyo akoloba lokola [azali kokata na mopanga, NW].” (Masese 12:18) Soki moto azali kokanisa te liboso ya koloba, akoki komizokisa ye moko mpe kozokisa bato oyo bazali koyoka ye. Yango wana, Biblia epesi likanisi malamu oyo: “Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano.”​—Masese 15:28, NW.

Lingáká mosala

Salomo alobaki ete: “Molimo ya moto ya gɔigɔi ezali na mposa kasi akozwaka eloko te; molimo ya bato ya mosala ekotondisama.” (Masese 13:4) Buku moko elobi ete: “Likanisi ya ntina [ya lisese oyo] ezali ete mposa mpamba ezali na ntina te, . . . kozala makasi na mosala nde likambo ya ntina. Bato ya gɔigɔi bazalaka na mposa ya biloko mingi, kasi bazwaka eloko te.” Nzokande, molimo, to mposa ya moto oyo alingaka mosala ekokisamaka mpenza.

Tokoki koloba boni mpo na baoyo, mpo na kokima mokumba, bazongisaka nsima mokano na bango ya komipesa na Yehova? Bakoki komonisa mposa ya kofanda na mokili ya sika ya Nzambe, kasi bazali nde kondima kosala makasi mpo kozwa yango? Bato oyo ‘bakouta na bolɔzi monene’ ezali baoyo basalaki misala oyo emonisi kondima na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato, bazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova.​—Emoniseli 7:14, 15.

Tótalela mpe makambo oyo esengeli mpo na kozwa mokumba ya mokɛngɛli na kati ya lisangá. Kozala na mposa ya kozwa mosala malamu wana ezali mabe te mpe Biblia ezali kolendisa yango. (1 Timote 3:1) Kasi, kosuka kaka na komonisa mposa yango ekoki te. Mpo na kozwa mokumba, moto asengeli kolona bizaleli malamu mpe kokolisa makoki oyo esengeli. Yango ezali kosɛnga ete moto asala milende.

Boyengebene ebatelaka

Moyengebene alonaka bizaleli oyo esepelisaka Nzambe mpe monɔkɔ na ye elobaka solo. Ayebaka ete mobeko ya Nzambe epekisi lokuta. (Masese 6:16-19; Bakolose 3:9) Na likambo yango, Salomo alobaki boye: “Moyengebene akoboya lokuta; nde moto mabe akokóma eloko ya koyinama mpe akozwa nsɔni.” (Masese 13:5) Moyengebene asukaka kaka te na kokima lokuta; ayinaka yango mpenza. Ayebaka ete ata soki emonani ete ekosala mabe moko te, lokuta ekoki kobebisa boyokani na kati ya bato. Lisusu, bakoki kotika kotya motema epai ya moto oyo abukaka lokuta. Moto mabe asalaka makambo ya nsɔni na nzela ya lokuta to na banzela mosusu, mpe na ndenge yango amibendelaka nsɔni.

Mpo na komonisa ete kosala malamu na miso ya Nzambe ezali na litomba, mokonzi ya bwanya alobaki boye: “Boyengebene ekobatela ye oyo atɛlɛmi alima na nzela, nde masumu makokweisa moto mabe.” (Masese 13:6) Lokola ndako ya makasi, boyengebene ebatelaka moto; nzokande, mabe ebebisaka ye.

Komilakisaka te

Mokonzi ya Yisalaele amonisaki ete ayebaki makanisi ya bato ntango alobaki boye: “Ezali na moto oyo [amilakisaka ete azali] mozwi nde azali na eloko te; mosusu [amilakisaka ete azali] mobola nde azali na biloko mingi.” (Masese 13:7) Moto akoki kozala ndenge oyo azali komonana na miso te. Babola mosusu balingaka bámonana bazwi, mbala mosusu bamilakisaka, bamonisaka lokola nde bazali na bomoi ya malamu, to balukaka lokumu na miso ya bato. Mozwi mosusu mpe akoki koluka komonana mobola, kaka mpo na kobomba bozwi na ye.

Komilakisa lokola moto ya bozwi ezali malamu te; ndenge moko mpe, komibomba ezali malamu te. Na ntango tozali na biloko mingi te ya mokili, soki tozali kobebisa mbongo na biso na biloko ya motuya mingi, kaka mpo bato mosusu bámona ete tozali bazwi, yango ekoki kozangisa biso mpe mabota na biso biloko ya ntina na bomoi. Lisusu, ntango mozwi azali koluka komonana mobola, akoki kokóma moimi, mpe yango ekoki kolongola ye lokumu mpe esengo oyo moto oyo akabaka azwaka. (Misala 20:35) Kozala sembo nde eleki malamu.

Koluka bomoi ya mindɔndɔ te

Salomo alobaki ete: “Lisiko ya molimo ya moto ezali bozwi na ye, kasi mobola ayoki mpamela te.” (Masese 13:8, NW) Maloba yango ya bwanya ezali na liteya nini?

Kozala mozwi ezali na matomba, kasi bozwi esilisaka makambo nyonso te. Na ntango ya mpasi oyo tozali lelo oyo, mbala mingi babandi bazali kokanga bazwi ná mabota na bango mpe bazali kosɛnga mbongo liboso ya kotika bango. Ntango mosusu, bakoki kosɛnga mozwi afuta ebele ya mbongo mpo báboma ye moko to ndeko na ye te. Kasi, mbala mingi, ntango bakangi moto, basukaka kaka na koboma ye. Mozwi azali ntango nyonso na likama ya kokutana na likambo ya ndenge wana.

Mobola amitungisaka mpo na makambo ya ndenge wana te. Atako akoki kozanga ebele ya biloko kitoko oyo mozwi azali na yango, esalemaka mpenza te ete babandi bákanga ye mpo bápesa bango mbongo. Yango mpe ezali litomba ya kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, ya kolekisa ntango te mpe koboma nzoto te mpo na koluka bozwi.​—2 Timote 2:4.

Sepelá na “pole”

Salomo akobaki komonisa ete kosala makambo oyo Yehova alingaka ezali mpo na litomba na biso. Alobaki ete: “Pole ya bayengebene ezali na esengo, nde mwinda ya bato mabe ekozimana.”​—Masese 13:9.

Mwinda ezali elilingi ya makambo oyo tosengeli na yango mpo na kongɛngisa nzela ya bomoi na biso. ‘Liloba ya Nzambe ezali mwinda mpo na lokolo ya moyengebene mpe pole mpo na nzela na ye.’ (Nzembo 119:105) Liloba yango ezali na boyebi mpe bwanya ya Mozalisi oyo ezangi nsuka. Ntango bososoli na biso ya mokano ya Nzambe ezali kobakisama, pole ya elimo oyo ezali kotambwisa biso ekozala se kobakisama. Yango epesaka esengo! Mpo na nini tokotika ete bwanya ya mokili oyo to oyo ebengami “na lokuta ete ‘boyebi’” ekosa biso?​—1 Timote 6:20; 1 Bakolinti 1:20; Bakolose 2:8.

Moto mabe, ata soki emonani ete mwinda na ye ezali kongɛnga mpenza mpe ata soki bomoi na ye ezali komonana malamu ndenge nini, mwinda na ye ekokufa. Nsukansuka akozala na molili mpe lokolo na ye ekozanga te kobɛta libaku. Lisusu, “libonza ekozala” epai na ye te.​—Masese 24:20.

Kasi, tosengeli kosala nini ntango tozali koyeba te oyo tosengeli kosala liboso ya likambo moko? Tokosala nini ntango toyebi te soki tozali na lotomo ya kosala likambo moko boye to te? Masese 13:10 ekebisi ete: “Lolendo ebimisaka kaka kowelana.” Kosala likambo ntango ozali na boyebi te to ozali na lotomo te ya kosala yango ezali lolendo mpe ekoki komemela moto mikakatano. Ekoleka malamu kotuna bato oyo bayebi mpe bazali na bososoli. Mokonzi ya bwanya alobaki ete: “Baoyo bakoyokaka toli bazali na [bwanya, NW].”

Kebá na bilikya ya lokuta

Mbongo ekoki kosalisa moto na makambo ya ntina. Kozala na mbongo oyo ekoki ezali malamu koleka kozala na mpasi to na bobola. (Mosakoli 7:11, 12) Kasi, tokoki kokosama soki tozali kokanisa matomba oyo tokoki kozwa na banzela ya mabe. Salomo akebisaki ete: “Bozwi boyei na nzela mabe ekokita na nse; nde ye oyo akoyanganisa na mosala akokolisa yango.”​—Masese 13:11.

Na ndakisa, tótalela ndenge bato bakosamaka na masano ya mbongo. Moto oyo abɛtaka masano ya mbongo akoki kosilisa mbongo oyo azwaki na motɔki na ye mpo azali na elikya ete akozwa mbongo mingi. Kasi, mbala mingi emonanaka ete atyaka nde libota na ye na mpasi! Mpe nini emonanaka soki alongi? Lokola amoneli mbongo yango mpasi te, ntango mosusu akoyeba valɛrɛ na yango te. Lisusu, akoki koyeba te ndenge ya kosalela mbongo yango. Bozwi na ye ekolimwa kaka nsima ya mwa ntango moke! Nzokande, moto oyo azali kozwa mokemoke na mosala ya mabɔkɔ na ye akolisaka yango mokemoke mpe asalelaka yango malamu.

Salomo alobaki ete: “Elikya oyo ezelisami epesi motema mpasi, nde mposa oyo esukisami ezali lokola nzete ya bomoi.” (Masese 13:12) Soki bilikya ekokisami te, epesaka mpasi na motema. Likambo yango esalemaka na bomoi ya mokolo na mokolo. Nzokande, esalemaka bongo te mpo na bilikya oyo euti na Liloba ya Nzambe. Tokoki kotya motema mobimba ete ekokokisama. Ata soki tozali komona lokola nde ezali koumela, ntembe ezali te ete ekokokisama.

Na ndakisa, toyebi ete mokili ya sika ya Nzambe ekómi pene. (2 Petelo 3:13) Tozali kozela na mposa makasi mpe na esengo kokokisama ya bilaka ya Nzambe. Wana tozali kozela, tomonaka nini soki tomipesi “na mosala ya Nkolo,” mpo na kolendisa baninga na biso bandimi, to mpo na kobongisa boyokani na biso ná Yehova? Na esika tókóma na ‘mpasi na motema,’ totondaka nde na esengo. (1 Bakolinti 15:58; Baebele 10:24, 25; Yakobo 4:8) Ntango mposa moko oyo eumelaki ekokisami, ezalaka nzete ya bomoi, epesaka mpenza makasi mpe elendisaka.

Mibeko ya Nzambe ezali liziba ya bomoi

Mpo na komonisa ntina ya kotosa Nzambe, Masese 13:13 elobi ete: “Ye oyo akotyola liloba akobebisama, nde ye oyo akotosa lilako akozala na kimya.” Soki modefi atyoli liloba, elingi koloba afuti te eloko oyo adefaki, akobungisa ndanga oyo apesaki. Ndenge moko mpe, tokobungisa eloko moko soki totosi mibeko ya Nzambe te. Tokobungisa nini?

“Mibeko ya moto ya [bwanya, NW] ezali liziba ya bomoi; mpo na kolongwa na mitambo ya kufa.” (Masese 13:14) Soki moto aboyi mibeko ya Yehova, Nzambe oyo atondi na bwanya, akozanga litambwisi oyo ekoki kosalisa ye na kozala na bomoi oyo eleki malamu mpe ya molai. Akobungisa mingi! Yango wana, bwanya ezali kotinda biso na kotyela Liloba ya Nzambe likebi mpe kotika yango ebongola makanisi, maloba, mpe misala na biso.​—2 Bakolinti 10:5; Bakolose 1:10.

[Bililingi na lokasa 23]

Kondima toli ya Biblia ezali disipilini malamu

[Bililingi na lokasa 24]

“Motema ya moyengebene [ekomanyola] liboso ya kozongisa liloba”

[Bililingi na lokasa 24]

Komipesa “na mosala ya Nkolo” epesaka biso esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto