Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/10 nk. 3-4
  • Ebele ya mituna kasi biyano ya malamu ezali mpenza te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ebele ya mituna kasi biyano ya malamu ezali mpenza te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo yango ezali nde kopekisa bato bázala na kondima?
  • Nzambe azali kopesa biso etumbu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe akipaka mpenza bato?
    Lamuká!—2011
  • Mokanda na kozalisama mpe Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mpo na nini mpasi ezali mingi boye?
    Lamuká!—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/10 nk. 3-4

Ebele ya mituna kasi biyano ya malamu ezali mpenza te

NA NTƆNGƆ ya mokolo ya 1 Novɛmbɛ ya mobu 1755, mokolo ya eyenga ya Basantu banso, mabelé eninganaki makasi na Lisbonne, na ngonga oyo bato mingi ya engumba yango bazalaki na ndako-nzambe. Ebele ya bandako ebukanaki mpe bankóto na bankóto ya bato bakufaki.

Mwa moke na nsima ya likama yango, Voltaire, mokomi moko ya ekólo France, abimisaki mokanda moko (Poème sur le désastre de Lisbonne), kati na yango aboyaki mpenza kondima ete likama wana ezali nde etumbu oyo Nzambe apesaki bato mpo na masumu na bango. Mpo na komonisa ete bato bakoki te kokanga ntina ya makama ya ndenge wana to kolimbola yango, Voltaire akomaki boye:

Voltaire azalaki te moto ya liboso oyo atunaki mituna na ntina na Nzambe. Banda kala, makama oyo esalemaka etindaka bato bámituna ebele ya mituna. Eleki bankóto ya bambula, bana nyonso ya Yobo bakufaki mpe na nsima ye moko abɛlaki maladi moko mabe; yango wana atunaki ete: “Mpo na nini [Nzambe] apesaka pole na ye oyo azali na mpasi, mpe bomoi na baoyo bazali na bololo na motema?” (Yobo 3:20, NW) Lelo oyo bato mingi bazali komituna mpo na nini Nzambe ya malamu mpe ya bolingo akoki kotala na miso ebele ya bampasi mpe kozanga bosembo oyo ezali kotungisa bato.

Ebele ya bato oyo bazali konyokwama na nzala, bitumba, maladi mpe liwa, baboyaka mpenza kondima ete ezali na Mozalisi oyo amibanzabanzaka mpo na bato. Filozofe moko alobaki boye: “Eloko moko te ekoki kopekisa biso tópesa Nzambe foti ndenge azali kotika ata bana mike bámonaka mpasi, . . . lobá se soki azali te.” Bato mingi bandimaka te ete Nzambe azali soki bakanisi makambo ya mawa lokola koboma oyo Banazi babomaki Bayuda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Talá maloba oyo Moyuda moko akomaki na zulunalo moko: “Ndimbola oyo eleki malamu ya likambo oyo esalemaki na Auschwitz ezali ete Nzambe azali te, yango wana asalaka eloko te mpo na bato.” Na 1997, ankɛtɛ moko esalemaki na France, ekólo oyo bato na yango mingi bazali na Lingomba ya Katolike, emonisaki ete pene na bato 40 likoló ya monkama bandimaka te ete Nzambe azali, mpo bazali komona ndenge bato bazali koboma bato ya bikólo mosusu na mokano ya kosilisa bango, ndenge esalemaki na Rwanda na 1994.

Likambo yango ezali nde kopekisa bato bázala na kondima?

Mpo na nini Nzambe asalaka eloko te mpo na kopekisa mabe? Mokomi moko oyo azali mondimi ya Katolike alobaki ete motuna yango ezali “likambo monene oyo ezali kopekisa [bato mingi] bázala na kondima.” Atunaki boye: “Tokoki mpenza kondima Nzambe oyo atalaka kaka na miso ndenge ebele ya bato oyo basali mabe moko te bazali kokufa mpe ebele ya bato ya bikólo mingi bazali kobomama?”

Zulunalo moko ya Katolike (La Croix) elobaki mpe ete: “Ezala na makambo ya mawa oyo esalemá kala, na makama ya biloko oyo esalemi na mayele ya siansi, na makama oyo euti na mipɛpɛ makasi to koningana ya mabelé, ntango bato mabe bazali koboma, ntango babungisi ndeko to moninga, bato bayokaka nsɔmɔ mpe babalukaka epai ya Nzambe mpo na koluka ntina oyo makambo yango ezali kosalema. Balobaka boye: Nzambe azali wapi? Akipaka ata makambo te? Amonanaka ata komonana te ntango tozali na mposa na ye?”

Pápa Jean-Paul II alobelaki likambo yango na mokanda na ye epai ya bandimi na 1984 (Salvifici Doloris). Akomaki boye: “Atako mokili ezali komonisa biso ete Nzambe azali, ezali komonisa bwanya, nguya mpe bonene na ye, mabe mpe bampasi ezali kosala ete bizaleli yango emonana malamu te, to mpe elimwa mpenza, mingimingi na ntango tozali komona makambo ya mawa oyo ezali kokómela bato kozanga ntina, mpe mabe oyo ezali se kobakisama kozanga ete bato oyo bazali kosala yango bázwa etumbu.”

Soki tokanisi ndenge bato bazali komona mpasi, tokoki mpenza kondima likanisi ya Biblia ete ezali na Nzambe ya bolingo mpe ya nguya-nyonso? Apekisaka nde makambo ya mawa, ezala oyo ekómelaka moto na moto to oyo ekómelaka ebele ya bato na mbala moko? Azali nde kosalela biso likambo moko lelo oyo? Ezali nde na “Nzambe oyo alobaka na bato” mpo na kopesa bango biyano na mituna na bango, ndenge Voltaire alingaki? Mpo ozwa biyano na mituna yango, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.

[Bililingi na lokasa 3]

Kobeba ya Lisbonne na mobu 1755 etindaki Voltaire aloba ete bato bakoki te kokanga ntina ya makama ya ndenge wana to kolimbola yango

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Voltaire: Euti na buku Great Men and Famous Women; Lisbonne: J.P. Le Bas, Praça da Patriarcal depois do terramoto de 1755. Foto: Museu da Cidade/Lisboa

[Bililingi na lokasa 4]

Bato mingi bandimaka te ete Nzambe azali soki batali makambo ya nsɔmɔ lokola koboma bato ya ekólo moko na mokano ya kosilisa bango ndenge esalemaki na Rwanda

[Eutelo ya bafɔtɔs]

FƆTƆ YA AFP

[Elilingi na lokasa 3]

Bozalisi elobaka te, soki totuni yango tozwaka eyano te; Tozali na mposa ya Nzambe oyo alobaka na bato.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto