Mituna ya batángi
Batisimo na ntina na bakufi ezali nini?
Ntango ntoma Paulo akomaki na ntina etali lisekwa mpo na bomoi na likoló, akomaki likambo moko oyo ezali kobenda likebi. Na Biblia ya Lingala Haut-fleuve, tozali kotánga boye: “Soki te, baoyo bakobatisamaka na ntina na bakufi bazali kosala nini? Soki bakufi bakosekwa solo te, mpo na nini bato bakobatisamaka na ntina na bango?” Mpe Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli yango boye: “Bato mosusu basengaka bázwa batisimo, na esika ya bandeko na bango oyo bakufaki liboso ‘te bákoka kozwa yango. Bato wana bazali koluka penza nini? Soki ya solo, bato bakufá bakoki kosekwa te, tina nini basengaka batisimo na esika na bango?”—1 Bakolinti 15:29.
Likanisi ya Paulo ezalaki nde ete bato ya bomoi bázwa batisimo mpo na baoyo bakufaki kozanga ete bázwa batisimo? Babiblia yango mpe Babiblia mosusu epesaka likanisi wana. Nzokande, soki tolandeli mpenza Biblia mpe maloba ya Grɛki ya kala oyo Paulo asalelaki, tokomona ete ezali na likanisi mosusu. Paulo alingaki koloba ete baklisto bapakolami bazali kozwa batisimo, to kozindisama na mai, mpo na bomoi oyo ekomema na liwa ya bosembo lokola oyo Klisto akufaki. Na nsima, bakosekwisama mpo na kozala bikelamu ya elimo, se ndenge esalemaki mpo na Klisto.
Ndimbola yango eyokani na Biblia. Na mokanda oyo Paulo atindelaki Baloma, akomaki boye: “Boyebi nde te ete biso nyonso oyo tobatisamaki na kati ya Klisto Yesu tobatisamaki na kati ya liwa na ye?” (Baloma 6:3) Na mokanda oyo Paulo atindelaki Bafilipi, alobaki mpo na ye moko ete: ‘Asanganaki na kati ya bampasi [ya Klisto], komitikáká kokufa na liwa lokola oyo ya ye, mpo na komona soki akoki ezala na ndenge nini kokóma na lisekwa ya liboso uta na bakufi.’ (Bafilipi 3:10, 11) Paulo azalaki komonisa ete kozala na bomoi ya moyekoli ya Klisto oyo apakolami na elimo esɛngi kotikala sembo na kati ya komekama, kozala na likama ya liwa mokolo na mokolo, mpe na nsuka, kokufa na bosembo, na nsima kosekwa mpo na bomoi na likoló.
Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete bavɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli liwa mpo na bato oyo bazwi batisimo ezali kolobela bato ya bomoi oyo bazwaki batisimo, kasi te baoyo bakufaki. Paulo ayebisaki mpe baninga na ye baklisto bapakolami ete: “Bokundamaki elongo na ye na kati ya batisimo na ye, mpe na boyokani elongo na ye bolamwisamaki mpe elongo na nzela ya kondima na bino na mosala ya bokasi ya Nzambe, oyo alamwisaki ye na bakufi.”—Bakolose 2:12.
Liloba ya Grɛki hyper, oyo ebongolami “na ntina na” to “na esika ya” na Babiblia mingi na 1 Bakolinti 15:29, ekoki mpe kolimbola “mpo na kozala.” Yango wana, na boyokani na makanisi ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebongoli vɛrsɛ yango malamu: “Baoyo bazali kobatisama mpo na kozala bakufi bakosala nini? Soki bakufi bakolamuka te, mpo na nini bango mpe bazali kobatisama mpo na kozala ndenge wana?”