Kozwa bikateli—Likambo oyo tokoki kokima te
MOKOLO mosusu, Napoléon bonaparte, amperɛrɛ ya France na ekeke ya 19, alobaki boye: “Eloko moko te ezali mpasi mpe na ntina koleka koyeba kozwa bikateli.” Yo mpe okoki mpenza kondima makanisi yango, mpamba te moto nyonso alingaka kotambwisa bomoi na ye ye moko. Kasi, moto nyonso mpe ayebi ete kozwa bikateli ezalaka ntango mosusu pɛtɛɛ te.
Ezala pɛtɛɛ to te, kozwa bikateli ezali likambo oyo moto akoki kokima te. Mokolo na mokolo tosengeli kozwa bikateli. Ntango tolamuki na ntɔngɔ, tosengeli kopona bilamba oyo tokolata, bilei oyo tokolya na ntɔngɔ, mpe makambo mosusu oyo tokosala na boumeli ya mokolo. Mbala mingi, ezalaka bikateli ya mikemike. Esɛngaka kokanisa mingi te liboso ya kozwa bikateli yango. Bikateli ya ndenge wana ezangisaka biso mpɔngi te mpo na kokanisa soki ezalaki malamu to te.
Nzokande, bikateli mosusu ezalaka ya minene. Na mokili ya lelo, bilenge mingi basengeli kopona mosala oyo bakosala. Basengeli kopona bakelasi oyo bakotánga mpe mbula boni bakolekisa na bakelasi yango. Mingi kati na bango basengeli ata ndele kozwa ekateli ya kobala to kotikala monzemba. Baoyo bakolinga kobala basengeli kotalela motuna oyo: ‘Nazali na bambula oyo ekoki mpe nakoli mpenza na makanisi mpo nakoka kobala? Molongani nini nakosepela kofanda na ye, to oyo eleki ntina, molongani ya ndenge nini abongi na ngai?’ Kopona molongani ezali ekateli moko ya ntina na bomoi ya moto koleka bikateli mingi mosusu.
Na makambo ya ntina mingi, esɛngaka mpenza kozwa bikateli ya malamu, mpamba te tokozala na esengo kaka soki tozwi bikateli ya malamu. Bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na makoki nyonso mpo na kozwa bikateli yango, mpe na ndenge yango, bakoki koboya lisalisi oyo balingi kopesa bango. Kosala bongo ezali bwanya? Tótalela naino likambo yango.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Napoléon: Euti na buku The Pictorial History of the World