Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/10 nk. 4-7
  • Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotalela makambo oyo ekoki kobima nsima ya mikolo
  • Zwá ntango ya kokanisa
  • Yokáká toli
  • Landá lisosoli oyo eteyami malamu
  • Makambo oyo bikateli na yo ekoki komemela bato mosusu
  • Salelá bwanya mpo na kozwa ekateli oyo eleki monene
  • Poná bomoi!
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Ndenge nini nakoki kozwa bikateli ya malamu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/10 nk. 4-7

Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?

SALOMO, mokonzi ya Yisalaele ya kala, alobaki boye: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akokóma na mayele mingi.” Mingi kati na biso tosí tozwá bikateli ya mabe kaka mpo toboyaki koyoka toli.​—Masese 1:5, NW.

Maloba yango ya Salomo ekomamaki nsima na kati ya Biblia, esika moko na masese mosusu kati na “masese nkóto misato” oyo alobaki. (1 Mikonzi 4:32) Tokoki nde kozwa litomba na koyeba mpe kolanda maloba na ye ya bwanya? Ɛɛ. Ekosalisa biso ‘tóyeba bwanya mpe disipilini, tósosola maloba ya mayele, tózwa disipilini oyo epesaka bososoli, boyengebene mpe koyeba kokesenisa malamu ná mabe mpe bosembo.’ (Masese 1:2, 3, NW) Tótalela sikoyo malako mitano ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na koyeba kozwa bikateli ya malamu.

Kotalela makambo oyo ekoki kobima nsima ya mikolo

Bikateli mosusu ememelaka moto mikakatano minene na bomoi na ye. Yango wana, lukáká koyeba liboso mikakatano nini ekoki kobima. Kebá ete matomba ya mwa ntango moke oyo ozali komona ezipa yo miso te mpo omona te mikakatano oyo ekoki kokómela yo na nsima. Masese 22:3 epesi toli oyo: “Moto ya [bwanya] akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.”

Ekoki kozala malamu kokoma matomba oyo ekateli yango ekoki komemela yo sikoyo mpe oyo ekomemela yo na mikolo ekoya. Matomba oyo tokoki komona liboso ntango tozali kopona mosala moko ekoki kozala ete mosala yango efutaka malamu mpe tozali kosepela na yango. Kasi, ekoki nde kozala ete mosala yango ekoumela te? Mosala yango ekosɛnga nde ete okende kofanda epai mosusu, mbala mosusu mosika na baninga mpe libota na yo? Ekosɛnga nde ete osalaka na esika moko oyo ekoki komemela yo likama to ekozala mosala moko oyo ekobanda kotungisa yo na makanisi? Talelá malamu ná mabe ya mosala yango, mpe na nsima zwá ekateli oyo omoni ete eleki malamu.

Zwá ntango ya kokanisa

Bikateli ya mbangumbangu ekoki kozala bikateli ya mabe. Masese 21:5 elobi boye: “Makanisi ya bato ya mosala makozwisa biloko mingi, nde ye oyo akosalaka mbangumbangu akozanga bobele kozanga.” Na ndakisa, bilenge oyo lolango ezwi bango basengeli kotika ntango liboso ya kozwa ekateli ya kobalana. Soki basali bongo te, bakoki kokutana na likambo oyo William Congreve, mokomi moko ya Angleterre na ebandeli ya bambula 1700, alobaki: “Soki moto aweli kobala, akokóma komilela bomoi na ye mobimba ete ‘zoba liboso, mayele nsima.’”

Kasi, kozwa ntango ya kokanisa liboso ya kozwa ekateli elimboli te kolalisa makambo. Bikateli mosusu ezalaka na ntina mingi; yango wana, bwanya esɛngaka ete ezwama nokinoki. Koumela mingi ekoki kosuka mabe mpo na biso moko to mpo na basusu. Kolekisa ntango mpamba liboso ya kozwa ekateli ekoki yango moko mpe kozala ekateli, mpe mbala mosusu ekateli ya mabe.

Yokáká toli

Lokola ekoki kosalema te ete makambo mibale ekokana mobimba, bato mibale bakoki kozwa bikateli ndenge moko te liboso ya makambo oyo ezali ndenge moko. Kasi, ezalaka malamu koyeba ndenge bato mosusu bazwaki bikateli na makambo oyo ezali ndenge moko na oyo ya yo. Tuná bango báyebisa yo ndenge bazali kotalela ekateli oyo bazwaki. Na ndakisa, ntango olingi kosala mombongo moko, tuná bato oyo basalaka yango báyebisa yo mabe ná malamu na yango. Matomba nini bazwaki mpe mikakatano to makama nini bakutanaki na yango?

Biblia elobi na biso ete: “Myango ekokufa wana bato ya toli bazangi, nde ekolonga wana bamonisi bayei mingi.” (Masese 15:22) Kasi, ntango tozali kotuna toli mpe koyoka bato mosusu oyo bayebi mingi, tóbosana te ete biso moko nde tosengeli kozwa ekateli ya nsuka mpe kondima nyonso oyo ekoya na nsima.​—Bagalatia 6:4, 5.

Landá lisosoli oyo eteyami malamu

Lisosoli ekoki kosalisa biso na kozwa bikateli oyo eyokani na mitinda oyo tolandaka na bomoi na biso. Mpo na moklisto, yango elingi koloba koteya lisosoli mpo elandaka makanisi ya Nzambe. (Baloma 2:14, 15) Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Na banzela na yo nyonso talelá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Masese 3:6, NW) Kasi, na makambo mosusu, bato mibale, oyo bazali bango nyonso na lisosoli eteyami malamu, bakoki kozala na makanisi ekeseni, mpe bongo, bakozwa bikateli ekeseni.

Nzokande, na makambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi polele, lisosoli oyo eteyami malamu ekozwa kaka ekateli ndenge moko. Na ndakisa, mwasi ná mobali oyo bazali na lisosoli eteyami na Biblia te bakoki kondima kofanda elongo liboso bábalana mpo na kotala soki bakoyokana to te. Bakoki kokanisa ete bazwi ekateli ya malamu, oyo ekopekisa bango kosala bozoba ya kobalana nokinoki. Mbala mosusu lisosoli na bango ekoyebisa bango te ete ezali mabe. Kasi, moto oyo ayebi makanisi ya Nzambe na oyo etali libala mpe kosangisa nzoto akoki kozwa ekateli wana te.​—1 Bakolinti 6:18; 7:1, 2; Baebele 13:4.

Makambo oyo bikateli na yo ekoki komemela bato mosusu

Mbala mingi, bikateli na yo ekoki kosala bato mosusu malamu to mpe mabe. Yango wana, kolingaka te kozwa bikateli ya mabe, to ya bozoba, oyo ekoki kobebisa boyokani na yo na baninga mpe bandeko to, oyo eleki mabe, na Nzambe. Masese 10:1 elobi boye: “Mwana ya [bwanya] akosepelisa tata, nde mwana ya zoba azali na bozito epai ya mama na ye.”

Nzokande, yebá ete ntango mosusu esɛngaka kopona boninga oyo okolanda. Tópesa ndakisa, okoki kotika bindimeli oyo ozalaki na yango liboso mpo omoni ete euti na Biblia te. To okoki kozwa ekateli ya kobongwana mpenza mpo na kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na yo. Ntango mosusu baninga to bandeko na yo mosusu basepeli na ekateli na yo te, kasi ekateli nyonso oyo ezali kosepelisa Nzambe ezali ekateli ya malamu.

Salelá bwanya mpo na kozwa ekateli oyo eleki monene

Bato mingi bayebi te ete mokomoko na biso asengeli lelo oyo kopona liwa to bomoi. Bana ya Yisalaele basengelaki kozwa ekateli ya ndenge wana ntango etikalaki moke bákɔta na Mokili ya Ndaka na mobu 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Moize, molobeli ya Nzambe, ayebisaki bango boye: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete yango bomoi mpe konuna mpo na yo, ete okoka kofanda na mokili oyo [Yehova] asimbelaki batata na bino ndai, Abalayama, mpe Yisaka mpe Yakobo, ete akopesa yango na bango.”​—Deteronome 30:19, 20.

Bisakweli ya Biblia mpe ndenge makambo ezali kolandana ezali komonisa ete tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi” mpe ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (2 Timote 3:1; 1 Bakolinti 7:31) Mbongwana yango ekomema tii na kobomama ya mokili oyo esili kobeba, mpe mokili ya sika ya boyengebene ya Nzambe ekozwa esika na yango.

Etikali moke tókɔta na mokili yango ya sika. Okokɔta na mokili ya sika mpo na kozwa bomoi ya seko na mabelé oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela? To okolongolama na mabelé ntango ebongiseli ya Satana ekobomama? (Nzembo 37:9-11; Masese 2:21, 22) Yo moko nde osengeli kopona ngámbo oyo olingi kozala, mpe ekateli yango ekomemela yo bomoi to liwa. Okosepela kozwa lisalisi mpo na kozwa ekateli ya malamu?

Mpo na kopona bomoi, osengeli liboso koyeba masɛngami ya Nzambe. Mangomba mingi ezali koyebisa bato masɛngami yango polele te. Mbala mingi bakonzi ya mangomba yango bateyaka bato makambo ya lokuta mpe bamemaka bango na kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te. Bazali komonisa te ete ezali na ntina bato bázwa ekateli ya kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Yango wana, ebele ya bato basambelaka Nzambe na elimo mpe na solo te. Kasi, yoká ndenge Yesu alobaki: “Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.”​—Matai 12:30.

Na esengo mpenza, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bato báyeba Liloba ya Nzambe malamumalamu. Bayekolaka Biblia na bato na esika mpe ngonga oyo bato yango baponi. Baoyo balingi koyekola Biblia basengeli kotuna Batatoli ya mboka na bango to kotinda mokanda epai ya babimisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

Ya solo, bato mosusu bakoki koyeba mwa masɛngami ya Nzambe. Ntango mosusu mpe bandimaka ete Biblia elobaka solo mpe ete tokoki kotyela yango motema. Kasi, mingi kati na bango bazongisaka nsima ekateli ya komipesa na Nzambe. Mpo na nini? Ekoki kozala na makambo mingi oyo epekisaka bango kozwa ekateli yango.

Ekoki nde kozala ete bayebaka te ntina ya komipesa na Nzambe? Yesu alobaki polele ete: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 7:21) Koyeba Biblia mpamba ekoki te; esengeli kosalela boyebi yango. Baklisto ya ekeke ya liboso bapesaki ndakisa. Mpo na bato mosusu ya ekeke ya liboso, Biblia elobi boye: “Ntango bandimaki Filipo, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe mpe ya nkombo ya Yesu Klisto, babandaki kobatisama, ezala mibali mpe basi.” (Misala 2:41; 8:12) Na yango, soki moto ayoki Liloba ya Nzambe, andimi yango mpe azali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na ye, eloko nini lisusu ekopekisa ye kozwa batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe? (Misala 8:34-38) Ezali solo ete mpo Nzambe andima moto, ye moko asengeli kozwa ekateli ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, mpe kosala yango na esengo nyonso.​—2 Bakolinti 9:7.

Bato mosusu bakoki kokanisa ete bakómi naino na boyebi mingi te mpo bámipesa na Nzambe. Kasi, moto nyonso oyo abandi likambo moko sika azalaka kaka na boyebi moke. Moto nini oyo ayebi mosala moko boye akoki koloba ete na ebandeli ayebaki makambo nyonso ndenge ayebi yango lelo? Kozwa ekateli ya kosalela Nzambe esɛngaka kaka kozala na boyebi ya ebandeli ya mateya mpe mitinda ya Biblia, mpe kozala na mposa ya solosolo ya kosalela yango.

Bato mosusu bazongisaka nde ekateli ya komipesa na Nzambe nsima mpo babangaka ete bakokokisa ndai na bango te? Mwa kobanga ezangaka te epai ya moto nyonso oyo alapi ndai na likambo boye to boye. Moto oyo azwi ekateli ya kobala mpe kobota bana akoki komona lokola nde akokoka mokumba yango te, kasi ndai oyo alapi ekopesa ye makasi ya kosala nyonso mpo na kokokisa yango. Ndenge moko mpe, elenge oyo azwi permis ya kotambwisa motuka akoki kozala na mwa kobanga ete akosala aksida​—mingimingi soki ayebi ete balapolo ezali komonisa ete bilenge oyo bazali basofɛlɛ basalaka aksida mingi koleka mikóló. Kasi, koyeba makambo wana ekoki kozala malamu mpo na ye; ekoki kotinda ye atambwisa motuka na bokɛngi mpenza. Koboya kozwa permis yango te nzela ya bwanya!

Poná bomoi!

Biblia emonisi ete etikali moke ebongiseli ya makambo ya politiki, ya mombongo, mpe ya losambo ya mokili mobimba elongolama elongo na baoyo bazali na ngámbo na yango. Kasi, bato oyo baponi bomoi mpe bazali komitambwisa na boyokani na ekateli yango bakotikala. Lokola bakozala bato ya liboso oyo bakokɔta na mokili ya sika, bakopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongisa mabelé mpo ekóma paladiso ndenge Nzambe akanaki na ebandeli. Ozali na mposa ya kosangana na mosala yango ya esengo oyo Nzambe akotambwisa?

Soki ɛɛ, zwá ekateli ya koyekola Liloba ya Nzambe. Zwá ekateli ya koyekola masɛngami ya Nzambe mpo na kosepelisa ye. Zwá ekateli ya kokokisa masɛngami yango. Oyo eleki nyonso, zalá na mokano ya kokokisa ekateli na yo. Na mokuse, poná bomoi!

[Bililingi na lokasa 4]

Kanisaká malamu liboso ya kozwa bikateli ya minene

[Elilingi na lokasa 5]

Tunaká toli ntango ozali kopona mosala

[Bililingi na lokasa 7]

Baoyo bazali kozwa ekateli ya kosalela Nzambe bakopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa mabelé paladiso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto