Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/11 nk. 8-13
  • Basi oyo basepelisaki motema ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basi oyo basepelisaki motema ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basi oyo babangaki Falao te
  • Mwasi moko oyo liboso azalaki ndumba asepelisi motema ya Yehova
  • Azwaki mapamboli mpo na bwanya na ye
  • Bokoki kozala lokola Abigaili?
  • Azwaki “mbano ya mosakoli”
  • Asalaki na bokɛngi
    Mekolá kondima na bango
  • Asalaki na bokengi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mwasi moko ya mayele apɛngoli likámá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Abigaile ná Davidi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/11 nk. 8-13

Basi oyo basepelisaki motema ya Yehova

“[Yehova] azongisela yo mpo na yango esalaki yo, mpe libonza mobimba epesamela yo na [Yehova].”​—LUTA 2:12.

1, 2. Matomba nini tokoki kozwa soki totaleli ndakisa ya basi oyo basepelisaki motema ya Yehova?

BASI mibale baboyaki kotosa maloba ya Falao mpo bazalaki kobanga Nzambe. Kondima ya mwasi moko ya ndumba etindaki ye atya bomoi na ye na likama mpo na kobatela Bayisalaele mibale oyo bazalaki banɔngi. Boboto mpe komikitisa ya mwasi moko etindaki ye abikisa bomoi ya bato ebele mpe asalisa mopakolami ya Yehova azwa nyongo ya makila te. Mwasi moko akufelá mobali oyo azalaki na mwana moko azalaki na kondima epai ya Yehova Nzambe mpe ayebaki koyamba bapaya; yango wana, andimaki kopesa mosakoli ya Nzambe mwa biloko ya kolya oyo atikalaki na yango. Wana ezali kaka bandakisa moke kati na ebele ya basi oyo basepelisaki motema ya Yehova.

2 Ndenge Yehova atalelaki basi wana mpe mapamboli oyo asopelaki bango ezali komonisa ete asepelaka na moto libosoliboso mpo na bizaleli ya elimo, kasi te mpo azali mobali to mwasi. Lelo oyo, lokola bato bazali koluka mingimingi kozala kitoko to na bozwi, koluka libosoliboso bizaleli ya elimo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, ndakisa ya bamilio ya basi oyo babangaka Nzambe oyo bazali na kati ya basaleli na ye lelo oyo ezali komonisa ete tokoki kosala yango. Baklisto yango bamekolaka kondima, boboto, koyamba bapaya, mpe bizaleli mosusu ya malamu ya basi oyo bazalaki kobanga Nzambe oyo Biblia elobeli. Ezali solo ete baklisto ya mibali basengeli mpe kolanda bizaleli oyo basi ya kala bamonisaki. Mpo na komona ndenge oyo tokoki kosala yango malamu koleka, tótalela malamumalamu bomoi ya basi oyo touti kolobela.​—Baloma 15:4; Yakobo 4:8.

Basi oyo babangaki Falao te

3, 4. (a) Mpo na nini Sifala ná Pua baboyaki kotosa mitindo ya Falao ya koboma mwana mobali nyonso ya Yisalaele oyo akobotama? (b) Mbano nini Yehova apesaki basi yango mpo na mpiko mpe ezaleli na bango ya kobanga Nzambe?

3 Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato mingi oyo basambisaki na tribinale ya Nuremberg mpo babomaki ebele ya bato bazalaki komilongisa na koloba ete batosaki kaka mitindo ya bakonzi na bango. Sikoyo, kokanisá bango na Sifala ná Pua, basi mibale ya Yisalaele oyo bazalaki kobotisa basi na Ezipito ya kala, na eleko ya Falao moko mabe oyo Biblia eyebisi nkombo na ye te. Lokola Falao azalaki kobanga noki Baebele bákóma ebele koleka, apesaki basi yango mitindo ete báboma mwana mobali nyonso ya Baebele oyo akobotama. Basi yango batosaki likambo mabe wana? “Basalaki lokola elakaki bango mokonzi ya Ezipito te, kasi batikaki bana babali na bomoi.” Mpo na nini basi yango babangaki moto te? Mpo “babangaki Nzambe.”​—Exode 1:15, 17; Genese 9:6.

4 Basi yango batyelaki mpenza Yehova motema; boye, ye mpe akómaki “nguba” na bango, abikisaki bango na nkanda ya Falao. (2 Samwele 22:31; Exode 1:18-20) Kasi, lipamboli ya Yehova esukaki wana te. Apesaki Sifala ná Pua mabota. Kutu, akumisaki basi yango na ndenge akomisaki bankombo mpe misala na bango na Liloba na ye mpo bato oyo bakobotama nsima bátánga yango, nzokande nkombo ya Falao wana eyebani te.​—Exode 1:21; 1 Samwele 2:30; Masese 10:7.

5. Ndenge nini ebele ya basi baklisto lelo oyo bazali komonisa elimo oyo Sifala ná Pua bazalaki na yango, mpe mbano nini Yehova akopesa bango?

5 Lelo oyo mpe basi lokola Sifala ná Pua bazali? Ɛɛ! Mbula na mbula, bankóto ya basi bazali kobanga te kosakola nsango ya lobiko oyo ezali na Biblia na mikili oyo “etinda ya mokonzi” epekisi kosakola mpe na ndenge yango, bazali kotya bonsomi to mpe bomoi na bango na likama. (Baebele 11:23; Misala 5:28, 29) Lokola basi yango ya mpiko balingi Nzambe mpe bazalani na bango, bazali kotika te ete moto moko apekisa bango koyebisa bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mpo na yango, ebele ya basi bazali kokutana na botɛmɛli mpe bazali konyokwama. (Malako 12:30, 31; 13:9-13) Se ndenge asalaki mpo na Sifala ná Pua, Yehova ayebi mpenza misala ya basi malamu mpe ya mpiko wana, mpe mpo na komonisa ete alingaka bango, akobatela nkombo na bango na “buku ya bomoi” soki batikali sembo mpe bayiki mpiko tii na nsuka.​—Bafilipi 4:3; Matai 24:13.

Mwasi moko oyo liboso azalaki ndumba asepelisi motema ya Yehova

6, 7. (a) Makambo nini Lahaba ayebaki mpo na Yehova mpe libota na ye, mpe boyebi yango etindaki ye asala nini? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekumisi Lahaba?

6 Na mobu 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Lahaba, mwasi moko ya ndumba azalaki kofanda na Yeliko, engumba moko ya Kanana. Emonani ete Lahaba azalaki koyoka makambo mingi oyo ezalaki koleka. Ntango Bayisalaele mibale oyo bazalaki banɔngi babombanaki na ndako na ye, alobelaki makambo ya kokamwa oyo esalemaki ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, atako esalemaki mbula 40 liboso! Ayebaki mpe ndenge Bayisalaele balongaki bakonzi ya Baamola: Sihona ná Ogu. Tótala makambo oyo boyebi yango etindaki ye asala. Alobaki na banɔngi boye: “Nayebi ete Yehova akopesa bino mokili oyo, . . . mpamba te Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya lola na likoló mpe mabelé awa na nse.” (Yosua 2:1, 9-11, NW) Makambo oyo Lahaba ayokaki na ntina na Yehova mpe misala na ye mpo na Yisalaele esimbaki mpenza motema na ye mpe etindaki ye andimela ye.​—Baloma 10:10.

7 Kondima ya Lahaba etindaki ye asala misala. Ayambaki “na kimya” Bayisalaele oyo bazalaki banɔngi mpe atosaki malako oyo bapesaki ye mpo na kobikisa bomoi na ye ntango Yisalaele ekobundisa engumba Yeliko. (Baebele 11:31; Yosua 2:18-21) Na ntembe te misala ya kondima ya Lahaba esepelisaki motema ya Yehova, mpamba te atindaki moyekoli Yakobo atánga nkombo na ye esika moko na oyo ya Abalayama, moninga ya Nzambe, lokola ndakisa oyo baklisto basengeli kolanda. Yakobo akomaki boye: “Ndenge moko mpe Lahaba mwasi ya ndumba atángamaki nde te moyengebene mpo na misala na ye, nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotinda bango bákenda na nzela mosusu?”​—Yakobo 2:25.

8. Ndenge nini Yehova apambolaki Lahaba mpo na kondima mpe botosi na ye?

8 Yehova apesaki Lahaba mbano mingi. Ya liboso, na ndenge ya likamwisi, abikisaki ye ná bato nyonso oyo babombanaki na ndako na ye, elingi koloba “libota ya tata na ye mpe bato na ye nyonso.” Na nsima atikaki bango báfanda “na Yisalaele,” epai bazalaki kotalela bango lokola bana-mboka. (Yosua 2:13; 6:22-25; Levitike 19:33, 34) Kasi, esukaki wana te. Yehova apesaki lisusu Lahaba lokumu ya kokóma nkɔkɔ ya Yesu Klisto. Talá motema-boboto oyo amoniselaki mwasi yango ya Kanana oyo azalaki liboso kosambela bikeko!a​—Nzembo 130:3, 4. 

9. Ndenge nini basi mosusu lelo oyo bakoki kolendisama na lolenge oyo yehova atalelaki Lahaba mpe baklisto mosusu ya basi ya ekeke ya liboso?

9 Lokola Lahaba, banda na ekeke ya liboso tii lelo oyo, basi mosusu batikaki pite to ekobo mpe bakómaki baklisto oyo bazali kosepelisa Nzambe. (1 Bakolinti 6:9-11) Na ntembe te, bamosusu bakolaki na bisika oyo ezali lokola Kanana, epai bato bamipesaka na pite mpe ekobo mpe bamonaka yango mabe te. Kasi, kondima oyo euti na boyebi ya solosolo ya Biblia ebongolaki bango. (Baloma 10:17) Yango wana, tokoki mpe koloba mpo na basi yango ete “Nzambe azali koyoka nsɔni te na ntina etali bango, mpo na kobengama Nzambe na bango.” (Baebele 11:16) Talá lokumu monene bazwi!

Azwaki mapamboli mpo na bwanya na ye

10, 11. Makambo nini elekaki kati na Nabala ná Davidi oyo etindaki Abigaili azwa ekateli moko ya malamu?

10 Basi mingi ya sembo na ntango ya kala bazalaki na bwanya, mpe mpo na yango, basalisaki mpenza basaleli ya Yehova. Moko na bango ezali Abigaili, mwasi ya Nabala, Moyisalaele moko oyo azalaki mozwi mpe azalaki na mabelé mingi. Bwanya ya Abigaili ebikisaki bomoi ya bato mingi mpe esalisaki Davidi, moto oyo akómaki mokonzi ya Yisalaele na nsima, azwa nyongo ya makila te. Lisolo ya Abigaili ezali na 1 Samwele mokapo 25.

11 Na ebandeli, lisolo yango emonisi biso ete Davidi ná bato na ye bafandaki esika oyo bibwele ya Nabala ezalaki mpe babatelaki yango butu na moi kozanga ete báfuta bango mpo azalaki ndeko na bango Moyisalaele. Ntango Davidi azangaki biloko ya kolya, atindelaki Nabala bilenge mibali zomi mpo na kosɛnga ye biloko. Wana ezalaki libaku mpo Nabala amonisa botɔndi epai ya Davidi mpe kokumisa mopakolami ya Yehova. Kasi Nabala asalaki yango te. Asilikaki makasi, afingaki Davidi mpe azongisaki bilenge mibali wana mabɔkɔ mpamba. Ntango Davidi ayokaki yango, ayanganisaki mibali 400 ná bibundeli na bango mpe babandaki kokitela Nabala. Abigaili ayokaki nsango ete mobali na ye azongiselaki bato ya Davidi maloba mabe mpe asalaki nokinoki mpe na mayele mpo na kokitisa nkanda ya Davidi; atindaki ebele ya biloko ya kolya. Na nsima, ye moko akendaki kokutana na Davidi.​—Vɛrsɛ 2-20.

12, 13. (a) Ndenge nini Abigaili amonisaki ete azalaki na bwanya mpe azalaki sembo epai ya Yehova mpe mopakolami na ye? (b) Abigaili asalaki nini ntango azongaki epai na ye, mpe nini esalemaki mpo na ye?

12 Ntango Abigaili akutanaki na Davidi, komikitisa oyo asɛngaki na yango bolimbisi emonisaki ete azalaki mpenza komemya mopakolami ya Yehova. Alobaki boye: “[Yehova] akokolisela nkolo na ngai libota ya seko, mpo ete nkolo na ngai azali kobunda bitumba ya [Yehova],” mpe abakisaki ete Yehova akotya Davidi mokonzi ya Yisalaele. (Vɛrsɛ 28-30) Abigaili amonisaki mpe mpiko mpo na koyebisa Davidi ete soki akebi te, mokano na ye ya kozongisa mabe na mabe ekomemela ye nyongo ya makila. (Vɛrsɛ 26, 31) Komikitisa, limemya mpe bwanya ya Abigaili ekitisaki motema ya Davidi. Alobaki ete: “[Yehova] Nzambe ya Yisalaele akumisama, oyo atindi yo mokolo oyo mpo na kozwana na ngai. Mayele na yo ekumisama, yo mpe opambwama! Yo opekisi ngai lelo ete naya kotangisa makila te.”​—Vɛrsɛ 32, 33.

13 Ntango Abigaili azongaki epai na ye, azalaki mpenza na mokano ya koyebisa mobali na ye ete apesaki Davidi biloko ya kolya. Kasi, ntango amonaki ye, mobali yango asilaki ‘kolangwa masanga mingi.’ Yango wana, azelaki tii ntango kwiti esilaki mpe ayebisaki ye. Nabala asalaki nini? Ayokaki nsɔmɔ mpe nzoto na ye mobimba ekómaki lokola libanga. Mikolo zomi na nsima, Nzambe abomaki ye. Ntango Davidi ayokaki nsango ya liwa ya Nabala, lokola asepelaki na Abigaili mpe azalaki komemya ye, atunaki ye libala. Abigaili mpe andimaki.​—Vɛrsɛ 34-42.

Bokoki kozala lokola Abigaili?

14. Bizaleli nini ya Abigaili biso mpe tokoki kosepela kolona mingi lisusu?

14 Bomoni bizaleli mosusu ya Abigaili oyo bino​—mibali mpe basi​—bokosepela kolona mingi lisusu? Bokoki mbala mosusu kolinga kozala na bokɛngi mpe na bwanya mingi na ntango ya mikakatano. To mpe bokoki kolinga bólobaka na motema mpiɔ mpe na mayele na moto oyo asiliki. Soki boye, ezali malamu kobondela Yehova mpo na yango. Ye alaki kopesa bwanya, bososoli, likoki ya kokanisa na bato nyonso oyo bazali “kokoba kosɛnga na kondima.”​—Yakobo 1:5, 6; Masese 2:1-6, 10, 11.

15. Ntango nini esɛngaka mpenza ete basi baklisto bámonisa bizaleli lokola ya Abigaili?

15 Bizaleli malamu yango ezalaka na ntina mingimingi mpo na mwasi oyo mobali na ye azali mondimi te to oyo alandaka mpenza mitinda ya Biblia te. Ekoki kozala ete alingi kɔpɔ mwa mingi. Tozali na elikya ete mokolo mosusu bato wana bakobongwana. Mingi babongwani, mbala mingi nsima ya komona boboto, limemya mpe etamboli malamu ya basi na bango.​—1 Petelo 3:1, 2, 4.

16. Ata soki ndeko mwasi azali na mobali oyo azali mondimi te, ndenge nini akomonisa ete boyokani na ye na Yehova ezali na motuya koleka makambo mosusu nyonso?

16 Ezala mikakatano nini ozali na yango na libala, kobosana te ete Yehova akotika yo te. (1 Petelo 3:12) Salá milende mpo ozala makasi na elimo. Bondelá Nzambe mpo na kosɛnga bwanya mpe kimya na motema. Kolɛmba te koyekola, kobondela, komanyola, mpe kosangana na bandeko mpo opusana penepene ya Yehova. Atako mobali ya Abigaili azalaki kokipe makambo ya elimo te, yango epekisaki Abigaili te kolinga Nzambe mpe komemya mopakolami na ye. Azalaki kolanda mitinda ya sembo. Ata soki mwasi moklisto azali na mobali oyo azali mosaleli ya sembo ya Nzambe, abosanaka te ete asengeli kosala ntango nyonso makasi mpo na kotonga mpe kobatela elimo na ye. Ezali solo ete Biblia esɛngi na mobali ete akokisa bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya mwasi na ye, kasi mwasi mpe asengeli kosala makasi mpo na ‘lobiko na ye moko na kobanga mpe na kolɛnga.’​—Bafilipi 2:12; 1 Timote 5:8.

Azwaki “mbano ya mosakoli”

17, 18. (a) Ndenge nini kondima ya mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata emekamaki? (b) Mwasi yango asalaki nini na likambo oyo Eliya asɛngaki ye, mpe mbano nini Yehova apesaki ye?

17 Ndenge oyo Yehova asungaki mwasi moko akufelá mobali na ntango ya mosakoli Eliya ezali komonisa ete asepelaka mingi na bato oyo bamipesaka mpe bapesaka biloko na bango mpo losambo ya solo ekende liboso. Lokola elanga eumelaki mingi na mikolo ya Eliya, nzala ekɔtelaki bato mingi, ná mwasi moko akufelá mobali ya mboka Zalefata oyo azalaki kofanda na mwana na ye ya mobali. Ntango kaka bilei na bango ekómaki mpenza na nsuka, mopaya moko akómelaki bango​—ezalaki mosakoli Eliya. Eliya asɛngaki ye likambo moko ya makasi. Atako ayebaki mokakatano ya mwasi yango, asɛngaki ye asalela ye “mokate moke” na mwa mafuta mpe farini oyo atikalaki na yango. Kasi abakisaki ete: “Zambi [Yehova], Nzambe ya Yisalaele alobi boye ete, Mbɛki ya [farini] ekosila te mpe molangi ya mafuta ekokauka te kino mokolo mokotinda [Yehova] mbula likoló ya mabelé.”​—1 Mikonzi 17:8-14.

18 Soki basɛngaki yo likambo ya ndenge wana, olingaki kosala nini? Emonani ete mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata ayebaki ete Eliya azali mosakoli ya Yehova, yango wana “asalaki lokola elobaki Eliya.” Mbano nini Yehova apesaki ye mpo na elimo na ye ya koyamba bapaya? Na ndenge ya likamwisi, Yehova apesaki bilei mpo na mwasi yango, mwana na ye ya mobali, mpe Eliya mikolo nyonso oyo elanga eumelaki. (1 Mikonzi 17:15, 16) Yehova apesaki mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata “mbano ya mosakoli,” atako azalaki Moyisalaele te. (Matai 10:41) Lisusu, Mwana ya Nzambe akumisaki mwasi yango akufelá mobali ntango atángaki ye lokola ndakisa liboso ya bato bazangi kondima ya mboka na ye, Nazalete.​—Luka 4:24-26.

19. Na makambo nini baklisto mingi ya basi bamonisaka elimo ya mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata, mpe ndenge nini Yehova atalelaka bango?

19 Lelo oyo, baklisto mingi ya basi bazali komonisa elimo ya mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata. Na ndakisa, pɔsɔ na pɔsɔ, bandeko-basi baklisto​—oyo mingi kati na bango bazali babola mpe bazali na mabota​—bayambaka bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango. Bamosusu bakabelaka babongisi-nzela mwa biloko ya kolya, basalisaka babola, to mpe bamipesaka mpe bapesaka biloko na bango mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. (Luka 21:4) Yehova amonaka elimo wana ya komipesa? Ntembe ezali ata moke te! “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”​—Baebele 6:10.

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Na ekeke ya liboso, basi mingi oyo bazalaki kobanga Nzambe bazwaki libaku malamu ya kosalela Yesu ná bantoma na ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo basi yango basepelisaki motema ya Yehova, mpe tokotalela ndakisa ya basi oyo, ata na kati ya mikakatano, bazali kosalela Yehova lelo oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu na mokanda ya Matai, batángi nkombo ya basi minei: Tamala, Lahaba, Luta, ná Malia. Liloba ya Nzambe epesi bango nyonso lokumu mingi.​—Matai 1:3, 5, 16.

Bozongeli

• Ndenge nini basi oyo basepelisaki motema ya Yehova?

• Sifala ná Pua

• Lahaba

• Abigaili

• Mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata

• Ndenge nini komanyola likoló ya ndakisa ya basi yango ekoki kosalisa biso? Pesá ndakisa.

[Bililingi na lokasa 9]

Basi mingi ya sembo basalelaki Nzambe kozanga kobanga “etinda ya mokonzi”

[Elilingi na lokasa 10]

Mpo na nini Lahaba azali ndakisa malamu ya moto ya kondima?

[Elilingi na lokasa 10]

Wapi bizaleli ya Abigaili okosepela komekola?

[Elilingi na lokasa 12]

Baklisto mingi ya basi bazali komonisa elimo ya mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto