Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/11 nk. 18-23
  • Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Taleláká bamposa ya bato
  • Landá ndakisa ya bateyi mosusu
  • Luká mabaku ya kokómisa bato bayekoli
  • Kobá koluka bato oyo babongi
  • Akila na Pilisikila: Babalani oyo bazalaki ndakisa malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Apolo—Mosakoli ya solo ya boklisto oyo azalaki molobi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “Kopalangana mpe kolonga”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/11 nk. 18-23

Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli

“Ntango Pilisila ná Akila bayokaki [Apolosi], bakamataki ye na molɔngɔ na bango mpe bamonisaki ye polelepolele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.”​—MISALA 18:26.

1. Atako Apolosi azalaki “kopela na elimo,” asengelaki na nini?

PILISILA ná mobali na ye Akila, baklisto ya ekeke ya liboso, bayokaki ndenge Apolosi azalaki kosala lisukulu na sinagoga moko na Efese. Lokola Apolosi ayebaki koloba mpe azalaki na mayele ya kondimisa, bato nyonso bafungolaki matoi mpo na koyoka ye. Azalaki “kopela na elimo,” mpe azalaki “koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu.” Kasi, Apolosi “ayebaki kaka batisimo ya Yoane.” Apolosi ateyaki solo na ntina na Klisto, kasi ayebaki mpenza makambo nyonso te. Ayebaki kaka ndambo ya makambo. Esengelaki ete Apolosi ayeba lisusu malamumalamu mokumba ya Yesu Klisto na kati ya mokano ya Yehova.​—Misala 18:24-26.

2. Mokumba nini ya mpasi Pilisila ná Akila bandimaki?

2 Pilisila ná Akila bakakatanaki te, bamonisaki Apolosi ete basepeli kosalisa ye mpo atosa “makambo nyonso” oyo Klisto atindaki. (Matai 28:19, 20) Biblia elobi ete bakamataki Apolosi “na molɔngɔ na bango mpe bamonisaki ye polelepolele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.” Kasi, Apolosi azalaki na makambo mosusu oyo ekokaki kobangisa baklisto mosusu koteya ye. Ezalaki makambo nini? Mpe liteya nini tokoki kozwa na milende oyo Pilisila ná Akila basalaki mpo na koteya Apolosi Biblia? Ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa biso tósala molende mpo na kobanda koyekola Biblia na bato?

Taleláká bamposa ya bato

3. Mpo na nini Pilisila ná Akila babangaki koteya Apolosi te atako azalaki na mayele mingi?

3 Apolosi azalaki Moyuda; kasi, emonani ete akolaki na engumba Alezandria. Na ntango wana, Alezandria ezalaki engumba-mokonzi ya Ezipito; biteyelo ya minene ezalaki kuna mpe eyebanaki mingi mpo na bibliotɛkɛ na yango monene. Bayuda mingi bazalaki kofanda na engumba yango; bamosusu mpe bazalaki bato ya mayele mingi. Yango wana, libongoli ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki oyo ebengami Septante esalemaki kuna. Tokoki kokamwa te ete Apolosi “ayebaki Makomami malamumalamu mpenza”! Akila ná Pilisila bazalaki kotonga bahema. Babangaki nde Apolosi mpo ayebaki koloba? Te. Bolingo etindaki bango bátala nde moto, bamposa na ye, mpe bákanisa ndenge oyo bakoki kosalisa ye.

4. Epai wapi mpe ndenge nini Apolosi azwaki lisalisi oyo asengelaki na yango?

4 Atako Apolosi ayebaki koloba, esengelaki báteya ye. Iniversite moko te ekokaki kopesa ye lisalisi oyo asengelaki na yango, kaka bato oyo bazalaki na lisangá ya boklisto. Apolosi azwaki libaku malamu ya koyekola makambo oyo ekosalisa ye ayeba malamumalamu oyo Nzambe asalaki mpo na kobikisa bato. Pilisila ná Akila “bakamataki ye na molɔngɔ na bango mpe bamonisaki ye polelepolele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.”

5. Okoloba nini mpo na elimo ya Pilisila ná Akila?

5 Pilisila ná Akila bazalaki na elimo mpe na kondima makasi. Na ntembe te ‘bazalaki ntango nyonso komibongisa mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bango ntina ya elikya na bango,’ azala mozwi, mobola, moto atángá mingi, to moombo. (1 Petelo 3:15) Akila ná mwasi na ye bazalaki na makoki ya ‘kosembola liloba ya solo malamumalamu.’ (2 Timote 2:15) Na ntembe te bazalaki bayekoli ya solosolo ya Biblia. Mateya ya ‘liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe ezali na nguya’ esimbaki mpenza motema ya Apolosi.​—Baebele 4:12.

6. Nini emonisi biso ete Apolosi amonisaki botɔndi mpo na lisalisi oyo azwaki?

6 Apolosi amonisaki botɔndi mingi mpo na ndakisa ya balakisi na ye mpe akómaki makasi lisusu na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Asalelaki malamu mpenza boyebi na ye na mosala ya kosakola nsango malamu, mingimingi na koteya Bayuda. Apolosi asalisaki mingi mpo na kondimisa Bayuda makambo etali Klisto. Lokola ‘azalaki na nguya na Makomami,’ azalaki na makoki ya kondimisa bango ete basakoli nyonso ya kala bazalaki kozela koya ya Klisto. (Misala 18:24, Kingdom Interlinear Translation) Lisolo yango elobi ete na nsima, Apolosi akendaki na Akaya, epai “asalisaki mpenza baoyo bandimaki mpo na boboto monene ya Nzambe; mpo azalaki komonisa na bokasi mpenza polele na miso ya bato ete Bayuda bazalaki na libunga, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Klisto.”​—Misala 18:27, 28.

Landá ndakisa ya bateyi mosusu

7. Ndenge nini Akila ná Pilisila bakómaki bateyi malamu?

7 Ndenge nini Akila ná Pilisila bakómaki bateyi malamu ya Liloba ya Nzambe? Na ntembe te, longola molende na bango na koyekola bango moko mpe koyangana na makita, boninga na bango na ntoma Paulo esalisaki bango mingi. Paulo afandaki sanza 18 na ndako ya Pilisila ná Akila na Kolinti. Bazalaki kosala na ye mosala ya kotonga mpe kobongisa bahema. (Misala 18:2, 3) Kanisá masolo ya Biblia oyo bazalaki kosolola na bozindo. Balendisamaki mpe mingi na elimo ndenge bafandaki na Paulo! Masese 13:20 elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” Boninga ya malamu esalisaki bango bábongisa lisusu mimeseno na bango na makambo ya elimo.​—1 Bakolinti 15:33.

8. Pilisila ná Akila bayekolaki nini na ndenge oyo Paulo azalaki kosala mosala na ye?

8 Ntango Paulo azalaki kosakola Bokonzi, Pilisila ná Akila bazalaki komona ete azali moteyi malamu. Lisolo ya Misala elobi ete Paulo “azalaki kosala lisukulu moko na sinagoga [ya Kolinti] sabata nyonso mpe azalaki kondimisa Bayuda mpe Bagrɛki.” Na nsima, ntango akómaki kosala na Silasi ná Timote, Paulo “abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba, kopesáká litatoli epai ya Bayuda mpo na komonisa ete Yesu azali Klisto.” Pilisila ná Akila bamonaki ete lokola bato oyo bazalaki koyangana na sinagoga bazalaki mpenza kosepela na mateya ya Paulo te, atikaki sinagoga mpe akómaki kosakola na esika ya malamu koleka, elingi koloba na ndako moko ekangamá na sinagoga. Kuna, Paulo asalisaki Klisipusi, “mokambi ya sinagoga,” akóma moyekoli. Na ntembe te, Pilisila ná Akila bamonaki ete lokola moto wana akómaki moyekoli, yango ememaki matomba mingi na teritware wana. Lisolo yango elobi ete: “Klisipusi . . . akómaki mondimi na kati ya Nkolo, ndenge moko mpe bato nyonso ya ndako na ye. Mpe mingi na kati ya Bakolinti oyo bayokaki babandaki kondima mpe kobatisama.”​—Misala 18:4-8.

9. Na ndenge nini Pilisila ná Akila balandaki ndakisa ya Paulo?

9 Basakoli mosusu ya Bokonzi, lokola Pilisila ná Akila, balandaki ndakisa ya Paulo na mosala ya kosakola. Ntoma Paulo alendisaki baklisto mosusu ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.” (1 Bakolinti 11:1) Pilisila ná Akila balandaki ndakisa ya Paulo mpe basalisaki Apolosi akanga ntina ya mateya ya boklisto malamumalamu. Na nsima, ye mpe asalisaki bato mosusu. Na ntembe te Pilisila ná Akila bakómisaki bato bayekoli na Loma, na Kolinti, mpe na Efese.​—Misala 18:1, 2, 18, 19; Baloma 16:3-5.

10. Misala 18 eteyi yo makambo nini oyo ekoki kosalisa yo na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

10 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Misala mokapo 18? Se ndenge Akila ná Pilisila bazwaki mayele epai ya Paulo, biso mpe tokoki kokóma na makoki mingi lisusu ya kokómisa bato bayekoli soki tolandi ndakisa ya bateyi ya malamu ya Liloba ya Nzambe. Tokoki kosala elongo na baoyo ‘bamipesi mingi na mosala oyo etali liloba’ mpe ‘bazali kopesa litatoli malamulamu’ epai ya basusu. (Misala 18:5, Kingdom Interlinear Translation) Tokoki kotala ndenge bazali kosalela mayele ya koteya mpo na kosimba mitema ya bato. Mayele yango ekoki kosalisa biso na kokómisa bato bayekoli. Ntango tozali koyekola Biblia na moto moko, tokoki kosɛnga ye abenga bato mosusu ya libota na ye to baninga mpo bango mpe báyekola. To mpe tokoki kotuna ye ayebisa biso bato mosusu oyo bakoki kondima koyekola Biblia.​—Misala 18:6-8.

Luká mabaku ya kokómisa bato bayekoli

11. Epai wapi tokoki kozwa bayekoli ya sika?

11 Paulo ná baninga na ye bazalaki kosakola ndako na ndako, na wenze, ntango bazalaki kosala mibembo​—na mokuse, na bisika nyonso—​mpo na kokómisa bato bayekoli. Soki ozali mosakoli ya Bokonzi ya molende oyo azali koluka kokómisa bato bayekoli, okoki nde kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola? Okoki nde koluka mabaku ya kokutanana bato oyo babongi mpe kosakwela bango? Wapi mwa mayele mosusu basakoli mosusu ya nsango malamu basalelaki mpo na kozwa bayekoli? Tótalela naino ndenge oyo basakoli mosusu bazali kosakola na telefone.

12-14. Lobelá matomba ya kopesa litatoli na telefone oyo yo moko ozwaki to oyo balobeli na baparagrafe.

12 Na Brésil, moklisto moko oyo topesi ye nkombo Maria azalaki kosakola ndako na ndako; amonaki mwasi moko azali kobima na buludingi moko mpe apesaki ye trakte. Mpo na kobanda lisolo, Maria atunaki ye kaka motuna oyo ezali motó ya likambo ya trakte yango: “Olingi koyeba Biblia malamu?” Mwasi yango alobaki ete: “Nalingi. Kasi, likambo ya mpasi ezali ete nazali molakisi, mpe mosala na ngai ezwaka ngai ntango nyonso.” Maria alobaki na ye ete bakoki kosolola masolo ya Biblia na telefone. Mwasi yango apesaki Maria nimero na ye ya telefone mpe, kaka na mpokwa ya mokolo yango, babandaki koyekola mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a

13 Na Éthiopie, ndeko-mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela azalaki kopesa litatoli na telefone; abengaki nimero moko mpe mobali moko ayambaki; ntango abandi koloba, ayokaki makɛlɛlɛ na esika oyo mobali yango azalaki. Moto yango ayebisaki ye ete abenga nsima. Ntango ndeko-mwasi abengaki lisusu, mobali yango asɛngaki ye bolimbisi mpe ayebisaki ye ete ntango abengaki liboso, ye ná mwasi na ye bazalaki koswana makasi. Maloba ya mobali yango epesaki ndeko-mwasi libaku ya kolobela toli malamu ya Biblia mpo na kolonga mikakatano na libota. Ayebisaki ye ete buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, esalisi ebele ya mabota. Mwa mikolo nsima ya kopesa mobali yango buku yango, ndeko-mwasi abengaki ye lisusu. Mobali yango alobaki ete: “Buku yango ebikisi libala na ngai!” Kutu, afandisaki libota na ye mpo na koyebisa bango makambo malamu oyo atángaki na buku yango. Babandaki koyekola Biblia, mpe mwa moke na nsima, mobali yango akómaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ.

14 Na Danemark, mosakoli moko oyo abandaki koyekola Biblia na moto moko oyo apesaki litatoli na telefone alobi boye: “Mokɛngɛli na mosala ya kosakola alendisaki ngai napesaka litatoli na telefone. Na ebandeli nazalaki kokakatana mpe koloba ete: ‘Nakokoka kosakola na telefone te.’ Kasi, mokolo moko nazwaki mpiko mpe nabengaki moto ya liboso. Sonja ayambaki mpe, nsima ya kosolola na ye mwa moke, andimaki natindela ye mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mokolo moko na mpokwa tolobelaki bozalisi, mpe alobaki ete akosepela kotánga buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?b Nalobaki na ye ete nakosepela mingi tókutana ngai na ye mpe tósolola likambo yango. Andimaki. Ntango nakómaki, nakutaki Sonja amibongisi mpo na koyekola, mpe banda wana, tokómá koyekola pɔsɔ na pɔsɔ.” Ndeko-mwasi yango asukisi boye: “Banda bambula ebele nazalaki kobondela mpo na kozwa moto ya koyekola na ye Biblia, kasi nazalaki kokanisa te ete nakozwa ye na litatoli ya telefone.”

15, 16. Pesá bandakisa oyo emonisi matomba ya koluka mabaku ndenge na ndenge ya kobanda koyekola Biblia.

15 Bato mingi bazali kobuka mbuma malamu mpo bazali kolanda toli ya kopesa litatoli na bisika nyonso oyo bato bazali. Na États-Unis, mwasi moko moklisto atɛlɛmisaki motuka na ye pembeni ya motuka mosusu na parkingi moko. Ntango mwasi oyo azalaki na kati ya motuka yango amonaki ye, ndeko-mwasi abandaki kolimbwela ye mosala na biso ya koteya bato Biblia. Mwasi yango ayokaki ye, akitaki na motuka na ye, mpe apusanaki pembeni ya motuka ya ndeko-mwasi. Alobaki ete: “Nasepeli mingi ndenge otɛlɛmi mpo na kosolola na ngai. Eleki ntango mingi nazwaka lisusu mikanda na bino te. Lisusu, nazali na mposa nazongela koyekola Biblia. Okosepela koyekola na ngai?” Na ndenge yango, ndeko-mwasi wana alukaki libaku moko malamu mpo na kosakola nsango malamu.

16 Na États-Unis, ndeko-mwasi moko akutanaki na likambo oyo ntango akendaki na ndako moko ya mibange: Asololaki naino na mokambi ya ndako yango mpe alobaki na ye ete alingi kokokisa bamposa ya elimo ya bato oyo bafandaka wana. Ndeko-mwasi abakisaki ete alingi ayekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na moto nyonso oyo akosepela. Mokambi yango apesaki ye ndingisa ya kokɔta na bashambre. Mosika te, akómaki koyekola Biblia mbala misato na pɔsɔ na bato 26, oyo moko na bango azali na makoki ya koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ.

17. Lolenge nini ezalaka mbala mingi malamu mpo na kobanda koyekola Biblia na bato?

17 Mpo na basakoli mosusu, koyebisa moto mbala moko ete osepeli koyekola na ye Biblia ebotaka mpe mbuma malamu. Mokolo moko na ntɔngɔ, lisangá moko ya basakoli 105 esalaki molende ya kotuna moto nyonso oyo bakokutana na ye soki akosepela koyekola Biblia. Basakoli 86 babimaki na mosala ya kosakola mokolo yango, mpe nsima ya ngonga mibale, babandaki koyekola Biblia na bato soki 15.

Kobá koluka bato oyo babongi

18, 19. Malako nini ya Yesu tosengeli kobosana te, mpe mpo na yango, tosengeli kozala na mokano nini?

18 Soki ozali mosakoli ya Bokonzi, okolinga mbala mosusu komeka makanisi oyo epesami na lisolo oyo. Kasi, ekozala malamu kotalela mimeseno ya mboka na bino ntango ozali koluka lolenge malamu ya kopesa litatoli. Tóbosana mpe te etinda ya Yesu ya koluka bato oyo babongi mpe kosalisa bango bákóma bayekoli.​—Matai 10:11; 28:19.

19 Mpo na yango, tiká ete ‘tósembola liloba ya solo malamumalamu.’ Tokoki kosala yango soki tozali kosalela mayele ya kondimisa oyo euti mpenza na Biblia. Yango ekosalisa biso na kosimba mitema ya bato oyo bandimi mpe ekotinda bango básalela makambo yango. Soki tozali kobondela Yehova mpe kotyela ye motema, tokoki mpenza kosalisa bato mosusu bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. Mosala yango ezali na mbano monene! Yango wana, tiká ‘tósala nyonso oyo ekoki mpo tómimonisa bato oyo bandimami na Nzambe,’ mpe tópesa Yehova lokumu ntango nyonso lokola basakoli ya Bokonzi ya molende, oyo bazali kosakola mpo na kokómisa bato bayekoli.​—2 Timote 2:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini esengelaki ete bálimbwela Apolosi nzela ya Nzambe malamumalamu?

• Na ndenge nini Pilisila ná Akila bazwaki mayele epai ya ntoma Paulo?

• Misala mokapo 18 eteyi yo nini mpo na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

• Ndenge nini okoki koluka mabaku ya kokómisa bato bayekoli?

[Elilingi na lokasa 18]

Pilisila ná Akila ‘bamonisaki’ Apolosi ‘polelepolele nzela ya Nzambe’

[Elilingi na lokasa 20]

Apolosi akómaki mpenza na makoki ya kokómisa bato bayekoli

[Elilingi na lokasa 21]

Paulo asakolaki bipai nyonso oyo azalaki kokende

[Elilingi na lokasa 23]

Luká mabaku ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto