Na kondima, Balaka alongaki limpinga monene ya basoda
KANISÁ ete ozali liboso ya ebele ya basoda oyo bayei kobunda na bino. Bazali na bibundeli ya makasi mpe balingi bábanda etumba. Kasi yo ná baninga na yo bozali na makasi mpenza te.
Na ntango oyo Yisalaele ezalaki kotambwisama na basambisi, Balaka, Debola mpe Bayisalaele mosusu 10 000 bakutanaki na likambo ya ndenge wana. Banguna yango ezalaki basoda ya Kanana oyo Sisela azalaki kotambwisa. Basoda yango bazalaki na makalo oyo bakangisá makwangola na bapinɛ na yango. Etumba yango esengelaki kosalema na Ngomba Tabola mpe lobwaku ya Kisoni. Makambo oyo elekaki kuna emonisi ete Balaka azalaki na kondima makasi. Tótalela naino makambo oyo esalemaki liboso etumba ebanda.
Bayisalaele babeleli Yehova
Mokanda ya Basambisi emonisi ete Bayisalaele bazalaki mbala na mbala kotika losambo ya pɛto mpe mpo na yango bazalaki kokutana na bampasi. Mbala nyonso bazalaki kosɛnga Nzambe bolimbisi mpe ye azalaki kotindela bango mobikisi moko, kasi nsima ya kolongwa na mpasi, bazalaki kozongela botomboki na bango. Kaka ndenge wana, “bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] lisusu na nsima ya kufa ya Ehude [mosambisi oyo abikisaki bango na mabɔkɔ ya bato ya Moaba].” Kutu, ‘baponaki banzambe ya sika.’ Esukaki ndenge nini? “[Yehova] apesaki bango na lobɔkɔ ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo afandaki na Hasola. Kapitɛnɛ ya basoda na ye ezalaki Sisela . . . Bongo bato ya Yisalaele balelaki epai ya [Yehova], mpo ete ye azalaki na [makalo nkama libwa ya bitumba oyo ezalaki na makwangola, NW] mpe ye anyokolaki bato ya Yisalaele makasi mpo na mbula ntuku mibale.”—Basambisi 4:1-3; 5:8.
Makomami elobi boye mpo na bomoi na Yisalaele: “[Na mikolo yango], bato bazalaki kotambola lisusu na balabala te mpe bato ya mibembo bakómaki koleka na banzela ya pɛmbɛnipɛmbɛni. Bato ya mboka bazalaki komonana lisusu te.” (Basambisi 5:6, 7, NW) Bazalaki kobanga bato oyo bazalaki koya na makalo kopunza mboka. Moto moko ya mayele alobi ete: “Bato ya Yisalaele bakómaki kosala makambo nyonso na kobanga, mboka mobimba etikalaki nyɛɛ lokola nde bato bazali wana te mpe bayebaki te nini bakoki kosala.” Yango wana, kaka ndenge bazalaki kosala liboso, Bayisalaele babelelaki Yehova mpo asalisa bango.
Yehova atindi mokambi
Minyoko ya Bakanana ekɔtisaki mpasi mpenza na Yisalaele. Nzambe asalelaki mosakoli ya mwasi, Debola, mpo na kosambisa bato na ye mpe koteya bango. Na yango, na ndimbola ya elilingi, Yehova apesaki ye lokumu ya kozala mama ya Yisalaele.—Basambisi 4:4; 5:7.
Debola atindaki bábengela ye Balaka mpe alobaki na ye ete: “Yehova, Nzambe ya Yisalaele apesi nde etinda te? ‘Kendá mpe osengeli kotanda bato na yo na Ngomba ya Tabola, mpe osengeli kozwa mibali nkóto zomi na libota ya Nafatali mpe na libota ya Zebuluna. Mpe ngai nakobenda Sisela, mokonzi ya basoda ya Yabini ná makalo na ye mpe basoda na ye mpo aya kokutana na yo na lobwaku ya Kisoni, mpe nakokaba ye na mabɔkɔ na yo.’” (Basambisi 4:6, 7, NW ) Ntango Debola alobaki ete ‘Yehova apesi nde etinda te?,’ amonisaki polele ete azali na bokonzi likoló ya Balaka te. Azali nde kosala lokola moto oyo Nzambe aponi mpo na koyebisa bato mikano na ye. Ndenge nini Balaka atalelaki likambo yango?
Balaka alobaki ete: “Soki yo okokende elongo na ngai, wana nakokende; kasi soki yo okokende elongo na ngai te, ngai mpe nakokende te.” (Basambisi 4:8, NW) Mpo na nini Balaka akakatanaki mpo na kondima mokumba oyo Nzambe apesaki ye? Azalaki nde kobanga? Andimaki nde te ete bilaka ya Nzambe ekokokisama? Te. Balaka aboyaki mokumba yango te, aboyaki mpe te kotosa Yehova. Kasi, na eyano na ye amonisaki nde ete ye moko akokoka te kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Kotambola na momonisi ya Nzambe ekondimisa ye ete Nzambe nde azali kotambwisa bango, mpe yango ekopesa bato na ye elikya mpenza. Likambo oyo Balaka asɛngaki emonisi te ete azalaki kobanga, kasi nde ete azalaki na kondima makasi.
Ezaleli oyo Balaka amonisaki ekokani na oyo ya Moize, ya Gideona mpe ya Yilimia. Bato wana mpe bamonaki ete bazali na likoki te ya kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki bango. Kasi yango elingi koloba te ete bazangaki kondima. (Exode 3:11–4:17; 33:12-17; Basambisi 6:11-22, 36-40; Yilimia 1:4-10) Tokoloba nini mpo na ezaleli oyo Debola amonisaki? Alukaki te kozwa bokonzi. Kasi, na komikitisa nyonso, atikalaki kaka mosaleli ya Yehova. Alobaki na Balaka ete: “Nakozanga te kokende elongo na yo.” (Basambisi 4:9, NW) Andimaki kotika ndako na ye—esika oyo akokaki kobatelama malamu—mpo na kolanda Balaka na etumba oyo ezalaki koyela bango. Debola mpe apesá ndakisa ya kondima mpe ya mpiko.
Na kondima, balandi Balaka
Bayisalaele basengelaki kokutana na ngomba moko monene na nkombo Tabola. Esika yango ebongaki mpenza. Ezalaki mpasi te mpo bato ya Nafatali ná Zebuluna bákutana wana, mpo bazalaki kofanda mosika te. Na yango, kaka ndenge Nzambe asɛngaki, bato nkóto zomi oyo bamipesaki bango moko—ná Debola—balandaki Balaka likoló ya ngomba yango.
Mpo na kolanda Balaka, bato yango basengelaki mpenza kozala na kondima. Yehova alakaki Balaka ete akolonga Bakanana, kasi bibundeli nini Bayisalaele bazalaki na yango? Basambisi 5:8 (NW) elobi ete: “Ata nguba to likonga ekokaki komonana te epai ya bato nkóto ntuku minei ya Yisalaele.” Bayisalaele bazalaki na bibundeli ya malonga te. Atako bongo, makonga na banguba ezalaki kaka mpamba liboso ya makalo oyo bakangisá makwangola. Ntango Sisela ayokaki ete Balaka amati na Ngomba Tabola, mbala moko asangisaki makalo mpe basoda na ye nyonso na lobwaku ya Kisoni. (Basambisi 4:12, 13) Kasi Sisela abosanaki ete azali kobunda nde na Nzambe Mozwi-ya-Nguya Nyonso.
Balaka alongi basoda ya Sisela
Ntango ngonga ya etumba ekokaki, Debola alobaki na Balaka ete: “Tɛlɛmá, mpo lelo ezali mokolo oyo Yehova akopesa mpenza Sisela na lobɔkɔ na yo. Yehova nde abimi liboso na yo, boye te?” Balaka ná bato na ye basengelaki kotika ngomba Tabola mpe kokita na lobwaku; kasi kuna ezalaki esika malamu mpenza mpo na makalo ya Sisela. Olingaki koyoka ndenge nini soki ozalaki na kati ya basoda ya Balaka? Olingaki kokenda, mpo oyebi ete Yehova nde asɛngaki bongo? Balaka ná bato na ye nkóto zomi batosaki. “Mpe Yehova abandaki kokɔtisa mobulungano epai ya Sisela ná makalo na ye nyonso ya bitumba mpe bato ya kaa na ye mobimba na nzela ya mopanga liboso ya Balaka.”—Basambisi 4:14, 15, NW.
Na lisalisi ya Yehova, Balaka alongaki basoda ya Sisela. Lisolo oyo elobeli etumba yango eyebisi makambo nyonso te. Nzokande, loyembo ya elonga ya Balaka ná Debola elobi ete ‘likoló mpe mapata etangisaki mai.’ Ekoki kozala ete mbula makasi enɔkaki mpe pɔtɔpɔtɔ epekisaki makalo ya Sisela kotambola malamu. Bibundeli makasi ya Bakanana ekómelaki bango nde mokumba. Mpo na bibembe ya basoda ya Sisela, nzembo yango elobi boye: “Mai ya Kisoni ememaki bango.”—Basambisi 5:4, 21, NW.
Lisolo yango ezali nde lisapo mpamba? Lobwaku ya Kisoni ezali mwa moluka oyo ezali kaka na mwa mai moke. Nsima ya mbula monene to oyo eumeli mingi, mwa bamai ya ndenge wana ekómaka monene na mbala moko mpe etiyolaka makasi. Balobaka ete na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mwa mbula moko ya miniti 15 ebebisaki mabelé ya esika yango mpe basoda oyo babundaka na mpunda bakokaki lisusu kobunda te. Masolo oyo elobelaka etumba ya Napoléon ná bato ya Turquie na Ngomba Tabola, na mokolo ya 16 Aprili 1799, emonisaka ete “bato mingi ya Turquie bakufaki na mai ntango bazalaki kokima mpe koluka kokatisa etando moko ya patatalu, oyo mai ya Kisoni ezindisaki.”
Flavius Josèphe, moyuda moko mokomi ya masolo ya kala, alobaki ete, ntango basoda ya Sisela ná ya Balaka balingaki kokutana, “mbula monene ya mabanga ebɛtaki, mpe mopɛpɛ etindaki mbula yango liboso ya Bakanana mpe ezipaki bango miso, mpe bakokaki ata kosalela makonga ná balasi oyo bazalaki na yango te.”
Basambisi 5:20 (NW) elobi ete: “Minzoto ya likoló ebundaki, uta na banzela na yango ebundisaki Sisela.” Ndenge nini minzoto ebundisaki Sisela? Mpo na bato mingi, maloba yango ezali komonisa ete Nzambe asalisaki bango. Bamosusu balobaka ete baanzelu basalisaki bango, bamosusu ete mabanga ya likoló ekwelaki bango to ete minzoto oyo Sisela azalaki kotalela mpo na koyeba makambo oyo ekoya nde ekosaki ye. Lokola Biblia elimboli te ndenge oyo minzoto ebundaki na etumba yango, ekoki kolobama ete Nzambe asalisaki basoda ya Yisalaele. Ezala asalisaki bango na ndenge boye to boye, Bayisalaele balongaki etumba yango. “Balaka alandaki makalo . . . mpe kaa mobimba ya Sisela bakweaki na mpia ya mopanga. Ata moko te atikalaki.” (Basambisi 4:16, NW) Nini ekómelaki Sisela mokonzi ya basoda?
Monyokoli akwei “na mabɔkɔ ya mwasi”
Biblia elobi ete: “Nzokande Sisela, akimaki na makolo tii na hema ya Yaele mwasi ya Ebele Mokeni, mpo kimya ezalaki na kati ya Yabini, mokonzi ya Hasola ná libota ya Ebele, Mokeni.” Yaele akɔtisaki Sisela, oyo asilaki kolɛmba, na kati ya hema na ye, apesaki ye miliki mpe azipaki ye na bolangiti, mpe Sisela alalaki. Na nsima, Yaele “akamataki likonzí ya hema mpe asimbaki marto na lobɔkɔ na ye,” biloko oyo bato oyo bazalaki kofanda na bahema bazalaki kosalela mingi. “Mpe apusanaki pene na ye na mayele mpe akɔtisaki ye likonzí yango na motó, abɛtaki yango mpe ekɔtaki tii na mabelé, wana ye alalaki makasi mpe alɛmbaki mpenza. Na bango akufaki.”—Basambisi 4:17-21, NW.
Na nsima Yaele abimaki libándá mpo na kokutana na Balaka mpe ayebisaki ye ete: “Yaká nalakisa yo moto oyo ozali koluka.” Biblia ebakisi ete: “Bongo akɔtaki na hema na ye, mpe, talá! Sisela alalaki na nse, akufi, likonzí ya hema epikami na motó na ye.” Likambo yango elendisaki mpenza kondima ya Balaka! Mwa moke liboso, mosakoli Debola ayebisaki ye ete: “Na nzela oyo ozali kokenda, lokumu ekozala ya yo te, mpo Yehova akokaba Sisela na mabɔkɔ ya mwasi.”—Basambisi 4:9, 22, NW.
Tokoki nde koloba ete Yaele asalelaki mayele mabe? Yehova amonaki yango ndenge wana te. Nzembo ya elonga ya Balaka ná Debola elobi ete: “Akopambolama koleka basi nyonso oyo bafandi na hema.” Nzembo yango esalisi biso tótalela liwa ya Sisela na ndenge oyo ebongi. Nzembo yango elobi ete mama na ye azalaki kozela kozonga na ye motema likoló. Azalaki kotuna ete: “Mpo na nini likalo na ye ezali koumela?” “Basi ya mayele kati na basi ya lokumu” bazalaki komeka kokitisa ye motema mpe koyebisa ye ete na ntembe te azali kokabola biloko oyo bapunzi na etumba—bilamba kitoko mpe bilenge basi mpo na mibali. Basi yango batuni ete: “Basengeli nde te kokabola biloko oyo bapunzi, libumu—mabumu mibale [liloba oyo basoda bazalaki kosalela mpo na kolobela basi oyo bakangi na etumba, maloba na nse ya lokasa] mpo na mobali mokomoko, bilamba ya langi mpo na Sisela . . . Elamba moko ya mayemi kitoko, ya langi, bilamba mibale ya mayemi kitoko mpo na nkingo ya mibali oyo bapunzi?”—Basambisi 5:24, 28-30, NW.
Mateya mpo na biso
Lisolo ya Balaka eteyi biso makambo ya ntina mpenza. Ntembe ezali te ete bato nyonso oyo babosaná mpenza Yehova na bomoi na bango bakokutana na mikakatano mpe bakotungisama na makanisi. Kasi bato oyo bazali kobongola motema mpe koya epai ya Nzambe mpe bazali komonisa kondima epai na ye bakosikolama na minyoko ya ndenge na ndenge. Biso mpe tosengeli kolona elimo ya botosi. Ata soki tomoni ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ekeseni na makanisi ya bato, tosengeli kondima ete malako na ye ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17, 18) Balaka ‘alongaki basoda ya bapaya’ kaka mpo andimelaki Yehova mpe alandaki malako na ye.—Baebele 11:32-34.
Maloba ya nsuka ya nzembo ya Debola ná Balaka elobi ete: “Tiká ete banguna na yo nyonso bákufa, Ee Yehova, mpe ete bato oyo balingaka yo bázala lokola moi ntango ebimaka na nguya na yango.” (Basambisi 5:31) Bosolo ya maloba yango ekomonana mpenza ntango Yehova akosukisa mokili mabe ya Satana!
[Elilingi na lokasa 29]
Yehova asalelaki Debola mpo na kotinda Balaka
[Elilingi na lokasa 31]
Mai ya Kisoni etondaki na mokili nyonso ya pɛmbɛnipɛmbɛni na yango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 31]
Ngomba Tabola