Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/12 lok. 3
  • Bandeko ya Yesu ezalaki banani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandeko ya Yesu ezalaki banani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu ayekolaki kotosa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Azwaki ngɔlu mingi epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mateya oyo tokoki kozwa na bandeko ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/12 lok. 3

Bandeko ya Yesu ezalaki banani?

NA SANZA ya Desɛmbɛ, na bamboka mingi babongisaka bililingi ya mwana Yesu na mabɔkɔ ya mama na ye Malia ná Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye. Ata bato oyo bazali baklisto te basepelaka na bililingi wana ya Yesu ná baboti na ye. Lokola bililingi yango ebongisamaka libosoliboso mpo na kolakisa Yesu, Biblia eyebisi biso nini mpo na bandeko na ye?

Yesu akolaki na libota moko ya kokamwa mpenza. Abotamaki na ngɔndɔ mwasi moko na nkombo Malia mpe akolaki lokola moto nyonso. Biblia elobi ete Nzambe akamataki bomoi na ye na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Malia na nguya ya elimo santu. (Luka 1:​30-35) Ntango bayebisaki Malia ete akozwa zemi na ndenge ya likamwisi mpe akobota Yesu, azalaki fianse ya Yozefe, oyo akómaki tata-mobɔkɔli ya Yesu.

Nsima na Yesu, Yozefe ná Malia babotaki bana mosusu, bandeko mibali mpe bandeko basi ya Yesu. Motuna oyo bato ya Nazalete batunaki mpo na Yesu ezali komonisa yango polele: “Oyo ezali te mwana ya mosali-mabaya? Mama na ye abengami Malia te, mpe bandeko na ye ya mibali Yakobo mpe Yozefe mpe Simona mpe Yuda te? Mpe bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali elongo na biso te?” (Matai 1:25; 13:55, 56; Malako 6:3) Maloba yango ezali komonisa ete Yesu azalaki na baboti, bandeko mibali minei mpe bandeko basi soki mibale.

Kasi, lelo oyo bato mosusu bazali kondima te ete bandeko ya Yesu bazalaki bana ya Yozefe ná Malia. Mpo na nini? Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Banda na ebandeli, Lingomba eteyaka ete Malia atikalaki ngɔndɔ bomoi na ye mobimba. Yango wana, ezali polele ete Malia abotaki bana mosusu te.” Buku yango elobi lisusu ete “ndeko mobali” mpe “ndeko mwasi” ekoki kozala “moto oyo bozali na ye lingomba moko to oyo bozali na ye na boyokani mosusu” to ndeko ya libota, mbala mosusu mwana ya ndeko ya tata to ndeko ya mama.

Kasi, ezali mpenza bongo? Ata bato mosusu ya teoloji na Lingomba ya Katolike oyo bandimaka liteya yango te, balobaka ete Yesu azalaki na bandeko ya mibali mpe ya basi. John Meier, prezida ya kala ya ebongiseli moko (Catholic Bible Association of America), akomaki boye: “Na [Testama ya Sika], soki basaleli liloba adelphos [ndeko] na ndenge ya elilingi te, kasi mpo na komonisa bondeko ya makila, elimbolaka kaka ndeko ya tata moko mpe mama moko, to ya tata moko to mpe mama moko kaka, kasi bondeko ya ndenge mosusu te.”a Ya solo, Biblia emonisi ete Yesu azalaki na bandeko mibali mpe basi, bana ya Yozefe ná Malia.

Baevanzile elobeli mpe bandeko mosusu ya Yesu, kasi tólobela naino baboti ná baleki ya Yesu mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Bandeko mibali mpe bandeko basi ya Yesu na makanisi ya lisangani ya mangomba,” ya John Meier, The Catholic Biblical Quarterly, Yanuali 1992, lokasa 21.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto