Ozali mpenza kotya miso na mbano?
MALADI oyo babengi glaucome elyaka miso mokemoke. Na ebandeli, ebebisaka naino miso pembenipembeni. Soki basalisi yango te, ekoki kokóma na katikati mpenza ya miso. Mpe nsukansuka, ekoki koboma mpenza miso. Ezali maladi ya liboso oyo ebomaka bato miso.
Miso ya moto ekoki kokufa mokemoke kozanga ete ayeba yango; ndenge moko mpe, moto akoki mokemoke kokufa miso ya elimo, oyo eleki kutu motuya. Yango wana, ezali na ntina ete miso na biso etalaka na likebi mpenza makambo ya elimo.
Tótya mpenza miso na mbano
Moko ya “biloko oyo emonanaka te” na miso ezali mbano ya malamu mpenza ya bomoi ya seko oyo Yehova akopesa basaleli na ye ya sembo. (2 Bakolinti 4:18) Ezali ya solo ete baklisto basalelaka Nzambe libosoliboso mpo balingaka ye. (Matai 22:37) Kasi, Yehova azali kosɛnga biso tótya miso na biso na mbano oyo akopesa biso. Alingi tótalelaka ye lokola Tata ya boboto oyo azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Yango wana, bato oyo bayebi Nzambe malamu mpe balingaka ye bazelaka na elikya mpenza mapamboli ya malamu mpenza oyo alaki mpe bazalaka na mposa makasi ya komona ndenge oyo ekokokisama.—Baloma 8:19, 24, 25.
Bato mingi oyo batángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, basepelaka na bililingi ya Paladiso oyo ekozala awa na mabelé. Ya solo, toyebi mpenza te ndenge Paladiso ekozala, mpe bililingi ya mikanda epesaka kaka mwa likanisi na kotalela makambo oyo elobami na baversɛ lokola Yisaya 11:6-9. Atako bongo, mwasi moko moklisto alobaki boye: “Soki namoni bililingi ya Paladiso na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká!, natalaka yango malamumalamu, ndenge moto atalaka oyo ezalaka na bafɔtɔ ya bisika kitoko oyo baturiste bakendaka kotala. Nalukaka komimona na kati ya bisika yango mpamba te nazali mpenza na elikya ete, na ntango oyo Nzambe abongisi, nakozala wana.”
Ntoma Paulo mpe azalaki koyoka ndenge yango mpo na “kobengama [na ye] ya likoló.” Azalaki komona te ete así azwi yango, mpamba te asengelaki kotikala sembo tii na nsuka. Kasi, akobaki ‘komitandola epai ya biloko oyo ezali na liboso.’ (Bafilipi 3:13, 14) Ndenge moko mpe, Yesu ayikelaki liwa mpiko na nzete ya mpasi “mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye.”—Baebele 12:2
Esí ekómelá yo okanisa ete mbala mosusu okokɔta na mokili ya sika te? Ekozala malamu tókanisa te ete ata ndenge nini tokokɔta kaka, mpo tokozwa mbano ya bomoi se soki totikali sembo tii na nsuka. (Matai 24:13) Kasi, soki tozali kosala nyonso mpo na kokokisa masɛngami ya Nzambe, tosengeli mpenza kondima ete tokozwa mbano. Tóbosana te ete Yehova “alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Soki totyeli Yehova motema, akosalisa biso tózwa mbano. Azali te Nzambe oyo alukaka mbeba epai ya bato oyo bazali kosala makasi mpo na kosepelisa ye mpo apimela bango mbano.—Nzembo 103:8-11; 130:3, 4; Ezekiele 18:32.
Soki toyebi ndenge Yehova atalelaka basaleli na ye, yango ekopesa biso elikya, ezaleli oyo ekokani mpenza na kondima. (1 Bakolinti 13:13) Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “elikya” ezali na likanisi ya “kozela na mposa makasi likambo moko ya malamu.” Ntoma Paulo azalaki kokanisa elikya ya ndenge wana ntango akomaki boye: “Tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka, mpo bókóma te bagɔigɔi, kasi bózala nde bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.” (Baebele 6:11, 12) Tomoni ete soki tolandi kosalela Yehova na bosembo, tokoki kozala na kondimisama ete elikya na biso ekokokisama. Elikya yango “eyokisaka mawa te” lokola bilikya mingi ya mokili oyo. (Baloma 5:5) Kasi tokoki kosala nini mpo tóbosana elikya yango te mpe tólongola miso te na elikya yango?
Ndenge oyo tokoki kotala malamumalamu na miso ya elimo
Moto akokaka te kotya miso mbala moko na biloko mibale. Ezali se ndenge yango mpo na miso ya elimo. Na ntembe te, soki totye miso na biloko ya mokili, elaka ya mokili ya sika oyo Nzambe apesi biso ekolongwa na esika ya liboso na makanisi na biso. Elikya yango oyo ekómi na esika ya mibale ekobanda kolimwa mokemoke mpe nsukansuka ekobunga mpenza. Ekozala mpenza mawa! (Luka 21:34) Yango wana, ezali na ntina mingi tóbatela ‘liso alima,’ elingi koloba liso oyo ezali kotala ntango nyonso Bokonzi ya Nzambe mpe mbano ya bomoi ya seko!—Matai 6:22.
Kobatela liso alima ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mikakatano mpe makambo ya mokolo na mokolo esɛngaka likebi na biso; tokoki mpe kokutana na komekama. Soki makambo ya ndenge wana ekómeli biso, tokosala nini mpo tótika te kotala na likebi mpenza Bokonzi mpe mokili ya sika oyo Nzambe alaki biso, atako tozali mpe kotalela makambo mosusu ya ntina? Tótalela makambo misato oyo tosengeli kosala.
Koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe tozali koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia, yango ekosalisa biso tótya makanisi na biso na makambo ya elimo. Ya solo, ekoki kozala ete toyekolaka Liloba ya Nzambe banda bambula mingi, kasi, ndenge kaka totikaka te kolya bilei ya mosuni mpo na kobatela bomoi na biso, tosengeli mpe kotika te koyekola Liloba ya Nzambe. Tolobaka te ete tokolya lisusu te mpo tolyá mingi na bomoi na biso. Yango wana, ata soki toyebi Biblia ndenge nini, tosengeli kokoba kolya bilei ya elimo mpo tóbosana te elikya oyo tozali na yango mpe mpo kondima na biso mpe bolingo na biso ezala ntango nyonso makasi.—Nzembo 1:1-3.
Komanyola Liloba ya Nzambe na botɔndi nyonso. Mpo na nini komanyola ezali na ntina mingi? Mpo na ntina mibale. Ya liboso, komanyola esalisaka biso tókanga mpenza ntina ya makambo oyo totángi mpe ekolisaka botɔndi na biso mpo na makambo yango. Ya mibale, komanyola esalisaka biso tóbosana Yehova te, tóbosana te misala na ye ya kokamwa mpe elikya oyo apesi biso. Na ndakisa, Bayisalaele oyo babimaki na Ezipito elongo na Moize bamonaki na miso ndenge oyo Yehova amonisaki nguya na ye ya kokamwa. Bomonaki mpe ndenge abatelaki bango na bolingo nyonso ntango atambwisaki bango na mokili oyo apesaki bango. Kasi, ntango kaka bakómaki na esobe wana bazali kokende na Mokili ya Ndaka, babandaki koimaima, mpe bongo, bamonisaki ete bazalaki na kondima te. (Nzembo 78:11-17) Mpo na nini bazangaki kondima?
Bayisalaele batikaki kotala Yehova ná elikya kitoko oyo apesaki bango mpe bakómaki kotala bolamu oyo bakokaki kozwa na ntango wana mpe koluka kokokisa bamposa na bango. Atako Bayisalaele bamonaki na miso makamwisi minene oyo Yehova asalaki, mingi kati na bango bazangaki kondima mpe bakómaki koimaima. Nzembo 106:13 elobi ete “babosanaki misala ya [Yehova] noki.” Mpo na kozanga botɔndi na bango, libota wana ya Yisalaele ekɔtaki na Mokili ya Ndaka te.
Yango wana, ntango tozali kotánga Biblia to mikanda oyo ezali kolimbola Biblia, tosengeli kozwaka ntango ya komanyola makambo oyo tozali kotánga. Komanyola wana ezali na ntina mingi mpo tózala makasi mpe tókola na elimo. Na ndakisa, ntango otángi Nzembo 106, oyo touti kotánga mwa maloba na yango, kanisá na mozindo bizaleli ya Yehova. Talá motema molai mpe motema mawa oyo amoniselaki Bayisalaele. Talá ndenge asalaki nyonso mpo na kosalisa bango bákóma na Mokili ya Ndaka. Talá ndenge bazalaki ntango nyonso kotombokela ye. Kanisá naino nkanda mpe mpasi oyo Yehova azalaki koyoka ntango Bayisalaele bazalaki komona mpamba motema mawa mpe motema molai oyo azalaki komonisela bango mpe bazalaki na botɔndi ata moke te mpo na yango. Lisusu, soki tomanyoli vɛrsɛ 30 mpe 31 oyo elobeli ndenge Finease amonisaki molende mpe mpiko mpo na kotikala sembo epai ya Yehova, tokomona mpenza ete Yehova abosanaka te basaleli na ye ya sembo mpe apesaka bango mbano monene.
Kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na yo. Ntango tozali kotosa mitinda ya Biblia, tomonaka biso moko ete malako ya Yehova esalisaka mpenza. Masese 3:5, 6 elobi boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Kanisá ndenge oyo etamboli ya mbindo ya bato mingi ememeli bango mpasi na makanisi, na mayoki mpe na nzoto. Lokola bato yango bamipesi na bisengo ya mwa ntango moke, bazali kobuka mpasi oyo ekoki kotungisa bango ebele ya bambula, ata mpe bomoi na bango mobimba. Nzokande, baoyo bazali kotambola na “nzela oyo ekangamakangamá” bazali koyoka mwa moke bisengo oyo ekozala na mokili ya sika, mpe yango ezali kopesa bango makasi ya kokoba kotambola na nzela ya bomoi.—Matai 7:13, 14; Nzembo 34:8.
Mbala mosusu, ekoki kozala mpasi mpo na kotosa mitinda ya Biblia. Ntango mosusu, soki tozali na mokakatano moko, tokoki komona ete tokoki kosilisa yango nokinoki soki tolandi nzela oyo Makomami epekisi. Na ndakisa, ntango tozangi mbongo, tokoki koluka kozongisa Bokonzi nsima. Kasi, baoyo bazali na kondima mpe bazali kotala na likebi mpenza makambo ya elimo, bandimaka mpenza ete, nsukansuka, “ekozala malamu epai na bango bazali kotosa Nzambe.” (Mosakoli 8:12) Ntango mosusu, ekoki kokóma ete moklisto andima kobakisa bangonga mosusu nsima ya ngonga na mosala, kasi asengeli te kokóma lokola Esau, oyo atyolaki makambo ya elimo mpe amonaki yango mpamba.—Genese 25:34; Baebele 12:16.
Yesu amonisaki polele mikumba na biso baklisto. Tosengeli ‘kokoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe.’ (Matai 6:33) Soki tozali kosala bongo, Yehova akomonisa biso bolingo na ye lokola bolingo ya tata epai ya bana na ye mpe akokokisa bamposa na biso ya mosuni. Yehova alingi te tómitungisaka mpo na biloko oyo akoki kopesa biso. Mitungisi ezangi ntina wana ekoki kokóma lokola glaucome oyo, soki basalisi yango te, ekoki mokemoke kolongola miso na biso na makambo ya elimo mpe nsukansuka koboma biso miso na elimo. Soki totikali kaka ndenge wana, mokolo ya Yehova ekokwela biso “lokola motambo.” Ekozala mpenza mawa mpo na biso!—Luka 21:34-36.
Lokola Yosua, tótala na likebi mpenza
Tótika te kotala na likebi mpenza elikya malamu ya Bokonzi, wana tozali kotika mikumba na biso mosusu na esika na yango mpenza. Soki totiki te koyekola, komanyola mpe kosalela mitinda ya Biblia, tokozala na kondima mpenza lokola Yosua ete elikya na biso ekokokisama. Nsima ya kokɔtisa Bayisalaele na Mokili ya Ndaka, alobaki na bango boye: “Bino boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo Yehova Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”—Yosua 23:14.
Tiká ete elikya ya Bokonzi epesa yo makasi, etondisa yo na esengo wana ozali komonisa yango na makanisi na yo, na mayoki na yo, na bikateli na yo mpe na misala na yo.—Masese 15:15; Baloma 12:12.
[Elilingi na lokasa 21]
Esí ekómelá yo okanisa mbala mosusu ete okokɔta na mokili ya sika te?
[Elilingi na lokasa 22]
Komanyola ezali na ntina mingi na boyekoli na biso ya Biblia
[Elilingi na lokasa 23]
Tyáká miso na yo na makambo ya Bokonzi